Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/7 nk. 29-31
  • Eusèbe​—“Mobandisi ya lisolo ya Lingomba”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eusèbe​—“Mobandisi ya lisolo ya Lingomba”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babuku na ye ya ntina mingi
  • Makambo mibale oyo etindaki Eusèbe akoma
  • Bolukiluki mingi oyo asalaki
  • Alingaki nde solo?
  • Liteya oyo tozwi na likambo yango
  • Ozali komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Constantin Le Grand mobundeli ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Osengeli kondima liteya ya Bosato?
    Lamuká!—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/7 nk. 29-31

Eusèbe​—“Mobandisi ya lisolo ya Lingomba”?

NA MOBU 325 ya ntango na biso (T.B.), Amperɛrɛ Constantin ya Rome abengaki baepiskɔpɔ nyonso na Nicée. Ntina oyo abengaki bango: Kosilisa ntembe oyo ezalaki kosila te na oyo etali esika ya Nzambe ná ya Mwana na ye. Eusèbe, moto ya Césarée oyo atángaki mingi koleka bato nyonso ya ntango na ye, azalaki mpe na likita yango. Eusèbe amipesaki mpenza na koyekola Makomami mpe azalaki kokɔtela boklisto ná losambo na yango ya Nzambe kaka moko.

Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete na Likita Monene ya Nicée, “Constantin ye moko azalaki kokamba, atambwisaki masolo yango mpe ye moko apesaki likanisi . . . oyo endimamaki na likita wana, mpo na kolobela esika ya Klisto liboso ya Nzambe, ete ‘Mwana ná Tata bazali kaka moko’. . . Lokola baepiskɔpɔ babangaki amperɛrɛ, bango nyonso, longola kaka mibale, batyaki sinyatire na endimeli yango; mingi kati na bango batyaki sinyatire yango atako bandimaki yango te.” Eusèbe azalaki nde moko ya baoyo baboyaki kotya sinyatire? Liteya nini tokoki kozwa na kotalela ngámbo oyo aponaki? Tótalela naino bomoi ya Eusèbe, elingi koloba kelasi oyo atángaki mpe makambo oyo asalaki.

Babuku na ye ya ntina mingi

Ekoki kozala ete Eusèbe abotamaki na Palestine soki na mobu 260 T.B. Ntango azalaki naino elenge, akómaki moninga ya Pamphile, mokambi moko ya lingomba na Césarée. Ntango Eusèbe akɔtaki na eteyelo ya Pamphile mpo na mateya ya teoloji, akómaki moyekoli moko ya molende. Amipesaki mpenza na kotánga babuku na bibliotɛkɛ monene ya Pamphile. Eusèbe azalaki koyekola na molende mpenza, mpe amipesaki mingimingi na boyekoli ya Biblia. Akómaki mpe moninga ya motema ya Pamphile, mpe na nsima akómaki komibenga “Eusèbe mwana ya Pamphile.”

Na ntina na mikano na ye, Eusèbe alobaki ete: “Nazali na mokano ya kokoma ndenge Bantoma basantu balandaná, mpe makambo oyo eleki kobanda Nkolo na biso azalaki na bomoi tii na ntango na biso; mpo na kolobela ndenge oyo ebele ya makambo oyo balobaka ete esalemaki na kati ya lingomba elekaki mpe ntina ya makambo yango; mpe mpo na kolobela bato oyo bazalaki kokamba mpe kotambwisa lingomba na kati ya baparwasi ya mineneminene, mpe baoyo bazalaki kosakola liloba ya Nzambe na monɔkɔ to na nzela ya makomi na bango na ekeke mokomoko.”

Eusèbe ayebani mingi mpo na buku na ye oyo ezali na moto ya likambo ete Lisolo ya Lingomba ya boklisto (na Lingelesi). Buku na ye ya volimi zomi oyo ebimisamaki soki na mobu 324 T.B., etalelamaka lokola buku oyo eleki ntina na kati ya babuku nyonso ya ntango ya kala oyo elobeli Lisolo ya lingomba. Mpo na yango, Eusèbe akómaki kobengama mobandisi ya lisolo ya Lingomba.

Longola Lisolo ya Lingomba, Eusèbe akomaki mpe buku mosusu (Chronique), oyo ezalaki na volimi mibale. Volimi ya liboso ezalaki kolobela na mokuse lisolo ya mokili. Na ekeke ya minei T.B., buku yango ekómaki buku oyo moto nyonso azalaki kotánga mpo na koyeba ndenge makambo ya kala elandanaki. Volimi ya mibale epesaki badati ya makambo ya kala. Eusèbe akabolaki nkasa ya buku yango na milongo ebele mpe amonisaki na kati ndenge bakonzi ya bikólo ndenge na ndenge bazalaki kolandana.

Eusèbe akomaki mpe babuku mosusu mibale ya makambo ya kala, mito ya makambo ya babuku yango ezalaki Bamartiru ya Palestine mpe Bomoi ya Constantin (na Lingelesi). Buku ya liboso elobeli makambo oyo esalemaki banda na mobu 303 tii 310 T.B., bakisa mpe bamartiru ya ntango yango. Ekoki kozala ete Eusèbe ye moko amonaki makambo yango na miso. Buku ya mibale, oyo ezalaki na volimi minei, ebimisamaki nsima ya liwa ya Amperɛrɛ Constantin na mobu 337 T.B., elobelaki makambo ya ntina mingi ya kala. Buku yango ezali kobɛta masolo ya kala te, kasi ezali nde kokumisa bato ya kala.

Na kati ya babuku oyo Eusèbe akomaki mpo na kolongisa mateya ya lingomba, ezali na oyo akomaki mpo na kopesa eyano na Hiéroclès​—guvɛrnɛrɛ moko ya Rome ya ntango na ye. Ntango Hiéroclès akomaki mabe mpo na baklisto, Eusèbe mpe akomaki mpo na kopesa ye eyano. Lisusu, mpo na komonisa ete Makomami epemamá na Nzambe, akomaki buku 35, oyo balobaka ete ezali babuku ya ntina mingi mpe oyo ezali na makambo ya kitoko koleka babuku mosusu nyonso ya motindo wana. Na buku 15 ya liboso, asalaki nyonso mpo na kolimbola ntina oyo baklisto bandimaka makomi mosantu ya Liebele. Na buku 20 oyo etikali amonisaki ete baklisto bazali na elonga na ndenge batiki kolanda mitinda oyo ezalaki kotambwisa Bayuda, kasi bakómi nde kolanda mitinda ná mimeseno ya sika. Na babuku yango nyonso, Eusèbe akomaki mingi mpo na kolongisa mateya ya boklisto na ndenge oyo ye ayebaki yango.

Eusèbe aumelaki na bomoi mbula soki 80 (kobanda soki na mobu 260 tii 340 T.B.), mpe akómaki moko ya bakomi minene na ntango ya kala. Makomi na ye elobelá makambo oyo esalemaki na bikeke misato ya liboso T.B. tii na ntango ya Amperɛrɛ Constantin. Na nsuka ya bomoi na ye, longola mosala na ye ya mokomi, akómaki mpe episkɔpɔ ya Césarée. Atako Eusèbe ayebanaki mpenzampenza nde lokola mokomi ya masolo ya kala, azalaki mpe mokɔteli monene ya lingomba na ye, moyemi ya bakalati, moteyi, azalaki kotalela bosolo ya makomi ya bato mosusu, mpe azalaki kokoma mpo na kolimbola makomi ya lingomba.

Makambo mibale oyo etindaki Eusèbe akoma

Nini etindaki Eusèbe asala mosala monene wana ya kokoma? Eyano na motuna wana ezali ete azalaki kondima mpenza ete mosika te makambo ya mokili ekobongwana. Amonaki ete makambo minene esalemaki na bikeke oyo eutaki koleka mpe esengelaki bákoma yango na mikanda mpo na bana oyo bakobotama nsima.

Ntina mosusu oyo Eusèbe akomaki babuku na ye ezalaki mpo na kokɔtela to kolongisa lingomba na ye. Azalaki kondima ete lingomba ya boklisto eutaki mpenza na Nzambe. Kasi bato mosusu bazalaki kondima te ete ezali bongo. Eusèbe akomaki boye: “Nazali mpe na mokano ya kotánga bankombo ya bato oyo mposa na bango ya kobimisa makanisi ya sika ekɔtisi bango na mabunga ya minene koleka, mpe lokola bazalaki koloba ete bazwi boyebi, oyo ebengami bongo na lokuta mpenza, bazalaki kobebisa etonga ya Klisto lokola bambwa mabe ya zamba, mpe koloba mbala boni bato ya ndenge wana bamonanaki.”

Eusèbe azalaki nde komibenga moklisto? Emonani ete azalaki komibenga moklisto, mpo azalaki kobenga Klisto “Mobikisi na biso.” Alobaki ete: “Nazali na mposa . . . nalobela mabe oyo ekómelaki ekólo mobimba ya Bayuda kaka na mbala moko mpamba te basalelaki Mobikisi na biso likita mpe babomaki ye, mpe nalobela ndenge oyo bato ya bikólo mosusu bazalaki kobundisa liloba ya Nzambe mpe mbala boni basalaki bongo, mpe ete nalobela ezaleli ya bato oyo, na bileko ndenge na ndenge, bazalaki kokɔtela lingomba yango atako bazalaki koboma bango mpe konyokola bango, bakisa mpe, na mikolo na biso, baoyo bazali kosakola kondima na bango polele, mpe lisalisi oyo Mobikisi na biso apesaki bango na boboto nyonso.”

Bolukiluki mingi oyo asalaki

Motango ya babuku oyo Eusèbe atángaki na bomoi na ye mpe oyo alobelá na makomi na ye ezali ya koloba te. Toyebi bato minene mingi ya bikeke misato ya liboso ya ntango na biso kaka na lisalisi ya makomi ya Eusèbe. Kaka makomi na ye nde ezali na masolo ya ntina mingi oyo ezali kolobela bambongwana ya mineneminene oyo esalemá. Longola makomi ya Eusèbe, makomi mosusu nyonso epai tokokaki kokuta makambo yango ezali lisusu te.

Eusèbe amipesaki mpenza na bolukiluki mpe azalaki kokeba ete abosana ata likambo moko te. Emonani ete azalaki kosala nyonso mpo na koyeba kokesenisa masolo ya solo ná masolo ya lokuta. Kasi, babuku na ye ezangi mwa mabunga te. Na bantango mosusu azalaki mpenza kolimbola malamu te makambo oyo bato balobaki to basalaki, to mpe azalaki kokanga ntina na yango te. Na oyo etali badati, azalaki mpe ntango mosusu kopesa badati ya solo te oyo makambo esalemaki. Eusèbe azalaki mpe na ntɔki ya mokomi ya solosolo te. Kasi, soki tolongoli mwa mabunga ya mikemike wana, ebele ya babuku na ye ezali na motuya monene.

Alingaki nde solo?

Eusèbe azalaki komibanzabanza mingi mpo na likambo ya koyeba esika Mwana ya liboso ya Tata, likambo oyo ezali kobimisa ntembe mingi. Tata azalaki nde na bomoi liboso ya Mwana ndenge Eusèbe azalaki kokanisa? To na kati ya Tata ná Mwana, moko te azalaki liboso ya mosusu? Atunaki boye: “Soki moko te azalaki liboso ya mosusu, ndenge nini Tata akoki kozala Tata mpe ndenge nini Mwana akoki kozala Mwana?” Azalaki ata mpe kopesa bavɛrsɛ mpo na komonisa bosolo ya makambo oyo azalaki kondima; atángaki bavɛrsɛ lokola Yoane 14:28, oyo elobi ete ‘Tata aleki Yesu,’ mpe Yoane 17:3, esika Yesu alobaki ete ye azali moto oyo Nzambe kaka moko ya solosolo ‘atindaki.’ Na kotalela Bakolose 1:15 mpe Yoane 1:1, Eusèbe alobaki ete Logos, to Liloba, azali “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,” elingi koloba Mwana ya Nzambe.

Kasi, likambo ya kokamwa ezali ete, na nsuka ya Likita Monene ya Nicée, Eusèbe azalaki na ngámbo ya bato oyo bazalaki kokanisa ndenge mosusu. Na esika akangama na likanisi na ye oyo euti na Makomami ete Nzambe aleki Klisto, alandaki likanisi ya amperɛrɛ.

Liteya oyo tozwi na likambo yango

Mpo na nini, na Likita Monene ya Nicée, Eusèbe atikaki likanisi na ye mpe alandaki likanisi oyo euti na Makomami te? Ezalaki nde mpo na kokokisa mikano na ye ya politiki? Mpo na nini andimaki kokende na likita yango? Atako babengaki baepiskɔpɔ nyonso, kaka mwa ndambo kati na bango, elingi koloba 300 nde bandimaki koyangana na likita yango. Eusèbe azalaki nde kobanga kobungisa esika na ye ya lokumu? Mpe mpo na nini Amperɛrɛ Constantin apesaki ye lokumu ndenge wana? Na likita yango, Eusèbe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya amperɛrɛ.

Emonani mpenza ete Eusèbe abosanaki etinda ya Yesu ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 17:16; 18:36) Moyekoli Yakobo atunaki motuna oyo: “Basi ya ekobo, boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe?” (Yakobo 4:4) Lisusu, toli ya Paulo oyo elandi ebongi mpenza: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te”! (2 Bakolinti 6:14) Na ntango tozali “kosambela [Tata] na elimo mpe na solo,” tiká ete tómitangola libela na mokili.​—Yoane 4:24.

[Elilingi na lokasa 29]

Liyemi ya Likita Monene ya Nicée

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Scala/Art Resource, NY

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Na ndingisa ya Special Collections Library, Iniversite ya Michigan

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto