Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/11 nk. 3-4
  • Mposa ya bakonzi ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mposa ya bakonzi ya malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Tosengeli kondima bango kaka bongo” to nde toluka mosusu?
  • Nani abongi mpenza kozala mokonzi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Epai wapi tokoki kozwa batambwisi ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Okopona nani azala mokambi na yo?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Tólanda Kristo, Mokambi ya kokoka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/11 nk. 3-4

Mposa ya bakonzi ya malamu

“Nalobi na yo tiká bokonzi, tolɛmbi yo. Na nkombo ya Nzambe, tiká bokonzi!”​—Maloba ya Oliver Cromwell oyo Leopold Amery, depite moko ya Angleterre azongelaki.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki koumela sanza mwambe, ebele ya bato bakufaki, mpe ezalaki komonana mpenza ete Angleterre ná bikólo oyo ezalaki ngámbo moko na yango ekolonga te. Mpo na Leopold Amery ná bato mosusu oyo bazalaki na guvɛrnema, esengelaki koluka mokonzi mosusu. Yango wana, mokolo ya 7 Mai 1940, na ndako ya makita ya Parlema, Amery alobaki na Ministre-Mokonzi Neville Chamberlain maloba oyo totángi na ebandeli. Mikolo misato na nsima, Chamberlain alongwaki mpe Winston Churchill akómaki mokonzi na esika na ye.

BATO bazalaka na mposa ya mokonzi, kasi moto nyonso te nde akoki kozala mokonzi ya malamu. Ata na kati ya libota, mpo mwasi ná bana bázala na esengo, tata asengeli koyeba kotambwisa makambo na libota. Yango emonisi ete mokonzi ya ekólo to ya mokili mobimba asengeli kozala na makoki mingi lisusu koleka! Talá ntina tozali komona ete bakonzi ya malamu bazali kolukama na mwinda.

Yango wana, bakonzi ndenge na ndenge batyamá na bibonga, mbongwana ndenge na ndenge esalemá, makonzi ekweisamá, bakonzi ya sika batyamá, bavoti esalemá, bakonzi mosusu babomamá, baguvɛrnema ekweá mpe mosusu esalemá. Bakonzi, baministre-bakonzi, baprezida, ba-secrétaire général, badiktatɛrɛ bazwá bisika, bayangelá, baleká, mpe bamosusu bazwá bisika na bango. Bambongwana ya mbalakaka elongolá ata bakonzi mosusu oyo bazalaki bilombe. (Talá etanda “Batikaki bokonzi na mbalakaka,” na lokasa 5.) Kasi, bakonzi ya malamu mpe oyo babongi koumela bazali komonana kaka te.

“Tosengeli kondima bango kaka bongo” to nde toluka mosusu?

Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato mingi balongoli mpenza elikya ete tokoki kozwa bakonzi ya malamu. Na bikólo mingi, na ntango ya voti nde emonanaka mpenza ete bato bakipaka lisusu bakonzi te, mpe bazali kotya motema te ete bakozwa bakonzi ya malamu. Geoff Hill, mopanzi-nsango moko na Afrika, alobaki boye: “Ntango bato bamoni ete ata ndenge nini mpasi na bango ekosilisa te, baboyaka kopona bakonzi na ntango ya voti. . . . Na Afrika, soki bato baboyi kopona na ntango ya voti, elimbolaka kaka te ete bazali kosepela na mokonzi oyo azali na ebonga. Mbala mingi, yango ezalaka nde kolela ya bato oyo bamoni ete moto moko te azali kokanisa mpasi na bango.” Ndenge moko mpe, mpo na voti moko oyo elingaki kosalema, mokomi moko ya zulunalo na États-Unis akomaki boye: “Nazali na mposa ete moto moko oyo akoki kozala mokonzi ya malamu azala na kati ya bakandida.” Abakisaki boye: “Kasi, moto ya ndenge wana azali te. Tomoná ye naino te. Tosengeli kondima bango kaka bongo.”

Bato basengeli kaka “kondima” bakonzi ya kozanga kokoka? Lokola bakonzi bakoki te kokokisa bamposa ya bapɛplɛ, tokoki nde koloba ete tokozwa bakonzi ya malamu ata mokolo moko te? Te. Ezali na bokonzi moko ya malamu koleka. Lisolo oyo elandi ekolobela nani azali mokonzi ya malamu mpenza mpo na bato mpe ndenge oyo bokonzi na ye ekomema matomba mpo na ebele ya bato ya bikólo, mposo mpe minɔkɔ nyonso, bakisa mpe yo.

[Bililingi na lokasa 3]

Likoló, na lobɔkɔ ya mwasi: Neville Chamberlain

Likoló, na lobɔkɔ ya mobali: Leopold Amery

Na nse: Winston Churchill

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Chamberlain: Fɔtɔ ya Jimmy Sime/​Central Press/​Getty Images; Amery: Fɔtɔ ya Kurt Hutton/​Picture Post/​Getty Images; Churchill: The Trustees of the Imperial War Museum (MH 26392)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto