Lisolo ya bomoi
Esengo na moto oyo Yehova azali nzambe na ye
YA TOM DIDUR
Tosilaki kofutela ndako ya makita. Tokanisaki ete tokozala bato soki 300 na liyangani na engumba Porcupine Plain, na etúká ya Saskatchewan, na Canada. Na mokolo ya misato, mbula-mpɛmbɛ ebandaki kokwea, mpe ntango tokómaki mokolo ya mitano, mbula-mpɛmbɛ etondaki mpe mwaye ya komona lisusu ata penepene ezalaki te. Malili ekómaki makasi (-40°C). Bayangani, ná mikóló ná bana mike, bazalaki bango nyonso 28. Wana ezali liyangani ya liboso nasalaki ntango nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga, nazalaki kaka na mbula 25 mpe nazalaki naino kobangabanga. Liboso nayebisa bino ndenge liyangani yango elekaki, tiká nayebisa bino ndenge nazwaki libaku malamu oyo ememaki ngai tii na mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga.
NAZALI mwana ya nsambo na libota ya bana mwambe, biso nyonso mibali. Bill azalaki mwana ya liboso, mpe nsima na ye Metro, John, Fred, Mike mpe Alex. Ngai nabotamaki na 1925 mpe Wally azali mwana ya nsuka. Tozalaki kofanda penepene na engumba Ukraina, na etúká ya Manitoba, epai baboti na ngai, Michael ná Anna Didur, bazalaki na mwa ferme. Tata azalaki kosala na nzela ya engbunduka. Lokola libota na biso ya bana ebele ekokaki te kofanda na mwa bandako ya mike oyo ezalaki na nzela ya engbunduka, tozalaki kofanda na ferme. Tata azalaki kofanda mingi te na ndako mpe, mpo na yango, Mama moto azalaki kobɔkɔla biso. Na bantango mosusu, Mama azalaki kotika biso mpo na kokende kolekisa pɔsɔ moko to koleka elongo na Tata, kasi asalaki nyonso mpo tóyeba kolamba, kotumba mampa, mpe kosala misala mosusu ya ndako. Mpe lokola tozalaki na Lingomba ya Katolike, Mama azalaki kolakisa biso kokanga mabondeli na motó mpe kosangana na milulu mosusu ya losambo.
Nabandi koyekola solo ya Biblia
Mposa na ngai ya koyeba Biblia ebandaki kokola banda nazalaki naino mwana. Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki kofanda penepene na biso azalaki koya kotala biso mbala na mbala mpo na kotángela biso mwa mikapo ya Biblia oyo elobelaka Bokonzi ya Nzambe, Armagedon mpe mapamboli oyo ekozala na mokili ya sika. Mama azalaki kosepela te koyoka Motatoli yango, kasi Mike ná Alex bazalaki kosepela na nsango yango mingi. Kutu, makambo oyo bayekolaki etindaki bango báboya kokɔta na mosala ya soda na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpo lisosoli na bango ezalaki kopekisa bango. Yango wana bakatelaki Mike bolɔkɔ ya mwa mikolo moke, nzokande Alex batindaki ye na Ontario, na kaa ya bakangami oyo bakatelaki bango etumbu ya misala makasi. Na nsima, Fred ná Wally mpe bandimaki solo. Kasi, bandeko na ngai ya mikóló misato bandimaki solo te. Na boumeli ya bambula, Mama azalaki kutu kotɛmɛla solo, kasi na nsima akamwisaki biso nyonso na ndenge azwaki ekateli ya kosalela Yehova. Azwaki batisimo na mbula 83. Mama akufaki na mbula 96. Tata akómaki mpe kosepela na solo liboso akufa.
Ntango nakómaki na mbula 17, nakendaki na engumba Winnipeg mpo na koluka mosala mpe kosangana na bato oyo bakokaki kosalisa ngai na koyekola Biblia. Na ntango wana mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki, kasi bazalaki kosala makita pɔsɔ na pɔsɔ. Likita ya liboso oyo nakendaki esalemaki na ndako ya ndeko moko. Lokola nakolaki na Lingomba ya Katolike ya Grèce, makambo oyo nazalaki koyoka na ebandeli ezalaki mpenza makambo ya sika mpo na ngai. Kasi mokemoke, nayebaki ete ebongiseli ya kozala na bakonzi na lingomba euti na Biblia te mpe ete Nzambe asepelaka te na ndenge bakonzi ya mangomba bapambolaka basoda liboso bákende na etumba. (Yisaya 2:4; Matai 23:8-10; Baloma 12:17, 18) Nakómaki komona ete ebongi mpenza kondima ete bato bakozala na bomoi na Paladiso awa na mabelé na esika ya kondima ete bakokende na mokili moko ya mosika mpo na libela.
Lokola nandimaki mpenza ete nazwi solo, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na Winnipeg na 1942. Na 1943, bapesaki Batatoli ya Yehova ya Canada nzela ya kosala mosala na bango, mpe mosala ya kosakola ekómaki kokende liboso. Lisusu, solo ya Biblia ekómaki mpenza kosimba motema na ngai. Nazwaki libaku ya kokóma nkulutu na lisangá, ya kokendaka kopesa masukulu na masangá mosusu mpe ya kosakolaka na bamboka oyo ezalaki na masangá te. Koyangana na mayangani ya minene na États-Unis esalisaki ngai mingi na kokola na elimo.
Namipesi mpo na kosalela Yehova mingi lisusu
Na 1950, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe na Desɛmbɛ ya mbula wana, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga. Nazwaki libaku malamu ya kozwa formasyo mpo na mosala yango pene na engumba Toronto epai ya Charlie Hepworth, ndeko moko ya sembo, oyo akɔmelaki mpenza na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Nazalaki mpe na esengo ya kolekisa pɔsɔ ya nsuka ya formasyo na ngai elongo na ndeko na ngai Alex, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na Winnipeg.
Lokola nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo, nakobosana ata mokolo moko te liyangani ya zongazonga ya liboso oyo nakambaki. Nazalaki komituna ndenge nini ekoleka. Atako bongo, ndeko Jack Nathan, mokɛngɛli ya etúká na biso, asalaki ete tólɛmbisa mabɔkɔ te mpe tóbungisa esengo na biso te. Toyeisaki programɛ ya liyangani yango mokuse mpe tosalaki yango kaka na mwa balobi oyo bazalaki wana. Moto na moto azalaki koleka mpo na koyebisa makambo oyo akutanaki na yango, kosala bilakiseli ya mosala ya kosakola ndako na ndako, ya kozongela bato oyo basepelaki, mpe bilakiseli ya ndenge ya koyekola Biblia na bato. Toyembaki banzembo ya Bokonzi. Biloko ya kolya ezalaki beboo. Tozalaki komɛla kafe ná bagato nsima ya ngonga mibalemibale. Bamosusu balalaki likoló ya bakiti, bamosusu na estrade mpe bamosusu kaka na nse. Mokolo ya lomingo, mbula-mpɛmbɛ ebandaki kosila, yango wana tozalaki bato 96 na lisukulu ya bato nyonso. Likambo yango esalisaki ngai nayeba koyika mpiko na ntango ya mpasi.
Na nsima, batindaki ngai nazala mokɛngɛli ya zongazonga na nɔrdi ya etúká ya Alberta, na etúká ya Colombie-Britannique mpe na etúká ya Yukon, mokili oyo moi emonanaka ata na midi ya butu. Mpo na kosala mobembo na nzela monene oyo babengaka Alaska Highway, oyo ezali ngombangomba, banda na engumba Dawson Creek, na etúká ya Colombie-Britannique tii na engumba Whitehorse, na etúká ya Yukon (ntaka ya kilomɛtrɛ 1 477) mpe kopesa litatoli nzelanzela esɛngaki kozala na mpiko mpe na bokɛngi. Mbula-mpɛmbɛ, bangomba ya milai mpe londende oyo ezalaki kopekisa komona malamu, nyonso wana ezalaki mpenza mikakatano.
Nakamwaki na komona ndenge oyo solo ekɔtaki tii na Grand Nord. Mbala moko, ngai ná Walter Lewkowicz tokendaki na ndako moko ya moke penepene na mwa mboka moko, na Colombie-Britannique, na nzela monene Alaska Highway, penepene na etúká ya Yukon. Toyebaki ete moto azalaki na mwa ndako yango mpamba te tomonaki kongɛnga ya mwinda na lininisa. Ezalaki pene na ngonga ya libwa ya butu, mpe tobɛtaki porte. Mobali moko andimaki na kati mpe ayebisaki biso tókɔta. Tokamwaki mpenza komona mobange moko ya mobali afandi na mbeto ya likoló mpe azali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli! Kutu, nimero oyo azalaki kotánga ezalaki ya sika koleka oyo biso tozalaki kokabola. Ayebisaki biso ete batindelaka ye bazulunalo yango na nzela ya mpɛpɔ. Lokola totikaki lisangá koleka mikolo mwambe, tozwaki naino bazulunalo ya sika te. Mobali yango ayebisaki biso ete nkombo na ye Fred Berg, mpe ete atako azwá abonema mpo na mikanda na biso banda ebele ya bambula, wana ezalaki mbala ya liboso oyo Batatoli ya Yehova báya kotala ye. Fred asɛngaki biso tólala epai na ye na butu wana. Tolimbwelaki ye ebele ya mateya ya Biblia mpe tozwaki bibongiseli mpo Batatoli mosusu oyo bazalaki mbala na mbala kosakola na teritware wana bákendaka kotala ye.
Na boumeli ya ebele ya bambula, nazalaki kotala zongazonga misato ya mikemike. Zongazonga yango ezalaki na kilomɛtrɛ koleka 3 500, banda na engumba Grande Prairie, na etúká ya Alberta, na ɛsti tii na engumba Kodiak, na etúká ya Alaska, na wɛsti.
Nazalaki na esengo monene ya komona ete ata na bamboka wana ya mosika, Yehova azali komonisela bato nyonso boboto monene na ye, mpe elimo ya Nzambe ezali kosimba makanisi mpe mitema ya baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko, se ndenge esalemaka bipai mosusu. Moko ya bato ya ndenge wana ezali Henry Lepine, moto moko ya engumba Dawson City (lelo oyo Dawson), na etúká ya Yukon. Henry azalaki kofanda na mboka moko mosika. Kutu, mbula 60 mobimba, azalaki kaka na bisika oyo balukaka wolo, azalaki kobima te. Kasi, atako mobange yango ya mbula 84 ayanganaki naino ata na likita moko te ya lisangá, elimo ya Yehova etindaki ye asala mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 1 600 tii na engumba Anchorage mpo na koyangana na liyangani ya zongazonga. Asepelaki mingi na mateya oyo ayokaki na liyangani yango mpe atondaki na esengo mpo na ntango oyo alekisaki elongo na baninga ya malamu. Ntango azongaki na Dawson City, Henry atikalaki sembo tii liwa na ye. Bato mingi oyo bayebaki Henry bazalaki komituna soki nini etindaki mobange yango asala mobembo molai ndenge wana. Koluka koyeba ntina oyo asalaki mobembo yango esalaki ete mwa mibange mosusu bándima solo. Na ndenge yango, atako asakolaki na monɔkɔ na ye te, Henry apesaki litatoli malamu mpenza.
Yehova amoniseli ngai motema-boboto na ye
Nazalaki na esengo monene na 1955, ntango babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 26 ya Gileadi, eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Mateya oyo nalandaki kuna elendisaki kondima na ngai mpe esalisaki ngai napusana lisusu penepene na Yehova. Ntango nasilisaki formasyo yango, batindaki ngai lisusu na mosala ya zongazonga na Canada.
Pene na mbula mobimba, nazalaki kotala masangá na etúká ya Ontario. Na nsima, bazongisaki ngai lisusu na mokili kitoko ya Alaska. Nazali komona lisusu babalabala na yango minene oyo eleká pembenipembeni ya balaki oyo mai na yango ya mpɛmbɛ engɛngaka mpe pembeni ya milɔngɔ ya bangomba oyo bansɔngɛ na yango ezipami na ngalasi. Na eleko ya molunge, mabwaku mpe bisobe ya mokili yango ezalaka kitoko na miso mpo etondaka na bafololo ya langi ndenge na ndenge. Mopɛpɛ ya mokili yango ezali malili mpe mai na yango ezali pɛto. Bangombolo, bambwa ya zamba, élan, renne mpe banyama mosusu ya zamba etambolaka na kimya na bisobe yango.
Nzokande, Alaska ezali mpe na mikakatano: klima na yango ebongwanaka mpambampamba mpe esengeli kotambola bantaka milaimilai. Zongazonga na ngai ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 3 200 banda na ɛsti tii na wɛsti. Na ntango wana, bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki naino na mituka te. Bandeko ya masangá oyo nazalaki kotala bazalaki kotika ngai na masangá mosusu na mituka na bango. Kasi, na bantango mosusu, nazalaki kosɛnga na batambwisi ya mituka ya minene to baturiste bámema ngai.
Mbala moko oyo nasalaki bongo ezalaki na nzela monene Alaska Highway, banda na Tok Junction, na etúká ya Alaska tii na Mile 1202, to Scotty Creek. Babiro ya douane ya bisika mibale wana ekabwanaki na kilomɛtrɛ 160. Nalekaki biro ya douane ya États-Unis na Tok mpe bamemaki ngai na motuka na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 50. Na nsima, ata motuka moko te ezalaki koleka, mpe natambolaki na makolo soki ngonga zomi mpe nasalaki kilomɛtrɛ koleka 40. Nsima ya mikolo nde bayebisaki ngai ete ntango nalekaki biro ya douane, mwa moke na nsima, mituka ekokaki lisusu kotambola te na mwa ntaka molai banda na biro ya douane, mpamba te ngalasi ezipaki balabala mobimba. Na midi ya butu, malili ekómaki makasi (pene na -23°C), mpe nazalaki naino mosika, soki kilomɛtrɛ 80 na esika eleki pene oyo nakokaki kozwa ndako mpo na kokima malili. Nazalaki na mposa makasi ya kozwa esika mpo na kokima malili mpe kopema.
Ntango napusanaki lisusu mwa mosika wana nazalaki kotɛnguma, namonaki motuka moko basundolá pembeni ya balabala, ezipami mwa moke na ngalasi. Nakanisaki ete nakobika na malili ya butu soki nakɔti na motuka yango mpe nalali na bakusɛ na yango. Nalongolaki ngalasi oyo ezipaki motuka yango mpe nafungolaki porte, kasi na kati nakutaki kaka bibende. Likambo ya esengo, mwa mosika liboso, nakutaki mwa ndako moko ya moke oyo ezalaki na moto te na kati. Nabundaki mpo na kofungola mwa ndako yango mpe mpo na kopelisa mɔtɔ, nsukansuka nalongaki mpe napemaki mwa ndambo. Na ntɔngɔ, nasalaki makasi mpe nazwaki motuka oyo ememaki ngai tii na mboka oyo elandi, mpe kuna nasombaki biloko ya kolya mpe natyaki nkisi na misapi oyo ezokaki mpe nakangaki yango bande.
Yehova azali kokolisa solo na Alaska
Mbala ya liboso oyo nakendaki na engumba ya Fairbanks nalendisamaki mpenza. Tozwaki matomba mingi mpenza na mosala ya kosakola, mpe mokolo ya lomingo, bato soki 50 bayanganaki mpo na kolanda lisukulu ya bato nyonso. Toyanganaki na mwa ndako moke ya bamisionɛrɛ, epai Vernor Davis ná mwasi na ye Lorraine bazalaki kofanda. Bato batondanaki na kuku, na shambrɛ mpe na kulware ya mwa ndako yango mpo na koyoka lisukulu. Lokola bato ebele ndenge wana bayaki kolanda lisukulu, tomonaki ete soki ndako ya bokonzi etongami na Fairbanks, mosala ya kosakola ekokende liboso na engumba yango. Yango wana, na lisalisi ya Yehova, tosombaki ndako moko ya monene, oyo ezalaki liboso ndako ya mabina, mpe tomemaki yango na lopango moko kitoko. Totimolaki libulu ya mai, totongaki batwalɛti mpe totyaki bamasini oyo epesaka molunge. Nsima ya mbula moko, bazwaki Ndako ya Bokonzi moko ya malonga na Fairbanks. Ntango babakisaki kuku na ndako yango, tosalelaki yango na 1958 mpo na liyangani ya etúká oyo esangisaki bato 330.
Na eleko ya molunge ya 1960, nasalaki mobembo molai mpenza na motuka tii na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York mpo na kozwa lisusu formasyo oyo ebongisamaki mpo na bakɛngɛli-batamboli nyonso ya États-Unis ná Canada. Ntango nazalaki kuna, Ndeko Nathan Knorr ná bandeko mosusu oyo bazalaki kokamba lisangá batunaki ngai mituna mpo na koyeba soki ekozala malamu bátya biro moko ya filiale na Alaska. Mwa basanza na nsima, tozalaki na esengo ya koyoka ete tii tókóma na 1 Sɛtɛmbɛ 1961, biro ya filiale ekofungwama na Alaska. Baponaki ndeko Andrew Wagner mokambi ya filiale yango. Ye ná mwasi na ye, Vera, basalaki na Brooklyn mbula 20; basalaki mpe mingi na mosala ya zongazonga. Kofungwama ya biro ya filiale na Alaska ezalaki likambo malamu mpenza, mpo yango esalaki ete mokɛngɛli ya zongazonga asalaka mibembo mingi lisusu te, mpe yango epesaki ye likoki ya kotalela malamumalamu bamposa ya masangá ná bateritware ya mosikamosika.
Eleko ya molunge ya 1962 ezalaki ntango moko ya esengo na Alaska. Bafungolaki biro ya filiale ya Alaska, mpe liyangani moko ya etúká esalemaki na Juneau, mboka-mokonzi ya Alaska. Batongaki Bandako ya Bokonzi ya sika na bingumba Juneau mpe Whitehorse, na etúká ya Yukon, mpe mwa bituluku mingi esalemaki na bisika mosusu.
Nazongi na Canada
Na boumeli ya bambula, nazalaki kosolola na nzela ya mikanda ná Margareta Petras, oyo azalaki kofanda na Canada. Reta, lokola bamesaná kobenga ye, abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1947, azwaki diplome na Gileadi na 1955, mpe azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na ɛsti ya Canada. Natunaki ye libala mpe andimaki. Tobalanaki na Whitehorse na sanza ya Febwali 1963. Kobanda na ɔtɔne ya mbula yango, batindaki ngai mokɛngeli ya zongazonga na wɛsti ya Canada, mpe tozalaki na esengo ya kosala kuna na boumeli ya mbula 25 oyo elandaki.
Na 1988, lokola tozalaki lisusu nzoto malamu te, batindaki biso babongisi-nzela minene na engumba Winnipeg, na etúká ya Manitoba. Tobatelaki mpe Ndako ya Mayangani na boumeli ya mbula mitano. Tozali kokoba kopesa mabɔkɔ na mosala ya esengo ya kokómisa bato bayekoli na ndenge oyo makoki na biso ezali kopesa nzela. Ntango tozalaki na mosala ya zongazonga, tozalaki kobanda boyekoli ya Biblia na bato mingi, oyo tozalaki kotikela bandeko bákoba koyekola na bango. Lelo oyo, na boboto-monene ya Yehova, tobandaka boyekoli na bato mpe tozalaka na esengo mingi lisusu ya komona ndenge bayekoli na biso bazali kokola na elimo tii na komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo.
Nandimi mpenza ete kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Ezali bomoi ya ntina mingi mpe ya esengo, mpe ekolisaka bolingo na biso mpo na Yehova mokolo na mokolo. Yango nde ememaka esengo ya solosolo. Tondimaka mpenza ete mokomi ya nzembo alobaki solo ntango akomaki ete: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!” ezala bato yango bazali na mokumba nini na lisangá to mpe bafandi na mboka nini.—Nzembo 144:15, NW.
[Elilingi na lokasa 24]
Na mosala ya zongazonga
[Elilingi na lokasa 25]
Epai ya Henry Lepine na Dawson City. Nazali na lobɔkɔ ya mwasi
[Elilingi na lokasa 26]
Ndako ya Bokonzi ya liboso na engumba Anchorage
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai ná Reta, na 1998