Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
1. Bafɛti na bileko oyo etyami epesaki Bayisraele libaku ya komanyola mpe kolobela mateya nini ya ntina?
1 Bayisraele bazalaki koyangana mbala misato na mbula mpo na bafɛti na bileko oyo etyami. Atako mobeko esɛngaki ete kaka mibali nde báyangana, mbala mingi libota mobimba ezalaki kosala mobembo na Yerusaleme mpo na bafɛti wana misato ya esengo. (Mib. 16:15, 16) Mayangani yango ezalaki ntango ya komanyola mpe kolobela mateya ya solo ya Makomami. Na ndakisa mateya nini? Moko na yango ezalaki ete Yehova azali Mopesi oyo atondi na bolingo. (Mib. 15:4, 5) Mosusu ezalaki ete tokoki kotyela ye motema mpo atambwisa mpe abatela biso. (Mib. 32:9, 10) Mayangani yango epesaki mpe Bayisraele libaku ya komikundola ete basengelaki mpe komekola boyengebene ya Yehova mpamba te bazalaki komema nkombo na ye. (Mib. 7:6, 11) Lelo oyo mpe, mayangani na biso ya etúká oyo esalemaka mbula na mbula esalisaka biso ndenge wana.
2. Ndenge nini liyangani ya etúká ekosalisa biso tókanga ntina ya mateya ya solo?
2 Mateya ya liyangani esalisaka biso tósosola solo ya Biblia: Na mayangani na biso ya etúká, tolandaka badiskur, badrame, bilakiseli mpe mituna-lisolo oyo esalisaka biso tókanga ntina ya mateya ya Biblia mpe tósalela yango. (Yoa. 17:17) Mosala makasi esili kosalema mpo na kobongisa liyangani ya etúká ya mbula oyo. Ebongiseli ya Yehova ezali kolɛngɛla mateya oyo eyokani mpenza na makambo oyo bato ya mokili mobimba bazali kokutana na yango mikolo oyo. (Mat. 24:45-47) Ozali na mposa makasi ya komona mpe koyoka makambo oyo ekoleka kuna?
3. Tosengeli kosala nini mpo tózwa matomba na mateya ya liyangani?
3 Kasi, tokozwa matomba mingi soki tozali wana mikolo nyonso misato mpe tolandi mateya na likebi. Soki osali naino yango te, sololá na mokonzi na yo ya mosala mpo ozwa konje. Salá nyonso mpo olala mingi butu nyonso mpo olanda liyangani malamu. Bandeko mingi bamonaka ete soki bazali kotala molobi mpe kokoma mwa makambo na mokuse, esalisaka bango bátya likebi. Kotika te ete telefone na yo ya mabɔkɔ to aparɛyi mosusu elongola likebi na yo moko to ya bato mosusu. Ezali malamu te kolobaloba, kotinda bamesaje na telefone, kolya to komɛla na ntango ya liyangani.
4. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bálanda liyangani malamu?
4 Na mbula ya sabata, ntango mabota ya Bayisraele bazalaki koyangana na bafɛti ya mwa bandako ya matiti mpo na koyoka botángi ya Mibeko, bazalaki elongo na ‘bana na bango ya mike’ mpo bana “báyoka mpe mpo báyekola.” (Mib. 31:12) Tolendisamaka mpenza ntango tomonaka mabota bafandi esika moko na liyangani mpe bana bazali kolala te mpe kolanda na likebi! Ekozala malamu ete mpokwa nyonso bózongela na libota makambo oyo bokomaki, oyo esepelisaki bino mingi. “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali;” yango wana esengeli baboti bákɛngɛla bana na bango, ezala baoyo bakómi bilenge, na ntango ya bopemi na midi, na esika ya ‘kotika bango básala oyo balingi.’—Mas. 22:15; 29:15.
5. Ndenge nini etamboli na biso ya malamu ekoki kopesa lokumu na mateya ya solo?
5 Etamboli na biso ya malamu ekumisaka mateya ya solo: Etamboli na biso ya malamu na engumba oyo liyangani ezali kosalema epesaka lokumu na mateya ya solo. (Tito 2:10) Bapolisi mpe bakonzi mosusu bamonaka ntango bandeko oyo bayei na liyangani bazali mpenza na etamboli ya bakristo, mpe bazali komonisela bato nyonso bonkonde mpe motema molai. (Kol. 4:6) Na mbula oyo eleki, mokambi ya masano na engumba moko esika liyangani esalemaki akomelaki Komite boye: “Nazali kopesa bino longonya mpo na bopɛto ya bato na bino mpe ndenge basalaki makambo nyonso na molɔngɔ na liyangani oyo.”
6. Ndenge nini tokoki kokumisa mateya ya solo na molato na biso na engumba ya liyangani
6 Ntango tolataka makarɔ na biso ya liyangani yango esalisaka bato báyeba ete tozali na liyangani. Esalisaka mpe bandeko mosusu báyeba biso mpe epesaka litatoli epai ya bato oyo bazali kotala biso. Bato ya engumba epai liyangani ezali kosalema bakomona ete baoyo balati makarɔ ya liyangani bazali na molato oyo ebongisami malamu mpe eleki ndelo te, balati te bilamba ya bongobongo to oyo ekangi nzoto makasi to etiki biteni mosusu polele ndenge emonanaka na mokili. (1 Tim. 2:9, 10) Na yango, tosengeli kokeba na molato mpe monzɛlɛ na biso ntango tozali na engumba oyo liyangani ezali kosalema. Kolata kupe ná triko ekomonisa lokumu te. Ata soki liyangani ekosalema na esika ya polele to esika ya masano, molato na biso esengeli komonisa lokumu. Soki tolingi kolata bilamba mosusu nsima ya liyangani mpo na kokende na restora, tosengeli kobosana te ete tozali kaka bato oyo bayei na liyangani mpe tokolata te bilamba ya bongobongo.
7. Wapi likambo moko oyo tokoki kosala mpo na kobatela bomoko na biso bakristo na esika ya liyangani?
7 Na bafɛti ya bileko oyo etyami, Bayisraele bazalaki kolendisana elongo na baninga na bango basambeli mosusu ya Yehova oyo bazalaki kouta na biteni mosusu ya ekólo to na bikóló mosusu, mpe yango esalaki ete bázala na bomoko. (Mis. 2:1, 5) Na mayangani na biso ya etúká bondeko na biso ya bokristo emonanaka polele. Mbala mingi, bondeko yango oyo emonisaka paradiso na biso ya elimo, ekamwisaka bato oyo bazali kotala biso. (Nz. 133:1) Na esika ya kobima libándá mpo na kosomba bilei, ekozala malamu koleka tómema biso moko bilei ya pɛpɛlɛ oyo tokolya na midi, mpo tózwa ntango ya kokutana mpe kosolola na bandeko oyo bafandi pembeni na biso.
8. Mpo na nini tosengeli kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani soki likoki ezali?
8 Mbala mingi, bato bakamwaka na ndenge tobongisaka mayangani na biso kitoko mpe na ndenge ya molɔngɔ; bakamwaka lisusu mingi na koyoka ete baoyo basalaka misala nyonso wana, basalaka yango na bolingo na bango moko. Ozali na likoki ya ‘komipesa na bolingo na yo moko’ mpo na kokokisa misala mosusu na liyangani? (Nz. 110:3) Mabota mosusu basepelaka kosala bango nyonso elongo mpo na koteya bana báyeba kosalisa bato mosusu. Soki ozalaka nsɔninsɔni, kosala na liyangani ekosalisa yo okutana na bandeko mosusu oyo bakoya. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Longola libota na ngai mpe mwa baninga, nayebaki bato mingi te na liyangani. Kasi, ntango napesaki mabɔkɔ na mosala ya kotya bopɛto, nakutanaki na bandeko mibali mpe bandeko basi ebele! Ezalaki esengo mingi!” Koluka kozwa baninga ya sika na liyangani ntango tozali kopesa mabɔkɔ na misala ekopesa biso esengo mingi. (2 Ko. 6:12, 13) Soki opesá naino mabɔkɔ te na misala na liyangani, tuná bankulutu ndenge nini okoki kokokisa masɛngami mpo osala yango.
9. Ndenge nini tokobengisa bato mpo báya na liyangani?
9 Bengisá bato báya koyoka solo: Na mbula oyo mpe, pɔsɔ misato liboso liyangani na biso ya etúká ebanda, tokosala kampanye mpo na kobengisa bato na liyangani. Masangá basengeli kosala nyonso bákabola nkasa ya libyangi na teritware na bango mobimba. (Talá etanda “Ndenge nini tokopesa lokasa ya libyangi?”) Tosengeli komema na liyangani nkasa ya libyangi nyonso oyo ekotikala. Bandeko oyo bakoya na liyangani bakosalela yango mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu na engumba oyo liyangani ekosalema.
10. Lobelá makambo oyo emonisi ete kampanye oyo tosalaka mbula na mbula mpo na kobengisa bato na liyangani ebotaka mbuma.
10 Kampanye oyo tosalaka mbula na mbula ebotaka nde mbuma? Na liyangani moko, ndeko moko oyo azalaki kopesa bisika ya kofanda asalisaki mobali moko ná mwasi na ye bázwa esika. Bayebisaki ye ete bazwaki lokasa ya libyangi mpe basepelaki na yango. Batambolaki na motuka kilomɛtrɛ 320 mpo na koyangana! Ndeko mwasi moko mpe oyo akendeki ndako na ndako kokabola nkasa ya libyangi apesaki mobali moko oyo alukaki koyeba makambo etali liyangani. Na yango, ndeko mwasi yango atalelaki lokasa ya libyangi elongo na ye. Mwa mikolo na nsima, ntango ndeko mwasi yango azalaki na liyangani, amonaki mobali yango elongo na moninga na ye moko mpe bazwaki mokanda moko oyo ebimaki sika!
11. Mpo na nini koyangana mbula na mbula na mayangani na biso ya etúká ezali na ntina?
11 Bafɛti na bileko oyo etyami ezalaki komonisa ndenge Yehova azalaki kosalisa Bayisraele na bolingo nyonso mpo ‘básalela ye na bosembo mpe na bosolo.’ (Yos. 24:14) Ndenge moko mpe, ntango tokendeke na liyangani ya etúká, esalisaka biso ‘tókoba kotambola na kati ya solo,’ mpe ezali na ntina mingi na losambo na biso. (3 Yoa. 3) Tiká ete Yehova apambola milende oyo bato nyonso oyo balingaka solo bazali kosala mpo na kozala na liyangani mpe kozwela yango matomba mingi!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Etamboli na biso ya malamu na engumba oyo liyangani ezali kosalema epesaka lokumu na mateya ya solo
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Pɔsɔ misato liboso liyangani na biso ya etúká ebanda, tokosala kampanye mpo na kobengisa bato na liyangani
[Etanda na nkasa 3-6]
Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya Etúká 2012
◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 8:20 na ntɔngɔ. Kasi, na bingumba ya minene lokola: Brazzaville, Goma, Kananga, Kikwit, Kinshasa, Kisangani, Kolwezi, Likasi, Lodja, Lubumbashi, Matadi, Mbandaka, Mbuji Mayi, Mwene Ditu, Pointe Noire mpe Tshikapa, programɛ ekobanda mikolo nyonso misato na ngonga ya 9:20 na ntɔngɔ. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 7:00 to 8:00 na ntɔngɔ na bisika mosusu. Ntango prezida ayebisi ete miziki elingi kobanda, biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na ndenge ya lokumu. Mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, liyangani ekosuka na ngonga ya 3:55 na mpokwa, mpe mokolo ya lomingo ekosuka na ngonga ya 2:40 na mpokwa. Na bingumba oyo totángi awa likoló ekosuka ngonga moko na nsima.
◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na bato oyo tofandaka na bango ndako moko, to baoyo toyei na bango motuka moko, to mpe baoyo toyekolaka na bango Biblia.—1 Ko. 13:5.
◼ Bilei ya midi: Tolendisi bino bómema bilei ya pɛpɛlɛ kasi oyo etongaka nzoto, na ndakisa mampa, bitabe, nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, to masanga ya sukali na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso moko ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba yango libándá ekozala te. Koboya kosomba biloko epai ya batɛki ya libándá ekopesa litatoli malamu mpo na bopɛto na biso. (Liyebisi: Bóyeba ete tokondima te ete moto akɔta mpo na kotɛka biloko ya kolya na esika ya liyangani.—Yoa. 2:13-17.)
◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete bandeko mosusu oyo basombaka biloko ya kolya libándá babwakaka nkasa to sashɛ na mabele. Yango wana, esika ya liyangani etondaka na bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi mpe biloko mosusu. Soki moto moko amoni malamu kokende kosomba biloko ya kolya libándá, asengeli kobwaka nkasa to sashɛ na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na mabele te. Soki tomoni papye to sashɛ na mabele, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tobondeli bino ete biso nyonso tósala mpenza milende mpo na kobatela esika na biso ya liyangani pɛto, ezala na kati to na libándá. Moto nyonso oyo azali na liyangani asengeli koyeba ete bopɛto ezali na ntina mingi. Soki moto mokomoko apesi mabɔkɔ, esika ya liyangani ekobanda kotikala pɛto mikolo nyonso. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.—1 Pe. 1:15, 16; Kob. 19:10; Mib. 23:14.
◼ Makabo: Tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na nyonso oyo esalemi mpo na kobongisa liyangani soki topesi makabo ya bolingo malamu mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na liyangani. Soki moto alingi kopesa likabo na chèque, akokoma yango na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’”
◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Soki moto moko abɛli na mbalakaka to azwi likama na esika ya liyangani, esengeli naino koyebisa moko ya bandeko oyo bazali kopesa bisika ya kofanda; ye akoyebisa mbala moko bandeko ya departema ya lisalisi ya nokinoki mpo bátala soki moto yango azali na maladi ya ndenge nini mpe ndenge oyo bakoki kosalisa ye.
◼ Bankisi: Soki omɛlaka nkisi oyo monganga akɔmelá yo, kobosana te komema nkisi oyo osengeli na yango mikolo nyonso misato ya liyangani mpamba te nkisi yango ekozala te na esika ya liyangani. Esengeli te kobwaka bantonga ya bato oyo babɛlaka maladi ya diabɛti to bantonga mosusu nyonso na esika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ na liyangani mpamba te ekoki kobimisa likama.
◼ Kokanga bafɔtɔ: Soki bolingi kokanga bafɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, bósalela mwinda (flash) ya aparɛyi te. Tosɛngi bino bóbengisa te na esika ya liyangani bato oyo basalaka mombongo ya kokanga bafɔtɔ. Soki bomoni bango na esika ya liyangani bazali koluka bakiliya, bókangisa bafɔtɔ epai na bango te.—Yoa. 2:13-17.
◼ Formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43): Mbala nyonso oyo tokutani na moto oyo asepeli na nsango malamu ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu na liyangani, tosengeli kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43). Basakoli basengeli komema formilɛrɛ yango moko to mibale na liyangani. Bokoki kopesa baformilɛrɛ oyo botondisi na bandeko oyo batalelaka mikanda na liyangani to na mokɛngɛli na mosala ya kosakola ya lisangá na bino.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2011, lokasa 7.
◼ Na restora: Tókumisa Yehova na etamboli na biso ya malamu na barestora. Tótika mwa mbongo mpo na mosali ya restora, soki esalemaka bongo.
◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Tosɛngi bino bótosa motángo ya bato oyo nkolo-ndako ayebisi mpo na shambre moko. (2) Soki omoni ete okofanda lisusu te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango nokinoki. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo-ndako to ndeko oyo azali kopesa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi nini okoki kosala mpo makambo nyonso eleka malamu. (4) Salelá malamu eloko nyonso oyo bapesi yo ndingisa ya kosalela. Esengeli kosala makambo nyonso na bokatikati. (5) Bopɛto ná ezaleli ya kobanga Nzambe etambolaka nzela moko. Mikolo nyonso tikáká esika na yo ya kolala pɛto mpe na molɔngɔ. Yango etali mpe Ndako ya Bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo ntango ozali elongo na basusu, ezala ndeko oyo ayambi yo na ndako na ye to bandeko mosusu oyo ozali kolala na bango esika moko.—Gal. 5:22, 23.
◼ Basali ya bolingo malamu: Ndeko nyonso oyo alingi kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani asengeli kokende na departema ya basali ya bolingo malamu. Bana oyo bakokisi naino mbula 16 te bakoki mpe kopesa mabɔkɔ soki bazali kosala elongo na baboti na bango to na ndeko mosusu ya mokóló oyo akokɛngɛla bango.
[Etanda na lokasa 6]
Ndenge nini tokopesa lokasa ya libyangi?
Mpo tósilisa teritware na biso mobimba, ekozala malamu tóloba mingi te. Tokoki koloba boye: “Mbote. Tozali kokabola lokasa ya libyangi oyo na mokili mobimba. Ya yo yango oyo. Okoyeba makambo mosusu na kati.” Zalá na esengo. Soki ozali kokabola yango mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, okoki mpe kopesa bazulunalo soki ebongi.