Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/2 nk. 23-27
  • Namoni motema-boboto mpe likebi ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Namoni motema-boboto mpe likebi ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Naluki solo na Australie
  • Ekuke monene ya mosala efungwami
  • Lipamboli oyo nakanisaki te
  • Mikakatano na nzoto
  • Nazongi na Angleterre
  • Nazwi eloko ya malamu koleka lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Kati na zando mokolo na mokolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Ngai oyo! Tinda ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/2 nk. 23-27

Lisolo ya bomoi

Namoni motema-boboto mpe likebi ya Yehova

YA FAY KING

Baboti na ngai bazalaki bato ya boboto, kasi, lokola kaka ebele ya bato mosusu, bazalaki kokipe makambo ya Nzambe ata moke te. Mama azalaki koloba ete: “Nzambe azali, mpo soki azali te, nani asalá bafololo ná banzete?” Kasi azalaki kosuka kaka wana.

TATA akufaki na 1939, ntango nazalaki na mbula 11; na nsima, tofandaki ná mama na engumba Stockport, na sudi ya engumba Manchester, na Angleterre. Nakolaki na mposa ya koyeba Mozalisi na ngai malamu mpe atako nayebaki mpenza Biblia te, nazalaki komemya yango mingi. Yango wana, nazwaki ekateli ya kokende na Lingomba ya Angleterre mpo na koyoka mateya na yango.

Milulu ya losambo ezalaki mpenza kolobela ngai eloko te, kasi ntango bazalaki kotánga Baevanzile, maloba ya Yesu ezalaki kondimisa ngai ete Biblia ezali solo. Soki nakanisi, namitunaka mpo na nini na ntango wana ngai moko nazalaki kotánga Biblia te. Ata ntango moninga na biso moko apesaki ngai “Testama ya Sika” na libongoli moko ya mikolo oyo, natángaki yango te.

Etumba ya Corée oyo ebandaki na 1950 etindaki ngai nabanda kokanisa mingi. Nazalaki komituna soki etumba yango ekopalangana na mikili mingi lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Soki epalangani, ndenge nini nakoki kotosa etinda ya Yesu ya kolinga banguna na ngai? Kasi, nakokanga nde motema mpe kotala banguna bákɔta na mboka na biso? Soki mpe nasali bongo, ekomonana ete nakimi mokumba na ngai. Atako mituna yango ezalaki kobulunganisa ngai, nazalaki kaka kondima ete Biblia ezali na biyano na mituna na ngai nyonso, atako nayebaki te ndenge nini mpe bisika nini nakozwa yango.

Naluki solo na Australie

Na 1954, ngai ná mama tokendaki kofanda na Australie, epai Jean, yaya na ngai ya mwasi, azalaki kofanda. Nsima ya mwa bambula, Jean ayebisaki ngai ete asɛngaki Batatoli ya Yehova báya kotala ngai, mpamba te ayebaki ete nazalaki kosepela na Biblia mpe nazalaki kokende ndako-nzambe. Alingaki koyoka soki nakoloba nini mpo na Batatoli ya Yehova. Alobaki na ngai boye: “Nayebi te soki ndenge oyo balimbolaka Biblia ezali malamu to mabe, kasi nayebi ete balimbolaka yango koleka mangomba mosusu.”

Nasepelaki mingi na Bill Schneider ná mwasi na ye Linda, Batatoli oyo bayaki kotala ngai. Bazalaki na bambula pene na 70 mpe bazalaki Batatoli banda ebele ya bambula. Basalaki na radio oyo Batatoli ya Yehova bafungolaki na engumba Adélaïde mpe, na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango bapekisaki mosala ya Batatoli na Australie, bakómaki babongisi-nzela, elingi koloba basakoli ya ntango nyonso. Atako Bill ná Linda bazalaki kolimbwela ngai makambo mingi, nazalaki naino kaka kokende na mangomba ndenge na ndenge.

Mokolo mosusu, moninga moko ya mosala amemaki ngai tókende koyoka mateya ya Pastɛrɛ Billy Graham; ntango mateya esilaki, elongo ná mwa bato mosusu tosololaki na pastɛrɛ moko mpe asɛngaki biso tótuna ye mituna oyo tozali na yango. Natunaki ye motuna moko oyo ezalaki naino kotungisa ngai: “Ndenge nini moklisto akoki kolinga banguna na ye soki azali lisusu kokɔta na bitumba mpe koboma bango?” Bato nyonso oyo bazalaki wana basepelaki na motuna yango​—emonanaki ete ezalaki mpe kotungisa bango! Pastɛrɛ yango alobaki ete: “Nazali na eyano te na motuna wana. Nakokanisa lisusu.”

Nazalaki mpe kaka koyekola Biblia na Bill ná Linda mpe, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1958, nazwaki batisimo. Nazwaki ekateli ya kolanda ndakisa ya bandeko oyo bateyaki ngai solo, mpe na sanza ya Augusto ya mbula oyo elandaki, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Sanza mwambe na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene. Nazalaki mpenza na esengo ya koyoka ete yaya na ngai Jean mpe akobaki koyekola mpe azwaki batisimo!

Ekuke monene ya mosala efungwami

Nazalaki na lisangá moko ya engumba Sydney mpe nazalaki koyekola Biblia na bato mingi. Mokolo moko, nakutanaki na pastɛrɛ moko oyo azwá epaso mpe natunaki ye soki lingomba na bango eteyaka nini mpo na nsuka ya mokili. Ayebisaki ngai ete azalaki moteyi na lingomba na boumeli ya mbula 50, kasi, eyano oyo apesaki ngai ekamwisaki ngai mpenza: “Nasengeli koluka eyano na motuna yango mpo nayebi Biblia malamu lokola Batatoli ya Yehova te.”

Mwa moke na nsima, bazalaki na mposa ya bandeko oyo bakolinga kokende kosakola na Pakistan. Nasɛngaki bátinda ngai kuna; nzokande, bazalaki kotinda kaka bandeko mibali ná basi na bango to mpe bandeko mibali oyo bazali minzemba. Nakanisi ete batindaki formilɛrɛ na ngai na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn mpamba te, mwa moke na nsima, batindelaki ngai mokanda mpo na koyebisa ngai ete bazali na mposa ya kotinda moto moko na engumba Bombay (lelo oyo Mumbai), na Inde, mpe ete nakoki kokende kuna soki nalingi. Ezalaki na 1962. Nakendaki na Bombay mpe nasalaki kuna sanza 18; na nsima, nakendaki na engumba Allahabad.

Nabandaki mbala moko koyekola monɔkɔ ya Hindi. Monɔkɔ yango elobamaka kaka ndenge ekomamaka, yango wana ezali mpasi te koyekola yango. Atako bongo, mbala mingi ntango nazalaki kosolola na bato na mosala ya kosakola, bazalaki kosɛnga ngai naloba na bango kaka na Lingelesi na esika nabundanaka mpo na koloba monɔkɔ ya mboka na bango! Kasi, na ekólo yango, nakutanaki na mwa makambo mingi ya esengo mpe oyo epesaki ngai mposa ya kosala molende, tozalaki mpe na bandeko mosusu oyo bautaki na Australie.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki kokanisa kobala, kasi ntango nazwaki batisimo, nazalaki lisusu na ntango ya kokanisa libala te, mpamba te namipesaki mingi na mosala ya Yehova. Kasi, na nsima, nakómaki lisusu na mposa ya kobala. Nzokande, nalingaki kotika mosala na ngai ya misionɛrɛ te; yango wana, nayebisaki Yehova mposa na ngai mpe natikaki kokanisa yango.

Lipamboli oyo nakanisaki te

Na ntango wana, Edwin Skinner azalaki kokamba filiale ya Inde. Azalaká na kelasi ya mwambe ya Gileadi, eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia na 1946 na bandeko mosusu ya sembo; kati na bango, Harold King ná Stanley Jones, oyo batindamaki na Chine.a Na  1958, bakangaki Harold ná Stanley na engumba Shanghaï mpo bazalaki kosakola mpe batyaki bango na bolɔkɔ oyo mokomoko azalaki na esika ya ye moko kaka. Ntango Harold abimaki na bolɔkɔ na 1963, Edwin akomelaki ye mokanda. Ntango Harold azongaki na Hong-Kong, nsima ya kouta na États-Unis mpe na Angleterre, azongiselaki Edwin mokanda mpe ayebisaki ye ete azali na mposa ya kobala. Ayebisaki Edwin ete azalaki kobondela mpo na yango ntango azalaki na bolɔkɔ, mpe atunaki ye soki ayebi Motatoli moko oyo akoki kozala mwasi malamu mpo na ye.

Na Inde, mbala mingi, bato mosusu nde baponelaka moto mwasi, mpe bandeko mingi bazalaki kosɛnga Edwin aponela bango mwasi, kasi ye azalaki ntango nyonso koboya. Yango wana, apesaki mokanda ya Harold epai ya Ruth, oyo mobali na ye, Homer McKay, azalaki mokɛngɛli-motamboli. Na nsima, Ruth akomelaki ngai mpo na koyebisa ngai ete misionɛrɛ moko, oyo aumeli mingi na lisangá, azali koluka mwasi ya kobala, mpe alobaki na ngai ete nakomela ye soki nasepeli. Ayebisaki ngai likambo mosusu te mpo na ndeko yango, ata nkombo na ye.

Moto moko te ayebaki ete nazalaki kobondela mpo na libala, mpe likanisi ya liboso oyo eyelaki ngai ezalaki ete naboya. Kasi, ntango nakanisaki malamumalamu, nalobaki na nse ya motema ete mbala mingi Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge oyo tokanisaki te. Nakomelaki Ruth ete nalobi te ete nandimi; kasi, akoki koyebisa ndeko yango akoma lisusu. Mokanda ya mibale ya Harold King ezalaki mpo na ngai.

Ntango Harold abimaki na bolɔkɔ, na bazulunalo mingi balobelaki lisolo na ye mpe batyaki bafɔtɔ na ye. Na ntango wana, ayebanaki na mokili mobimba, kasi bosembo na ye na mosala ya Teokrasi nde esepelisaki ngai. Na boumeli ya sanza mitano, tozalaki kotindelana mikanda, mpe na nsima, nakendaki na Hong-Kong. Mpe, mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ 1965, tobalanaki.

Mokomoko na biso azalaki na mposa ya kotikala na mosala ya ntango nyonso soki abali, mpe ntango bambula ezalaki kopusana, mposa ya kozala na molongani ezalaki kokóma makasi. Nakómaki kolinga Harold makasi, mpe ntango namonaki boboto na ye epai ya bato mpe na ndenge na ye ya kotalela makambo oyo tozalaki kokutana na yango na mosala na biso, nakómaki komemya ye mingi. Tolekisaki mbula 27 na libala ya esengo mpe Yehova apambolaki biso mingi.

Ba-Chinois bazalaka makasi na mosala, mpe nasepelaka na bango mingi. Monɔkɔ ya Chinois oyo balobaka na Hong-Kong babengaka yango Cantonais; esɛngaka komatisa mpe kokitisa mongongo na maloba mingi koleka kutu monɔkɔ ya Chinois oyo babengaka Mandarin, yango wana ezali mpasi mpo na koyekola yango. Ntango tobalanaki, tofandaki liboso na ndako ya bamisionɛrɛ na filiale ya Batatoli ya Yehova, mpe na nsima batindaki biso na bisika ndenge na ndenge na Hong-Kong. Tozalaki kosepela mingi na mosala na biso, kasi na 1976, nabɛlaki makasi.

Mikakatano na nzoto

Na boumeli ya mwa basanza, makila ezalaki kobima ngai, yango wana makila na ngai ekitaki mingi. Esɛngaki básala ngai lipaso, kasi minganga balobaki ete bakoki kopasola ngai te kozanga kozongisa ngai makila, soki te nakoki kokufa. Mokolo moko, ntango minganga bazalaki kotalela likambo na ngai, mafulume bayaki kosolola na ngai mpo na kondimisa ngai bázongisa ngai makila. Balobaki na ngai ete ezali malamu te nandima kokufa kaka boye. Mokolo yango, basengelaki kopasola bato 12, mpe 10 kati na bango ezalaki basi oyo bayaki kolongolisa zemi, kasi ata moto moko te alobaki na bango ete bazali koboma bana na bango na nko.

Nsukansuka, Harold akomaki mokanda oyo emonisaki ete soki nakufi, lopitalo ezali na ngambo te, mpe minganga bandimaki kopasola ngai. Bamemaki ngai na ndako ya lipaso mpe babongisaki ngai mpo na kotɔbɔla ngai ntonga ya mpɔngi (anesthésie). Kasi, mbala moko monganga oyo atɔbɔlaka ntonga ya mpɔngi aboyaki kotɔbɔla ngai, mpe balobaki ete nasengeli kobima na lopitalo.

Tokendaki kokutana na monganga mosusu ya maladi ya basi. Ntango amonaki ete nazali mpenza na mpasi makasi, andimaki kosala ngai lipaso mpe asɛngaki kaka mwa mbongo moke, kasi alobaki ete tóyebisa na moto te ntalo oyo asɛngi biso. Asalaki ngai lipaso kozanga kozongisa ngai makila mpe elekaki malamu. Na likambo wana, ngai ná Harold tomonaki mpenza motema-boboto ya Yehova mpe likebi oyo azalaki kotyela biso.

Na 1992, Harold abɛlaki maladi oyo ememaki ye tii na liwa. Tokendaki kofanda na Betele, mpe kuna bakobaki kosalisa biso na bolingo nyonso. Molongani na ngai ya bolingo asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na 1993, na mbula 81.

Nazongi na Angleterre

Nazalaki mpenza na esengo ya kosala na Betele ya Hong-Kong, kasi nazalaki kokoka lisusu te molunge ya mboka yango. Na ntango yango, mokanda moko eutaki na biro monene ya Brooklyn mpo na koyebisa ngai ete, lokola nazali lisusu nzoto malamu te, nasengeli kokende na filiale moko epai bakosalisa ngai malamu. Yango wana, na mobu 2000, nazongaki na Angleterre mpe nakómaki kosala na Betele ya Londres. Likambo yango emonisaki mpenza bolingo ya bandeko! Bandeko bayambaki ngai na esengo, mpe nasepelaka na misala ndenge na ndenge oyo nasalaka, moko na yango ezali kobatela bibliotɛkɛ ya Betele oyo ezali na babuku 2 000.

Nazali mpe na lisangá ya monɔkɔ ya Chinois na Londres, kasi awa makambo ezali mpenza ndenge mosusu. Ba-Chinois oyo bazali koya sikoyo na Angleterre bazali kouta mingi na Chine, kasi oyo ya Hong-Kong bazali mpenza mingi te. Bango balobaka monɔkɔ ya Mandarin, mpe yango epesaka ngai mokakatano na mosala ya kosakola. Tozali kozwa bansango ete Ba-Chinois mingi oyo bazali kotánga bakelasi ya minene na bisika ndenge na ndenge na Angleterre bazali kosepela mpenza koyekola Biblia. Bazali na molende mpe bazali kosepela mpenza na solo ya Biblia oyo bazali koyekola. Koyekola na bango ezali esengo mingi.

Mbala mingi soki nafandi na shambre na ngai, nakanisaka bomoi ya esengo oyo nazali na yango mpe nazali kokoba kokamwa motema-boboto oyo Yehova amoniseli ngai. Motema-boboto yango ezali komonana na makambo nyonso oyo etali mokano na ye, mpe ezali komonana polele ete atyelaka mosaleli na ye mokomoko likebi. Nazali mpenza kotonda ye mpo na makambo nyonso oyo emonisi ngai motema-boboto mpe likebi na ye.​—1 Petelo 5:6, 7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya Harold King ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1963, nkasa 661-666, mpe ya Stanley Jones na oyo ya 1 Aprili 1966, nkasa 212-224 (ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 24]

Ntango nazalaki na Inde

[Bililingi na lokasa 25]

Harold King na 1963 mpe ntango azalaki na Chine na bambula ya 1950

[Bililingi na lokasa 26]

Mokolo ya libala na biso na Hong-Kong, mwa 5 Ɔkɔtɔbɛ 1965

[Elilingi na lokasa 26]

Ná bandeko ya Betele ya Hong-Kong, na kati, ndeko Liang ná mwasi na ye; na lobɔkɔ ya mobali, ndeko Gannaway ná mwasi na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto