Ougarit—Engumba ya bato oyo bamipesaki na losambo ya Baala
NA MOBU 1928, etimweli ya mosali-bilanga moko ya ekólo Syrie etutaki libanga oyo ezipaki lilita moko oyo ezalaki na bambɛki ya kala. Mosali-bilanga yango akokaki koyeba te ete biloko oyo amonaki ezali biloko ya motuya mingi. Ntango bato ya arkeoloji ya ekólo France bayokaki nsango ya biloko yango oyo moto wana amonaki, bakendaki na esika yango na mbula oyo elandaki; Claude Schaeffer moto azalaki mokambi na bango.
Mwa moke na nsima, bamonaki likomi moko oyo esalisaki bango báyeba mboka nini ezalaká na esika oyo bazalaki kokundola. Ezalaki bitika ya Ougarit, “moko ya bingumba minene ya kala ya Moyen-Orient.” Kutu, mokomi Barry Hoberman alobaki ete: “Ezali na biloko mosusu te oyo bato ya arkeoloji bamoná, ezala ata Barulo ya Mbu Ekufá, oyo ekoki kosalisa biso na koyeba Biblia malamumalamu lokola bitika ya Ougarit.”—The Atlantic Monthly.
Esika oyo banzela mingi ekutanaki
Engumba Ougarit etongamaki likoló ya mwa ngomba oyo babengaka Ras Shamra, na bokula ya Mai monene ya Méditerrannée, esika oyo ezali lelo na nɔrdi ya Syrie; engumba yango etondaki na bato ya bikólo ndenge na ndenge mpe ezalaki na bozwi mingi kobanda na bambula 2000 tii 1001 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Ezalaki engumba monene mpenza, ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 60 banda na ngomba Casios na nɔrdi tii na Tell Sukas na sudi mpe na bonene ya kilomɛtrɛ 30 to 45 banda na Mai monene ya Méditerranée na wɛsti tii na lobwaku ya Oronte na ɛsti.
Bibwele ezalaki kobota mingi na engumba yango ya malili. Na etúká yango bazalaki kobimisa céréales, mafuta ya olive, vinyo mpe mabaya—oyo ezalaki te na Mezopotamia mpe na Ezipito. Lisusu, lokola banzela mingi ya bato ya mombongo ekutanaki na engumba yango, ezalaki moko ya mabongo minene ya liboso epai bamasuwa ya mikili ndenge na ndenge ezalaki kosɛma. Bato ya mombongo oyo bazalaki kouta na Mai monene ya Égée, na Anatolie, na Babilone, na Ezipito mpe na bamboka mosusu ya Proche-Orient bazalaki koya na Ougarit kosala mombongo ya bibende, biloko ya bilanga mpe ebele ya biloko mosusu oyo ezalaki kobima.
Atako engumba Ougarit ezalaki na bozwi mingi, ezalaki kaka koyangelama na bakonzi ya bamboka mosusu. Engumba yango ezalaki mboka oyo elekaki mosika na nɔrdi na kati ya bamboka oyo Ezipito ezalaki koyangela, tii na ekeke ya 14 L.T.B., ntango ekómaki ya Bahiti. Esengelaki ete Ougarit efutaka mpako mpe etindaka basoda epai ya mokonzi ya ekólo oyo ezalaki koyangela yango. Mpo na kobundisa “Bato ya Mbu”a oyo bakɔtaki na Anatolie (Turquie ya ntei) mpe na nɔrdi ya Sulia, Bahiti bazwaki basoda mpe bamasuwa ya Ougarit. Yango wana, Ougarit yango moko etikalaki lisusu na basoda te oyo bakokaki kobatela yango mpe ebebisamaki mobimba soki na mobu 1200 L.T.B.
Bakundoli biloko ya kala
Esika oyo Ougarit ezalaká etikalá ngomba moko monene ya bosanda ya mɛtrɛ 20 mpe na bonene ya hectare koleka 25. Bato ya arkeoloji batimolá kaka ndambo moke (1/6) ya etando yango. Na kati ya bitika oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na esika yango, ezali mpe na ndako ya mokonzi oyo ezalaki na bashambre soki mokama mpe na mabanda soki motoba, na bonene ya mɛtrɛ kare pene na 10 000. Ndako yango ezalaki na batiyo ya mai, batwalɛti mpe batalase ya kolekisa mai ya salite. Biloko ya ndako yango ekembisamaki na wolo, na mabanga ya bulé babengi lapis lazuli, mpe na mpɛmbɛ ya nzoku. Bamonaki mpe mwa bitanda ya mpɛmbɛ ya nzoku oyo ezalaki na mayemi kitoko. Pembeni ya ndako yango ezalaki na elanga ya bafololo oyo ezalaki na kati ya lopango mpe na kati ya elanga yango ezalaki na liziba moko ya mai oyo babongisá malamu mpe nyonso wana ezalaki kobakisa lisusu kitoko ya ndako yango.
Na kati mpe na zingazinga ya engumba yango ezalaki na ebele ya batempelo ya Baala mpe ya Dagan.b Batempelo yango ezalaki bandako milai, oyo ekokaki kozala na bosanda ya mɛtrɛ 20, ezalaki na mwa mbalasani liboso ya kokóma na eteni ya ndako ya kati esika ekeko ya nzambe ezalaki. Mpo na kokóma na ndako ya makita esika mokonzi azalaki kokamba milulu ndenge na ndenge, esengelaki komata na sikalie. Na butu to na ntango ya mbula to mopɛpɛ makasi, bazalaki kopelisa mɔtɔ na nsɔngɛ ya batempelo yango mpo bato ya masuwa bámona nzela ya kokima na esika oyo bakobatelama. Na ntembe te, longo 17 ya mabanga oyo bamonaki na tempelo ya Baal-Hadad, nzambe ya mipɛpɛ mpe mbula makasi, ezali mbeka oyo bato ya masuwa bazalaki kopesa lokola bazalaki kozonga malamu na mobembo mpo na kotɔnda nzambe yango na ndenge abatelaki bango na mobembo.
Bamoni makomi ya ntina mpenza
Bakundolaki ebele ya bitanda oyo esalemi na mabelé na bitika ya Ougarit. Bitanda yango oyo ezalaki na makomi oyo elobeli makambo ya mombongo, ya mibeko, ya boyokani na bikólo mosusu, mpe ya Leta, ezalaki na minɔkɔ mwambe, mpe ekomamaki na alfabɛ mitano. Schaeffer ná baninga na ye bakundolaki makomi ya monɔkɔ moko oyo eyebani te tii lelo oyo soki ezalaki monɔkɔ nini, mpe bapesaki yango nkombo monɔkɔ ya Ougarit; monɔkɔ yango ezalaki kosalela moko ya baalfabɛ ya kala mpenza oyo ezalaki na balɛtrɛ 30.
Longola makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, makomi oyo bakundolaki na Ougarit ezali mpe na mikanda ya bato ya mayele, oyo epesaki nzela ya koyeba bindimeli mpe mimeseno ya bato ya ntango wana. Emonani ete losambo na Ougarit ekokanaki mingi na oyo ya Bakanana oyo bazalaki penepene na engumba yango. Roland de Vaux alobi ete makomi yango “ezali mpenza komonisa mimeseno oyo ezalaki na Kanana liboso ete Bayisalaele bábɔtɔla yango.”
Losambo na engumba ya Baala
Makomi ya Ras Shamra elobeli banzambe ná banzambe-basi koleka 200. El azalaki nzambe-mokonzi, bazalaki kobenga ye tata ya banzambe mpe ya bato. Baal-Hadad, nzambe ya mbula mpe mopɛpɛ makasi, azalaki nzambe “motambwisi ya mapata” mpe “nkolo ya mabelé.” Balobaka ete El azali lokola nkɔkɔ moko oyo azali na mandɛfu ya mpɛmbɛ, oyo azali mosika mpenza na bato. Nzokande, Baala azali nzambe moko makasi mpe alingá lokumu, oyo alukaka kozala mokonzi ya banzambe mpe bato.
Ekoki kozala ete makomi oyo bakundolaki, ezali makomi oyo bazalaki kotánga na biyenga minene ya losambo, lokola na ebandeli ya mbula ya sika to na ntango ya kobuka mbuma. Kasi, ndimbola ya sikisiki mpenza ya makomi yango eyebani te. Na nzembo moko oyo ezali kolobela ndenge banzambe bazali kowela bokonzi, Baala alongi Yamm, nzambe ya mbu, mwana oyo El alingaka mingi. Emonani ete ezali mpo na elonga yango nde bato ya masuwa bazalaki kotyela Baala motema ete akobatela bango na kati ya mbu. Na etumba moko oyo Baala abundi na Mot, balongi Baala mpe akiti na mokili ya bakufi. Mpo na yango, elanga moko makasi eyei mpe misala nyonso ya bato ekufi. Anat, nzambe ya bolingo mpe ya bitumba, oyo azali mwasi ya Baala mpe ndeko na ye, abomi Mot mpe azongisi Baala na bomoi. Baala abomi bana mibali nyonso ya mwasi ya El, Athirat (Asherah) mpe azwi lisusu bokonzi. Kasi, mbula nsambo na nsima, Mot azongi na bomoi.
Bato mosusu ya mayele balobaka ete nzembo yango ezali komonisa ndenge oyo bileko elandanaka na kati ya mbula, ndenge eleko ya molunge makasi eyaka kobengana bambula oyo ebotisaka biloko, mpe ezongaka na ɔtɔne. Bamosusu bakanisaka ete bazalaki kolobela mbula nsambo mpo bazalaki kobanga koya ya nzala mpe elanga makasi. Ezala bongo to te, kolonga ya Baala ezalaki na ntina mingi, mpo yango nde ezalaki kosalisa bato bálonga na misala na bango. Moto moko ya mayele, Peter Craigie, alobi boye: “Losambo ya Baala ezalaki mpo na kosalisa ye alonga banzambe mosusu nyonso; basambeli na ye bakokaki kozala na elikya ete biloko oyo ezali na ntina mingi mpo na bato, elingi koloba milona mpe bibwele, ekobota malamu kaka soki ye alongi banzambe mosusu.”
Libateli liboso ya losambo ya bapakano
Makomi oyo bakundolaki ezali komonisa polele makambo mabe oyo ezalaki na losambo ya Ougarit. Buku moko (The Illustrated Bible Dictionary) elobi ete: “Makomi yango emonisi mpenza makambo mabe oyo losambo ya banzambe yango ebimisaki; lokola losambo yango ezalaki kolendisa bitumba, kindumba, pite, yango ezalaki kobebisa mpenza bato.” De Vaux alobi boye: “Soki otángi banzembo yango, okomona ntina oyo basambeli ya Yawe mpe basakoli minene bazalaki koyina mpenza losambo yango.” Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele ya kala ezalaki mpenza libateli monene na losambo ya lokuta lokola oyo wana.
Koluka koyeba makambo mabombami, kotala minzoto mpe maji ezalaki kosalema mingi na Ougarit. Bazalaki kolimbola makambo mabombami kaka na kotala minzoto te, kasi bazalaki mpe kotala soki nyama oyo babomi ezali na mwana na libumu mpe mwana yango azali na mbeba to mpe na misɔpɔ mpe biloko mosusu ya libumu. Jacqueline Gachet, moto ya mayele na masolo ya kala, alobaki boye: “Bazalaki kokanisa ete ntango bakabi nyama lokola mbeka epai ya nzambe moko, nyama wana ná nzambe yango bazalaki kokóma eloko moko, mpe ete elimo ya nzambe yango ezalaki kosangana na elimo ya nyama. Yango wana, soki batali bilembo oyo ezali komonana na biloko oyo ezali na kati ya libumu ya nyama, bakoyeba makanisi ya banzambe yango oyo bakokaki kopesa bango biyano ya malamu to ya mabe na mituna oyo bazalaki komituna mpo na mikolo ekoya to mpo na koyeba nini basengeli kosala mpo na likambo boye to boye.” (Le pays d’Ougarit autour de 1200 av.J.C.) Nzokande, makambo ya ndenge wana epekisamaki makasi epai ya Bayisalaele.—Deteronome 18:9-14.
Mibeko ya Moize epekisaki mpenza kosangisa nzoto na banyama. (Levitike 18:23) Ndenge nini bazalaki kotalela likambo yango na Ougarit? Na makomi oyo bakundolaki, balobeli Baala azali kosangisa nzoto na mwana ya ngɔmbɛ. Cyrus Gordon, moto moko ya arkeoloji, alobi ete: “Soki balobi ete mpo na kosangisa nzoto na mwana ya ngɔmbɛ Baala azalaki kolata nzoto ya ngɔmbɛ, banganga-nzambe na ye oyo bazalaki komekola makambo na ye bakokaki kolata nzoto ya ngɔmbɛ te.”
Bapesaki Bayisalaele mobeko ete: “Bokokata nzoto na bino mpo na bakufi te.” (Levitike 19:28) Nzokande, ntango Baala akufaki, El “amizokisaki na mbeli, amikataki nzoloko na zilɛti; amizokisaki na matama mpe na mbanga.” Emonani mpenza ete basambeli ya Baala bazalaki na momeseno ya komizokisazokisa bampota ntango bazali kosala milulu na bango.—1 Mikonzi 18:28.
Maloba ya nzembo moko ya Ougarit ezali komonisa ete na milulu ya kobota oyo ezalaki kosalema mingi na losambo ya Bakanana, bazalaki kolamba bana ya ntaba oyo bazali naino komɛla mabɛlɛ. Nzokande, na Mibeko ya Moize, balobaki na Bayisalaele boye: “Okolamba mwana ya ntaba na mabɛlɛ ya mama na yango te.”—Exode 23:19.
Bokeseni kati ya Biblia ná makomi ya Ougarit
Na ebandeli, babongolaki makomi ya Ougarit na kolanda monɔkɔ ya Liebele oyo bakomaki na yango Biblia. Peter Craigie alobi boye: “Maloba mingi ya Makomami ya Liebele ezali na ndimbola ya polele te mpe, ntango mosusu, ndimbola na yango eyebani te; bato oyo babongolaki yango liboso ya bambula ya 1900 bazalaki kaka komekameka mpo na kolimbola yango. Kasi, ntango bamonaki mpe maloba yango na makomi ya Ougarit, bayebaki ndimbola na yango malamumalamu.”
Na ndakisa, liloba moko ya Liebele oyo basalelá na Yisaya 3:18 ebongolamaka mbala mingi “matambala.” Liloba moko ya monɔkɔ ya Ougarit oyo ekokani na yango esalelamaka mpo na kolobela ná moi ná nzambe-mwasi moi. Na yango, ekoki kozala ete basi ya Yelusaleme oyo balobeli na esakweli ya Yisaya balataki mwa bamedayi ya moi mpe “mwa sanza” na nkingo mpo na kokumisa banzambe ya Bakanana.
Na makomi ya Bamasorete, balobi na Masese 26:23 ete “bibɛbu ya mɔtɔ elongo na motema mabe,” ekokani na mbɛki oyo bapakoli yango “palata ya mbindo.” Liloba ya monɔkɔ ya Ougarit oyo ekokani na yango ezali kosɛnga ete bábongola elilingi yango boye: “Lokola mafuta oyo bapakoli likoló ya epaso ya mbɛki.” Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli lisese yango malamu mpenza ete: “Bibɛbu oyo ezali kopela lokola mɔtɔ elongo na motema mabe ezali lokola palata oyo bapakoli likoló ya epaso ya mbɛki mpo na kongɛngisa yango.”
Basalelaki nde makomi ya Ougarit mpo na kokoma Biblia?
Bato mosusu ya mayele oyo bayekoli makomi ya Ras Shamra balobaka ete mikapo mosusu ya Biblia ezali kaka banzembo ya Ougarit oyo babalolá maloba na yango. André Caquot, mosangani ya Institut de France, alobi ete “losambo ya Bayisalaele eutá kaka na makambo ya bonkɔkɔ ya Bakanana.”
Mpo na Nzembo 29, Mitchell Dahood ya Institut biblique pontifical de Rome alobi ete: “Mpo na kosala nzembo yango, basambeli ya Yawe bakamataki kaka nzembo moko ya kala oyo Bakanana bazalaki koyembela Baala, nzambe ya mbula mpe mipɛpɛ makasi mpe babaloli maloba na yango . . . Pene na maloba nyonso ya nzembo yango ekokani na maloba ya nzembo oyo ezali na makomi ya kala ya Bakanana.” Ezali mpenza ndenge wana? Te!
Bato ya mayele oyo bazali na bokatikati balobi ete baoyo bazali koloba ete Makomami ya Liebele ekokani mpenza na makomi ya Ougarit bazali kolekisa ndelo. Garry Brantley, moto moko ya teoloji, alobi ete: “Ata likomi moko te ya Ougarit ekokani na Nzembo 29 na mobimba na yango.” “Ezali na eloko moko te oyo ekoki mpenza kopesa moto nzela ya koloba ete Nzembo 29 (to mokanda mosusu ya Biblia) ezali kaka lisolo moko ya kala ya bapakano oyo babalolá maloba na yango.”
Soki makomi mibale ezali na elobeli ndenge moko, ntɔki ya koloba ndenge moko mpe lolenge ya kopɔna maloba ndenge moko, yango elingi koloba ete mokomi moko azongeli kaka makomi ya mokomi mosusu na maloba mosusu? Kutu, kokokana ya ndenge wana ekoki kokamwisa biso te. Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi ete: “Kokokana yango ya elobeli mpe ya makambo euti nde na kokokana ya mimeseno: atako Ougarit ezalaki mosika na Yisalaele mpe ezalaki na eleko moko te, bamboka yango ezalaki na kati ya ebele ya mabota oyo ezalaki na mimeseno ndenge moko mpe bazalaki kosalela maloba ndenge moko na banzembo na bango mpe na makambo ya losambo.” Yango wana, Garry Brantley alobi boye: “Ebongi ata moke te koloba ete lokola makomi ya Biblia ezali na elobeli ndenge moko na oyo ya bapakano, euti na bindimeli na bango.”
Lisusu, esengeli koyeba ete soki mwa kokokana ezali na kati ya makomi ya Ras Shamra mpe Biblia, kokokana yango ezali kaka na maloba, kasi na makanisi te. Cyrus Gordon, moto moko ya arkeoloji, alobi ete: “Mateya kitoko oyo ezali na Biblia ezalaki na Ougarit [te].” Kutu, makambo ya Biblia oyo ekeseni na oyo ya Ougarit ezali mingi koleka oyo ekokani na yango.
Na ntembe te boyekoli ya makomi ya Ougarit ekokoba kosalisa bayekoli ya Biblia na koyeba lisusu malamumalamu mimeseno ya bato oyo bakomaki Biblia, bomoi na bango mpe makambo ya losambo na bango mpe ya libota mobimba ya Baebele. Koyekola makomi ya Ras Shamra ekoki mpe kosalisa na koyeba lisusu malamumalamu monɔkɔ ya Liebele ya kala. Kasi, oyo eleki nyonso ezali ete makomi oyo bato ya arkeoloji bakundolá na Ougarit emonisi mpenza bokeseni monene oyo ezali na kati ya losambo ya Baala oyo etondi na makambo mabe ná losambo ya pɛto ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato oyo bazalaki kobengama “Bato ya Mbu” ezalaki mingimingi bato ya mai oyo bazalaki kofanda na bisanga mpe na babokula ya Mai monene ya Méditerranée. Ekoki kozala ete Bafilistia mpe bazalaki na kati ya bato yango.—Amosa 9:7.
b Atako bato ya mayele bapesaka makanisi ndenge na ndenge mpo na tempelo ya Dagan, mingi balobaka ete tempelo ya Dagan ezali kaka tempelo ya El. Roland de Vaux, moto ya mayele ya ekólo France mpe profesɛrɛ na Eteyelo ya Jérusalem mpo na mateya ya Biblia, alobi ete Dagan, elingi koloba Dagona oyo balobeli na Basambisi 16:23 mpe na 1 Samwele 5:1-5, ezali nkombo mpenza ya nzambe El. Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi ete ntango mosusu “bazalaki koloba ete Dagan ezali kaka ye wana nzambe [El] to ete azali kaka lokola ye.” Na makomi oyo bamonaki na Ras Shamra, Baala abengami mwana ya Dagan, kasi ndimbola ya liloba “mwana” na ndenge basaleli yango awa eyebani mpenza te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]
Makomi oyo bato ya arkeoloji bakundolá na Ougarit ebakisi boyebi na biso ya Biblia
Karte/Bililingi na lokasa 24, 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mokili ya Bahiti na ekeke ya 14 L.T.B.
MBU YA MÉDITERRANÉE
Efalata
NGOMBA CASIOS (DJEBEL EL-AGRA)
Ougarit (Ras Shamra)
Tell Soukas
Oront
SULIA
EZIPITO
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Ekeko ya Baala mpe mbɛki oyo esalemá na lolenge ya motó ya nyama: Musée du Louvre, Paris; liyemi ya ndako ya mokonzi: © D. Héron-Hugé mpo na “Le Monde de la Bible”
[Elilingi na lokasa 25]
Bitika ya ekɔtelo ya ndako monene
[Elilingi na lokasa 26]
Lisapo moko ya Ougarit ekoki kosalisa na kokanga ntina ya Exode 23:19
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée du Louvre, Paris
[Bililingi na lokasa 27]
Ekeko ya Baala
Saani ya wolo na liyemi ya bato bazali kosala bokila
Ezipeli ya mpɛmbɛ ya nzoku mpo na molangi ya mafuta ya kopakola, ná liyemi ya nzambe-mwasi ya kobota
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bililingi nyonso: Musée du Louvre, Paris