Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/10 nk. 21-25
  • Mabelé ya mpamba makómi kobota mbuma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabelé ya mpamba makómi kobota mbuma
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libula ya elimo
  • Kosangana kati na mosala ya kosakola
  • Kolóna mbóto penepene ya mai monene
  • Kolandana ya mosala elongo na mobalani
  • Kolónga botɛmɛli
  • Mikakatano na mai monene
  • Mabongwani mosusu
  • Mabelé masili kobota mbuma mingi
  • Likama na mobembo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kotya motema epai na Jehovah epesaka bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masuwa ya Galilai—Eloko ya motuya ya ntango ya kala
    Lamuká!—2007
  • Esengo na moto oyo Yehova azali nzambe na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/10 nk. 21-25

Mabelé ya mpamba makómi kobota mbuma

LISOLÓ YA ARTHUR MELIN

Ezalaki na mokolo moko kitoko na ebandeli ya eleko ya molungé na 1930, mpe natɛlɛmaki na libongo moko ya engumba Prince Rupert, na etúká ya Colombie Britannique. Wana ezalaki ngai kotala masúwa na nsé mpenza likoló na zɛlɔ ya mai monene, namitunaki ete, ‘Mai nyonso ekei wapi?’ Ezalaki mpo na ngai mbala ya liboso komona bobuti mpe bokiti ya mai monene Pacifique na etúká ya wɛ́sti ya Canada, epai nivo ya mai monene ekitaka bamɛtɛlɛ 7 na nsé bobele na bangonga motoba. Kasi lolenge nini elenge mobali oyo akólaki na ebokwelo moko ya bibwele na bisobe ya Canada akómaki na mabongo ya mai monene Pacifique?

NATINDAMAKI mpo na kokólisa libaku na ngai ya mosala ya ntango nyonso mpo na Yehova, na kokɔtáká na ekipi ya basáli na masúwa Charmian. Mokumba na biso mozalaki ya kobandisa mosala ya kosakola na bitúká bitangwi ya wɛ́sti oyo bizali penepene ya mai monene kobanda na Vancouver kino na Alaska. Etando oyo esangisaki bakilomɛtɛlɛ mingi ya Colombie Britannique penepene ya mai monene, yango ezalaki mpenza na basanzoli ya Yehova te. Ezalaki bobele na etuluku moko moke ya basakoli ya Bokonzi kati na engumba ya Prince Rupert.

Nazalaki na motema likoló mpo na kobanda mosala ya kosakola, yango wana ntango nakitaki na engbunduka, nakendeki mbala moko na mabongo mpo na koluka masúwa Charmian mpe kokutana na ekipi ya basáli na yango, Arne mpe Christina Barstad. Moto moko te azalaki na kati; na yango, nalongwaki. Bobele na mokolo wana, ntango nazongaki lisusu, natungisamaki mpenza. Emonanaki lokola ete mai monene mazalaki kokauka!

Kasi nini ememaki ngai na mokumba wana ya kosepelisa?

Libula ya elimo

Bosepeli na ngai mpo na makambo ya elimo ebandaki na ndako na biso na bisobe ya Alberta, na Canada. Tata na ngai amonaki trakte moko oyo ekomamaki na Charles Taze Russell ya Zion’s Watch Tower Tract Society, oyo ebongolaki mpenza bomoi na ye. Tata abandaki kosakwela baninga na ye ya pembeni, atako mosala na ye ya bilanga na Calmar, na etúká ya Alberta ezalaki kozwa ntango mingi. Yango esili sikawa koleka mibu monkámá, na ebandeli ya bambula 1890.

Ezalaki kati na libota wana ya bobángi Nzambe nde nabotamaki na Febwáli 20, 1905, mwana ya mwambe kati na libota oyo na nsima ekómaki libota ya bandeko mibali mpe bandeko basi zomi. Tata, elongo na bato mosusu kati na etuluku wana ya bato bautaki mboka Suède, asanganaki elongo na Bayekoli ya Biblia kati na mikili mingi. Na nsima batongaki esika ya makita, oyo na nsima ebéngamaki Ndako ya Bokonzi. Yango ezalaki moko kati na Bandako ya Bokonzi ya liboso na Canada.

Misala ya bilanga mipekisaki biso soko moke te koyangana na makita ya boklisto, oyo mosusu na yango ezalaki na masukúlu ya balobi-bapaya oyo la Société Watch Tower azalaki kotinda. Masukúlu wana makólisaki kati na biso mposa makasi ya kosangana na mosala ya kosakola. Lokola mbano, pene na basangani nyonso ya libota na biso basili kotambola na molende nyonso kati na solo ya Biblia.

Kosangana kati na mosala ya kosakola

Na ebandeli ya bambula 1920, nazwaki teritware na ngai ya liboso ya kosakola. Nasengelaki kokabola ndako na ndako nkasa ya libyangi mpo na lisukúlu ya bato banso na engumba ya Edmonton. Lokola nazalaki ngai moko mokolo wana, nayekolaki liteya moko ya motuya mingi: Kotya elikya epai na Yehova. (Masese 3:5, 6) Nazalaki mpenza na esengo ya kokokisa mokumba wana ya liboso na lisalisi ya Yehova!

Elikya oyo nazalaki na yango kati na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana mpe kati na kelasi na ye ya moombo na sembo mpe na mayele elandaki kokóla na meko oyo bososoli mingi bozalaki kopesama likoló na Liloba na ye ya solo. Misala mpe mimeseno mingi ya boklisto ya nkombo mpamba, lokola kokumisa eyenga ya Mbótama mpe kokanisa mokolo ya kobotama mibwakamaki. Lobiko ya moto na moto ezalaki lisusu likambo ya ntina monene te; na esika na yango, kosakolama ya Bokonzi nde epesamelaki motuya oyo ebongi na yango. Nyonso wana ezalaki na bopusi mozindo likoló na bomoi na ngai. Yango wana, mwa moke nsima ya kopesa bomoi na ngai epai na Yehova na Apríli 23, 1923, nakómisaki mosala ya ntango nyonso mokano ya bomoi na ngai.

Na boumeli ya bileko ya mpiɔ makasi ya bisobe, tozalaki kopesa litatoli na bamboka mike na mpunda mpe pusu oyo ebendami na mpunda. Na libaku mosusu nalekisaki pɔ́sɔ mibale elongo na etuluku moko kati na motuka oyo ezalaki mpe kosalelama lokola ndako ya kolala. Mituka oyo misalemi motindo wana mibongaki mpenza mpo na kopesa litatoli na bitando minene ya bisobe ya Canada. Atako mikakatano ya nkita, mpiɔ makasi mpe mibembo milai ya kosala, namibongisaki mpo na kolendendela na mosala ya mobongisi-nzela na Alberta na kozongeláká yango mbala na mbala na boumeli ya mibu misato kino mokolo wana ya ntina mingi ya mobu 1930 wana natindamaki na bitando ya wɛ́sti penepene na mai monene. Lokola nayebaki eloko moko te na ntina na mai monene mpe na masúwa, libyangi yango ebulunganisaki ngai.

Nokinoki, nsima ya kokóma na ngai na Prince Rupert, namimonaki mopaya te elongo na baninga na ngai ya mosala kati na masúwa. Ndeko Barstad azalaki mosáli ya masúwa oyo ameseni mingi, mpamba te asilaki kosala mibu mingi na kompanyi ya kolɔ́ba mbisi. Mibu motoba oyo milandaki mizalaki eleko ya mosala mingi ya kosakola, ya kolekaleka na mai monene na mabongo ya Colombie Britannique kobanda na Vancouver kino na Alaska. Liteya mosusu oyo nayekolaki ezali ete: Kondima ntango nyonso mokumba oyo mopesami na Yehova, mpe kokakatana soko moke te mpo na yango.

Kolóna mbóto penepene ya mai monene

Libongo na biso ya liboso epai tosɛ́maki na ebandeli ya eleko ya molungé wana ya mobu 1930 ezalaki bongo engumba Ketchikan, na Alaska, epai totikaki bakarto 60 ya mikanda mikolimbolaka Biblia. Na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi, tokendeki na bandako nyonso ya Ketchikan, ya Wrangell, ya Petersburg, ya Juneau, ya Skagway, ya Haines, ya Sitka, mpe ya bamboka mosusu mike oyo etangwami moko na mosusu. Na nsima tosakolaki na bato nyonso ya Colombie Britannique oyo bazalaki pembeni ya mai monene, tosilisaki yango liboso ete eleko ya molungé esila. Totalaki mpe bamboka mosika, bisika ya bakompanyi ya kosala sardini, bamboka ya ba Indiens, bingumba mike, kino epai na bato oyo bakendá kofanda mosika mpe balɔ́bi kati na banganda. Na bantango mosusu ezalaki mpasi mpo na kotika bakɛngɛli ya miinda na bisika bitangwami baoyo bayambaki biso malamu mpo na kosolola.

Na nsima, la Société atindelaki biso bafono ya komema na mabɔkɔ mpe badisiki ya masukúlu ya Biblia. Tozalaki komema yango, elongo na babúku, Biblia, mpe bazulunalo. Mbala mingi tozalaki komema yango wana tozalaki kolekaleka na mabangá na mabongo ya mai monene. Na bantango ya bokiti ya mai, tosengelaki mbala mosusu koleka likoló na bibuteli oyo bizalaki koningananingana wana tozalaki kolekaleka na bisika bikeseni ya mabongo. Nazalaki na esengo ete namesenaki kosala misala makasi na bolenge na ngai wana tozalaki kosala na bilanga kati na esobe.

Ekóliseli ya mongongo kati na masúwa na biso ezalaki esaleli ya nguya mingi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Wana ekumbamaki na mbonge, masukúlu mayokisami na fono mazalaki koyokana mosika kino bakilomɛtɛlɛ mingi. Mokolo moko, wana tosɛ́misaki masúwa na esanga Vancouver esika mai matɛlɛmi nyɛɛ, toyokisaki moko na masukúlu ya Biblia. Na mokolo oyo molandaki, bafandi ya esanga yango bayebisaki biso na maoki nyonso ete: “Lobi toyokaki esakweli moko kouta mpenza na likoló!”

Na libaku mosusu, mobali moko elongo na mwasi na ye, bango nyonso mibangé, balobaki ete bayokaki miziki kokita na lidusu oyo ebimisaka molinga ya kúku na bango, kasi ntango babimaki libándá, bayokaki eloko moko te. Wana bakɔtaki lisusu na ndako, bayokaki mongongo moko. Mpo na nini esalemaki bongo? Ntango bazalaki na libándá, tozalaki kotya disiki mosusu. Tozalaki na momeseno ya kobɛta liboso miziki mpo na kobenda likebi na bato, bongo na nsima tozalaki kotya lisukúlu ya Biblia.

Na libaku moko mosusu, wana tosɛ́maki penepene ya esanga moko oyo efandamaki na ba Indiens, bilenge mibali mibale bayaki na bwato mpo na komona epai mongongo mozalaki kouta. Bato mosusu ya esanga bakanisaki ete ezalaki mingongo na bakufi na bango nde bazongi na bomoi!

Mbala mingi, tozalaki kokabola babúku koleka monkámá epai na basáli na bakompanyi ya sardini. Lokola bazalaki na masano mingi te mpo na kominanola, bazalaki na ntango mingi ya kokanisa na makambo ya elimo. Na nsima, mingi kati na bato wana oyo batangolami mosika bakómaki Batatoli. Na mibembo oyo milandaki, tozalaki kozela na esengo nyonso kokutana na bango mpo na “koyikisana mpiko.”​—Baloma 1:12.

Kolandana ya mosala elongo na mobalani

Na mobu 1931, nabalaki Anna, lɛki ya Christina Barstad. Na nsima tolandaki kosala mosala ya babongisi-nzela elongo likoló na masúwa mpe tomonaki makambo mingi ya kosepelisa na boumeli ya mibu mingi oyo milandaki. Baleines, nyama ebéngami lion de mer (nkosi ya mai monene), nyama ebéngami phoque, marsouin, bambuli ebéngami cerfs, bangɔmbɔlɔ, mpe mpongo nde ezalaki baninga na biso kati na bisika ya bangomba kitoko, na bisika mai monene makɔti mosika kati na mabelé, na bisika kitoko epai mabelé makɔti kati na mai monene, na bitando bizipami na nzeté ya cèdres, ya pins, mpe nzeté monene ebéngami Douglas firs. Mbala mingi tosungaki bambuli mpe bana na yango, wana ezalaki bango komeka kokatisa bisika mai mazali makasi, mpo na komibikisa na banguna na bango.

Mokolo moko, na nsima ya nzangá tomonaki mpongo moko kopumbwa mpenza penepene na mai, manzaka na yango masimbaki makasi mbisi monene ebéngami saumon. Mbisi elekaki monene na boye ete akokaki te kotombola yango libándá na mai, na yango mpongo ebandaki kokende epai na mokili wana esimbaki mbisi yango na manzaka. Frank Franske, mosangani ya ekipi na biso, amonaki likoki ya kozwa mbisi wana mpe alandaki pembeni na mai monene mpo na kokutana na mpongo oyo esilaki kolɛmba mpe abenganaki yango ete etika mbisi. Na mpokwa, ekipi na biso ya babongisi-nzela esepelaki kolya mbisi kitoko, mpe mpongo eyekolaki ezaleli ya kokaba, atako esalaki yango na motema moko te.

Na esanga moko moke na nɔ́rdi ya esanga Vancouver, mobali moko mpe mwasi na ye, na nkombo Thuot bandimaki solo ya Biblia. Mobali ayebaki kotánga te, moto ya ekateli makasi, moto ya elimo ya lipandá oyo azalaki na mibu soko 95, mpe mwasi na ye azalaki na mibu soko 85. Kasi, mobali yango akamwaki mpenza mingi na solo na boye ete amikitisaki mpe apesaki mwasi na ye nzela ete alakisa ye kotánga. Nokinoki akómaki na makoki ya koyekola ye moko Biblia mpe mikanda ya la Société. Liboso ete mbula misato ekoka, nazalaki na esengo ya kobatisa bango nyonso mibale kuna mosika na esanga epai babotamaki, kosaleláká bwato na biso lokola pisini mpo na batisimo!

Tozalaki lisusu na esengo ya komona libota ya Sallis na ebale Powell kondima nsango ya Bokonzi. Walter atángaki mwa búku War or Peace​—Which? (Etumba to kimya​—Oyo wapi?) mpe asosolaki nokinoki ete ezalaki solo. Mwa moke na nsima libota mobimba esanganaki na Walter na mosala ya babongisi-nzela na Vancouver, epai tozalaki kokanga masúwa Charmian mpo na kolekisa eleko ya mpiɔ. Azalaki na molende mingi, mpe na boumeli ya bambula akómaki mpenza molingami na libota mobimba ya bandeko na etúká ya Vancouver. Asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na 1976, kotikáká nsima na ye libota monene ya Batatoli.

Kolónga botɛmɛli

Mbala mingi bakonzi ya mangomba ya bamboka ya ba Indiens bazalaki kosepela te na mosala na biso; bazalaki kotalela biso lokola miyibi kati na teritware na bango ya elimo. Na libongo ya mboka moke Simpson, mokonzi ya lingomba na mboka yango asɛngaki na mokonzi ya mboka ete apekisa biso koteya na bandako na bato. Tokutanaki na mokonzi ya mboka mpe totunaki ye soki andimaki ete mokonzi ya lingomba azali na elónga ya kotalela bato na ye lokola baínga oyo bakokaki te kozwa ekateli bango moko. Topesaki ye likanisi ete atika bato na ye bápesamela libaku ya koyoka lisoló ya Liloba ya Nzambe mpe ya kozwa ekateli bango moko na ntina na oyo balingaki kondima. Yango ebimisaki mbano: Apesaki biso ndingisa ya kolanda kosakola kati na mboka.

Na boumeli ya bambula mingi, mokonzi ya mboka mosusu aboyaki mikano ya lisangani ya bapesi-toli mpe ya bituluku ya mangomba mpo na oyo etali kopekisa Batatoli na kokutana na bato na ye. Alobaki ete: “Wana nakozala ntango nyonso mokonzi, Batatoli ya Yehova bakoyambama malamu awa.” Ezali solo ete, toyambamaki ntango nyonso malamu te na bisika nyonso, kasi atako botɛmɛli bozalaki, babenganaki biso ata esika moko te. Yango wana tozalaki na makoki ya kosala mosala na biso ntango nyonso oyo tozalaki kosɛ́ma wana.

Mikakatano na mai monene

Na boumeli ya bambula mingi oyo eleki, tokutanaki na mikakatano ya mipepe makasi, ya bobuti mpe bokiti ya mai monene, ya mabangá oyo mayebisami na karte te, mpe mbala mosusu mikakatano ya motɛ́lɛ. Na libaku moko topusamaki penepene mingi na esanga ya Lasqueti, bakilomɛtɛlɛ soko 160 na nɔ́rdi ya Vancouver. Tokakemaki likoló na mabangá, tokangami kuna na bokiti ya mai monene, mpe libateli na biso lizalaki kotalela mopepe. Soki mopepe mopepaki makasi, mbɛlɛ masúwa malingaki kopanzana likoló na mabangá. Biso banso tomataki likoló na mabangá mpe tosalaki nyonso oyo ekokaki na biso kati na ezalela wana ya mpasi. Tolyaki bilei ya midi, mpe tolekisaki ntango na kosala boyekoli, kozeláká lisusu bobuti ya mai monene.

Atako makámá mpe mikakatano mingi, ezalaki bomoi kitoko, ya esengo. Nzokande, kobotama ya bana na biso mibale ya mibali ememaki mbongwana monene. Tokóbaki kofanda na masúwa, kasi ntango nyonso oyo tozalaki kobuta kino ebale Oona, Anna mpe bana bazalaki kotikala elongo na baboti ya Anna wana biso tokóbaki mobembo mosika na nɔ́rdi kino na Alaska. Bongo, wana tozalaki kozonga na sudí, Anna mpe bana bazalaki kosangana lisusu na biso.

Ata mbala moko te bana bamilelaki to babɛlaki. Bazalaki ntango nyonso kolata nkamba ya libateli, mpe mbala mosusu tozalaki nkutu kokangela bango nsinga na loketo. Ee, mbala mosusu bantango ya mikakatano ezalaki.

Mabongwani mosusu

Na 1936 tosengelaki kotika masúwa Charmian, mpe nazwaki mosala ya mosuni. Na nsima mwana na biso ya mobali ya misato abotamaki. Nsima na bambula nasombaki masúwa ya kolɔ́ba mbisi, oyo ezalaki te bobele kosimba bomoi na biso kasi epesaki biso lisusu nzela ya kokóba kosakola na bamboka oyo ezalaki pembeni ya mai monene.

Toponaki kofanda na esanga Digby, na ngámbo mosusu esika mai makɔti na mabelé oyo ekaboli esanga yango na Prince Rupert, mpe nokinoki lisangá moko moke esalamaki wana. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na Canada, tozalaki kokamata masúwa na Prince Rupert nsima ya minuit mpe “kosilisa” teritware mobimba epai tokendeki, na kotikáká mikanda na ndako nyonso. Moto moko te akokaki kokanisa ete mobembo na biso ya minuit ezalaki mpo na kokabola mikanda mipekisami!

Mabelé masili kobota mbuma mingi

Moke na moke bato mingi babandaki kosangana elongo na Batatoli ya Yehova, mpe na 1948 emonanaki polele ete tozalaki na mposa ya Ndako ya Bokonzi na Prince Rupert. Nsima ya kosomba ndako moko ya basodá oyo etalanaki na bandako ya libongo, topikolaki yango bitenibiteni, tokatisaki yango na ngámbo, na nsima tomemaki yango na motuka kino esika ya botongi. Yehova apambolaki mosala makasi oyo tosalaki, mpe tozwaki Ndako ya Bokonzi ya biso moko.

Na 1956, nazongelaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe Anna alandaki ngai na 1964. Tosakolaki lisusu na masúwa na bamboka pembeni ya mai monene Pacifique. Mpo na mwa ntango moke tosanganaki mpe na mosala ya zongazonga, kotaláká masangá kobanda na bisanga Reine Charlotte epai na ɛ́sti na kokatisáká bangomba kino Libeke Fraser, mpe na nsima kino na engumba Prince Georges mpe Mackenzie. Na boumeli ya bambula mingi tosalaki mibembo ya bankótó ya bakilomɛtɛlɛ kati na etúká mobimba ya Pacifique ya nɔ́rdi-wɛ́sti na motuka, na masúwa mpe na mpepo.

Na Prince Rupert tolandaki kokutana na makambo mingi ya kosepelisa kati na mosala ya kosakola. Anna mpe ngai toyekolaki elongo na bato oyo na nsima balandaki mateya na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower mpe basalaki na mikili ya bapaya lokola bamisionere. Oyo nde esengo na komona bana na biso ya elimo komema nsango ya Bokonzi oyo ezali na motuya mingi kino na bamboka mosika na mokili!

Sikawa biso nyonso mibale tosili koleka mibu 80 mpe tozali kobunda na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, kasi tozali ntango nyonso na esengo kati na mosala ya Yehova. Kitoko ya biloko bizalisami oyo tomonaki na Alaska mpe na Colombie Britannique ezali kokundwela biso makambo ya motuya mingi. Nzokande ezali esengo lisusu na komona ete oyo kala ezalaki mabelé ya mpamba na elimo kati na etando wana monene eboti sikawa masangá mingi ya basanzoli ya Yehova.

Mingi mpenza mitema na biso misili kosepela na komona bana na biso moko, elongo na bana na biso ya elimo, kokóla mpe kopambola Yehova. Tozali na esengo ete tosanganaki mwa moke na bokóli ya elimo ya eteni wana ya mabelé. Na ndakisa, Alaska ezali sikawa na biro ya filiale na yango oyo ezali kokamba mosala ya masangá koleka 25.

Awa na Prince Rupert, na mobu 1988 tozalaki na nsaí ya kofungola Ndako ya Bokonzi moko kitoko, na katikati mpenza ya engumba. Ee, tozali kosepela, lokola Yisaya, wana alobaki ete: “Nde osili kofulukisa libota; Ɛ [Yehova], . . . okɛmbisami; okomisi yango mosika kino nsuka yɔnsɔ na mokili.”​—Yisaya 26:15.

[Elilingi na lokasa 21]

Na mosala ya mokɛngɛli-motamboli 1964-1967

[Elilingi na lokasa 24]

Motindo ya masúwa oyo masalelamaki mpo na kopesa litatoli na bitúká penepene ya mai monene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto