Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mpo na nini, ata na moi ya lelo, ebongi kotalela mituna oyo Yobo mokapo 38 elobeli?
Misala mingi ya kokamwa oyo Nzambe alobelaki, ata bato ya siansi ya mikolo na biso bazali mpenza kososola yango malamumalamu te. Kati na misala yango, ezali na likambo ya koyeba ndenge oyo nguya ya gravitation esalaka mpo mabele etikala na esika na yango na ntaka oyo ekaboli yango na moi, pole esalemi mpenza na nini, mpo na nini ezali na mitindo ebele mpe ndenge na ndenge ya maboke ya mbula-mpɛmbɛ mpe nguya oyo ezalaka na mikalikali.—15/4, nkasa 4-11.
• Bandakisa nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tólonga makanisi mabe?
Asafa, Baluku mpe Naomi balɛmbaki nzoto to bazalaki na makanisi mosusu ya mabe na bantango mosusu, mpe masolo oyo elobeli ndenge oyo balongaki makambo yango ekoki kosalisa biso.—15/4, nkasa 22-24.
• Wapi mwa makambo tokoki mpenza kosala mpo na kosalisa basi baklisto oyo bakufelá mibali?
Baninga bakoki kosɛnga basi yango na boboto mpe na maloba ya polele likambo oyo bazali na yango mposa. Bandeko ya libota to bato mosusu oyo bazali na makoki ya kosalisa na mwa mbongo to mwa biloko, bakoki kosalisa basi yango soki mpenza mposa ezali. Baninga baklisto bakoki mpe kosalisa na boninga na bango, na lisungi ya elimo mpe na kobɔndisa.—1/5, nkasa 5-7.
• Mpo na nini toli ya 1 Bakolinti 7:39 (NW) oyo elobi ete tóbala “kaka kati na Nkolo” ezali na ntina mingi?
Baklisto mingi oyo babalaná na bato oyo bazali bandimi te basukaki mabe. Lisusu, kolanda toli yango ezali likambo ya kozala sembo epai ya Yehova Nzambe. Ntango tozali kolanda Liloba ya Nzambe, mitema na biso ekokweisa biso te. (1 Yoane 3:21, 22)—15/5, nkasa 20-21.
• Lokola ezali kaka Yehova nde akoki kolimbisa masumu na biso, mpo na nini baklisto basengeli koyambola masumu minene epai ya bankulutu na kati ya lisangá?
Ya solo, moklisto asengeli koluka ete Yehova alimbisa masumu minene na ye. (2 Samwele 12:13) Kasi, se ndenge oyo mosakoli Natana asalisaki Davidi, bankulutu ya lisangá bakoki kosalisa basumuki oyo bazali kobongola motema. Kokende kokutana na bankulutu eyokani na toli ya Yakobo 5:14, 15.—1/6, lokasa 31.
• Nini emonisi ete tosengeli kosunga bitike mpe basi bakufelá mibali oyo bazali na bosɛnga?
Masolo ya kala ezali komonisa ete basambeli ya solo, ezala Baebele ya kala to baklisto ya liboso, bazalaki na ezaleli wana ya kosunga bitike mpe basi bakufelá mibali. (Exode 22:22, 23; Bagalatia 2:9, 10; Yakobo 1:27) Ntoma Paulo akomaki na kati ya Makomami malako ya polele ete baklisto básungaka basi bakufelá mibali oyo bazali na bosɛnga. (1 Timote 5:3-16)—15/6, nkasa 9-11.
• Sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo mpe ya ntina ezali nini?
Tosengeli kokolisa mpe kobatela boyokani malamu elongo na Yehova, Tata na biso oyo azali na likoló. Koyekola Biblia nde ezali lisalisi ya ntina mpo na kosala yango.—1/7, nkasa 4-5.
• Moto azali na elimo oyo etikalaka na bomoi soki akufi?
Atako bato mosusu bandimaka ete molimo nde ekufaka, kasi elimo ekufaka te, Biblia eteyi likambo yango te. Biblia ezali komonisa ete soki moto akufi, azongaka mputulu mpe azalaka lisusu te. Kasi, Nzambe azali na makoki ya kozongisa ye na bomoi; yango wana, elikya nyonso ya kozala lisusu na bomoi, na nzela ya lisekwa, ezali na mabɔkɔ ya Nzambe. (Mosakoli 12:7)—15/7, nkasa 3-6.
• Danyele azalaki wapi ntango Baebele misato bamekamaki na esobe ya Dula?
Biblia elobi yango te. Ekoki kozala ete Danyele asɛngisamaki kozala kuna te na kotalela esika ya lokumu oyo bapesaki ye, to mpe ekoki kozala ete mosala ya Leta esɛngaki ete azala epai mosusu. Kasi, tokoki kozala na elikya ete abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova.—1/8, lokasa 31.