Nkombo ya Nzambe na mosala oyo Alfonse de Zamora asalaki mpo na kozwa libongoli ya sikisiki
NA MOBU 1492, Ferdinand, mokonzi ya Espagne ná mwasi na ye Isabella, babimisaki mobeko moko oyo elobaki boye: “Tosɛngi na Bayuda nyonso, ezala basi to mibali . . . ete na nsuka ya sanza ya Yuli ya mbula oyo, bálongwa na bitúká nyonso ya ekólo na biso ná bana na bango ya basi mpe ya mibali mpe basaleli na bango, ya basi mpe ya mibali mpe bato nyonso ya mabota na bango, ezala bato minene to bato mpamba, mikóló mpe bana, mpe bámeka kutu te kozonga awa.”
Mobeko wana esɛngaki na libota mokomoko ya Bayuda oyo bazalaki na Espagne bápona: kokende na mboka mosusu to kotika lingomba na bango. Ekoki kozala ete Rabi moko na nkombo Juan Zamora amonaki malamu akóma mondimi ya Katoliki mpe atikala na Espagne, epai bankɔkɔ ya bankɔkɔ na ye bafandaki. Lokola Juan azalaki Moyuda, ekoki kozala ete atindaki mwana na ye Alfonse na eteyelo moko ya lokumu ya mateya ya Ebre na engumba Zamora. Na nsima, Alfonse ayekolaki malamumalamu Latin, Grɛki mpe Aramɛyɛ. Nsima ya kosilisa bakelasi na ye, akómaki molakisi ya Ebre na iniversite ya Salamanque. Mwa moke na nsima, boyebi na ye ya minɔkɔ yango esalisaki mpenza bato ya mayele na makambo ya Biblia na Mpoto mobimba.
Na mobu 1512, iniversite ya Alcalá de Henares, oyo efungwamaki sika, eponaki Alfonse de Zamora mokambi ya departema ya mateya ya Ebre. Lokola Zamora azalaki moko ya bato ya mayele ya ntango na ye, kardinale Jiménez de Cisneros, oyo afungolaki iniversite yango, aponaki ye na kati ya bato oyo basengelaki kopesa mabɔkɔ mpo na kobimisa buku oyo ebengami Polyglotte de Complute. Buku yango ya bavolimi motoba ezalaki na makomi ya Biblia na Ebre, na Grɛki, na Latin mpe biteni mosusu na Aramɛyɛ.a
Mpo na mosala yango, Mariano Revilla Rico, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye: “Na kati ya Bayuda misato oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya Kardinale [Cisneros], oyo ayebanaki mingi ezali nde Alfonse de Zamora, moto ya mayele na gramɛrɛ, filozofi mpe na mikanda ya mibeko ya Bayuda, longola boyebi na ye ya monɔkɔ ya Latin, ya Grɛki, ya Ebre, mpe ya Aramɛyɛ.” Makambo oyo Zamora ayekolaki etindaki ye aloba ete mpo na kobongola Biblia na bosikisiki esengeli koyeba malamumalamu minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli. Kutu, akómaki moko ya bato oyo balendisaki koyekola minɔkɔ ya Biblia, likambo oyo bato mingi bakómaki komipesa na yango na ebandeli ya siɛklɛ ya 16.
Atako bongo, Zamora azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi mpe ya mikakatano mingi mpo na moto oyo azali kolendisa koyekola makambo ya Biblia. Na ntango yango, kokɔtisa bato na Lingomba ya Katolike na makasi ezalaki kongala na Espagne mpe Lingomba yango ezalaki kotalela libongoli ya Vulgate na Latin lokola libongoli ya Biblia kaka moko oyo “endimami.” Nzokande, kobanda na Moyen-Âge, bato mingi ya mayele ya Lingomba ya Katolike, bamonaki ete Vulgate ezalaki na mabunga mingi. Na ebandeli ya siɛklɛ 16, Alfonse de Zamora mpe bato mosusu babandaki mosala ya kobimisa libongoli mosusu.
‘Mpo bato bázwa lobiko, esengeli kobongola’
Na kati ya misala oyo Zamora asalaki, na ntembe te, oyo elekaki monene ezalaki makomi ya Ebre oyo babengaka “Kondimana ya Kala,” ná libongoli na yango na Latin. Ekoki kozala ete alingaki básalela yango mpo na mosala monene ya kobimisa buku Polyglotte de Complute. Moko ya bakopi na ye ezali na bibliotɛkɛ ya El Escorial, oyo ezali pembeni ya engumba Madrid, na Espagne. Na bibliotɛkɛ yango, ezali na kode G-I-4 mpe ezali na mokanda mobimba ya Ebandeli na Ebre, ná libongoli na yango ya liloba na liloba na Latin.
Na maloba ya ebandeli, akomaki boye: “Mpo bato bázwa lobiko, esengeli kobongola Makomami Mosantu na minɔkɔ mosusu. . . . Tomonaki ete . . . ezali na ntina mingi moto nyonso ya sembo azala na libongoli ya Biblia ya liloba na liloba, oyo ebongisami na boye ete na liloba nyonso ya Ebre, ezali na liloba ya Latin oyo ekokani na yango.” Alfonse de Zamora azalaki na makoki oyo esengeli mpo na kosala mosala ya kobimisa libongoli wana ya sika na Latin mpamba te ayebanaki lokola moto ya mayele na monɔkɔ ya Ebre.
‘Elimo na ngai ezali kozwa esika ya kopema te’
Makambo mosusu oyo ezalaki na Espagne na siɛklɛ ya 16 ebongaki mpenza mpo bato ya mayele lokola Zamora básala mosala na bango. Na Moyen-Âge, Bayuda mingi bakómaki kofanda na Espagne. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Na Moyen-Âge, lokola Bamizilma ná Bayuda bazalaki mingi na Espagne, mboka yango ekómaki ekólo kaka moko ya Mpoto oyo bato ya mposo mpe mangomba ndenge na ndenge bafandaki mpe na nsuka ya eleko yango, misala mingi oyo bazalaki kosala na makambo ya mangomba, mikanda oyo bazalaki kokoma, misala na bango ya ntɔki, mpe ndenge ya kotonga bandako elandaki mimeseno ya bato yango.”
Lokola Bayuda bazalaki mingi na Espagne, bamaniskri ya Biblia na Ebre ezalaki mpe ebele. Bakomeli ya Bayuda ya bisika mingi ya Espagne basalaki mosala monene ya kobimisa ebele ya bakopi mpo na kotánga Makomami na basinagoga. Na buku na ye (The Earliest Editions of the Hebrew Bible), Lazarus Goldschmidt alobi ete “Bayuda oyo bazalaki bato ya mayele na makambo ya Biblia bazalaki kosepela mingi na bamaniskri ya monɔkɔ ya Espagnol mpe ya Portugais ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia mpo ekomamaki na bosikisiki, kasi bazalaki mpe kosepela na bamaniskri oyo esalemaki na kolanda mikanda yango mpe mikanda oyo ezali na mabongoli mingi na kati.”
Atako makambo mosusu ezalaki malamu na Espagne, bato oyo bazalaki na makanisi ya kobongola Biblia bakómaki kokutana na mikakatano. Na mobu 1492, basoda ya Mokonzi Ferdinand ná mwasi na ye Isabelle bazwaki mboka ya nsuka oyo Baarabe bafandaki naino na Espagne. Ndenge tolobaki yango na ebandeli, kaka na mbula yango, mokonzi yango ná mwasi na ye babimisaki mobeko ete bato nyonso oyo bazali na Lingomba ya Bayuda bálongwa na Espagne. Mobeko mosusu ya ndenge yango ebimisamaki mpo na Bamizilma mbula zomi na nsima. Kobanda na ntango yango, Lingomba ya Katolike ekómaki lingomba kaka moko oyo Leta endimaki na Espagne, mpe mangomba mosusu nyonso epekisamaki.
Makambo yango ya sika ememaki mbongwana nini na mosala ya kobongola Biblia? Makambo oyo Alfonse de Zamora akutanaki na yango emonisi yango malamu. Atako Moyuda yango oyo azalaki moto ya mayele mingi akómaki mondimi ya Lingomba ya Katolike, bakonzi ya lingomba na Espagne bazalaki kosepela na ye te mpo azalaki Moyuda. Batɛmɛli mosusu balobaki mabe mpo na Kardinale Cisneros na ndenge aponaki moto oyo azalaki Moyuda mpo azala na kati ya bato oyo basengelaki kobongisa Biblia ya minɔkɔ mingi. Maloba ya bato yango etungisaki Zamora mingi. Na mokanda moko oyo akomaki na Iniversite ya Madrid, Zamora amilelaki boye: “Ngai, . . . moto oyo baninga nyonso basundolá mpe bayiná—oyo bakómá banguna na ngai—nakoki kozwa te esika ya kopemisa elimo na ngai to esika ya kotya makolo na ngai.”
Moko ya banguna na ye ya monene ezalaki Juan Tavera, episkɔpɔ ya Toledo, oyo na nsima akómaki mokonzi ya bato oyo bazalaki kotinda bato na makasi ete bákɔta na Lingomba ya Katolike. Lokola Zamora atungisamaki mingi mpo na maloba mabe ya Tavera, asɛngaki kutu lisalisi ya pápa. Na mokanda oyo akomelaki ye, esika moko alobaki boye: “Tata, nazali kosɛnga mpe kobondela yo osalisa ngai . . . mpe obatela ngai liboso ya monguna na ngai Don Juan Tavera, episkɔpɔ ya Toledo. Azali konyokola ngai mokolo na mokolo mpe koyokisa ngai mpasi mingi. . . . Nazali mpenza na mpasi monene, mpo ete na miso na ye, nazali lokola nyama ya koboma. . . . Tata, soki oyoki kolela na ngai, ‘Yawe akobatela yo mpe akobikisa yo mpo lokolo na yo ekangama na motambo te.’ (Mas. 3:23)”b
Eloko ya motuya oyo Zamora atiká
Atako banguna batɛmɛlaki ye, Zamora akobaki na mosala na ye mpe yango ememelaki ebele ya bato oyo bayekolaka Biblia matomba. Atako abongolaki te Makomami na minɔkɔ oyo bato bazalaki koloba na eleko na ye, asalaki mosala moko ya ntina mingi mpo na babongoli mosusu. Mpo na kokanga ntina ya mosala oyo asalaki, tosengeli koyeba ete kobongola Biblia esɛngaka lolenge mibale ya bato ya mayele. Ya liboso, esengeli kozala na bato ya mayele oyo bakoyekola bakopi ya makomi mosantu na minɔkɔ oyo bakomaki na yango na ebandeli, elingi koloba Ebre, Aramɛyɛ mpe Grɛki mpo na kobimisa makomi ya malamu mpe ya sikisiki na minɔkɔ yango. Na nsima, mobongoli mosusu akoki kosalela makomi wana mpo na kobongola na monɔkɔ mosusu.
Alfonse de Zamora nde atambwisaki mosala ya kobongisa makomi ya Ebre oyo ebimaki na Polyglotte de Complute na mobu 1522. (Maloba ya Ebre oyo alimbolaki na Latin mpe gramɛrɛ ya monɔkɔ ya Ebre oyo ebimisamaki na buku yango esalisaki mpe babongoli.) Érasme, oyo azalaki na bomoi eleko moko na Zamora, asalaki mosala ya ndenge yango mpo na Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo ebengamaka Kondimana ya Sika. Ntango makomi yango oyo ebongisami malamu esalemaki na Ebre mpe na Grɛki, babongoli mosusu bakokaki kosala mosala ya ntina mingi ya kotya Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba. Ntango William Tyndale abongolaki Biblia na Lingelesi, azalaki na kati ya babongoli ya liboso oyo basalelaki makomi ya Ebre oyo ezalaki na Polyglotte de Complute.
Ndenge oyo Biblia ekabolami mingi lelo ezali mbano ya mosala makasi ya bato lokola Zamora, oyo bamipesaki bomoi na bango mobimba mpo na kosalisa biso tóyeba Makomami malamu. Ndenge Zamora amonaki yango, mpo bato bábika, esengeli báyeba Liloba ya Nzambe mpe bátosa yango. (Yoane 17:3) Mpo na yango, esengeli kobongola Biblia na minɔkɔ oyo bato bayebi, mpe na ndenge yango, nsango na yango ekoki kosimba mitema mpe makanisi ya bamilio ya bato.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndimbola ya Polyglotte de Complute, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2004, nkasa 28-31.
b Tomoni ete Zamora asalelaki nkombo ya Nzambe, kasi titre te, ntango asɛngaki pápa wa Roma asalisa ye. Na libongoli moko ya mokanda ya Zamora na Espagnol, nkombo yango ezali “Yawe.” Eyebani te soki ekomamaki ndenge nini na mokanda oyo ye moko akomaki na Latin. Mpo na libongoli ya Zamora mpe ndenge oyo asalelaki nkombo ya Nzambe, talá etanda “Ndenge oyo abongolaki nkombo ya Nzambe” na lokasa 19.
[Etanda/Bililingi na lokasa 19]
Ndenge oyo abongolaki nkombo ya Nzambe
Ebongi mpenza tótya likebi na ndenge oyo Alfonse de Zamora, moto ya mayele oyo ayekolaki Ebre, abongolaki nkombo ya Nzambe. Ndenge tokoki komona yango na fɔtɔ oyo ezali awa, bandimbola oyo abakisaki na mopanzi na libongoli na ye ya liloba na liloba na Latin, akomaki “jehovah” na esika oyo nkombo ya Nzambe ezali na mokanda ya Ebandeli.
Emonani ete Zamora andimaki lolenge wana ya kobongola nkombo ya Nzambe na Latin. Na siɛklɛ ya 16, ntango Biblia ebongolamaki na minɔkɔ oyo elobamaka mingi na Mpoto, babongoli mingi bakómaki kosalela ekomeli wana, na ndakisa William Tyndale (na Lingelesi, 1530), Sebastian Münster (na Latin, 1534), Pierre-Robert Olivétan (na Lifalanse, 1535) mpe Casiodoro de Reina (na Espagnol, 1569).
Na bongo, Zamora akómaki moko ya bato ya mayele ya liboso na siɛklɛ ya 16, oyo basalisaki mpo nkombo ya Nzambe eyebana. Koboya kosalela nkombo ya Nzambe ebandaki mpo na mbala ya liboso mpo na bibangabanga ya Bayuda oyo bazalaki kolinga te kotánga nkombo ya Nzambe. Mpo na bibangabanga yango, babongoli ya Biblia ya mangomba, na ndakisa Jérôme, oyo abongolaki Vulgate na Latin, atyaki maloba lokola “Nkolo” to “Nzambe” na esika oyo nkombo ya Nzambe ezalaki.
[Elilingi]
Zamora abongolaki nkombo ya nzambe na Ebre na “yehova”
[Elilingi na lokasa 18]
Mobeko ya mokonzi ya Espagne ná mwasi na ye, na 1492
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mobeko: Na ndingisa ya Archivo Histórico Provincial, Ávila, Espagne
[Elilingi na lokasa 18]
Iniversite ya Alcalá de Henares
[Elilingi na lokasa 21]
Elilingi na ebandeli ya libongoli ya Zamora