Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/8 lok. 18
  • Nzambe apangwisi mpisoli na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe apangwisi mpisoli na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobatela ndeko na yo oyo azali kobɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Yehova asalisaki ngai nalonga mikakatano ya bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge ya kolonga makambo oyo babalani mingi bamilelaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mikakatano ya mbongo​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/8 lok. 18

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Nzambe apangwisi mpisoli na ye

BATO oyo babongolaka bomoi na bango mpo na kotosa mibeko ya Nzambe bazwaka mapamboli mingi. Atako ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpo moto abongwana, bakoki kosalisa ye mpe kolendisa ye. (Nzembo 84:11) Lisolo oyo euti na Sudi-ɛsti ya Azia ezali komonisa yango.

Ntango Motatoli moko oyo afandaka na France azalaki na konje na mboka wana, asololaki na Kima, mwasi moko oyo azalaki na butiki na ye, mpe ayebisaki ye mokano oyo Yehova azali na yango mpo na mabele. Motatoli yango atikelaki Kim mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Ntango Kim azalaki kobalolabalola nkasa ya mokanda yango, miso na ye ekweaki na maloba oyo: “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 21:4) Kim alobi ete: “Vɛrsɛ yango esimbaki mpenza motema na ngai. Baoyo bazalaki komona ngai na butiki mokolo mobimba nazali koseka mpe kosolola bakokaki kokanisa te ete na mpokwa, ntango nazalaki kozonga na ndako, nazalaki kolela tii ntango mpɔngi ekoyiba ngai.” Mpo na nini azalaki kolela? Alobi ete: “Tozalaki kofanda lokola bamakango na mobali moko banda mbula 18 mpe nazalaki na esengo te mpamba te azalaki kolinga te ete tóbalana. Nazalaki na mposa ya kotika bomoi wana, kasi lokola tofandaki na ye bambula ebele, nazalaki kozwa makasi ya kokabwana na ye te.”

Mwa moke na nsima, Kim akómaki koyekola Biblia na mwasi moko Motatoli ya Yehova nkombo na ye Linh. Kim alobi ete: “Nazalaki na mposa mpenza ya kosalela nokinoki mateya ya Biblia. Na ndakisa, natikaki kosambela bankɔkɔ, atako likambo yango ebendelaki ngai mindɔndɔ epai ya bandeko na ngai. Nalukaki mpe kokomisa libala na biso na buku ya Leta, kasi mobali yango oyo nazalaki kofanda na ye aboyaki. Na ntango oyo nazalaki na mikakatano yango, Motatoli wana ya France azalaki kaka kotindela ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe Linh azalaki kolendisa ngai mingi. Motema molai, lisungi mpe bolingo ya bandeko basi yango esalisaki ngai nalɛmba te tii ntango nayaki koyeba makambo oyo mobali oyo nazalaki kofanda na ye azalaki kobombela ngai. Nzokande azalaki na ‘basi’ mitano mpe bana 25! Ntango nayebaki yango, nazwaki makasi ya kotika ye.

“Kotika ndako ya monene mpe ya kitoko mpe kokende kofanda na mwa ndako ya moke ezalaki mpasi. Longola yango, mobali yango azalaki kotya ngai mbamba ete tózongana, mpe akanaki kutu ete soki naboyi kozonga, akosopela ngai aside na elongi. Yehova asalisaki ngai mpe nalongaki kosala oyo ezali sembo.” Kim akolaki na elimo tii nsukansuka, na sanza ya Aprili 1998, azwaki batisimo. Lisusu, bandeko na ye mibale ya basi mpe mwana na ye ya mobali oyo azali elenge babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

Kim alobi ete: “Nazalaki kokanisa ete nakozanga elikya bomoi na ngai mobimba. Kasi, lelo oyo nazali na esengo, mpe nalelaka lisusu na butu te. Yehova apangwisá mpisoli na ngai.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto