Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Na makambo nini Luta azali ndakisa malamu?
Azalaki ndakisa malamu na bolingo na ye epai ya Yehova, na bosembo na ye epai ya Naomi, mpe na makasi na ye na mosala mpe na komikitisa na ye. Yango wana, bato balobaki ete azali “mwasi malamu.” (Luta 3:11)—15/4, nkasa 23-26.
• Nini ezali kondimisa biso ete Yehova atyelaka bato mpamba likebi?
Ayebisaki Bayisalaele oyo banyokwamaki makasi na Ezipito ete bányokola bato mpamba te. (Exode 22:21-24) Yesu, oyo alandaki ndakisa ya Tata na ye, azalaki mpenza kotyela bato mpamba likebi, mpe aponaki bato “batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba” bázala bantoma na ye. (Misala 4:13; Matai 9:36) Tokoki kolanda ndakisa ya Nzambe soki tozali kotyela basusu likebi, na ndakisa bilenge.—15/4, nkasa 28-31.
• Nini ezali kondimisa biso ete Yehova amonaka makambo oyo tosalaka?
Biblia ezali komonisa ete Yehova amonaka makambo oyo bato basalaka. Amonaki mbeka oyo Abele apesaki, mpe amonaka ‘mbeka ya lisanzoli, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso.’ (Baebele 13:15) Yehova ayebaki milende oyo Enoka azalaki kosala ya kozala na bomoi ya pɛto mpo na kosepelisa ye. Lisusu, Nzambe amonaki ndenge mwasi ya mboka Zalefata, oyo akufelá mobali, oyo azalaki Moyisalaele te, akabolaki ná mosakoli Eliya mwa biloko moke oyo atikalaki na yango. Yehova amonaka mpe makambo oyo tosalaka na kondima.—1/5, nkasa 28-31.
• Mpo na nini tokoki koloba ete nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Bayuda oyo bakómaki baklisto basengelaki komipesa na Nzambe?
Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso, Bayisalaele bamipesaki na Yehova. (Exode 19:3-8) Nsima na yango, Bayuda bazalaki kobotama na kati ya ekólo oyo esalaki kondimana ya Mibeko. Kasi, Yehova alongolaki kondimana ya Mibeko na nzela ya liwa ya Klisto na mobu 33 T.B. (Bakolose 2:14) Kobanda wana, Bayuda oyo balingi kosalela Nzambe mosala oyo akondima basengelaki komipesa epai na ye mpe kozwa batisimo na nkombo ya Yesu Klisto.—15/5, nkasa 30-31.
• Kotumba mpaka ya malasi esɛngami mpe na losambo ya solo lelo oyo?
Kotumba mpaka ya malasi ezalaki na kati ya losambo ya solo na Yisalaele ya kala. (Exode 30:37, 38; Levitike 16:12, 13) Kasi, liwa ya Klisto esukisaki kondimana ya Mibeko, ná kotumba mpaka ya malasi. Moklisto akoki kopona ye moko kosalela mpaka ya malasi soki ezali na makambo ya losambo te, kasi ezali na kati ya losambo ya solo te lelo oyo. Esengeli kotalela makanisi ya bato mosusu mpo na kobɛtisa bango libaku te.—1/6, nkasa 28-30.
• Eloko nini bamoni oyo ezali kotinda ebele ya bato na kondima ete Yesu azalaki mpenza awa na mabelé?
Balobelaki mingi kɛsi moko ya kobomba mikuwa oyo bamonaki na Israël. Emonani ete kɛsi yango esalemaki na ekeke ya liboso, mpe ezalaki na makomi oyo: “Yakobo, mwana ya Yozefe, ndeko ya Yesu.” Bato mosusu bazali kotalela yango lokola “eloko eleki koumela na kati ya biloko oyo bato ya arkeoloji bazwá oyo, longola makambo oyo Biblia elobi, ezali kondimisa” ete Yesu azalaki.—15/6, nkasa 3-4.
• Ndenge nini moto ayekolaka bolingo?
Bato bayekolaka bolingo libosoliboso na kolanda ndakisa mpe mateya ya baboti. Ntango mwasi ná mobali bazali kolingana mpe kopesana limemya, bana bakoki koyekola bolingo. (Baefese 5:28; Tito 2:4) Ata soki moto akolaki na libota oyo bolingo ezalaki te, akoki koyekola bolingo soki alandi mateya ya Yehova, soki azwi lisalisi ya elimo santu, mpe soki azali kozwa lisungi ya bandeko baklisto.—1/7, nkasa 4-7.
• Eusèbe azalaki nani, mpe liteya nini tokoki kozwa na bomoi na ye?
Eusèbe azalaki mokomi ya makambo ya kala; na mobu 324 T.B. asilisaki kokoma buku ya volimi zomi oyo ezalaki na motó ya likambo ete Lisolo ya Lingomba ya boklisto. Atako azalaki kondima ete Tata azalaki liboso ya Mwana, Eusèbe andimaki likanisi mosusu na likita monene ya Nicée. Emonani mpenza ete abosanaki etinda ya Yesu ete bayekoli na ye Ye basengeli kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 17:16)—15/7, nkasa 29-31.
• Ndenge oyo Yehova atalelaka likambo ya kobala basi ebele ebongwaná?
Te, ndenge oyo Yehova atalelaka likambo ya kobala basi ebele ebongwaná te. (Malaki 3:6) Ebongiseli ya Nzambe mpo na moto ya liboso ezalaki ete mobali asengeli “kokangama na mwasi na ye” mpe kokóma mosuni moko na ye. (Genese 2:24) Yesu alobaki ete koboma libala, soki mpo na pite te mpe kobala mwasi mosusu, ezali ekobo. (Matai 19:4-6, 9) Ntango oyo Yehova atikaki mibali bábalaka basi ebele esukaki ntango lisangá ya boklisto esalemaki—1/8, lokasa 28.