Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/8 nk. 9-13
  • Biblia ya mokonzi: Mokanda ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ya mokonzi: Mokanda ya ntina mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto oyo alingaki Liloba ya Nzambe
  • Makambo oyo ezalaki na Biblia yango
  • Botɛmɛli ya banguna ya Liloba ya Nzambe
  • Buku ya ntina mingi na mosala ya kobongola Biblia
  • Polyglotte de Complute​—Buku oyo esalisi mingi mpo na kobongola Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Christophe Plantin—Moko ya bato ya liboso oyo babimisaki biblia na masini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ozali komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nkombo ya Nzambe na mosala oyo Alfonse de Zamora asalaki mpo na kozwa libongoli ya sikisiki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/8 nk. 9-13

Biblia ya mokonzi: Mokanda ya ntina mingi

NA EBANDELI ya ekeke ya 16, masuwa moko eutaki na Espagne mpe ezalaki kokende na Italie. Masuwa yango ememaki biloko ya motuya mpenza: ebele ya bakopi ya Biblia Polyglotte de Complute oyo babimisaki kati na mobu 1514 mpe mobu 1517. Na nzela, mopɛpɛ moko ya makasi ebɛtaki na mbu. Bato ya masuwa babundanaki mpo masuwa ezinda te, kasi balongaki te. Nsukansuka, masuwa ná biloko nyonso oyo ezalaki na kati ezindaki.

Likambo wana esɛngaki bábimisa Babiblia mosusu ya libongoli ya Polyglotte de Complute. Nsukansuka, Christophe Plantin, moto moko oyo ayebaki malamu mosala ya konyata mikanda, andimaki kosala yango. Azalaki na mposa ete moto moko ya bozwi asunga ye na mosala monene wana, yango wana asɛngaki lisalisi ya Philippe II, mokonzi ya Espagne. Liboso mokonzi azwa ekateli na ye, atunaki naino bato ndenge na ndenge ya mayele na Espagne; moko na bango ezalaki Benito Arias Montanus, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia. Moto yango ayebisaki Mokonzi Philippe boye: “Longola kosala mosala mpo na Nzambe mpe kosunga lingomba, yango ekopesa mpe nkombo ya Mokonzi nkembo mingi mpe lokumu na ye ekobakisama.”

Kobimisa libongoli mosusu ya Polyglotte de Complute elingaki komatisa lokumu ya mboka, yango wana Philippe andimaki na motema mobimba kosunga Plantin na mosala na ye. Apesaki Arias Montanus mosala monene ya kobimisa Biblia oyo babengaka Biblia ya mokonzi, to Polyglotte d’Anvers.a

Mokonzi Philippe alingaki mpenza koyeba ndenge mosala ya Biblia yango ezalaki kotambola; yango wana asɛngaki bátindelaka ye lokasa mokomoko oyo basali. Kasi, Plantin asepelaki te kozela lokasa elongwa na Anvers ekende naino na Espagne mpo mokonzi atánga yango mpe atyá bilembo, bongo na nsima ezongela ye. Yango wana, Philippe azwaki kaka lokasa ya liboso mpe mbala mosusu mwa bankasa mosusu ya ebandeli. Na ntango yango, Montanus akobaki mosala ya kotánga mpe kobongisa nkasa oyo babimisi na masini; baprofesɛrɛ misato ya iniversite ya Louvain ná mwana ya Plantin oyo azalaki naino elenge mwasi bazalaki kosalisa ye na mosala yango.

Moto oyo alingaki Liloba ya Nzambe

Arias Montanus azalaki koyokana malamu na bato ya mayele ya Anvers. Ezaleli na ye ya kofanda malamu na bato esalaki ete Plantin asepela na ye mingi; yango wana, batikalaki baninga mpe basalaki elongo bomoi na bango mobimba. Montanus azalaki na mayele mingi, kasi mpe alingaki mingi Liloba ya Nzambe.b Ntango azalaki elenge, azalaki na mposa asilisa bakelasi na ye mpo amipesa mobimba na koyekola Biblia.

Arias Montanus azalaki kokanisa ete Biblia esengeli mpenza kobongolama na kolanda maloba ya minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli. Alukaki kobongola maloba ndenge mpenza ekomamaki na mikanda ya ebandeli, mpe na ndenge yango kosalisa motángi atánga Liloba ya solo ya Nzambe. Montanus alandaki likanisi ya Érasme, oyo alendisaki bato ya mayele ete “báteya Klisto na ndenge oyo alobelami na mikanda ya ebandeli.” Lokola Babiblia oyo ebongolamaki na monɔkɔ ya Latin ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango, na boumeli ya bankama ya bambula bato bazalaki mpenza koyeba ndimbola ya Makomami te.

Makambo oyo ezalaki na Biblia yango

Arias Montanus azwaki bamaniskri nyonso oyo Alphonse de Zamora abongisaki mpe atalelaki lisusu mpo na kobimisa Polyglotte de Complute mpe asalelaki yango mpo na kobimisa Biblia ya mokonzi.c

Biblia ya mokonzi ebongisamaki liboso lokola ebimeli ya mibale ya Polyglotte de Complute, kasi eyaki komonana ete ezalaki kaka te mosala ya kotalela lisusu libongoli wana. Makomi ya Liebele mpe ya Grɛki ya libongoli ya Septante eutaki na Polyglotte de Complute; babakisaki mpe makomi mosusu ná apɛndisi ya monene. Polyglotte wana ya sika ezalaki na bavolimi mwambe. Mosala ya konyata mikanda eumelaki mbula mitano, kobanda na mobu 1568 tii mobu 1572; soki totaleli mosala monene oyo yango esɛngaki, tokoloba ete eumelaki te. Nsukansuka, babimisaki bakopi 1213 ya Biblia yango.

Atako Polyglotte de Complute oyo ebimaki na mobu 1517 ezalaki “mokanda oyo esalemaki na balɛtrɛ ya kitoko mingi,” Polyglotte d’Anvers elekaki yango na ndenge oyo ebongisamaki mpe na makambo oyo ezalaki na kati. Ezalaki likambo mosusu ya monene na mosala ya konyata mikanda mpe, na koleka, na mosala ya kobongisa malamu makomi ya Biblia.

Botɛmɛli ya banguna ya Liloba ya Nzambe

Eumelaki te, banguna ya Biblia oyo ebongolami malamu babimaki. Atako pápa andimaki Polyglotte d’Anvers mpe Arias Montanus ayebanaki lokola moto ya mayele oyo azalaki sembo, bafundaki ye na tribinale oyo ezalaki kosambisa bapɛngwi. Banguna balobaki ete na Biblia na ye alobaki ete makomi ya Latin oyo Sanctes Pagninus atalelaki lisusu ebongolaki Liebele mpe Grɛki malamu koleka Vulgate, oyo ebongolamaki bankama ya bambula liboso. Bafundaki mpe Montanus ete azalaki kotánga makomami na Liebele mpe na Grɛki mpo azalaki na mposa ya kobimisa libongoli ya Biblia oyo ezali mpenza sembo, likambo oyo balobaki ete ezali lipɛngwi.

Kutu, bazuzi ya tribinale yango balobaki ete “lokumu ya Mokonzi ebakisamaki te na ndenge babengaki mokanda na ye ete Biblia ya mokonzi.” Basepelaki te lokola Montanus azalaki mpenza kokumisa Vulgate te. Atako bazalaki koloba ndenge wana, bazalaki mpenza na bilembeteli te mpo na kokweisa Montanus to kopekisa Biblia polyglotte oyo abimisaki. Nsukansuka, bato basepelaki na Biblia ya mokonzi, mpe bakómaki kosalela yango na ba-iniversite ebele.

Buku ya ntina mingi na mosala ya kobongola Biblia

Atako Polyglotte d’Anvers ebimisamaki mpo na bato nyonso te, eumelaki te mpo ekóma buku ya ntina mingi mpo na babongoli ya Biblia. Lokola Polyglotte de Complute, Biblia yango esalisaki mpo na kobongisa lisusu malamumalamu makomi ya ebandeli. Esalisaki mpe babongoli báyeba malamu makomi oyo ezalaki na Liebele mpe na Grɛki. Babongoli ya Biblia na minɔkɔ mingi ya Mpoto basalelaki buku wana. Na ndakisa, buku moko (The Cambridge History of the Bible) elobi ete babongoli ya King James Version, to Version autorisée, oyo ebimaki na mobu 1611, basalelaki Polyglotte d’Anvers mpo na kobongola minɔkɔ ya kala. Biblia ya mokonzi esalisaki mpe mingi mpo na kosala Babiblia mibale ya minɔkɔ mingi oyo ebimaki na ekeke ya 17.​—Talá etanda “Babiblia ya minɔkɔ mingi.”

Moko ya makambo malamu ya Polyglotte d’Anvers ezali ete, mpo na mbala ya liboso, esalisaki bato ya mayele na Mpoto bázwa libongoli ya Syriaque ya Makomami ya Grɛki. Makomi wana ya Syriaque ezalaki molɔngɔ moko na libongoli ya liloba na liloba na Latin. Yango ezalaki likambo ya ntina mingi oyo babakisaki, mpamba te Syriaque ezalaki moko ya mabongoli ya kala ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Biblia ya Syriaque oyo esalamaki na ekeke ya mitano T.B., ebongolamaki longwa na bamaniskri ya ekeke ya mibale T.B. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi ete “bato mingi ya mayele balobaka ete Peshitta [ya Syriaque] ezali na motuya mingi mpo na koyekola makomi ya Biblia. Ezali moko ya mikanda ya kalakala mpe ya ntina oyo ezali kolobela mimeseno ya kala.”

Ezala mopɛpɛ makasi ya mbu to mangungu ya tribinale oyo ezalaki kosambisa bapɛngwi, eloko moko te epekisaki Polyglotte de Complute oyo bataleli lisusu mpe babakisi makambo mosusu ebima na mobu 1572; na mbala wana, ezwaki nkombo ya Biblia ya mokonzi. Lisolo ya Polyglotte d’Anvers ezali ndakisa mosusu ya milende oyo bato ya sembo basalaki mpo na kobatela Liloba ya Nzambe.

Ata soki bayebaki yango to te, mibali wana ya molende basalaki mosala oyo emonisi bosolo ya maloba ya mosakoli Yisaya. Mbula soki 3 000 liboso, akomaki boye: “Matiti mazali kokaoka, felele ezali kolɛmba, nde liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”​—Yisaya 40:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bakómaki kobenga yango Biblia ya mokonzi mpamba te Mokonzi Philippe nde abimisaki mosolo mpo na kobimisa yango, mpe babengaki yango Polyglotte d’Anvers mpamba te babimisaki yango na engumba Anvers oyo, na ntango wana ezalaki teritware ya bokonzi ya Espagne.

b Ayebaki malamu monɔkɔ ya Arabe, ya Grɛki, ya Liebele, ya Latin, mpe ya Syriaque, minɔkɔ mitano oyo ezalaki na Biblia Polyglotte. Ayebaki mpe malamu arkeoloji, mosala ya monganga, makambo ya siansi, mpe teoloji; asalelaki mayele nyonso wana malamu mpo na kobongisa apɛndisi ya libongoli yango.

c Mpo na koyeba lisolo ya Biblia Polyglotte de Complute, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2004.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

“Nde liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela”

[Etanda/Bililingi na lokasa 12]

BABIBLIA YA MINƆKƆ MINGI

Federico Pérez Castro alobaki ete Biblia oyo babengi “polyglotte” ezali “Biblia oyo ezali na minɔkɔ mingi na mokanda moko. Kasi, mingimingi basalelaka liloba yango mpo na Babiblia oyo ezali mpe na makomi na Liebele mpe na Grɛki. Na ndimbola yango, tokoki koloba ete Babiblia “polyglotte” ezali mingi te.”

1. Polyglotte de Complute (1514-1517), ebimisamaki na lisalisi ya Kardinale Cisneros, enyatamaki na Alcalá de Henares, na Espagne. Ezalaki na bavolimi motoba mpe ezalaki na makomi na minɔkɔ minei: Liebele, Grɛki, Aramɛyɛ, mpe Latin. Esalisaki babongoli ya Biblia na ekeke ya 16 bázala na buku moko oyo ezali na makomi ya Liebele mpe ya Aramɛyɛ.

2. Polyglotte d’Anvers (1568-1572), ebimisamaki na Benito Arias Montanus, ebakisaki na makomi ya Polyglotte de Complute, makomi ya libongoli Peshitta Syriaque ya Makomami ya Grɛki ya boklisto mpe Targoum ya Aramɛyɛ ya Jonathan. Makomi ya Liebele, oyo ezalaki na bilembo mikemike oyo ezali komonisa milelisi (voyelles) mpe bilembo ya komatisa to kokitisa mongongo (accents), etalelamaki lisusu na kolanda makomi ya Liebele ya Jacob ben Hayyim. Na bongo, babongoli mingi bakómaki kosalela yango mpo na kobongola Makomami ya Liebele.

3. Polyglotte de Paris (1629-1645) ebimisamaki na lisalisi ya Guy-Michel Le Jay, moto moko ya mibeko na France. Basalaki yango na kolanda Polyglotte d’Anvers, atako ezalaki na makomi mosusu ya Samaritain mpe ya Arabe.

4. Polyglotte de Londres (1655-1657), ebimisamaki na Brian Walton; basalaki yango mpe na kolanda Polyglotte d’Anvers. Polyglotte yango ezalaki na mabongoli ya kala ya Biblia na monɔkɔ ya Éthiopien mpe ya Perse, atako mabongoli yango esalisaki mpenza na koyeba malamu ndimbola ya makomi ya Biblia.

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Polyglotte de Banner mpe Polyglotte d’Anvers (mibale oyo ezali na nse): Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid; Polyglotte d’Anvers (na likoló): Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen; Polyglotte de Londres: Euti na buku The Walton Polyglot Bible, Volimi III, 1655-1657

[Elilingi na lokasa 9]

Philippe II, mokonzi ya Espagne

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Philippe II: Biblioteca Nacional, Madrid

[Elilingi na lokasa 10]

Arias Montanus

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Montanus: Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid

[Elilingi na lokasa 10]

Masini ya libosoliboso ya imprimeri na Anvers, Belgique

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Masini ya imprimeri: Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen

[Elilingi na lokasa 11]

Na lobɔkɔ ya mwasi: Christophe Plantin mpe ezipeli ya Polyglotte d’Anvers

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Ezipeli mpe Plantin: Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen

[Elilingi na lokasa 11]

Na likoló: Exode mokapo 15 na milɔngɔ minei

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Ezipeli mpe Plantin: Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto