Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 nk. 28-31
  • “Salaká ngalasisi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Salaká ngalasisi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Molakisi ya malamu mpenza
  • Molakisi oyo ayebi komitya na esika ya bayekoli
  • ‘Komipekisa na makambo nyonso’
  • Milende oyo ezali kosalema bisalela te
  • Lolenge nini ozali kopota na emekaneli mpo na bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • ‘Bókima mbangu na ndenge yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Okoki koyika mpiko tii na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masano ya ntango ya kala mpe ntina ya kolonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 nk. 28-31

“Salaká ngalasisi”

CITIUS, altius, fortius! Maloba wana ya Latin oyo elimboli, mbangu koleka, likoló koleka mpe makasi koleka, ezalaki komonisa mikano oyo bato ya masano na Grèce mpe na Rome na ntango ya kala bazalaki koluka kokokisa. Na boumeli ya bankama ya bambula, na bamboka Olympie, Delphes, Némée mpe na Isthme ya Corinthe, masano ezalaki kosalema mpo na “lokumu” ya banzambe mpe ebele ya bato bazalaki kokende kotala yango. Esengelaki moto asala milende na boumeli ya bambula mingi mpo andimama na masano yango. Baoyo bazalaki kolonga bazalaki kozwa lokumu, mpe mboka na bango ezalaki kozwa lokumu.

Lokola bakomi ya Makomami ya Grɛki ya boklisto bazalaki na bomoi na eleko wana, tokoki kokamwa te ete bákokanisa masano wana na momekano ya mbangu ya elimo oyo baklisto bazali na yango. Ntoma Petelo na ntoma Paulo basalelaki bandakisa oyo euti na masano wana mpo na koteya makambo ya ntina. Na mikolo na biso, baklisto bazali naino na momekano makasi ya mbangu. Baklisto ya ekeke ya liboso basengelaki koyikela ebongiseli ya makambo ya Bayuda mpiko; lelo oyo, biso tosengeli ‘komekana’ na ebongiseli ya mokili mobimba, oyo etikali moke ebomama. (2 Timote 2:5; 3:​1-5) Bamosusu bakoki komona ete “momekano ya mbangu mpo na kondima” oyo bazali kosala ezali kosila te mpe ezali kolɛmbisa bango. (1 Timote 6:​12, The New English Bible) Soki totaleli ndenge Biblia ekokanisi mwa makambo mosusu ya masano ya kala mpe momekano ya mbangu ya baklisto, tokoki kozwa ebele ya mateya ya ntina.

Molakisi ya malamu mpenza

Molakisi azalaka na mokumba monene mpo na kosalisa moto ya masano alonga. Buku moko (Archaeologia Graeca) elobeli masano ya kala boye: “Baoyo bazalaki komekana basengelaki kolapa ndai ete basalaki ngalasisi na boumeli ya sanza zomi mobimba mpo na komibongisa.” Baklisto mpe basengeli kosala ngalasisi makasi. Paulo apesaki Timote, oyo azalaki nkulutu, toli ete: “Salaká ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (1 Timote 4:⁠7) Nani azali molakisi ya baklisto, oyo bazali lokola bato ya masano? Ezali Yehova Nzambe ye moko! Ntoma Petelo akomaki boye: “Nzambe ya boboto monene nyonso . . . akosilisa ye moko kobongisama na bino, akokómisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.”​—⁠1 Petelo 5:⁠10.

Buku moko (Theological Lexicon of the New Testament) emonisi ete maloba ‘akosilisa kobongisama na bino’ euti na verbe moko ya Grɛki oyo elimboli mpenzampenza “kosala ete eloko moko [to moto moko] ebonga na mosala oyo bakosalela yango, kobongisa yango mpe koyokanisa yango na mosala na yango.” Ndenge moko mpe, na buku na bango (Greek-English Lexicon), Liddell na Scott balobi ete verbe yango ekoki mpe kozala na ndimbola ya “kobongisa, kosalisa ngalasisi to mpe kopesa nyonso oyo esengeli.” Biso baklisto, ndenge nini Yehova ‘abongisaka biso, asalisaka biso ngalasisi, to mpe apesaka biso nyonso oyo esengeli’ mpo tópota mbangu oyo ezali kosɛnga molende? Mpo tósimba malamu bokokanisi yango, tiká tótalela mwa mayele oyo balakisi bazalaki kosalela.

Buku moko (The Olympic Games in Ancient Greece) elobi boye: “Baoyo bazalaki kolakisa bilenge bazalaki kosalela ndenge mibale ya kosala yango: ya liboso bazalaki kolendisa bayekoli bábimisa makasi na bango nyonso mpo bákoka kozwa mbuma ya malamu, mpe ya mibale bazalaki kolakisa bango ndenge bakoki kobakisa makoki na bango ya kosala lisano na bango.”

Ndenge moko mpe, Yehova alendisaka biso mpe apesaka biso makasi mpo tósalela makoki na biso nyonso mpe tóbakisa mayele na biso na mosala na ye. Nzambe apesaka biso makasi na nzela ya Biblia, na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabele mpe na nzela ya baninga baklisto oyo bakɔmeli. Apesaka biso mpe disipilini mpo na kobongisa biso. (Baebele 12:⁠6) Na bantango mosusu, akoki kotika biso tómekama mpe bampasi ya ndenge na ndenge ekómela biso mpo tókoka kokolisa ezaleli ya koyika mpiko. (Yakobo 1:​2-4) Apesaka mpe makasi oyo esengeli. Mosakoli Yisaya alobaki boye: “Baoyo [bazali kotya elikya epai ya Yehova, NW] bakozwa nguya ya sika, bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”​—⁠Yisaya 40:⁠31.

Nzambe apesaka biso mingimingi elimo santu na ye, yango epesaka biso makasi mpo tótika te kosalela ye mosala oyo akondima. (Luka 11:13) Mbala mingi basaleli ya Nzambe bayikaki mpiko ntango kondima na bango emekamaki makasi mpe na boumeli ya ntango molai. Baoyo basalaki yango bazali basi mpe mibali lokola biso. Kasi, soki bayikaki mpiko, ezali mpo bazalaki kotyela Nzambe motema mobimba. Ya solo, ‘nguya oyo eleki makasi ezali ya Nzambe kasi te oyo euti na bango moko.’​—⁠2 Bakolinti 4:⁠7.

Molakisi oyo ayebi komitya na esika ya bayekoli

Moto moko ya mayele alobi ete na ntango ya kala, molakisi azalaki mpe “koluka koyeba soki moto mokomoko ya masano mpe lisano mokomoko esengelaki na ngalasisi nini mpe mbala boni asengelaki kosala ngalasisi yango.” Ntango Nzambe azali kobongisa biso, atalelaka makoki ya moto na moto, bomoto na ye mpe bolɛmbu na ye. Ntango Yehova azali kobongisa biso, mbala na mbala tobondelaka ye ndenge Yobo abondelaki ye, ete: “Nalɔmbi yo okanisa ete osali ngai na mabele.” (Yobo 10:⁠9) Lokola molakisi na biso ayebi komitya na esika na biso, asalaka nini? Davidi akomaki mpo na Yehova ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.”​—⁠Nzembo 103:⁠14.

Okoki kozala na maladi moko makasi oyo ezali kopesa yo nzela te osakola ndenge olingi, to mpe ekoki kozala ete omimonaka ete ozali na ntina moko te. Ntango mosusu ozali kosala makasi mpo na kotika ezaleli moko ya mabe, to mpe ekoki kozala ete ozali kokoka te koboya kolanda makambo ya baninga na kartye, baninga ya mosala to baninga ya kelasi. Ezala makambo ya ndenge nini oyo ozali kokutana na yango, kobosana ata mokolo moko te ete Yehova ayebi mikakatano na yo malamu koleka moto nyonso, ata yo moko! Lokola amibanzabanzaka mpo na bato oyo ye azali kolakisa, azali ntango nyonso wana mpo na kosalisa yo soki opusani penepene na ye.​—⁠Yakobo 4:⁠8.

Na ntango ya kala, balakisi “bazalaki koyeba kokesenisa bolɛmbu oyo euti na ngalasisi na oyo euti na makambo mosusu, lokola makanisi, mawa, kotungisama na makanisi to makambo mosusu ya lolenge wana. . . . [Balakisi] bazalaki mpenza lokola bakonzi na boye ete bazalaki ata kolandela makambo oyo bato ya masano bazalaki kosala na bandako na bango mpe soki bamoni ete esengeli kosalisa bango na makambo mosusu, bazalaki kosala yango.”

Na bantango mosusu, omonaka ete mitungisi ya mokili oyo mpe masɛnginya na yango ezali kolɛmbisa yo? Yehova, molakisi na yo, azali mpenza komibanzabanza mpo na yo. (1 Petelo 5:⁠7) Asosolaka mbala moko likambo nyonso oyo ezali komonisa ete olɛmbi na elimo. Atako Yehova atikelaka biso bonsomi ya kopona, asalisaka biso mingi mpe azongisaka biso na nzela soki esengeli, mpamba te amibanzabanzaka mpo na bolamu na biso ya seko. (Yisaya 30:21) Asalaka yango ndenge nini? Na nzela ya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, bankulutu ya lisangá mpe bandeko na biso ya bolingo.

‘Komipekisa na makambo nyonso’

Mpo na kolonga, esengelaki kaka te ete moto azala na molakisi ya malamu. Moto ya masano ye moko mpe lolenge oyo azalaki komipesa na bangalasisi ezalaki mpenza na ntina mingi. Kobongisama ezalaki likambo ya lisɛki te, mpamba te ezalaki mpe kosɛnga na moto ya masano ete na mikolo wana nyonso asangisaka nzoto te, amɛlaka masanga te mpe aboya bilei mosusu oyo ebongi te. Horace, mokomi ya maloba ya ntɔki oyo azalaki na bomoi na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.), alobaki ete bato oyo bazalaki komekana “bazalaki koboya kosangisa nzoto na basi mpe komɛla vinyo [mpo na] kokokisa mokano na bango.” Frederic Cook, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, alobi ete bato ya masano basengelaki koyekola “komipekisa [mpe] kopona biloko ya kolya . . . na boumeli ya sanza zomi.”

Paulo asalelaki makanisi ya ndenge wana na mokanda na ye epai ya Kolinti, bato oyo bayebaki malamu masano oyo ezalaki kosalema mosika te na engumba na bango (jeux isthmiques); akomaki ete: “Moto nyonso oyo azali kosangana na momekano moko amipekisaka na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 9:25) Baklisto ya solo baboyaka konduka biloko mpe komipesa na misala ya mbindo ya mokili. (Baefese 5:​3-5; 1 Yoane 2:​15-17) Basengeli mpe kolongola bizaleli mabe oyo Nzambe apekisi na kati ya Makomami mpe, na esika na yango, basengeli kokolisa bizaleli oyo Klisto azalaki na yango.​—⁠Bakolose 3:​9, 10, 12.

Ndenge nini bakoki kosala yango? Yoká ndakisa ebongi mpenza oyo Paulo asalelaki mpo na kopesa eyano: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai makofi mpe kokómisa yango lokola moombo, mpo, nsima ya kosakola epai ya bamosusu, ngai moko naboyama te ezala na ndenge nini.”​—⁠1 Bakolinti 9:⁠27.

Paulo amonisaki mpenza likanisi ya ntina! Alingaki te koloba ete moto asengeli konyokola nzoto na ye. Kasi, amonisaki ete etumba moko ezalaki kosalema na kati na ye. Na bantango mosusu, azalaki kosala makambo oyo akanaki te mpe azalaki kosala te makambo oyo azalaki kolinga kosala. Kasi azalaki kobunda mpo ete bolɛmbu na ye elonga ye soki moke te. ‘Azalaki kobɛtabɛta nzoto na ye,’ elingi koloba ete azalaki kosala makasi mpo na kolonga bamposa mabe ya nzoto mpe bizaleli mabe.​—⁠Baloma 7:​21-25.

Baklisto nyonso basengeli mpe kosala ndenge yango. Paulo alobelaki mbongwana oyo baklisto mosusu ya Kolinti basalaki; liboso bazalaki kosala pite, kosambela bikeko, kosangisa nzoto mibali na mibali, koyiba, mpe bongo na bongo. Nini esalisaki bango mpo na kobongwana? Ezali nde nguya ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu, bakisa mpe mokano makasi ya kotosa nguya yango. Paulo alobaki ete: “Bosili kosukolama pɛɛ, kasi bosili kosantisama, kasi bosili kotángama bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe na elimo ya Nzambe na biso.” (1 Bakolinti 6:​9-11) Ndenge moko mpe, Petelo akomaki mpo na baoyo batikaki bizaleli mabe motindo wana. Baklisto nyonso wana babongwanaki mpenza.​—⁠1 Petelo 4:​3, 4.

Milende oyo ezali kosalema bisalela te

Paulo asalelaki ndakisa moko mpo na komonisa ete azalaki kotya makanisi na ye nyonso na mikano ya elimo oyo azalaki kolanda, alobaki boye: “Ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te.” (1 Bakolinti 9:26) Ndenge nini moto oyo azalaki kosala lisano ya makofi azalaki kotinda makofi na ye? Buku moko (The Life of the Greeks and Romans) epesi eyano oyo: “Esengelaki kozala na makasi mpenza, kasi esengelaki lisusu kotala malamu mpo na komona bisika oyo moto oyo ozali kobunda na ye azali na bolɛmbu. Ndenge ya malamu ya kobɛta makofi oyo bazalaki koyekola na biteyelo ya masano ya kobunda, ezalaki mpe na ntina; bakisa mpe koyeba kolonga mbala moko moto oyo ozali kobunda na ye.”

Nzoto na biso oyo ezangi kokoka ezali moko na banguna na biso. Toyebi ‘bisika oyo biso tozalaka na bolɛmbu’? Tondimaka komitala ndenge oyo basusu batalaka biso, mingimingi ndenge oyo Satana akoki ntango mosusu kotala biso? Yango esɛngi komitalela na bosembo mpenza mpe kozala na mokano ya kobongwana. Ezalaka mpenza pɛtɛɛ mpo moto amikosa. (Yakobo 1:22) Ezalaka mpe mpasi te koluka komonisa ete makambo na biso ya mabe ezali malamu! (1 Samwele 15:​13-15, 20, 21) Kosala bongo ekokani na “kobɛta mopɛpɛ.”

Na mikolo ya nsuka oyo, baoyo balingi kosepelisa Yehova mpe kozwa bomoi basengeli kokakatana te mpo na kopona kati na malamu na mabe, kati na lisangá ya Nzambe na mokili oyo esili kobeba. Basengeli kokakatana te, to kozala te ‘na mitema mibale mpe kozanga kopikama na kati ya banzela na bango nyonso.’ (Yakobo 1:⁠8) Basengeli te kobebisa milende na bango na kolukáká makambo ya mpambampamba. Soki moto alandi bomoi ya motindo wana oyo ezangi mindɔndɔ mpe oyo ezali na mokano, akozala na esengo mpe ‘bokoli na ye ekomonana polele na miso ya bato nyonso.’​—⁠1 Timote 4:⁠15.

Momekano ya mbangu ezali se kokoba mpo na baklisto. Yehova, Molakisi na biso Monene azali komonisa bolingo na ye na ndenge azali kopesa biso mateya mpe lisalisi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko mpe kozwa bolongi ya nsuka. (Yisaya 48:17) Ndenge moko na bato ya masano na ntango ya kala, tosengeli komipesa disipilini, komipekisa mpe kotya makanisi na biso nyonso na etumba oyo tozali kobunda mpo na kondima. Tokozwa mbano monene mpo na milende oyo tozali kosala bisalela te.​—⁠Baebele 11:⁠6.

[Etanda na lokasa 31]

‘Bópakola ye mafuta’

Na ekólo Grèce ya kala, na kati ya baoyo bazalaki kobongisa bato ya masano ezalaki mpe na moto oyo azalaki kopakola bango mafuta. Mosala na ye ezalaki ya kopakola bato ya masano mafuta ntango balingi kobanda kosala ngalasisi. Buku moko (The Olympic Games in Ancient Greece) elobi boye: “[Balakisi] bamonaki ete soki banyolisi malamu nzoto ya moto ya masano na mafuta liboso abanda kosala ngalasisi, ezalaki kobota mbuma ya malamu; bamonaki mpe ete soki moto oyo auti kosilisa ngalasisi oyo asali ntango molai banyolisi ye nzoto na mafuta, yango ezalaki kokitisa mokemoke mpasi oyo azalaki koyoka tii mpasi nyonso ezalaki kosila mpe azalaki kozonga nzoto makasi.”

Kopakola moto mafuta ekoki kokitisa mpasi na ye mpe kopesa ye lisusu makasi; ndenge moko mpe, kosalela Liloba ya Nzambe epai ya moklisto oyo alɛmbi, ekoki kozongisa ye na nzela, kobɔndisa ye mpe kopesa ye lisusu makasi. Yango wana, Yehova azali kotambwisa bankulutu mpe kolendisa bango bábondela mpo na moto ya ndenge wana, na maloba ya elilingi ‘bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova’; yango ezali lolenge ya malamu mpenza ya kosalisa ye azwa lisusu makasi na elimo.​—⁠Yakobo 5:​13-15; Nzembo 141:⁠5.

[Elilingi na lokasa 31]

Nsima ya kopesa mbeka, bato ya masano bazalaki kolapa ndai ete basalaki ngalasisi na boumeli ya sanza zomi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musée du Louvre, Paris

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Copyright British Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto