Tozalaki kobanga te—Yehova azalaki na biso
Ya Egyptia Petridou
Na 1972, Batatoli ya Yehova ya Chypre mobimba bayanganaki na Nicosie mpo na koyoka lisukulu moko ya ndeko Nathan H. Knorr, oyo na ntango wana asilaki kotambwisa mosala ya Batatoli ya Yehova bambula ebele. Ayebaki ngai mbala moko, mpe liboso kutu ngai namiyebisa epai na ye, atunaki ngai ete: “Ozali na nsango ya bandeko ya Égypte?” Nakutanaki na ndeko Knorr mbula 20 liboso epai na biso na engumba Alexandrie, na Égypte.
NABOTAMAKI na Alexandrie mwa 23 Yanuali 1914. Nazali mwana ya liboso na libota ya bana minei. Tokolaki pembeni mpenza ya mbu. Na ntango wana, Alexandrie ezalaki engumba moko kitoko oyo etondaki na bato ya mikili ndenge na ndenge, mpe eyebanaki mpo na bandako mpe mpo na makambo na yango mosusu. Lokola bato ya Mpoto ná Balabo bafandaki esika moko, biso bana toyekolaki koloba Arabe, Italien, Lifalanse, Lingelesi mpe monɔkɔ ya mboka na biso, Grɛki.
Nsima ya kosilisa kelasi, nazwaki mosala na mwa esika moko oyo bazalaki kotonga bilamba ya midele ya France, epai nazalaki kotonga bilamba ya kitoko mpo na basi ya kilo. Nazalaki kosambela mingi mpe nazalaki kolinga kotánga Biblia, atako nazalaki kososola mpenza te makambo nazalaki kotánga.
Na ntango wana, na katikati ya bambula ya 1930, nakutanaki na elenge mobali moko kitoko, moto ya Chypre. Theodotos Petrides azalaki mobundi monene ya libanda, kasi ayebaki mpe kotumba bagato mpe azalaki kosala na esika moko ya kotumba bagato oyo eyebanaki mingi. Theodotos akómaki kolula ngai, mwana mwasi ya moke ya nsuki moindo. Azalaki mbala mingi koyembela ngai banzembo ya bolingo na monɔkɔ ya Grɛki na lininisa na ngai. Tobalanaki na mokolo ya 30 Yuni 1940. Ezalaki eleko moko ya esengo. Tozalaki kofanda na apartema moko oyo ezalaki na nse na oyo ya mama na ngai. John, mwana na biso ya liboso abotamaki na 1941.
Nayekoli solo
Na boumeli ya mwa ntango, Theodotos azalaki lisusu te kosepela na lingomba na biso, mpe azalaki kotuna mituna oyo etali Biblia. Kozanga ngai nayeba, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na ye Biblia. Mokolo moko, ntango nafandaki na ndako ná bebe na biso, mwasi moko, Eleni Nicolaou, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, abɛtaki na porte na biso mpe apesaki ngai mwa lokasa moko oyo ezalaki na nsango ya Biblia. Mpo na komonisa limemya, natángaki yango. Na nsima, alakisaki ngai mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Likambo ya kokamwa, mikanda yango ezalaki kaka oyo Theodotos azalaki na yango na ndako!
Nayebisaki ye ete, “Nazali na mikanda oyo. Kɔtá!” Mbala moko, nabandaki kolandisa ye mituna. Na motema mpiɔ, asalelaki Biblia mpo na koyanola ngai. Nasepelaki makasi. Mosika te, nabandaki koyeba Biblia. Ntango topemaki mwa moke, Eleni amonaki fɔtɔ ya mobali na ngai mpe alobaki, “Nayebi mobali oyo!” Sɛkɛlɛ ya Theodotos ebimaki polele mpe natikalaki monɔkɔ polele. Theo azalaki kokende na makita ye moko kozanga koyebisa ngai! Ntango Theodotos azongaki na ndako mokolo wana, nalobaki na ye boye: “Pɔsɔ oyo, nakokende na yo esika okendeki mokolo ya lomingo!”
Na likita ya liboso oyo nakendeki, bato soki zomi bazalaki koyekola mokanda ya Mika. Namɛlaki makambo nyonso oyo nayokaki! Banda wana, George Petraki ná mwasi na ye Katerini bakómaki koya koyekola na biso Biblia mikolo nyonso ya mitano na mpokwa. Papa ná bayaya na ngai mosusu bazalaki kosepela te ndenge tozalaki koyekola na Batatoli, kasi leki na ngai ya mwasi azalaki komona mabe te, atako akómaki Motatoli te. Kasi, mama andimaki solo. Na 1942, ngai, mama ná Theodotos tozwaki batisimo na mbu ya Alexandrie mpo na komonisa ete tomipesi epai na Yehova.
Mbongwana ekɔti na bomoi na biso
Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe mosika te ekómaki yombe. Na ebandeli ya bambula ya 1940, Erwin Rommel, mokonzi moko ya basoda ya Allemagne mpe limpinga na ye bazalaki pene na El Alamein, mpe basoda ya Angleterre batondaki na Alexandrie mobimba. Tobombaki biloko ya kolya mpo tokufa nzala te. Na nsima, patrɔ ya Theodotos atindaki ye akende kosala na izini ya bagato ya sika oyo afungolaki na engumba Port Taufiq, pene na Suez, mpe tokendaki. Ndeko moko ná mwasi na ye, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki babandaki koluka biso. Atako bayebaki esika tozalaki kofanfa te, babandaki kosakola ndako na ndako tii ntango bamonaki biso.
Ntango tozalaki na Port Taufiq, toyekolaki Biblia na Stavros Kypraios ná mwasi na ye Giula ná bana na bango, Totos ná Georgia, mpe bakómaki mpenza baninga na biso. Lokola Stavros azalaki kolinga koyekola Biblia mingi, azalaki kozongisa makɔnga ya bamontre nyonso ya ndako na bango ngonga moko na nsima mpo kaka biso tózanga engbunduka ya nsuka oyo tozalaki kozonga na yango mpe toumela epai na bango. Tozalaki kokoba masolo tii na butu makasi.
Tofandaki na Port Taufiq sanza 18, mpe na nsima tozongaki na Alexandrie ntango mama akómaki kobɛla. Atikalaki sembo epai na Yehova tii ntango akufaki na 1947. Mbala wana mpe, tomonaki ndenge Yehova alendisaki biso na lisalisi ya baninga baklisto oyo bakɔmɛli. Tozalaki mpe koyamba bamisionɛrɛ oyo bazalaki kokende na bateritware oyo batindi bango soki masuwa na bango etɛlɛmi na Alexandrie.
Ntango ya mpasi mpe ya esengo
Na 1952, nabotaki James, mwana na biso ya mibale. Biso baboti, tomonaki ntina ya kobɔkɔla bana na biso na esika oyo bazali kosambela Yehova, yango wana tondimaki makita esalemaka na lopango na biso mpe tozalaki mbala mingi koyamba babongisi-nzela ya ntango nyonso. John, mwana na biso ya liboso akómaki kolinga solo ya Biblia mpe ntango azalaki naino na mbula soki 15, akómaki mobongisi-nzela. Na ntango yango, azalaki mpe kotánga na mpokwa mpo asilisa kelasi.
Mwa moke na nsima, bazwaki Theodotos na maladi ya motema mpe bayebisaki ye atika mosala oyo azalaki kosala. Na ntango yango, James azalaki kaka na mbula minei. Tosengelaki kosala nini? Yehova alakaki te ete: “Bangá te, zambi ngai nazali na yo”? (Yis. 41:10) Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa mpe ya esengo ntango basɛngaki biso na 1956 tokende kosala lokola babongisi-nzela na Ismaïlia, pene na Canal de Suez! Bambula oyo elandaki, yikiyiki ezalaki makasi na Égypte, mpe bandeko bazalaki na mposa ya kolendisama.
Na 1960, tosengelaki kotika Égypte, mpe mokomoko na biso azalaki kaka na valisi moko mpamba. Tokendaki na Chypre, mboka ya mobali na ngai. Na ntango yango, Theodotos azalaki kobɛla makasi, mpe azalaki kokoka kotambola te. Kasi, ndeko moko ya boboto ná mwasi na ye bapesaki biso esika ya kofanda na lopango na bango. Likambo ya mawa, mobali na ngai akufaki mbula mibale na nsima, mpe natikalaki kaka ngai moko ná mwana na ngai James. John, oyo ayaki mpe na Chypre, abalaki mpe akómaki na libota na ye moko.
Yehova asungaki biso na ntango ya mpasi
Na nsima, Stavros Kairis ná mwasi na ye Dora bapesaki biso esika ya kofanda na ndako na bango. Natyaki mabɔlɔngɔ na nse mpe natɔndaki Yehova mpo na ndenge asungaki biso lisusu na mbala wana. (Nz. 145:16) Ntango Stavros ná Dora batɛkaki lopango na bango mpe batongaki ndako mosusu oyo ezalaki mpe na Ndako ya Bokonzi na nse, batongelaki mpe ngai ná James mwa ndako ya moke ya biteni mibale na kati ya lopango na bango.
Nsukansuka, James abalaki mpe ye ná mwasi na ye basalaki mosala ya mobongisi-nzela tii ntango babotaki mwana na bango ya liboso. Na 1974, mbula mibale nsima ya koya ya ndeko Knorr, yikiyiki makasi na makambo ya politiki ekɔtaki na Chypre.a Bato ebele, ezala mpe Batatoli, bakimaki bandako na bango mpe bakendeki kofanda bisika mosusu. John mpe azalaki na kati na bango. Akendaki na Canada elongo na mwasi na ye mpe bana na ye misato. Atako bato mingi bakendaki, tozalaki na esengo ya komona motángo ya basakoli na Chypre ezalaki se kobakisama.
Ntango nabandaki kozwa mbongo ya pansiɔ, namipesaki mobimba na mosala ya kosakola. Kasi, mwa bambula na nsima, nabɛlaki maladi ya bɔɔngo oyo ekómisaka moto paralize mpe nakendeki kofanda epai ya James. Na nsima, ntango maladi yango ekómaki makasi, nakɔtaki lopitalo mwa bapɔsɔ mpe na nsima bakɔtisaki ngai na ndako ya mibange. Atako nazalaki koyoka mpasi makasi, nazalaki kosakwela balifulume, bato ya maladi mpe baoyo bazalaki koya kotala biso. Nazalaki mpe kolekisa bangonga ebele koyekola ngai moko, mpe na lisalisi ya bandeko, nazalaki koyangana na boyekoli ya mokanda oyo ezalaki kosalema pene na esika nafandaki.
Nabɔndisami na bobange na ngai
Nabɔndisamaka ntango nayokaka nsango ya bato oyo ngai ná Theodotos tosalisaki mpo bákóma batatoli. Bana mpe bankɔnkɔ na bango mingi bazali kosala mosala ya ntango nyonso na Angleterre, na Australie, na Canada, na Grèce mpe na Suisse. Lelo oyo, mwana na ngai John, mwasi na ye mpe mwana na bango bazali kofanda na Canada. Mwana na bango ya mwasi ya liboso ná mobali na ye bazali babongisi-nzela. Linda, mwana na bango ya mwasi oyo ya leki, ná mobali na ye Joshua Snape, bakɔtaki kelasi ya Gileadi ya mbala ya 124.
Mwana na ngai James ná mwasi na ye bazali sikoyo na Allemagne. Bana na bango mibale ya mibali basalaka na Betele, moko na engumba Athènes, na Grèce mpe mosusu na engumba Selters, na Allemagne. Mwana na bango ya mobali ya leki, mwana na bango ya mwasi mpe mobali na ye bazali babongisi-nzela na Allemagne.
Tozali na masolo mingi oyo tokobɛtela mama ná mobali na ngai ya bolingo Theodotos ntango bakosekwa! Bakosepela koyeba ete batikelaki libota na bango libula malamu.b
[Maloba na nse ya lokasa]
b Ndeko mwasi Petridou akufaki na mbula 93 ntango bazalaki kobongisa lisolo oyo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
Mbala wana mpe, tomonaki ndenge Yehova alendisaki biso na lisalisi ya baninga baklisto oyo bakɔmɛli
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CHYPRE
NICOSIE
MBU YA MEDITELANE
ÉGYPTE
CAIRE
El Alamein
Alexandrie
Ismailia
Suez
Port Taufiq
Canal de Suez
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Based on NASA/Visible Earth imagery
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai ná Theodotos na 1938
[Elilingi na lokasa 25]
Mwana na ngai John ná mwasi na ye
[Elilingi na lokasa 25]
Mwana na ngai James ná mwasi na ye