Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
Mayangani ezalaka ntango ya esengo oyo tomonisaka mpenza bondeko na biso
JOSEPH RUTHERFORD akómi na mbula 50, azali mpenza nzoto kolɔngɔnɔ te mpo auti kolekisa pene na mbula mobimba na bolɔkɔ; kasi, na esengo mpenza azali koyamba bapaya. Azali kokumba basakosi mpe azali kotika bandeko tii na bashambre na bango na otɛlɛ. Bayekoli mosusu mibale ya Biblia, oyo bazalaki na ye na bolɔkɔ, bazali kopesa bashambre na ebele ya bato oyo bazali kozela bisika oyo bakokende kolala. Mosala yango ekobi tii nsima ya midi ya butu. Moto akokanga mabɔkɔ azali te, bango nyonso bazali kosala. Makambo oyo esalemaki ntango nini?
Ezalaki na 1919; na ntango wana, Bayekoli ya Biblia (lelo oyo Batatoli ya Yehova) bakómaki na mwa kimya nsima ya minyoko makasi oyo bakutanaki na yango. Mpo bálendisama lisusu, basalaki liyangani moko monene na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, banda mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ tii 8 Sɛtɛmbɛ 1919. Na mokolo ya nsuka ya liyangani, bato 7 000 bazalaki na esengo ntango bazalaki kolanda na likebi nyonso Ndeko Rutherford oyo alendisaki bango ete: “Bozali bantoma ya Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo, bozali kosakola epai ya bato . . . bokonzi ya nkembo ya Nkolo na biso.”
Basaleli ya Yehova babandá likambo ya koyangana bato ebele banda na ntango ya Yisalaele ya kala. (Exode 23:14-17; Luka 2:41-43) Mayangani ya ndenge yango ezalaki bantango ya esengo, ezalaki kosala ete makanisi ya bato oyo bazalaki kokende kuna ezala ntango nyonso na Liloba ya Nzambe. Ndenge moko mpe, na ntango na biso, mayangani ya Batatoli ya Yehova elobelaka mingi makambo ya elimo. Mayangani yango esalisaka bato ya mitema sembo bámona ete Batatoli bazali na bomoko lokola bandeko baklisto.
Milende oyo basalaka mpo na koyangana
Baklisto ya ntango na biso bayebaka ete mayangani ezali bantango oyo balendisamaka na elimo mpe bayokaka mateya oyo euti na Liloba ya Nzambe. Bamonaka ete makita minene wana ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bango ‘bázala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.’ (Bakolose 4:12, NW) Yango wana, Batatoli basalaka mpenza milende mpo bázangisa mayangani yango te.
Mpo na bamosusu kati na bango, kokóma na mayangani yango esɛngaka ete bámonisa kondima makasi mpe bálonga mikakatano minene. Tótala, na ndakisa, likambo ya mobange mwasi moko Motatoli na Autriche. Atako abɛlaka maladi ya diabɛti mpe mokolo na mokolo azwelaka yango ntonga, asalaki makasi ete azala mikolo nyonso na liyangani ya etúká oyo esalemaki na ekólo na bango. Na Inde, libota moko monene ya Batatoli oyo bazali mpenza babola bamonaki lokola ete bakokoka kokende na liyangani te. Moko na bango asalisaki libota mobimba. Alobaki boye: “Lokola nalingaki te ete tózangisa liyangani, natɛkisaki biloko na ngai ya matoi ya wolo mpo tózwa mbongo mpo na mobembo. Nasalaki mosala ya mpunda te, mpamba te kokutana na bandeko mpe kozala na bango elongo mpe makambo oyo toyokaki elendisaki kondima na biso.”
Na ekólo Papouasie-Nouvelle-Guinée, etuluku moko ya bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu, kasi bazwaki naino batisimo te, bazwaki mokano ya kokende na liyangani ya etúká na engumba-mokonzi ya ekólo yango. Bakendaki kokutana na moto moko oyo azalaki na motuka oyo ememaka bato mpe batunaki ye soki akosɛnga bango ntalo boni mpo na komema bango na liyangani. Lokola mbongo oyo asɛngaki bango elekaki oyo bazalaki na yango, bandimaki kosala mosala ya kobongisela moto yango kuku na ye. Na bongo, bazwaki likoki ya kokóma na liyangani mpe balandaki programɛ mobimba.
Batatoli ya Yehova oyo bazali na mposa ya kokende na mayangani bamonaka te ete kofanda mosika ezali mokakatano oyo bakoki kolonga te. Na 1978, mpo na kokende na liyangani moko na engumba Lille, na ekólo France, elenge moko oyo autaki na Pologne asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 1 200 na velo na boumeli ya mikolo motoba. Na eleko ya molunge ya 1997, Batatoli mibale oyo bautaki na ekólo Mongolie basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 1 200 mpo na kozala na liyangani moko oyo esalemaki na Irkutsk, na ekólo Russie.
Bazali komonisa bondeko ya solosolo
Ntango bato ya mitema sembo bazali kotala Batatoli, bamonaka bomoko mpe bondeko oyo Batatoli bazalaka na yango na mayangani na bango. Bato mingi bakamwaki na komona ete koponapona ezali te kati na bayangani mpe ete ata baoyo bakutani ntango mosusu mpo na mbala ya liboso, basololaka na esengo mpenza.
Na liyangani ya bato bautaki na mikili ndenge na ndenge oyo eutaki kosalema na Australie, moto moko oyo azalaki kotambwisa bapaya oyo bakendaki na liyangani mpe bazalaki na mposa ya kotambola mpo na kotala mboka na boumeli ya pɔsɔ mobimba ayokaki mposa atikala na bango lisusu mpo azalaki kosepela kofanda na bango. Bolingo mpe bomoko na bango esepelisaki ye, azalaki kokamwa ndenge oyo bazalaki koyokana malamu atako mingi kati na bango bazalaki bapaya. Wana ekómaki ntango ya kokabwana na bango, asɛngaki bango bázala naino nyɛɛ mpo azalaki na likambo ya koyebisa bango. Abandaki boye: “Bandeko mibali mpe basi,” mpe apesaki bango matɔndi kasi akokaki kosilisa maloba na ye te, mpisoli etondaki ye na miso mpe alelaki.
Na 1997, mpo na mbala ya liboso, na ekólo Sri Lanka, basalaki liyangani ya etúká na minɔkɔ misato na stade moko monene. Masukulu nyonso ezalaki kosalema mbala moko na Lingelesi, na Cinghalais mpe na Tamoul. Na kati ya mokili oyo kowelana ezali se koya makasi kati na bato ya bikólo ekeseni, liyangani ya ndenge wana ekokaki kozanga te kobenda likebi ya bato. Polisi moko atunaki ndeko mobali moko ete: “Banani bazali kotambwisa liyangani yango, Ba-Cinghalais, Ba-Tamoul to bato oyo balobaka Lingelesi?” Ndeko apesaki ye eyano ete: “Ata bato ya monɔkɔ moko te oyo otángi; biso nyonso tozali kosala elongo.” Polisi yango andimaki te. Ntango bato ya minɔkɔ wana nyonso basanganaki mpo na kolanda libondeli ya nsuka mpe bango nyonso balobaki “Amen” oyo eyokanaki stade mobimba, bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi. Bato mingi batangisaki mpisoli ya esengo. Ya solo, mayangani ezalaka bantango ya esengo oyo tomonisaka mpenza bondeko na biso.—Nzembo 133:1.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 66-77, 254-282, ebimisami na Batatoli ya Yehova.