Kokaba oyo esepelisaka Nzambe
YESU ná bayekoli na ye ná baninga na bango mosusu lokola Malia, Malata mpe Lazalo oyo Yesu autaki kosekwisa, bazalaki kolya esika moko na mboka Betania. Ntango Malia azwaki mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi mpe apakolaki Yesu na makolo, Yuda Mokeliota amonisaki polele ete ye asepelaki te. Alobaki boye: “Mpo na nini mafuta oyo ya nsolo kitoko etɛkamaki te na badenali nkama misato [mbongo oyo moto ya mosala akoki kozwa na mbula mobimba] mpe kopesama na babola?” Bayekoli mosusu mpe babimisaki makanisi ya ndenge yango.—Yoane 12:1-6; Malako 14:3-5.
Kasi, Yesu alobaki ete: “Bótika ye. . . . Mpo ntango nyonso bozali elongo na babola, mpe na ntango nyonso oyo bolingi bokoki kosalela bango malamu, kasi ngai bozali na ngai ntango nyonso te.” (Malako 14:6-9) Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki koteya ete kofungolela babola lobɔkɔ ezali likambo ya malamu, mpe yango ekoki kolongola masumu ya moto oyo asalaka bongo. Nzokande, Yesu amonisaki polele ete kokaba oyo Nzambe asepelaka na yango esuki kaka te na kokabela babola.
Soki tomeki kotalela ndenge oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kopesa, tokomona balolenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tokanisaka bato mosusu, mpe kokaba na biso ekosepelisa Nzambe. Lisusu, tokomona lolenge moko ya kokaba oyo ezali malamu koleka.
“Bópesa makabo ya motema mawa”
Yesu azalaki mbala mingi kolendisa bayekoli na ye ‘bápesaka makabo ya motema mawa’ to, ndenge oyo Biblia mosusu ebongoli yango, ‘bápesaka mbongo na bato bakelelá.’ (Luka 12:33, Bible na lingala ya lelo oyo) Kasi, Yesu akebisaki bango ete ntango bazali kokaba, bábɛtaka ntangwa te mpo Nzambe azwa lokumu na esika bango bázwa lokumu. Alobaki boye: “Ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, kobɛta kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka na kati ya basinagoga mpe na babalabala, mpo bato bápesa bango nkembo.” (Matai 6:1-4) Baklisto ya liboso balandaki toli yango mpe baboyaki kosala lokola bakonzi ya mangomba ya ntango na bango oyo bazalaki komilakisa na miso ya bato ete basambelaka. Bango baponaki kosalisa bato to kokabela bango biloko kozanga ete bato mosusu bámona bango.
Na ndakisa, na Luka 8:1-3, Biblia elobi ete Malia oyo abengami Magadalena, Yoana, Suzana, mpe basi mosusu bazalaki kosalela Yesu ná bantoma na ye na “biloko na bango” kozanga koluka ete bato mosusu báyeba. Atako Yesu ná bantoma na ye bazalaki kokelela te, batikaki misala oyo bakokaki kobikela mpe bamipesaki mobimba na mosala ya Nzambe. (Matai 4:18-22; Luka 5:27, 28) Basi yango bazalaki kopesa Nzambe nkembo na ndenge bazalaki kosalisa Yesu ná bantoma na ye na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki bango. Mpo na komonisa ete asepelaki na bango, Nzambe akomisaki lisolo oyo elobeli elimo na bango ya bokabi na kati ya Biblia mpo bato oyo bakoya nsima bátánga yango.—Masese 19:17; Baebele 6:10.
Mwasi mosusu ya boboto oyo “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa” ezali Dolokasi. Mwasi yango oyo azalaki kofanda na Yope, engumba oyo ezalaki pembeni ya mbu; azalaki kotonga bilamba mpo na basi oyo bakufelá mibali. Toyebi te soki azalaki kosomba biloko nyonso ye moko to bango moko bazalaki komemela ye bilamba atongela bango. Kasi, toyebi ete bato oyo azalaki kosalisa balingaki ye mingi mpo na mosala malamu na ye; Nzambe mpe asepelaki na misala yango, yango wana apambolaki bolingo malamu na ye.—Misala 9:36-41.
Makanisi malamu ezali na ntina mingi
Eloko nini etindaki bato yango bákabaka? Ezali te mawa ya ngonga moko oyo moto ayokaka ntango basɛngi ye lisalisi. Bayokaki na motema na bango ete bazali na mokumba ya kosala oyo bakoki kosala mokolo na mokolo mpo na kosalisa babola, bato ya mpasi, bato ya maladi, mpe bato oyo bazalaki na mikakatano mosusu. (Masese 3:27, 28; Yakobo 2:15, 16) Ezali yango nde kokaba oyo esepelisaka Nzambe. Ezali libosoliboso bolingo mingi oyo moto azali na yango mpo na Nzambe mpe mposa ya komekola motema mawa mpe bokabi na ye nde etindaka ye na kopesa ndenge wana.—Matai 5:44, 45; Yakobo 1:17.
Ntoma Yoane amonisaki ntina ya kopesa ntango atunaki motuna oyo: “Moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, na ndenge nini bolingo ya Nzambe ezali kofanda na kati na ye?” (1 Yoane 3:17) Eyano na motuna yango ezali polele. Bolingo ya Nzambe epesaka bato mposa ya kosalisa bato ya mpasi. Nzambe asepelaka na bato oyo bazali lobɔkɔ pɛtɛɛ lokola ye mpe apesaka bango mbano. (Masese 22:9; 2 Bakolinti 9:6-11) Elimo ya kokaba ndenge wana ezali mpe komonana na moi ya lelo? Tótalela likambo moko oyo euti kosalema kala te na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova.
Ndako ya ndeko mwasi moklisto moko oyo azali mobange ebebaki mpenza mpe ezalaki kosɛnga ete bábongisa yango. Ndeko mwasi yango azalaki kofanda ye moko mpe azalaki na bandeko te mpo na kosalisa ye. Banda ebele ya bambula, ndeko mwasi yango andimaki ete makita ya boklisto esalemaka na ndako na ye, mpe mbala mingi azalaki koyamba moto nyonso oyo andimi kokende kotala ye mpe kokabola na ye mwa eloko ya kolya. (Misala 16:14, 15, 40) Ntango bandeko ya lisangá na bango bamonaki mokakatano na ye, bayokanaki básalisa ye. Bamosusu bapesaki mbongo, bamosusu basalaki misala. Na mwa bawikende, bandeko ya bolingo malamu batyaki batole ya sika, babongisaki esika ya kosukola, bazipaki mwa madusu nyonso mpe bapakolaki langi, mpe batyaki armware ya sika na kuku. Kokaba na bango esepelisaki ndeko mwasi yango, ekolisaki lisusu bomoko na lisangá na bango mpe ekamwisaki baninga ya kartye mpe bamonaki yango ete ezali ndakisa malamu mpenza ya lolenge oyo baklisto basengeli kokaba.
Ezali na ndenge mingi oyo mokomoko na biso akoki kosalisa bato mosusu. Tokoki kozwa ntango mpo na kosolola na elenge moko oyo azali etike. Tokoki kosalela mobange mwasi moko wenze to kotongela ye bilamba. Tokoki kolamba bilei mpe kokende kotikela ndeko moko oyo azali na makoki te to tokoki kopesa ye mwa mbongo oyo ekoki kosunga ye. Mpo na kosalisa bato mosusu esengeli kaka te ete tózala bazwi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soki libosoliboso mposa makasi ezali, yango ekondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” (2 Bakolinti 8:12) Kasi, kopesa mwa eloko epai ya moto oyo azangi, yango kaka nde kokaba oyo Nzambe akopambola? Te.
Ezali boni mpo na bibongiseli oyo lisangá ezwaka mpo na kosunga?
Na makambo mosusu, milende oyo moto na moto akoki kosala ekokakata te. Kutu, Yesu ná bantoma na ye bazalaki na kɛsi moko mpo na babola, bazalaki mpe kondima makabo ya bato ya motema malamu oyo bazalaki kokutana na bango na mosala na bango ya kosakola. (Yoane 12:6; 13:29) Lisusu, na masangá ya ekeke ya liboso bazalaki kokɔngɔla mbongo ntango bayoki ete bandeko na bango bazali na mposa ya lisalisi mpe bazalaki koyokana mpo na kosalisa ebele ya bato.—Misala 2:44, 45; 6:1-3; 1 Timote 5:9, 10.
Likambo moko ya ndenge wana emonanaki soki na mobu 55 ya ntango na biso (T.B.). Baklisto ya masangá ya Yudea bakelelaki, mbala mosusu mpo na nzala makasi oyo ekɔtaki na etúká yango. (Misala 11:27-30) Lokola ntoma Paulo azalaki ntango nyonso komibanzabanza mpo na babola, asangisaki makabo ya ebele ya masangá, ata oyo ezalaki mosika lokola na Masedonia. Ye moko abongisaki mosala ya kokɔngɔla yango mpe aponaki bato oyo bakokaki kotyelama motema mpo na kokende kotika yango. (1 Bakolinti 16:1-4; Bagalatia 2:10) Ezala ye moko to bato mosusu oyo basalaki mosala wana, moko te afutamaki.—2 Bakolinti 8:20, 21.
Lelo oyo mpe, ntango likama moko esalemi, Batatoli ya Yehova bazwaka bibongiseli nokinoki mpo na kosalisa. Na ndakisa, na mobu 2001, bambula ya makasi ememaki mpela monene na Houston, na etúká ya Texas, na États-Unis. Bandako 723 ya Batatoli ebebaki, mosusu ebebaki mwa moke, mosusu mpe ebebaki mingi. Nokinoki basalaki komite moko mpo kosalisa; bankulutu yango balukaki nokinoki koyeba bamposa ya moto mokomoko mpo na kobimisa mbongo mpo na kosalisa Batatoli ya etúká wana na mokakatano oyo bakutanaki na yango mpe mpo na kobongisa bandako na bango. Bandeko ya bamboka ya pembenipembeni bamonisaki bolingo malamu mpe basalaki misala nyonso. Motatoli moko azalaki na botɔndi mingi mpo na lisalisi oyo bapesaki ye; yango wana, ntango kompanyi ya asiransi efutaki ye mbongo mpo na kobongisa ndako na ye oyo ebebaki, apesaki mbala moko mbongo yango lokola likabo mpo na kosalisa bandeko mosusu oyo bazalaki na bosɛnga.
Mpo na oyo etali bibongiseli mpo na kosalisa bato ya mpasi, tosengeli kokeba ntango bazali kosɛnga mbala na mbala ete tópesa lisalisi. Bibongiseli mosusu etondi na babiro kilikili to mpe esalelaka ebele ya mbongo mpo na piblisite mpe etikalaka kaka na mwa mbongo moke mpo na misala oyo esengeli mpenza kosala. Masese 14:15 (Bible na lingala ya lelo oyo) elobi ete: “Zoba andimaka makambo nyonso oyo balobelaka ye; kasi moto ya ekenge akanisaka liboso ya kosala likambo.” Na yango, tokozala bato ya bwanya soki kotalela naino makambo malamumalamu.
Kokaba oyo esalaka malamu koleka
Ezali na kokaba mosusu oyo ezali malamu koleka kokabela bato ya mpasi. Yesu alobelaki yango ntango elenge moyangeli moko oyo azalaki na bozwi atunaki ye soki asengelaki kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko. Yesu alobaki na ye ete: “Kende kotɛka biloko na yo mpe pesá na babola mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká landá ngai.” (Matai 19:16-22) Tomoni ete Yesu alobaki kaka te ete, ‘Pesá babola mpe okozwa bomoi.’ Kasi abakisaki ete, “Yaká landá ngai.” Na maloba mosusu, atako kosalisa babola ezali malamu mpe ezali na ntina, kozala moyekoli ya Klisto esuki kaka na likambo wana te.
Yesu azalaki koluka libosoliboso kopesa bato lisalisi ya elimo. Ntango etikalaki moke báboma ye, alobaki na Pilato ete: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoane 18:37) Atako Yesu apesaki ndakisa mpo na kosalisa babola, kobikisa bato ya maladi, mpe koleisa bato oyo bazalaki na nzala, kasi libosoliboso apesaki bayekoli na ye formasyo mpo na kosakola. (Matai 10:7, 8) Kutu, ntango azalaki kopesa bango malako ya nsuka, alobaki mpe boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”—Matai 28:19, 20.
Ya solo, kosakola ekosilisa mikakatano nyonso ya mokili te. Kasi, koyebisa bato ya lolenge nyonso nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epesaka Nzambe nkembo mpamba te kosakola ekokisaka mokano ya Nzambe mpe epesaka bato oyo bazali kondima nsango yango libaku ya kozwa matomba ya libela na libela. (Yoane 17:3; 1 Timote 2:3, 4) Tozali kolendisa yo oyoka makambo Batatoli ya Yehova bakoyebisa yo na mbala oyo bakoya lisusu na ndako na yo. Bamemelaka bato likabo ya elimo. Bayebi mpe ete yango nde ezali eloko eleki malamu oyo bakoki kokabela yo.
[Bililingi na lokasa 6]
Tozali na ndenge mingi ya komonisa ete tokanisaka basusu
[Elilingi na lokasa 7]
Kosakola nsango malamu esepelisaka Nzambe mpe efungolaka nzela mpo na matomba ya libela na libela