Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/6 nk. 23-27
  • Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nabongisami mpo na mosala ya kosakola
  • Ndenge oyo totikalaki kuna
  • Tokei na teritware ya sika
  • Mokakatano oyo epesaki ngai mpasi makasi
  • Esengo ya mosala ya kosakola
  • Natɔndi na esɛngo
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili na Bahamas
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/6 nk. 23-27

Lisolo ya bomoi

Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali

YA NANCY PORTER

Ezalaki mpokwa moko kitoko na mokolo ya 5 Yuni 1947; tozalaki na ekólo Bahamas, bisanga oyo ezwami pene na bokula ya nɔrdi-ɛsti ya États-Unis. Kozanga koyebisa biso liboso, mosali moko ya Leta oyo atalaka makambo ya bokɔti ya bapaya na mboka, ayaki kotala ngai na mobali na ngai Georges. Apesaki biso mokanda oyo ezalaki koloba ete tosengelaki kofanda lisusu te na bisanga wana, mpe tosengelaki “mbala moko kobima na mboka na bango!”

NGAI na Georges tozalaki bamisionɛrɛ ya liboso ya Batatoli ya Yehova oyo bayaki na Nassau, engumba oyo eleki monene na Bahamas. Nsima ya kozwa badiplome na kelasi ya mbala ya mwambe ya Gileadi, eteyelo oyo ebongisaka bamisionɛrɛ, mpe ezwami na etúka ya New York, batindaki biso na Bahamas. Nsima ya kolekisa sanza misato mpamba, likambo nini tosalaki mpo bazwela biso meko wana? Mpe ndenge nini, tii lelo, nsima ya mbula koleka 50, nazali kaka na ekólo yango?

Nabongisami mpo na mosala ya kosakola

Tata na ngai Harry Kilner nde moto mpenza asalaki ete bomoi na ngai ekóma ndenge ezali. Atikelaki ngai ndakisa malamu na ndenge asalaki milende mingi mpo akóma Motatoli ya Yehova. Atako kolɔngɔnɔ na ye ya nzoto ezalaki malamu te, azalaki kokende kosakola na bamboka ya pembeni naloba kaka bawikende nyonso, mpe na molende mpenza azalaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33) Tozalaki na mbongo mingi te, kasi magazini na ye ya sapato, oyo ezalaki na engumba ya Lethbridge, na Canada, ezalaki esika oyo azalaki komipesa mingi na mosala ya kosakola na bambula ya 1930. Soki nazongisi makanisi na bomwana na ngai, nazali komona lisusu ndenge babongisi-nzela, basaleli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, bazalaki koya kotala biso mpe koyebisa biso makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.

Na 1943, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, pene na Fort Macleod mpe na Claresholm, oyo ezali bingumba ya etúká ya Alberta. Na ntango wana, bapekisaki mosala na biso na Canada mpo na bifundeli ya lokuta ya batɛmɛli na biso na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Teritware na biso ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 100; kasi lokola tozalaki naino bilenge oyo bazali makasi, ezalaki likambo ya mpasi te kokende na velo to na makolo na bamboka ya mikemike mpe na baferme oyo ezalaki na teritware yango. Na ntango yango, nazwaki libaku ya kosolola na bandeko mosusu oyo bazwaki badiplome na Gileadi, mpe masolo na bango epesaki ngai mposa ya kokóma mpe misionɛrɛ.

Na 1945, tobalanaki na Georges Porter, oyo azalaki moto ya etúká ya Saskatchewan, na Canada. Baboti na ye bazalaki Batatoli ya molende banda 1916, ye mpe aponaki mosala ya ntango nyonso lokola mosala oyo akosala na bomoi na ye mobimba. Liboso, batindaki biso na mboka kitoko ya Lynn Valley oyo ezali na engumba Vancouver ya nɔrdi, na Canada. Nsima ya ntango moke, babengaki biso na Gileadi.

Na boumeli ya bambula mwa mingi, nasololaki na bato mingi oyo bazwaki badiplome ya biteyelo ya teoloji mpe namonaki ndenge oyo mateya ya teoloji ebebisaki kondima na bango epai ya Nzambe mpe Biblia, Liloba na ye. Nzokande, makambo oyo biso toyekolaki na Gileadi ekolisaki makoki na biso ya kokanisa mpe lisusu koleka, ekómisaki makasi kondima na biso epai ya Yehova Nzambe mpe Liloba na ye. Baninga na biso ya kelasi batindaki bango na Chine, na Singapour, na Inde, na mikili ya Afrika, ya Amerika ya sudi, mpe na bisika mosusu. Tii lelo, nabosanaka te esengo oyo tozalaki na yango ntango bayebisaki biso ete batindi biso na bisanga ya Bahamas, esika oyo moi ezalaka makasi.

Ndenge oyo totikalaki kuna

Soki tokokanisi mobembo na biso mpo na kokende na Bahamas na mibembo oyo baninga na biso ya kelasi basalaki mpo na kokende na bateritware oyo batindaki bango, ya biso eumelaki te. Nsima ya ntango moke, tokómaki mpe tosepelaki na mwa molunge oyo ezalaki, na likoló ya langi ya bule, na mai oyo ezalaki mpe komonana bule, na bandako oyo ezalaki na miinda ya langi ndenge na ndenge mpe tomonaki bavelo ebele. Kasi, likambo ya liboso oyo ekamwisaki ngai mingi, ezalaki ya komona mwa etuluku ya Batatoli mitano oyo bazalaki kozela biso ntango masuwa oyo tozalaki ekómaki. Eumelaki te, toyaki koyeba ete mimeseno ya kuna ekesenaki mpenza na oyo ya biso. Na ndakisa, bayebisaki mobali na ngai ete abengaka ngai “Chérie” na miso ya bato te, mpo ete na mboka na bango bato oyo bazali bamakango nde basalelaka mingi liloba yango.

Mwa moke na nsima, lokola bakonzi ya mangomba bakómaki kobanga biso na ndenge tozalaki kokende epai ya bato kozanga nkaka, bafundaki biso na lokuta nyonso ete tozali Bakoministe. Yango wana, mitindo ekweaki ete tólongwa na ekólo wana. Kasi, Batatoli ya bisanga yango, oyo balekaki 20 te na mikolo wana, bakomelaki bakonzi ya Leta mokanda mpo na kosɛnga ete bapesa biso ndingisa ya kotikala na mboka wana; bato mosusu ebele bandimaki kotya sinyatili na bango na mokanda yango. Na bongo, babenganaki biso lisusu te na mboka wana.

Tokei na teritware ya sika

Solo ya Biblia ekolaki noki na mitema ya baoyo balingaka Nzambe, na bongo batindaki bamisionɛrɛ mosusu ya Gileadi na Bahamas. Nsima na yango, na 1950, bafungolaki biro ya filiale. Mbula zomi na nsima, Milton Henschel, oyo autaki na biro monene ya Brooklyn, na New York, ayaki na Bahamas mpe atunaki bamisionɛrɛ soki moko na bango akondima kokende kobandisa mosala ya kosakola na esanga mosusu ya Bahamas. Ngai na Georges tondimaki kokende, mpe yango eyaki kokóma nde ebandeli ya mbula 11 oyo tolekisaki na esanga ya Long Island.

Esanga yango, oyo ezali moko ya bisanga ya ekólo Bahamas, ezali na bolai ya kilomɛtrɛ 140 mpe na bonene ya kilomɛtrɛ 6, mpe na ntango wana, ezalaki mpenza na bingumba ya malonga te. Clarence Town, oyo ezalaki engumba-mokonzi, ezalaki na ndako soki 50. Bomoi ezalaki se lokola bomoi ya bato ya kala​—kura na mai ya pompi ezalaki te, esika ya kolambela na kati ya ndako to batiyo ya mai ezalaki te. Na bongo, esengelaki ete tomesana na bomoi oyo bazalaki kobenga ‘bomoi ya bisanga ya mosika.’ Na esanga yango, masolo ya bato ezalaki kobaluka kaka na likambo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto. Soki opesi moto mbote mpe otuni ye: “Nsango nini?” akobanda koyebisa yo bamaladi nyonso oyo asi abɛlá na bomoi na ye; lokola biyano ya ndenge wana ezalaki kozwa ntango mingi, tomonaki malamu tótunaka lisusu motuna wana te na ntango topesi moto mbote.

Tozalaki mingimingi kopesa litatoli ya kuku na kuku, mpo mbala mingi tozalaki kokuta bato na kati ya bakuku na bango ya libanda oyo likoló na yango ezipamaki na matiti mpe na kati ezalaki na esika ya kolambela na nkoni. Mingi kati na bafandi ya esanga yango bazalaki babola, kasi bazalaki bato ya boboto oyo basalaka bilanga to babomi-mbisi. Mingi kati na bango bazalaki bato oyo basambelaka, kasi bazalaki mpe bato ya biyambayamba. Soki likambo moko oyo bayebi te to bamoná naino te esalemi, yango ezalaki mpo na bango nde elembo ya likambo moko oyo ekosalema na mikolo oyo ekolanda.

Bakonzi ya mangomba bazalaki ata koyoka nsoni te mpo na kokɔta na bandako ya bato kozanga ete babengisa bango mpe kopasola mikanda elimbolaka Biblia, oyo tozalaki kotikela bato na bandako na bango. Bazalaki kobangisa kaka bato oyo bakokaka koloba te, kasi bato nyonso te nde bazalaki kobanga bango. Na ndakisa, elombe-mwasi moko ya mbula 70 aboyaki ete babangisa ye. Alingaki koyeba Biblia, mpe nsukansuka akómaki Motatoli nzela moko na bato mosusu. Lokola bato mingi bazalaki komonisa mposa makasi, mikolo mosusu ya Lomingo, Georges azalaki kosala kilomɛtrɛ 300 na motuka, mpo na kosalisa bato yango bayanganaka na makita na biso.

Basanza ya liboso oyo tokómaki, lokola Batatoli mosusu bazalaki te, ngai na Georges tozalaki kosala makita nyonso ya boklisto mpo totikala makasi na elimo. Lisusu, na mpokwa ya mokolo nyonso ya mosala moko tozalaki kolanda na molende nyonso manaka ya koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kotánga Biblia. Tozalaki mpe kotánga nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! kaka na ntango oyo tozwi yango.

Tata na ngai akufaki ntango oyo biso tozalaki na esanga ya Long Island. Na eleko ya molunge oyo elandaki, na 1963, tozwaki bibongiseli mpo ete mama aya kofanda pembeni na biso. Atako akómaki mpenza mobange, azwaki mikakatano mingi te mpo amesana mpe afandaki na Long Island tii ntango akufaki na 1971. Lelo oyo, Long Island ezali na lisangá moko oyo ezali na Ndako ya Bokonzi moko ya sika mpenza.

Mokakatano oyo epesaki ngai mpasi makasi

Na 1980, Georges amonaki ete nzoto ezalaki lisusu malamu te. Na bongo, moko ya makambo ya mpasi mingi oyo nakutanaki na yango na bomoi na ngai ebandaki; elingi koloba komona ndenge maladi ya Alzheimer ezali konyokola mobali na ngai ya bolingo, oyo tozalaki kosala na ye elongo mpe moninga na ngai. Bomoto na ye nyonso ebongwanaki. Eteni ya nsuka ya maladi na ye, oyo mpe enyokolaki ye mingi, eumelaki pene na mbula minei tii na liwa na ye na 1987. Soki makoki na ye epesi ye nzela, azalaki kokende elongo na ngai na mosala ya kosakola mpe na makita, atako mbala mingi milende oyo azalaki kosala ezalaki kolelisa ngai. Bolingo oyo bandeko na biso baklisto bamonisaki epai na ngai nsima na liwa na ye ebɔndisaki ngai mpenza, atako bongo nayokaka mpasi mingi lokola azali lisusu te.

Na libala na ngai na Georges, moko ya makambo oyo eleki motuya ezalaki masolo ya kosepelisa oyo tozalaki kosolola mbala na mbala. Sikoyo, lokola Georges azali lisusu te, nazali na botɔndi mingi koleka ete Yehova azali kosɛnga basaleli na ye ‘bábɔndelaka na kotika te’, ‘mpo na kobondela, báyikaka mpiko,’ mpe básalaka ‘mabondeli nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:17; Baloma 12:12; Baefese 6:18) Ezali libɔndisi monene na koyeba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bolamu na biso. Nazali mpenza na mayoki ndenge moko na mokomi na Nzembo, oyo ayembaki ete: “Nkolo akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo.” (Nzembo 68:19) Na kolanda toli oyo Yesu apesaki, nakanisaka kaka makambo oyo nakosala mokolo moko, nandimaka bolɛmbu na ngai, mpe namonisaka botɔndi mpo na mapamboli oyo nazwaka mokolo na mokolo; na ntembe te, kosala makambo bongo nde ezali lolenge oyo eleki malamu ya kofanda.​—Matai 6:34.

Esengo ya mosala ya kosakola

Kozala na makambo mingi ya kosala na mosala ya kosakola esalisaki ngai nakanisaka mingi te makambo ya kala. Na bongo, nazali kolonga mayoki oyo ekoki kotinda ngai na mitungisi ya makanisi. Koteya bato mosusu solo ya Biblia epesaka ngai esengo. Epesaka mpe mimeseno malamu ya elimo oyo ebongisi bomoi na ngai mpe esali ete bomoi na ngai ezala ya mindɔndɔ te.​—Bafilipi 3:16.

Mokolo mosusu, mwasi moko oyo nateyaki ye nsango ya Bokonzi esili koleka mbula soki 47 abengaki ngai na telefone. Azalaki mwana ya mobali moko oyo azalaki kati na bayekoli ya Biblia ya liboso oyo tozwaki ntango tokómaki na Bahamas na 1947. Mama, tata, mpe bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, ezala bana mpe bankɔkɔ na bango nyonso, bakómaki Batatoli ya Yehova. Na libota ya mwasi yango, bato koleka 60 bazali Batatoli. Kasi ye moko azalaki kondima ata moke te solo ya Biblia. Kasi nsukansuka, azalaki pene ya kokóma mosaleli ya Yehova Nzambe. Ezali esengo mpenza na komona ete mwa Batatoli oyo bazalaki na Bahamas ntango ngai na Georges tokómaki, babakisami mpo na kokóma sikoyo koleka 1 400!

Mbala mosusu, bato batunaka ngai soki esalaka ngai mpasi te lokola nabota te. Ya solo, kobota bana ekoki kozala lipamboli. Kasi, bolingo oyo bana, bankɔkɔ mpe bana ya bankɔkɔ na ngai ya elimo bazalaka na yango ntango nyonso epai na ngai ezali likambo oyo mbala mosusu baboti nyonso ya mosuni bazwaka te epai ya bana oyo bango moko baboti . Ya solo, baoyo “basalaka malamu” mpe bazali “bazwi na misala nyonso kitoko” bazali bato oyo baleki bato nyonso na esengo. (1 Timote 6:18) Yango wana, soki nzoto ezali malamu, namipesaka kaka na mosala ya kosakola.

Mokolo moko, ntango nazalaki na biro ya monganga ya mino, elenge mwasi moko apusanaki pembeni na ngai mpe alobaki boye: “Yo oyebi ngai te, kasi ngai nayebi yo, mpe nalingaki kaka koyebisa yo ete nalingaka yo.” Na nsima, ayebisaki ndenge akómaki na boyebi ya mateya ya solo oyo euti na Biblia mpe alobaki ete azalaki mpenza na botɔndi mpo na ndenge biso bamisionɛrɛ toyaki na Bahamas.

Mokolo mosusu, ntango nautaki konje, nakutaki fololo moko na monɔkɔ ya shambre oyo nazali kofanda sikoyo, na Betele ya Batatoli ya Yehova na Nassau. “Tosepeli mingi ndenge ozongi,” nde maloba oyo nakutaki na fololo yango. Natɔndaki na esengo, mpe soki natali lolenge ya bato oyo Liloba na ye, ebongiseli na ye mpe elimo na ye ebimisi, yango etindaka ngai nalinga Yehova mingi koleka! Ya solo, lisungi ya Yehova emonanaka mbala mingi na nzela ya baoyo bazingi biso.

Natɔndi na esɛngo

Bomoi na ngai ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te; ezala lelo, makambo nyonso na bomoi na ngai ezali mpe pɛtɛɛ te. Kasi, nazali na bantina mingi ya kozongisa matɔndi, lokola: esengo ya mosala ya kosakola, bolingo ya ebele ya bandeko mibali mpe basi baklisto, bolingo mpe libateli ya Ebongiseli ya Yehova, mateya kitoko ya Biblia, elikya ya kozala na balingami na biso ntango bakosekwa, mpe nyonso oyo elekaki na mbula 42 ya libala na mosaleli ya sembo ya Yehova. Liboso ete tobalana, nabondelaki ete nazala ntango nyonso kosunga mobali na ngai mpo atikala na mosala ya ntango nyonso, mosala oyo alingaki mingi. Na boboto mpenza, Yehova ayanolaki na libondeli na ngai. Na bongo, nalingi kozongisa matɔndi epai ya Yehova mpe kotikala ntango nyonso sembo epai na ye.

Bisanga ya Bahamas eyebani mingi lokola bisika oyo baturiste bakendaka, babebisaka bankoto ya badolare mpo na koya kotala biloko ya kosepelisa oyo ezalaka na bisika oyo moi ezalaka makasi. Lokola naponaki kosalela Yehova esika nyonso oyo Ebongiseli na ye ekotinda ngai, natambolaki kobanda nsuka moko tii nsuka mosusu ya bisanga yango, wana nazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe; yango ezali makambo ya bomoi na ngai oyo epesaka ngai esengo mingi. Kasi likambo oyo eleki ntina ezali ete nayaki koyeba mpe kosepela na bolingo ya bato ya Bahamas oyo bazali na boboto mpe na bizaleli malamu mpenza.

Nazali kotɔnda mingi baoyo bamemaki mateya ya solo epai ya baboti na ngai; na nsima, bango mpe balonaki na elimo mpe na motema na ngai ya bolenge mposa ya solosolo ya koluka liboso Bokonzi ya Nzambe. Bilenge oyo bazali kosalela Yehova lelo, bakoki mpe ndenge moko kozwa mapamboli mingi soki bakɔti na “ekuke monene” oyo ezali komema na mabaku minene ya kokolisa mosala ya kosakola. (1 Bakolinti 16:9) Yo mpe okotonda na botɔndi soki osaleli bomoi na yo mpo na kokumisa Yehova, “Nzambe na banzambe.”​—Deteronome 10:17; Danyele 2:47.

[Elilingi na lokasa 24]

Na mosala ya kosakola na balabala, na engumba ya Victoria, B.C., na 1944

[Elilingi na lokasa 24]

Ngai na Georges tokɔtaki Eteyelo ya Gileadi na 1946

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai na Georges liboso ya ndako ya bamisionɛrɛ na engumba ya Nassau, na Bahamas, na 1955

[Elilingi na lokasa 26]

Ndako ya bamisionɛrɛ na engumba ya Deadman Cay, esika oyo tosalaki kobanda 1961 tii 1972

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto