Silakuse esika oyo Paulo atɛlɛmaki mwa moke
NA MOBU 59 ya ntango na biso (T.B.), masuwa moko oyo eutaki na Esanga Malta ezalaki kokende na Itali. Na motó ya masuwa yango ezalaki na elilingi ya “Bana ya Zeusi,” oyo bazalaki kotalelama lokola banzambe oyo bazalaki kobatela batambwisi-masuwa. Luka akomaki ete masuwa yango esɛmaki “na libongo ya Silakuse,” na bokula ya Sisili, mpe ‘bafandaki mikolo misato wana.’ (Misala 28:11, 12) Luka azalaki na masuwa yango elongo na Alisitake mpe ntoma Paulo, oyo azalaki kokende na Loma mpo básambisa ye.—Misala 27:2.
Toyebi te soki bapesaki Paulo nzela abima na masuwa ntango bakómaki na Silakuse. Soki ye to baninga na ye ya mobembo babimaki, ekoki kozala bamonaki nini?
Na ntango ya Bagrɛki mpe na ntango ya Baloma, Silakuse ezalaki engumba monene lokola Atene mpe Loma. Balobaka ete bato ya Kolinti nde batongaki engumba yango na mobu 734 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) Na eleko moko, Silakuse ezalaki na lokumu mingi mpe bato minene mosusu ya ntango ya kala babotamaki kuna, na ndakisa mokomi Epicharmus, mpe Archimède, moto moko ya mayele na matematiki. Na mobu 212 L.T.B., Baloma balongaki Silakuse.
Moto oyo akei na Silakuse lelo oyo akoki komona mwa moke ndenge engumba yango ezalaki na ntango ya Paulo. Engumba yango ezalaki na ndambo mibale—moko ezalaki na esanga moke ya Ortygia, epai oyo mbala mosusu masuwa oyo ememaki Paulo esɛmaki, mpe ndambo mosusu ezalaki na mokili.
Lelo oyo, moto oyo akei na esanga yango akokuta bitika ya tempelo eleki koumela oyo Bagrɛki batongá na Sisili—tempelo ya nzambe Apollon; etongamaki na siɛklɛ ya 6 L.T.B. Akokuta mpe makonzí ya tempelo moko ya nzambe Athéna oyo etongamaki na siɛklɛ ya 5 L.T.B., kasi bakómisá yango makonzí ya ndako-nzambe oyo batongaki wana.
Engumba Silakuse ya lelo ezali na kati ya mokili; moto oyo akei kuna akoki komona biloko ya kala na parkɛ ya Néapolis. Esika oyo Bagrɛki bazalaki kosala teyatre ezali pembeni ya ekɔtelo ya parkɛ yango. Ezali moko ya bisika ya teyatre oyo eleki minene oyo Bagrɛki batongaki. Lokola etalaná na mbu, ntango bato bazalaki kotala bato oyo bazali kosala teyatre, bazalaki mpe komona mbu. Ndako ya teyatre ya Baloma ezali na sudi mpenza ya parkɛ yango; batongaki ndako yango na siɛklɛ ya 3 T.B. Ndako yango esalá sɛrklɛ, ezali na molai ya mɛtrɛ 140, monene ya mɛtrɛ 119 mpe ezali na esika ya misato na bandako ya teyatre oyo eleki monene na Itali mobimba.
Soki ozwi libaku ya kokende na Silakuse, okoki kokende na Ortygia, ofandi na kiti, na esika moko oyo ozali kotala mbu, ofungoli Biblia na Misala 28:12, mpe kanisá ntoma Paulo na kati ya masuwa oyo ezalaki kokɔta na libongo yango.
[Etanda/Karte na lokasa 30]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Malta
Sisili
Silakuse
ITALI
Legiumu
Puteoli
Loma
[Elilingi na lokasa 30]
Bitiká ya esika oyo Bagrɛki bazalaki kosala teyatre na Silakuse