Lisolo ya bomoi
Yehova ateyaki biso ezaleli ya koyika mpiko mpe ya kolendendela
YA ARISTOTELIS APOSTOLIDIS
Na Russie, ezali na engumba Pyatigorsk oyo ezali na esika ya ngombangomba na nɔrdi ya bangomba milai ya Caucase. Engumba yango eyebani mingi mpo na maziba na yango ya mungwamungwa mpe kuna mpiɔ ezalaka makasi te. Nabotamaki na engumba yango na 1929 mpe baboti na ngai bazalaki Bagrɛki oyo bakimaki mboka na bango. Mbula zomi elekaki, nsima ya makambo ya nsɔmɔ oyo bato ya Staline bazalaki kosala mpo na kobengana bato na mboka, konyokola bango, mpe koboma bato oyo bautaki bipai mosusu, tosengelaki kozonga lisusu na Grèce lokola bato bakimá mboka.
NTANGO tokendaki kofanda na Piraiévs na Grèce, tomonaki mpenza ete tozali “bato bakimá mboka.” Tomiyokaki mpenza ete tozali bapaya. Atako ngai na ndeko na ngai ya mobali tozwaki nkombo ya Socrate mpe Aristote, bato ya filozofi mibale ya Grèce oyo bayebanaki mingi, kasi bato bazalaki kobenga biso na bankombo yango mingi te. Moto nyonso azalaki kobenga biso kaka ete bana wana ya Russie.
Mwa moke nsima ya kobanda ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mama na ngai ya bolingo, akufaki. Azakaki na ntina mingi na kati ya libota na biso, mpe liwa na ye esalaki biso mpasi mingi. Lokola abɛlaki mwa mingi, alakisaki ngai ndenge ya kosala misala ya ndako. Na nsima, makambo oyo alakisaki ngai, ezalaki na ntina mingi na bomoi na ngai.
Etumba mpe bonsomi
Bitumba, boyangeli ya Banazi, mpe babɔmbi oyo basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobundisa Allemagne bazalaki kobwaka, ezalaki kosala lokola nde tokokóma lobi te. Bato mingi bakómaki babola, nzala ekɔtaki na mboka, mpe bato mingi bazalaki kokufa. Ntango nakómaki na mbula 11, nasengelaki kosala mosala makasi elongo na tata mpo ete biso misato tókoka kozwa biloko ya kobikela. Lokola nayebaki monɔkɔ ya Grɛki malamu te mpe mpo na bampasi ya bitumba, natángaki lisusu kelasi te.
Na Ɔkɔtɔbɛ 1944, ekólo Grèce elongwaki na boyangeli ya Allemagne. Mwa moke na nsima, nakutanaki na Batatoli ya Yehova. Lokola nazalaki na kati ya mpasi mpe nayebaki te nasala nini, elikya oyo Biblia ezali kopesa mpo na mikolo ezali koya ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, esimbaki motema na ngai. (Nzembo 37:29) Elaka ya Nzambe na ntina etali bomoi oyo ezangi nsuka na kati ya kimya awa na mabele ekitisaki ngai motema. (Yisaya 9:7) Na 1946, ngai na tata tomipesaki na Yehova mpe tozwaki batisimo.
Na mbula oyo elandaki, nazalaki na esengo ya kozwa mokumba na ngai ya liboso lokola mosaleli ya piblisite (bakómaki kobenga bango nsima mosaleli ya kokabola zulunalo) na lisangá ya mibale oyo esalamaki na Piraiévs. Teritware na biso ebandaki na Piraiévs tii na Eleusis, ntaka ya kilomɛtrɛ soko 50. Na ntango yango, ebele ya baklisto bapakolami bazalaki na lisangá yango. Nazwaki libaku ya kosala elongo na bango mpe nayekolaki makambo mingi epai na bango. Nazalaki kosepela mingi kozala elongo na bango mpamba te bazalaki kobɛtela ngai masolo ya milende oyo bazalaki kosala mpo na kokokisa mosala ya kosakola. Bomoi na bango ezalaki komonisa polele ete mpo na kosalela Yehova, esengeli kozala na motema molai mpe kolendendela. (Misala 14:22, NW) Lelo oyo, nazali mpenza na esengo ya komona ete na esika yango, masangá ya Batatoli ya Yehova eleki 50.
Nakutanaki na mokakatano ya mbalakaka
Nsima ya mwa ntango, nakutanaki na Eleni, elenge mwasi moklisto moko ya kitoko mpe ya molende na engumba ya Patras. Tolakanaki ete tokobalana na nsuka ya 1952. Kasi nsima ya mwa basanza, Eleni abɛlaki makasi. Minganga bamonaki ete azali na kansɛr ya bɔɔngɔ), mpe bomoi na ye ezalaki na likama. Esengelaki básala ye lipaso nokinoki. Nsima ya kolukaluka mingi, tokutanaki na monganga moko na Athènes. Atako lopitalo ezalaki na makoki mingi te na ntango wana, monganga yango andimaki kotosa bindemeli ya lingomba na biso mpe kosala lipaso kozanga ete asalela makila. (Levitike 17:10-14; Misala 15:28, 29) Na nsima ya lipaso, minganga bazalaki na mwa elikya atako bazalaki mpe kokanisa ete mbala mosusu maladi yango ekoki kozonga.
Nasengelaki kosala nini na likambo ya ndenge wana? Lokola makambo ebongwani, nasengelaki kokabwana na ye mpe kotikala ngai moko? Te! Nalakaki ete nakobala ye, mpe nalingaki ete ɛɛ na ngai ezala ɛɛ. (Matai 5:37) Nakanisaki ata moke te kobongola makanisi na ngai. Na lisalisi ya yaya na ye ya mwasi, Eleni azongaki nzoto kolɔngɔnɔ mwa moke, mpe na Desɛmbɛ 1954 tobalanaki.
Nsima ya mbula misato, Eleni akweaki lisusu na maladi mpe bobele monganga oyo asalaki ye lipaso liboso nde asengelaki kosala ye lisusu. Mbala oyo, monganga asengelaki kotala mpenza malamu bɔɔngɔ na ye mpo na kolongola maladi yango nyonso. Yango wana, ngambo moko ya nzoto ya mwasi na ngai ezalaki lisusu kosala te mpe azalaki koloba lisusu malamu te. Sikoyo, molɔngɔ ya bampasi ndenge na ndenge ebakisamaki mpo na biso mibale. Ata mwa mosala ya pɛtɛɛ ekómaki likambo monene mpo na mwasi na ngai. Lokola bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ezalaki se kobeba, esengelaki tóbongola lolenge ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na koleka, tosengelaki mpenza koyika mpiko mpe kolendendela.
Na ntango yango nde makambo oyo mama azalaki kolakisa ngai esalisaki ngai mingi. Ntɔngɔ nyonso, nazalaki kobongisa biloko oyo Eleni asengelaki kolamba. Mbala mingi, tozalaki kobengisa bato mosusu, na kati na bango basakoli ya ntango nyonso, bato oyo tozalaki koyekola na bango Biblia, mpe bandeko baklisto oyo bazalaki na bosɛnga. Bango nyonso bazalaki kosepela na bilei mpenza yango! Ngai na Eleni tozalaki lisusu kopesana mabɔkɔ na misala mosusu ya ndako, yango wana ndako na biso ezalaki pɛto. Bomoi wana ya mpasi esengelaki kokoba na boumeli ya mbula 30.
Atako azalaki na maladi kasi azalaki na molende
Ezalaki esengo mingi mpo na ngai mpe bandeko mosusu na komona ete eloko moko te ekokaki kokitisa bolingo ya mwasi na ngai mpo na Yehova mpe molende oyo azalaki na yango mpo na mosala na ye. Na nsima, Eleni azalaki kosala nyonso mpo na kobimisa mwa maloba. Azalaki kolinga mingi kosolola na bato na balabala mpo na koteya bango nsango malamu ya Bibia. Nazalaki kokende na ye elongo ntango nazalaki kosala mibembo ya mosala ya mosuni. Nazalaki kotɛlɛmisa motuka pene ya nzela ya makolo oyo bato bazalaki kotambola na yango mingi. Eleni azalaki kofungola lininisa ya motuka mpe kobenga baleki-nzela ete báya kokamata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mokolo moko, akabolaki zulunalo 80 na ngonga mibale mpamba. Mbala mingi, azalaki kokabola bazulunalo nyonso ya kala oyo ezalaki na lisangá. Eleni azalaki mpe kosangana mbala na mbala na ndenge mosusu ya mosala ya kosakola.
Na boumeli ya bambula nyonso oyo mwasi na ngai azalaki kobɛla, azalaki ntango nyonso elongo na ngai na makita. Ata mbala moko te azangaki na liyangani moko to mpe mayangani mosusu ya minene, ezala na ntango oyo esengelaki kosala mobembo na mboka mopaya mpo na minyoko oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na Grèce. Atako akokaki lisusu kosala mingi te, azalaki na esengo ya kokende na liyangani na Autruche, na Allemagne, na Chipre, mpe na bamboka mosusu. Ntango mikumba na ngai ya lisangá ebakisamaki, mbala mosusu yango esalaki ete makambo ezala mpasi koleka mpo na ye. Kasi ata mbala moko te Eleni azalaki komilelalela to mpe kokóma na makambo makasimakasi.
Likambo yango eteyaki ngai ezalela ya koyika mpiko mpe kolendendela mpo na ntango molai. Namonaki ete Yehova azalaki kosunga ngai mbala mingi. Bandeko basi mpe mibali bazalaki kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosunga biso, minganga mpe basungaki biso mingi. Na boumeli ya bambula nyonso wana ya mikakatano, ata mbala moko te tozangaki biloko oyo ezali na ntina mpo na bomoi, atako lolenge ya bomoi na biso oyo ya mpasi ezalaki kosɛnga na ngai nasala mosala mokolo mobimba. Matomba mpe misala ya Yehova ezalaki ntango nyonso na esika ya liboso.—Matai 6:33.
Bato mingi bazalaki kotuna soki tozalaki kosala ndenge nini na ntango wana ya komekama. Ntango nazali kozongisa makanisi na nsima, nandimi ete koyekola Biblia biso moko, kobondela mpenza na motema moko, koyangana ntango nyonso na makita ya boklisto, mpe kosakola nsango malamu na molende ezalaki kobakisela biso makasi mpe ezalaki kosala ete tólɛmba te. Ntango nyonso, tozalaki komikundwela maloba ya kolendisa oyo ezali na Nzembo 37:3-5: “Zalá na elikya epai na Yehova mpe salá malamu; . . . Omisepelisa na [Yehova] . . . Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” Vɛrsɛ mosusu oyo ezalaki na ntina mingi mpo na biso ezali Nzembo 55:22: “Kitisá mokumba na yo epai na Yehova mpe ye akokumba yo.” Lokola mwana oyo atyeli mpenza tata na ye motema, tosukaki te kaka na kokitisela Yehova mikumba na biso, kasi totikaki yango epai na ye.—Yakobo 1:6.
Na mokolo ya 12 Aprili 1987, ntango mwasi na ngai azalaki koteya liboso ya ndako na biso, porte moko monene ya ebende ekangamaki na nsima na ye, ebwakaki ye na ngambo mosusu ya nzela mpe azokaki mpota monene. Na likama yango, ayebaki lisusu ata likambo moko te na boumeli ya bambula misato oyo elandaki. Akufaki na ebandeli ya mobu 1990.
Nazali kosalela Yehova na makasi na ngai nyonso.
Na 1960 nakómaki mosaleli na lisangá ya Nikaia, na engumba Piraiévs. Kobanda ntango wana, nazwaki libaku ya kosala na masangá mosusu ya Piraiévs. Atako nazali na bana na ngai moko te kasi nazwi esengo ya kosalisa ebele ya bana ya elimo mpo ete bátɛlɛma ngwi kati na solo. Bamosusu kati na bango bazali sikoyo bankulutu, basaleli na misala, babongisi-nzela mpe bandeko mosusu bazali kosala na Betele.
Na 1975, lokola Grèce ekómaki na demokrasi, Batatoli ya Yehova bakómaki kosala mayangani na bango na polele, batikaki kosala yango na komibomba na zamba. Makambo oyo bamosusu kati na biso bayekolaki na mayangani na mboka ya bapaya, ezali sikoyo na ntina mingi. Yango wana, nazalaki na esengo mpe na libaku ya kosala na bakomite ndenge na ndenge ya mayangani na boumeli ya bambula ebele.
Yango wana, na 1979 bibongiseli bizwamaki mpo na kotonga Ndako ya Mayangani na Grèce, pene na Athènes. Babengaki ngai nasala elongo na bandeko mpo na kobongisa mosala yango mpe nazalaki na kati ya bandeko oyo basalaki mosala yango monene ya kotonga. Mosala wana mpe ezalaki kosɛnga mpiko mpenza mpe kolɛmba te. Na boumeli ya mbula misato oyo nasalaki elongo na ebele ya bandeko mibali mpe basi oyo bamipesi, boyokani mpe bomoko kati na biso ekómaki makasi. Nabosanaka te mosala wana mpe etikali na kati ya motema na ngai na libela.
Tokokisi bamposa ya elimo ya bato oyo bazalaki na bolɔkɔ
Nsima ya mwa bambula, libaku mosusu ya mosala emonanaki. Moko ya babolɔkɔ ya minene ya Grèce ezali na mboka Korydallos, pene na esika lisangá na biso ezali. Banda na Aprili 1991, baponaki ngai mosakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova mpo na kotalaka bato oyo bazalaki na bolɔkɔ wana pɔsɔ nyonso. Kuna nayekolaki Biblia na bato mpe natambwisaki makita ya baklisto na bato ya bolɔkɔ oyo bazalaki kosepela na solo. Mingi kati na bango basalaki mbongwana monene, yango emonisi ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya mingi. (Baebele 4:12) Yango ekamwisaki mokonzi ya bolɔkɔ mpe bato mosusu ya bolɔkɔ. Bato mosusu ya bolɔkɔ oyo nazalaki koyekola Biblia elongo na bango babimaki na bolɔkɔ mpe lelo oyo bazali kosakola nsango malamu.
Na boumeli ya mwa ntango, nazalaki koyekola Biblia na bato misato oyo bazalaki kotɛka bangi kala. Lokola bakolaki na elimo, ntango bayaki mpo na boyekoli na bango ya Biblia, bakataki mandɛfu, basanolaki nsuki na bango malamu mpe balataki simisi na kravate, ezalaki na katikati ya sanza ya Augusto—eleko ya molunge makasi na Grèce! Mokambi ya bolɔkɔ, mokonzi ya bakɛngɛli, mpe basali mosusu babimaki mbangu na babiro na bango mpo na kotala likambo yango. Bakamwaki mpenza!
Likambo mosusu ya kolendisa esalemaki na ndako ya bolɔkɔ ya basi. Tobandaki koyekola Biblia na mwasi moko oyo bakatelaki ye bolɔkɔ ya libela mpo ete abomaki moto. Ayebanaki mpo na ezaleli na ye ya botomboki. Kasi, mosika te solo ya Biblia oyo azalaki koyekola etindaki ye asala mbongwana monene mpenza. Bato mingi bamonaki mwasi yango lokola nkosi oyo abongwani mwana na mpate! (Yisaya 11:6, 7) Mokonzi ya bolɔkɔ akómaki komemya ye mpe kotyela ye motema. Nasepelaki mingi komona ndenge akolaki malamu na elimo kino komipesa na Yehova.
Nasalisaki bato ya maladi mpe mibange
Lokola namonaki ndenge mwasi na ngai abundaki ntango molai na maladi, yango esalaki ete nakóma kotalela mingi bamposa ya bato ya maladi mpe mibange oyo bazalaki na kati na biso. Masolo oyo ezali na mikanda na biso, oyo ezali ntango nyonso kolendisa biso tólona mposa ya kosalisa bato ya lolenge wana esepelisaka ngai mingi. Nazalaki kosepela na masolo yango mingi mpe nazalaki kotya yango nyonso esika moko. Nsima ya bambula, nasangisaki esika moko nkasa koleka nkama. Nabandaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Tópesa lokumu na mibange mpe bato oyo bazali konyokwama,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1962. Mingi kati na masolo yango emonisi ete ezali na ntina mingi ete lisangá moko na moko ekamata bibongiseli mpo na kosunga bato ya maladi mpe mibange.—1 Yoane 3:17, 18.
Bankulutu basalaki etuluku moko ya bandeko mibali mpe basi oyo bamipesaki bango moko mpo na kokokisa bamposa ya bandeko oyo bazalaki na maladi mpe mibange kati na lisangá na biso. Bandeko yango bakabolamaki na mwa bituluku, bamosusu bazalaki na likoki ya kopesa lisalisi na bango na moi, bamosussu na butu, bamosusu bazalaki kopesa motuka mpo na komema bato ya maladi, mpe bamosusu bazalaki kosala mokolo mobimba. Baoyo ya mokolo mobimba, bazalaki bandeko oyo bakoki komipesa ata ntango nini oyo babengi bango.
Matomba ya milende wana ezali mpenza kolendisa. Na ndakisa, ntango bandeko yango balekaki kotala ndeko mwasi moko oyo azalaki kobɛla mpe afandaka ye moko, bakutaki ye akwei na mabele mpe azali lisusu komiyeba te. Toyebisaki ndeko mwasi mosusu oyo azalaki kofanda penepene na ye mpe azalaki na motuka. Na lombangu mpenza, na miniti zomi kaka amemaki ndeko yango na lopitalo oyo ezalaki pene wana. Minganga balobaki ete yango ebikisaki ye mpenza na likama.
Bandeko oyo bazalaki na maladi mpe baoyo bazalaki mibange bamonisaki botɔndi epai ya bandeko wana, mpe yango elendisaki mingi. Tozali na elikya ya kofanda elongo na bandeko basi mpe mibali wana kati na mokili ya sika ya Nzambe, epai makambo ndenge na ndenge ya kopesa esengo ekozala. Mbano mosusu euti na koyeba ete lisungi oyo bazwaki nde esalisaki bango báyika mpiko ntango bazalaki konyokwama.
Kolendendela ememeli ngai matomba
Sikawa nazali nkulutu na lisangá moko na Piraiévs. Atako nakómi mobange mpe nazali na mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, kasi nazali na esengo mpo ete nazali naino kopesa mabɔkɔ na misala mingi ya lisangá.
Wana bambula ezalaki koleka, bampasi, mikakatano minene, mpe makambo ekanami te ezalaki kosɛnga mpiko mpe kolɛmba te. Kasi, Yehova apesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango mpo na kolonga mikakatano wana. Mbala na mbala, namonaki mpenza bosolo ya maloba ya mokomi na nzembo, ete: “Ntango nalobaki ete: ‘Na ntembe te lokolo na ngai ekotɛngatɛnga,’ boboto monene na yo, Ee Yehova, etikaki ngai te. Ntango natondaki na makanisi ya kobulunganisa, mabɔndisi na yo ebondelaki molimo na ngai .”—Nzembo 94:18, 19, NW.
[Elilingi na lokasa 25]
Elongo na mwasi na ngai, Eleni, nsima ya lipaso na ye ya mibale na 1957
[Elilingi na lokasa 26]
Na liyangani ya etúká ya 1969 na Nuremberg, na Allemagne
[Elilingi na lokasa 28]
Bandeko mibali mpe basi oyo bazalaki kosunga bato ya maladi mpe mibange