Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/12 nk. 24-28
  • Mboka batindaki biso Bamisionɛrɛ ekómi mboka na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mboka batindaki biso Bamisionɛrɛ ekómi mboka na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolɔkɔ mpe epekiseli
  • Nabali mosakoli moko ya molende
  • Tokei mboka mopaya
  • Eyano na mabondeli na biso
  • Tosepeli na mboka oyo batindaki biso
  • Nakoli elongo na lisanga ya Jéhovah na Afrique du Sud
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tosalaki elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nalekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/12 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Mboka batindaki biso Bamisionɛrɛ ekómi mboka na biso

YA DICK WALDRON

Ezalaki mokolo ya lomingo nsima ya midi, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1953. Tozalaki naino bato ya sika na ekólo Sud-Ouest africain (lelo Namibie). Tokokisaki naino ata pɔsɔ moko te na ekólo yango mpe tozalaki komilɛngɛla mpo na kosala likita ya bato nyonso na Windhoek, mboka-mokonzi ya ekólo yango. Nini etindaki biso tótika Australie tóya na ekólo yango ya Afrika? Ngai na mwasi na ngai, elongo na baseka misato, toyaki kosala mosala ya misionɛrɛ ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—⁠Matai 24:⁠14.

NABOTAMAKI na Australie, ekólo oyo ezali mpenza na nsuka ya mokili, na 1914, mbula moko ya makambo. Nazalaki elenge na ntango oyo nkita ya mokili mobimba ekweaki mpenza, mpe nasengelaki kopesa mabɔkɔ mpo na kolukela libota na biso eloko ya kolya. Misala ezalaki te, kasi nazalaki kosalela mayele moko ya koboma basimbiliki, oyo ezalaki ebele mpenza na Australie. Na bongo, na biloko oyo nazalaki komema na ndako na biso, simbiliki ezalaki kozanga te.

Na 1939, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, nazwaki mosala na kompanyi ya babisi ya engumba Melbourne. Tozalaki mibali soki 700 oyo tozalaki kosala na babisi, bato na bato na ngala na bango, mpe na mbala nyonso nazalaki kosala na sofɛlɛ mosusu. Mbala mingi nazalaki kotuna bango ete: “Ozali moto ya lingomba nini?” mpe nazalaki kotuna bango bálimbwela ngai bindimeli ya lingomba na bango. Moto moko kaka nde apesaki ngai biyano ya malamu; azalaki Motatoli ya Yehova. Amonisaki ngai nsango ya paladiso oyo Biblia emonisi ete ekozala awa na mabele, esika bato oyo babangaka Nzambe bakofanda libela na libela.​—⁠Nzembo 37:⁠29.

Kaka na ntango yango, mama na ngai mpe akómaki kosolola na Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, soki nasali na butu, ntango nakozonga na ndako, nazalaki kokuta atyeli ngai biloko ya kolya na zulunalo Consolation (lelo Lamuká!). Makambo oyo nazalaki kotánga na kati ezalaki kosepelisa ngai mingi. Nsukansuka, namonaki ete ezali mpenza lingomba ya solo; nakómaki kosangana na bango mpe nazwaki batisimo na sanza ya Mai 1940.

Na Melbourne, ezalaki na ndako moko mpo na babongisi-nzela, epai Batatoli ya Yehova soki 25 oyo bazalaki kosala mosala ya ntango nyonso bazalaki kofanda. Nakendaki kofanda na bango. Mokolo na mokolo nazalaki koyoka masolo oyo bazalaki kobɛta ya makambo kitoko oyo bazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola, mpe nakómaki na mposa ya kozala lokola bango. Nsukansuka, natondisaki lokasa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela. Bandimaki ngai na mosala yango mpe babengaki ngai nakende kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Australie. Na ndenge yango, nakɔtaki na Betele.

Bolɔkɔ mpe epekiseli

Moko ya misala oyo nazalaki kosala na Betele ezalaki ya kotambwisa masini ya kokata nzete. Kuna tozalaki kokata nzete mpo na kosala na yango makala oyo bazalaki kosalela lokola esansi mpo na mituka ya filiale, mpamba te esansi ekómaki mpasi mpo na bitumba. Tozalaki bato 12 oyo tozalaki kosala na masini ya kokata nzete mpe biso nyonso tokokisaki bambula oyo mibeko ezalaki kosɛnga mpo bákɔtisa biso na mosala ya soda na makasi. Mosika te, bakatelaki biso etumbu ya sanza motoba ya bolɔkɔ mpo toboyaki kokɔta na mosala ya soda mpo na kotosa oyo Biblia ezali koloba. (Yisaya 2:⁠4) Batindaki biso na ferme moko ya bato ya bolɔkɔ epai tosengelaki kosala misala ya makasi. Mosala nini bapesaki biso kuna? Likambo ya kokamwa, tosengelaki kokata nzete, kaka mosala oyo toyekolaki mpenza na Betele!

Lokola tozalaki kosala mosala yango malamu mpenza, mokonzi ya bolɔkɔ apesaki biso Biblia moko na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia atako bapekisaki kopesa biso biloko ya ndenge wana. Ezalaki na ntango wana nde nayekolaki liteya moko ya ntina mingi na oyo etali lolenge ya kofanda na bato. Ntango nazalaki kosala na Betele, ezalaki na ndeko moko oyo nazalaki koyokana na ye ata moke te. Bizaleli na biso ekesanaki mpenza. Bongo boyebi nani batyaki ngai na ye esika moko na bolɔkɔ? Kaka ndeko yango. Tozwaki sikoyo ntango ya koyebana malamumalamu, mpe nsukansuka tokómaki mpenza baninga ya motema mpe ya libela.

Nsima ya mikolo, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Australie. Babɔtɔlaki mbongo na bango nyonso, mpe bandeko ya Betele bazalaki lisusu na mbongo mingi te. Mokolo moko, ndeko moko ya Betele ayaki epai na ngai mpe ayebisaki ngai boye: “Dick, nalingi kokende kosakola na vile, kasi nazali na sapato ya kolata te; nazali kaka na sapato ya mosala.” Nazalaki na esengo mingi ya kosalisa ye, mpe akendeki na vile na sapato na ngai.

Mwa moke na nsima, toyokaki ete bakangi ye mpe batii ye na bolɔkɔ mpo azalaki kosakola. Mbala moko, natindelaki ye mwa mokanda oyo ezalaki na maloba oyo: “Likambo oyo ekómeli yo epesi ngai mawa mingi. Nasepeli kaka mpo ngai te moto nazalaki na kati ya sapato na ngai.” Kasi mosika te, ngai mpe bakangaki ngai mpe batyaki ngai na bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale, mpamba te nazalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki. Ntango nabimaki na bolɔkɔ, batindaki ngai nakende kosala na ferme oyo ezalaki koleisa libota ya Betele. Na ntango wana, tozwaki elonga na tribinale, mpe balongolaki epekiseli na misala ya Batatoli ya Yehova.

Nabali mosakoli moko ya molende

Ntango nazalaki na ferme, nabandaki kokanisa ete nasengeli kobala mpe nakómaki kosepela na Coralie Clogan, elenge mwasi oyo azalaki mobongisi-nzela. Nkɔkɔ ya Coralie ya mwasi azalaki moto ya liboso na libota na bango oyo asepelaki na nsango ya Biblia. Liboso ete akufa, alobaki na Vera, mama ya Coralie ete: “Bɔkɔlá bana na yo na ndenge ete bálinga Nzambe mpe básalela ye, mpe mokolo mosusu tokokutana na Paladiso awa na mabele.” Na nsima, ntango mobongisi-nzela moko ayaki na ndako ya Vera na mwa buku Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te (na Lingelesi), Vera abandaki sikoyo kokanga ntina ya maloba yango. Mwa buku yango endimisaki ye ete mokano ya Nzambe mpo na bato ezali ete bázala na bomoi na paladiso awa na mabele. (Emoniseli 21:⁠4) Azwaki batisimo na ebandeli ya bambula ya 1930, mpe kaka ndenge mama na ye alendisaki ye, asalisaki bana na ye misato ya basi​—⁠Lucy, Jean, mpe Coralie​—⁠bálinga Nzambe. Kasi, tata ya Coralie azalaki kosepela ata moke te na ndenge libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya losambo, se ndenge Yesu alobaki ete ekoki kosalema na kati ya mabota.​—⁠Matai 10:​34-36.

Libota ya Clogan mobimba bayebaki mpenza miziki, mpe mwana mokomoko ayebaki kosalela ebɛteli moko ya miziki. Coralie ayebaki kobɛta violon, mpe na mobu 1939, ntango azalaki na mbula 15, bapesaki ye diplome ya miziki. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, Coralie akómaki kokanisa avenire na ye mingi. Ntango ekokaki mpo na kozwa ekateli na ndenge oyo akotambwisa bomoi na ye. Epai mosusu, azalaki na likoki ya komipesa na mosala ya miziki bomoi na ye mobimba. Kutu, basilaki kobenga ye mpo akende kobɛtaka na orkestre moko ya Melbourne. Epai mosusu, azalaki mpe na likoki ya komipesa na mosala monene ya kosakola nsango ya Bokonzi. Nsima ya kokanisa malamumalamu, Coralie na bayaya na ye mibale ya basi bazwaki batisimo na 1940 mpe bamibongisaki mpo na kobanda mosala ya ntango nyonso ya kosakola nsango malamu.

Coralie aumelaki naino te na mosala ya ntango nyonso ntango akutanaki na Lloyd Barry, ndeko moko oyo azalaki na mikumba minene na filiale ya Australie mpe na nsima akɔtaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya lisukulu moko oyo asalaki na Melbourne, ndeko yango alobaki na Coralie boye: “Nazali kozonga na Betele. Okosepela te kozwa engbunduka elongo na ngai mpo okende kosala na Betele?” Andimaki na motema moko.

Coralie na bandeko mosusu ya basi ya libota ya Betele basalaki mosala monene mpo bandeko ya Australie bázwaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na boumeli ya epekiseli oyo ezalaki na ntango ya etumba. Mingimingi bango nde bato bazalaki konyata mikanda, mpe Ndeko Malcolm Vale nde azalaki kokamba bango. Bazalaki konyata mpe kokangisa buku Mokili ya sika mpe buku Bana (na Lingelesi); lisusu, ata nimero moko te ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezangaki kobima na ntango wana ya epekiseli oyo eumelaki mbula koleka mibale.

Mbala soki 15, esengelaki kokende na masini ya konyata mikanda na bisika ndenge na ndenge mpo na kokima bapolisi. Mbala moko, tokómaki konyata mikanda oyo elimbolaka Biblia na eteni ya ndako moko ya nse ya mabele epai bazalaki konyata mikanda mosusu, mpo bato báyeba mpenza te mosala oyo ezalaki kosalema kuna. Ndeko mwasi oyo azalaki na esika ya koyamba bato azalaki kofina butɔ moko mpo na kolelisa ngonga moko oyo ezalaki kuna na nse mpo na koyebisa ete likama ezali koya, mpo bandeko basi oyo bazali kuna bábomba mikanda liboso ete moto moko akóma kuna mpo na koluka koyeba nini bazali kosala.

Mokolo moko, ntango polisi moko ayaki koluka koyeba nini bazalaki kosala wana, bandeko basi mosusu babangaki makasi ntango bamonaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elalaki likoló ya mesa, esika oyo moto nyonso akoki komona yango. Polisi yango akɔtaki, alalisaki sakosi na ye kaka likoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango, mpe abandaki kolukaluka. Lokola amonaki eloko te, alɔkɔtaki sakosi na ye mpe abimaki!

Ntango balongolaki epekiseli mpe bazongiselaki bandeko lopango ya filiale, filiale epesaki bandeko mingi kati na bango libaku ya kokende kosakola na teritware lokola babongisi-nzela monene. Ezalaki na ntango wana nde Coralie asɛngaki ete bátinda ye na engumba Glen Innes. Nalandaki ye kuna ntango tobalanaki na mokolo ya 1 Yanuali 1948. Ntango tolongwaki na teritware yango, totikaki lisangá moko oyo ezalaki kokola malamu.

Na nsima batindaki biso na Rockhampton, kasi tozwaki ndako ya kolala na engumba yango te. Yango wana totɛlɛmisaki ndako na biso ya kapo na ferme ya moto moko oyo azalaki kosepela na solo. Tofandaki na ndako wana ya kapo na boumeli ya sanza libwa oyo elandaki. Tokokaki koumela wana lisusu, kasi ntango tokómaki na eleko ya mbula, mopɛpɛ moko ya makasi ebebisaki ndako yango, mpe mbula ya monene etiyolisaki yango.a

Tokei mboka mopaya

Ntango tozalaki na Rockhampton, babengaki biso na kelasi ya mbala ya 19 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia oyo ebongisaka bandeko mpo na mosala ya misionɛrɛ. Ezali na lolenge wana nde na 1952, nsima ya kozwa badiplome na biso, batindaki biso na ekólo oyo bazalaki kobenga na ntango wana Sud-Ouest africain.

Mosika te, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo balakisaki polele ete bazali koyina mosala na biso. Mikolo nyonso ya lomingo, na boumeli ya pɔsɔ motoba mobimba, bazalaki koyebisa bandimi na bango na kati ya bandako-nzambe na bango ete bákeba na biso. Bazalaki koyebisa bato ete báyamba biso na bandako na bango te mpe bándima te ete tótángela bango Biblia, mpo yango ekobulunganisa makanisi na bango. Na etúká moko, tokabolaki mikanda ebele, kasi sango alekaki na bandako nyonso na nsima na biso mpe akɔngɔlaki mikanda yango nyonso. Mokolo moko tosololaki na ye na biro na ye mpe tomonaki ete azalaki na mikanda na biso ebele.

Mwa moke na nsima, bakonzi ya mboka babandaki mpe komitungisa mpo na mosala na biso. Na ntembe te, bakonzi ya mangomba batindaki bango bábanda kokanisela biso mabe ete tozali kosala mpo na Bakoministe. Yango wana, bazwaki bilembo ya misapi na biso, mpe basambisaki bato mosusu oyo tosololaki na bango. Atako bazalaki kotɛmɛla biso ndenge wana, bato bazalaki koya se ebele na makita na biso.

Ntango kaka tokómaki na mboka yango, tozalaki na mposa makasi ya kosakola nsango ya Biblia epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Ovambo, Herero, mpe Nama. Kasi, ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Na mikolo wana, Sud-Ouest africain ekómaki koyangelama na guvɛrnɛma ya Afrika ya Sudi oyo ezalaki kopekisa boyokani na kati ya bato oyo bakeseni mposo. Lokola tozalaki mindele, tozalaki na ndingisa te ya kosakola na bakartye ya bato moindo soki guvɛrnɛma epesi biso nzela te. Tokomaki mikanda mbala na mbala mpo na kosɛnga ndingisa yango, kasi bakonzi bazalaki kaka koboya.

Nsima ya mbula mibale na mboka mopaya, likambo moko ya mbalakaka ekómelaki biso. Coralie azwaki zemi. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1955, Charlotte, mwana na biso ya mwasi abotamaki. Atako tokokaki lisusu kosala mosala ya misionɛrɛ te, nazwaki mosala moko oyo nazalaki kosala kaka ndambo ya mokolo mpe nakobaki kosala lokola mobongisi-nzela mpo na mwa ntango.

Eyano na mabondeli na biso

Na 1960 tokutanaki na mokakatano mosusu. Batindelaki Coralie mokanda ete mama na ye azali kobɛla makasi mpenza mpe soki Coralie akei nokinoki te, ntango mosusu akomona mama na ye lisusu te. Na yango, tobongisaki mobembo na biso mpo na kolongwa na Sud-Ouest africain mpe kozonga na Australie. Kasi likambo moko esalemaki: kaka na pɔsɔ oyo tokanaki kokende, bakonzi ya mboka bapesaki ngai ndingisa ya kokɔta na Katutura, kartye moko ya bato moindo. Tosengelaki kosala nini sikoyo? Tózongisa ndingisa yango oyo tomonelaki mpasi mbula nsambo mobimba? Tokokaki koloba ete bato mosusu bakoya kokoba mosala oyo biso tobandaki. Kasi ndingisa yango ezalaki lipamboli ya Yehova, eyano na mabondeli na biso, boye te?

Nazwaki ekateli mbala moko. Nasengelaki kotikala, mpamba te soki biso nyonso tokei na Australie, mpasi oyo tomonaki mpo na kozwa mikanda ya kofanda libela na mboka wana ekoya kokende na mai mpamba. Mokolo oyo elandaki, nakendeki koyebisa bato ya masuwa bálongola nkombo na ngai na molɔngɔ ya bato oyo balingaki kosala mobembo mpe natindaki Coralie na Charlotte na konje ya molai na Australie.

Ntango bango bazalaki kuna, ngai nabandaki kosakola na kartye ya bato moindo. Bato basepelaki mpenza na solo. Ntango Coralie na Charlotte bazongaki, bakutaki bato mingi ya kartye ya bato moindo bazali koyangana na makita na biso.

Na ntango yango, nazalaki na motuka moko ya kala oyo ezalaki kosalisa ngai namema bato oyo bazalaki kosepela na solo na makita. Na likita mokomoko, nazalaki kokende kozwa bandeko mpe kozonga mbala minei to mitano mpe, na mbala mokomoko nazalaki komema bato nsambo, mwambe to libwa. Ntango moto ya nsuka azalaki kokita, Coralie azalaki kotuna ngai na ndenge ya lisɛki ete: “Ozali lisusu na bato boni na nse ya kiti?”

Mpo tósala mosala ya kosakola malamu, esengelaki tózala na mikanda oyo ekomami na monɔkɔ ya bato ya ekólo yango. Na bongo, nazalaki na libaku malamu ya kosala ete trakte Bomoi kati na mokili ya sika ebongolama na minɔkɔ minei ya ekólo yango: Herero, Nama, Ndonga, mpe Kwanyama. Bato oyo tozalaki koyekola na bango Biblia oyo batángá mingi nde bazalaki kobongola mikanda yango, kasi nazalaki kosala elongo na bango mpo na kotala ete fraze mokomoko ebongolama malamu. Nama ezali monɔkɔ moko oyo ezali na maloba mingi te. Na ndakisa, nazalaki komeka kolimbola maloba oyo: “Na ebandeli Adama azalaki moto ya kokoka.” Mobongoli amikwanzaki motó mpe alobaki ete abosanaki ndenge balobaka “kokoka” na monɔkɔ ya Nama. Nsukansuka, alobaki: “Nazwi yango. Na ebandeli, Adama azalaki lokola manga oyo ekɔmelá.”

Tosepeli na mboka oyo batindaki biso

Mbula soki 49 esili koleka banda tokómaki mbala ya liboso na ekólo oyo, lelo babengaka yango Namibie. Ntina ya kozwa naino ndingisa liboso ya kokɔta na bakartye ya bato moindo ezalaka lisusu te. Namibie ezali sikoyo kotambwisama na guvɛrnɛma ya sika, oyo mobeko-mama na yango etalelaka loposo ya bato te. Lelo oyo, na Windhoek, tozali na masangá minei ya minene, oyo eyanganaka na Bandako ya Bokonzi ya kitoko.

Mbala mingi tokanisaka maloba oyo toyokaki na Gileadi: “Bókómisa mboka oyo batindi bino mboka na bino mpenza.” Soki totali ndenge Yehova atambwisi makambo, tondimaka ete ezalaki mpenza mokano na ye ete mboka oyo ekóma mpenza mboka na biso. Tokómá kolinga bandeko makasi, na ebele ya mimeseno ya bonkɔkɔ na bango. Ntango bazalaki na esengo, tosɛkaki na bango mpe ntango bazalaki na mawa, tolelaki na bango. Basusu kati na bato ya sika oyo tozalaki kotondisa na motuka mpo na komema bango na makita, bakómá lelo oyo bato oyo basimbi masangá na bango. Na 1953, ntango tokómaki sika na ekólo monene oyo, bana-mboka oyo bazalaki basakoli ya nsango malamu bakómaki ata zomi te. Kobanda na mwa bato moke wana, tokómi sikoyo basakoli koleka 1 200. Kaka ndenge alakaki yango, Yehova asali ete bokoli emonana na esika oyo biso mpe basusu ‘tolonaki mpe tomwangisaki mai.’​—⁠1 Bakolinti 3:⁠6.

Soki tokanisi bambula ebele ya mosala na biso, oyo tobandaki na Australie mpe oyo tozali kosala sikoyo na Namibie, ngai na Coralie totondaka mpenza na esengo na motema. Tozali na elikya ete Yehova akokoba kopesa biso makasi ya kosala mokano na ye sikoyo mpe libela na libela, mpe tobondelaka mpo na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1952, nkasa 707-708 (na Lingelesi) ezali na lisolo moko ya kitoko oyo, atako batángi nkombo na bango te, elobeli ndenge Waldron na mwasi na ye bayikaki mpiko na teritware wana ya mpasi epai batindaki bango.

[Elilingi na lokasa 26]

Tozali kokende na Rockhampton, na Australie, epai batindaki biso

[Elilingi na lokasa 27]

Na libongo, tozali kokende na Eteyelo ya Gileadi

[Elilingi na lokasa 28]

Mosala ya kosakola na Namibie epesaka biso esengo mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto