“Bóya epai na ngai . . . mpe nakobɔndisa bino”
“Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu”
MOSALA ya libosoliboso oyo Yesu asalaki, ezalaki ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Malako 1:14; Luka 8:1) Lokola bayekoli ya Yesu balingaka kosala lokola ye, batalelaka mosala ya koteya nsango ya Biblia oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe ete ezali mosala oyo eleki ntina na bomoi na bango. (Luka 6:40) Batatoli ya Yehova basepelaka mingi ntango bazali komona ete nsango ya Bokonzi ezali kobɔndisa bato oyo bazali kondima yango—ndenge moko mpe esalaki ntango Yesu azalaki awa na mabele.—Matai 11:28-30.
Longola koteya Liloba ya Nzambe, Yesu azalaki mpe kosala misala mosusu ya malamu, na ndakisa kobikisa bato ya maladi mpe koleisa bato oyo bazalaki na nzala. (Matai 14:14-21) Ndenge moko mpe Batatoli ya Yehova basukaka kaka te na koteya bato Biblia, basalisaka mpe bato oyo bazali na bosɛnga. Kutu, Makomami ezali kopesa baklisto oyo nyonso ebongi “mpo na mosala nyonso ya malamu” mpe ezali kosɛnga bango ete básala epai ya “bato nyonso oyo ezali malamu.”—2 Timote 3:16, 17, NW; Bagalatia 6:10, NW.
“Bandeko na biso bayaki kosunga biso”
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1999, mabele eninganaki na ekólo Taïwan. Nsima ya mwa basanza, mbula makasi ebimisaki makama na ndenge oyo emonaná naino te na Venezuela. Na mikolo oyo euti koleka, mpela ezindisaki ekólo Mozambique. Na bamboka nyonso misato, Batatoli ya Yehova bayaki nokinoki na biloko ya kolya, mai, nkisi, bilamba, bandako ya kapo, mpe biloko ya kolambela mpo na bandeko oyo biloko na bango ebebaki. Bandeko ya bolingo malamu oyo bayebi mosala ya monganga basalaki mwa bandako mike lokola lopitalo mpo na kosalisa bandeko oyo bazokaki, mpe basali ya bolingo malamu oyo bayebi mosala ya kotonga batongaki bandako ya sika mpo na baoyo bazalaki lisusu na bandako te.
Lisalisi oyo bandeko wana bazwaki na ntango oyo ebongi mpenza esimbaki mitema na bango. Malyori, oyo ndako na ye ekweaki ntango mabele ebukanaki na Venezuela alobaki boye: “Ntango tozalaki koyeba lisusu te nini tokosala, bandeko na biso bayaki kosunga biso.” Ntango bandeko ya bolingo malamu batongelaki libota na ye ndako ya sika, Malyori alobaki ete: “Nakolɛmba te kopesa Yehova botɔndi mpo na nyonso oyo asali mpo na biso!” Ntango bandeko ya Mozambique, baoyo mpela ebebisaki biloko na bango bazwaki bafungola ya bandako ya sika oyo batongelaki bango, mbala moko bango nyonso babandaki koyemba loyembo ya Bokonzi “Yehova azali ekimelo na biso.”a
Kosalisa bandeko oyo bazalaki na bosɛnga ebɔndisaki mpe bandeko oyo bamonisaki bolingo malamu. Marcelo, oyo azalaki lifulume na kaa ya bato bakimá mboka na Mozambique alobaki boye: “Nasepelaki mingi na ndenge nakokaki kosunga bandeko oyo bayokaki mpasi mingi.” Huang, ndeko moko ya bolingo malamu na Taïwan alobaki boye: “Ezalaki esengo mingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokabola biloko ya kolya mpe bandako ya kapo na bandeko oyo bazalaki na bosɛnga. Yango elendisaki kondima na ngai.”
Ebongiseli ya kosunga oyo ezali kopesa matomba
Mosala ya bolingo malamu elendisi bankóto ya bato oyo bazali na babolɔkɔ na bisika ndenge na ndenge na mokili mobimba. Na ndenge nini? Na bambula eleki, Batatoli ya Yehova bakabolaki mikanda koleka 30 000 oyo elimbolaka Biblia epai ya bato ya bolɔkɔ na babolɔkɔ soki 4 000 na États-Unis mpamba. Lisusu, na bisika oyo bakoki kosala yango, Batatoli bakendaka na babolɔkɔ mpo na koyekola Biblia na bato ya bolɔkɔ mpe batambwisaka makita ya boklisto. Bato ya bolɔkɔ bazwaka mpe matomba?
Bato mosusu ya bolɔkɔ oyo bazali koyekola Biblia babandi koyebisa baninga na bango mateya ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobɔndisa. Yango wana, na mokili mobimba, na babolɔkɔ mingi lelo oyo ezali na bituluku ya bato oyo bazali kosambela Yehova. Na 2001, na etúká ya Oregon, na États-Unis, moko na bango alobaki boye: “Etuluku na biso ezali kokola, tozali na basakoli ya Bokonzi 7 mpe basakoli yango bazali koyekola Biblia na bato 38. Bato koleka 25 bayanganaka na lisukulu ya bato nyonso mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe bato 39 bazalaki na Ekaniseli [ya liwa ya Klisto]. Bato misato mosusu bakobatisama mosika te!”
Matomba mpe esengo
Bakonzi ya bolɔkɔ bamoni ete ebongiseli wana ya bolingo malamu ezali kobota mbuma malamu. Likambo oyo ezali kokamwisa bakonzi ya bolɔkɔ mingi ezali ete, ebongiseli wana ya bolingo malamu ezali komema litomba ya ntango molai. Lapolo moko emonisi boye: “Na mbula zomi banda ebongiseli wana ezali, ata moto moko te oyo azwaki batisimo na bolɔkɔ lokola Motatoli ya Yehova, azongaki lisusu na bolɔkɔ nsima ya kobimisa ye; nzokande, epai ya bato mosusu, baoyo bazali kozonga bazali ebele mpenza (50-60 %).” Matomba oyo mosala ya bolingo malamu ya Batatoli ezali kobimisa etindaki aumônier ya bolɔkɔ moko na Idaho aloba boye na kati ya mokanda oyo atindaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova: “Atako nandimaka bindimeli ya lingomba na bino te, ebongiseli na bino ezali kokamwisa ngai mingi.”
Mosala ya kosalisa bato oyo bazali na bolɔkɔ ezali na matomba mpo na bandeko ya bolingo malamu bango moko. Na nsima ya kotambwisa likita na etuluku ya bato ya bolɔkɔ oyo bayembaki nzembo moko ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso, ndeko moko akomaki boye: “Ezalaki likambo ya kolendisa na komona bato 28 basangisi mingongo mpo na kosanzola Yehova. Bayembaki mpe na mongongo makasi! Ezali mpenza libaku malamu ya kozala esika ya ndenge wana!” Ndeko moko oyo akendaka na babolɔkɔ ya etúká ya Arizona alobaki boye: “Tozwi mapamboli mingi na kosangana na mosala yango!”
Batatoli oyo bazali kosala mosala ya bolingo malamu na mokili mobimba bandimaka mpenza likanisi ya Yesu ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35, NW) Bandimaka mpe ete kolanda toli ya kosalela bato nyonso oyo ezali malamu ndenge Biblia epesi, ebɔndisaka mpenza.—Masese 11:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá loyembo 85 na buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 8]
Venezuela
[Elilingi na lokasa 8]
Taïwan
[Elilingi na lokasa 8]
Mozambique