Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/5 nk. 23-28
  • Atako nalɛmbi, nazali mpenza na nguya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Atako nalɛmbi, nazali mpenza na nguya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nasepelaki mpenza ntango nayebaki ete Nzambe azali bolingo
  • Bazali kotyola mpe kotɛmɛla ngai
  • Basoda ya Hitler bazwi ekólo Autriche
  • Na kaa ya bakangami
  • “Nakobɛta yo masasi”
  • Nandimaki te nakobima na bolɔkɔ
  • Namibombi na kati ya bangomba
  • Nguya ya Yehova ‘ekómisami ya kokoka na kati ya bolɛmbu’
  • Na lisalisi ya Yehova, tobikaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Oyo nde esengo na kofanda na mesa na jehovah!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Natyelaki libateli ya Yehova motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nakozongisela Yehova nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/5 nk. 23-28

Lisolo ya bomoi

Atako nalɛmbi, nazali mpenza na nguya

YA LEOPOLD ENGLEITNER

Mokonzi moko ya basoda ya Banazi abimisaki mondoki na ye ya moke, atyaki ngai yango na motó, mpe atunaki ngai boye: “Ondimi liwa? Nakobɛta yo masasi, mpo yo ozali mpenza motó mangbongi.” Na mpiko nyonso nayebisaki ye ete: “Nandimi liwa.” Nakangaki miso, mpe nazalaki kozela abɛta masasi, kasi asalaki eloko te. Alongolaki mondoki na motó na ngai mpe agangaki: “Ntina kutu ya koboma yo ezali te, bolole ya moto!” Nini etyaki ngai na mokakatano ya ndenge wana?

NABOTAMAKI mokolo ya 23 Yuli 1905 na engumba ya Aigen-Voglhub, oyo ezali na Bangomba Alpes ya Autriche. Nazalaki mwana ya liboso na libota na biso. Tata na ngai azalaki kosala na izini moko ya kopasola mabaya mpe mama na ngai azalaki mwana ya mokati bilanga. Baboti na ngai bazalaki babola, kasi bazalaki makasi na mosala. Nalekisaki bomwana na ngai na mboka Bad Ischl, pene na engumba Salzbourg oyo ezali na kati ya balaki mpe bangomba milaimilai.

Ntango nazalaki mwana, nazalaki mbala mingi komituna mpo na nini Nzambe apesá bato mosusu bomengo, kasi libota na biso te; mpo na nini bana mosusu bazali na nzoto kolɔngɔnɔ, kasi ngai nabotamá na maladi ya mokɔngɔ; mokuwa na ngai ya mokɔngɔ etɛngamá. Maladi yango ezalaki kopesa ngai mpasi mpenza na ndenge ete nazalaki kutu kokoka kotɛlɛma semba te. Na kelasi, bapekisaki ngai kosalaka ngalasisi mpe, mpo na yango, baninga na ngai ya kelasi bazalaki kosɛka ngai.

Na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mwa moke liboso nakokisa mbula 14, nazwaki ekateli ya koluka mosala mpo na kokima bobola. Nazalaki ntango nyonso konyokwama na nzala, mpe bafɛfɛlɛ makasi ya grippe espagnole oyo ebomaki bamilio bato, esilisaki ngai makasi nyonso na nzoto. Ntango nazalaki koluka mosala na baferme, bazalaki koloba na ngai boye: “Mosala nini tokopesa moto alɛmbalɛmbá lokola yo?” Kasi, moto moko ya motema malamu azwaki ngai na ferme na ye.

Nasepelaki mpenza ntango nayebaki ete Nzambe azali bolingo

Mama na biso azalaki mondimi monene ya Katolike, kasi ngai nazalaki kokende na ndako-nzambe mingimingi te mpo tata azalaki kokipe makambo ya losambo te. Lokola na Lingomba ya Katolike basalelaka bikeko mingi, nazalaki kosepela na yango ata moke te.

Mokolo moko na Ɔkɔtɔbɛ 1931, moninga moko abengaki ngai nakende kotika ye na likita moko ya Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova kala. Na likita yango, nazwaki biyano ya Biblia na mituna ya ntina oyo nazalaki komituna, na ndakisa: Nzambe asepelaka na losambo ya bikeko? (Exode 20:4, 5) Lifelo ya moto ezali mpenza? (Mosakoli 9:5) Bakufi bakosekwa?​—Yoane 5:28, 29.

Likambo oyo ekamwisaki ngai mingi ezali ete Nzambe asepelaka te na bitumba oyo ezali kosilisa bato, ata soki bato balobi ete bazali kobunda na nkombo ya Nzambe. Nayebaki ete “Nzambe azali bolingo” mpe ete azali na nkombo moko ya lokumu mpenza, Yehova. (1 Yoane 4:8; Nzembo 83:18) Nasepelaki mpenza koyeba ete na nzela ya Bokonzi ya Yehova, bato bakozala na likoki ya kozala na bomoi ya libela mpe ya esengo, na kati ya paladiso oyo ekozala na mabelé mobimba. Nayebaki mpe elikya kitoko oyo Nzambe apesá bato mosusu ya kozanga kokoka, bato oyo aponá mpo bákende na likoló koyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Nazwaki ekateli ya komipesa mobimba mpo na Bokonzi yango. Yango wana, na sanza ya Mai 1932, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Kokóma Motatoli ya Yehova na ekólo Autriche na ntango wana ezalaki kosɛnga mpiko, mpo lokola ekólo mobimba bazalaki kondimela kaka Lingomba ya Katolike, bazalaki kolinga bato ya mangomba mosusu ata moke te.

Bazali kotyola mpe kotɛmɛla ngai

Baboti na ngai babangaki makasi ntango nalongwaki na lingomba mpe sángo apanzaki nsango yango mbala moko na kati ya lingomba. Mpo na kotyola ngai, bato ya kartye bazalaki kobwaka nsoi na mabelé soki bamoni ngai. Atako bongo, nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela, mpe nabandaki mosala yango na Yanuali 1934.

Lokola Banazi bazwaki eteni monene ya etúká na biso, makambo ya politiki ekómaki matata. Ntango nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na lobwaku ya Enns na etúká ya Styrie, bapolisi bazalaki ntango nyonso kolandalanda ngai, mpe esengelaki ‘nazala ekɛngɛ lokola nyoka.’ (Matai 10:16) Kobanda 1934 tii 1938, minyoko ezalaki kolanda ngai mokolo na mokolo. Atako nazalaki na mosala te, baboyaki kopesaka ngai ata mwa mbongo oyo bapesaka bato oyo basalaka te; mbala ebele nakɔtaki bolɔkɔ ya mikolo moke, mpe mbala minei nakɔtaki bolɔkɔ ya basanza mingi mpo na mosala na ngai ya kosakola.

Basoda ya Hitler bazwi ekólo Autriche

Na Marsi 1938, basoda ya Hitler bakɔtaki na Autriche. Nsima ya mwa mikolo, bakangaki bato koleka 90 000 mpe batindaki bango na babolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami; bazalaki koloba ete bato yango bazali koboya boyangeli ya Banazi. Batatoli ya Yehova bayebaki malamu monyoko oyo ezalaki koya. Na eleko ya molunge ya 1937, bandeko mingi ya lisangá na ngai ya liboso basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 350 na velo tii na Prague mpo na koyangana na liyangani moko ya mikili mingi. Na liyangani yango, bayebisaki bango ndenge bandeko ya Allemagne bazalaki konyokwama. Emonanaki polele ete ekómi ngala na biso.

Banda kaka mokolo basoda ya Hitler batyaki makolo na Autriche, Batatoli ya Yehova bakómaki kosala makita na bango mpe kosakola na nkuku. Atako mikanda ezalaki kouta na Swisse na ndenge ya nkuku, ezalaki kokoka na bandeko nyonso te, mpo ezalaki moke. Yango wana bandeko ya Vienne bakómaki kobimisa mikanda na kobombama. Mbala mingi, bazalaki kotinda ngai nakende kotikela bandeko mikanda.

Na kaa ya bakangami

Mwa 4 Aprili 1939, basoda ya Gestapo bakangaki ngai ná bandeko misato ntango tozalaki kosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto na Bad Ischl. Bamemaki biso nyonso na motuka tii na biro monene ya bapolisi na engumba Linz. Atako ezalaki mbala ya liboso oyo namataki na motuka, nayokaki esengo ya motuka te mpo nazalaki kobanga makasi. Na Linz, basambisaki ngai mpe banyongaki ngai mbala na mbala, kasi nawanganaki kondima na ngai te. Sanza mitano na nsima, bamemaki ngai liboso ya zuzi monene ya etúká ya Haute-Autriche. Likambo ya kokamwa, basambisaki ngai lisusu te lokola moto mabe ndenge bazalaki kofunda ngai; kasi yango ezalaki te nsuka ya minyoko na ngai. Na nsima, batindaki bandeko wana misato na bakaa ya bakangami, epai bakufaki. Batikalaki sembo tii na nsuka.

Batikaki ngai kaka na bolɔkɔ, mpe na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ 1939, bayebisaki ngai ete nazali kokende na kaa ya bakangami ya mboka Buchenwald, na ekólo Allemagne. Engbunduka moko oyo ebongisamaki kaka mpo na bato ya bolɔkɔ ezalaki kozela biso na gare ya engumba Linz. Bawagɔ ya engbunduka yango ezalaki na bashambre ya bato mibalemibale. Moto oyo batyaki ngai na ye shambre moko ezalaki Dr. Heinrich Gleissner, guvɛrnɛrɛ ya kala ya etúká ya Haute-Autriche.

Ngai ná Dr. Gleissner tosololaki masolo kitoko mpenza. Amitungisaki mpenza mpo na mpasi na ngai, mpe ayokaki mabe mpenza ntango ayebaki ete ata na ntango oyo ye azalaki guvɛrnɛrɛ, bamemaki Batatoli ya Yehova mingi ya etúká na ye na batribinale. Na mawa mpenza alobaki na ngai boye: “Mr. Engleitner, nakoki kosilisa mabe yango te, kasi nasɛngi bolimbisi. Emonani mpenza ete guvɛrnema na biso ezangaki bosembo. Soki ozali na mposa ya lisalisi, nakozanga te kosalisa yo.” Nakutanaki na ye lisusu ntango etumba esilaki. Asalisaki ngai nazwa lifuta oyo guvernɛma epesaki bato oyo Banazi babebisaki biloko na bango.

“Nakobɛta yo masasi”

Mwa 9 Ɔkɔtɔbɛ 1939, nakómaki na kaa ya bakangami ya Buchenwald. Mwa moke na nsima, bayebisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ ya kaa yango ete Motatoli moko azali na kati ya bato ya bolɔkɔ oyo bayei sika, mpe atyaki ngai mpenza miso. Azalaki kobɛta ngai lokola nyama. Ntango amonaki ete nakoki kowangana kondima na ngai te, alobaki na ngai boye: “Engleitner, nakobɛta yo masasi. Kasi, liboso nasala yango, natikeli yo mwa ntango okomela baboti na yo maloba ya nsuka.” Nakanisaki maloba ya kobɔndisa oyo nakokaki kokomela baboti na ngai, kasi ntango nyonso oyo nazalaki kotya biki na lokasa mpo na kokoma, azalaki kobɛta ngai na lobɔkɔ mpe yango ezalaki kobebisa makambo oyo nazalaki kokoma. Alobaki na ngai boye: “Talá zoba oyo! Ayebi ata kokoma te. Kasi, alingi kaka kotánga Biblia.”

Na nsima, abimisaki mwa mondoki na ye, atyaki yango na motó na ngai, mpe asalaki lokola nde alingi kobɛta, ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo. Na nsima, akɔtisaki ngai na mwa ndako moko ya moke. Natɛlɛmaki butu mobimba. Nalalaki ata moke te, mpo nazalaki koyoka mpasi nzoto mobimba. Baninga na ngai ya bolɔkɔ bazalaki koluka “kobɔndisa” ngai na maloba oyo: “Ondimi kokufa kaka boye mpo na lingomba ezangi ntina?” Dr. Gleissner azalaki na eteni ya bolɔkɔ oyo ezalaki pene na oyo ya ngai. Ayokaki ndenge basalaki ngai mpe alobaki boye: “Minyoko ya baklisto ebandi lisusu!”

Na eleko ya molunge ya 1940, bayebisaki bato nyonso ya bolɔkɔ bákende kotimola mabanga mokolo moko ya lomingo, atako tozalaki kosala te mokolo ya lomingo. Yango ezalaki lokola etumbu oyo bapesaki biso mpo na “mabe” oyo bato mosusu ya bolɔkɔ basalaki. Basɛngaki biso tómema mabanga ya mineneminene banda na esika babukaka yango tii na kaa. Bato mibale ya bolɔkɔ bamekaki komemisa ngai libanga moko ya monene na mokɔngɔ, kasi lokola kilo elekaki, nalingaki kutu kokwea. Nzokande, Arthur Rödl, mokambi ya kaa, abangaki mpe mbala moko apekisaki ngai komema yango. Lokola amonaki ndenge nazalaki kobundabunda, alobaki na ngai boye: “Okokoka komema libanga wana na mokɔngɔ tii na kaa te! Kitisa yango noki!” Natosaki na esengo nyonso. Na nsima, Rödl alakisaki ngai libanga moko ya moke mpe alobaki na ngai boye: “Zwá oyo wana, mpe memá yango na kaa. Yango nde ekoki na yo!” Abalukaki epai ya mokɛngɛli na biso mpe alobaki na ye ete: “Tiká Bayekoli ya Biblia bázonga na bolɔkɔ. Mosala basali ekoki mpo na lelo!”

Mikolo nyonso na nsuka ya mosala, nazalaki na esengo ya kosangana na bandeko na ngai ya elimo. Tozwaki bibongiseli mpo na kokabolaka bilei ya elimo. Na ndakisa, ndeko moko azalaki kokoma vɛrsɛ moko ya Biblia na papye mpe azalaki kotambwisa yango mpo ndeko mokomoko atánga yango. Tokɔtisaki mpe Biblia moko na kaa na mayele. Tokabolaki Biblia yango bitenibiteni. Bapesaki ngai mokumba ya kokabolaka bavɛrsɛ ya mokanda ya Yobo na boumeli ya sanza misato. Nazalaki kobomba yango na kati ya basosɛti na ngai. Lisolo ya Yobo esalisaki ngai natikala makasi na elimo.

Nsukansuka, mwa 7 Marsi 1941, batindaki ngai ná ebele ya bato mosusu na kaa ya bakangami ya Niederhagen. Nzoto na ngai ezalaki se kobeba. Mokolo moko, basɛngaki ngai ná bandeko mibale tótya bisaleli ya mosala na kati ya bakɛsi. Ntango tosilisaki, tozongaki na kaa elongo na bato mosusu ya bolɔkɔ. Na nzela, soda moko ya Nazi oyo azalaki koya na nsima amonaki ete nazali kotambola malɛmbɛ. Epesaki ye nkanda mpe, kozanga koloba ata likambo moko, abɛtaki ngai makasi na mokɔngɔ. Nayokaki mpasi makasi, kasi atako bongo, nakendeki lisusu kosala na mokolo oyo elandaki.

Nandimaki te nakobima na bolɔkɔ

Na sanza ya Aprili 1943, babimisaki bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazalaki na kaa ya Niederhagen. Na nsima, batindaki ngai na kaa ya bakangami ya Ravensbrück, epai babomaki bato mingi ya bolɔkɔ. Nandimaki te, kasi na sanza ya Yuni 1943, babimisaki ngai na kaa ya bakangami. Na mbala wana, basɛngaki ngai te ete nawangana kondima na ngai liboso bábimisa ngai. Basɛngaki ngai kaka nandima kosala lokola moombo na ferme moko bomoi na ngai mobimba. Nandimaki kosala yango mpo kaka nalongwa na mpasi ya bolɔkɔ. Nakendaki epai ya monganga ya kaa mpo asala ngai ekzamɛ ya nsuka. Monganga yango akamwaki ntango amonaki ngai. Alobaki na ngai boye: “Yo ozali kaka Motatoli ya Yehova tii lelo!” Nayanolaki boye: “Kaka ndenge olobi, Doktɛrɛ.” “Soki boye, namoni te ntina oyo tokoki kobimisa yo. Kasi, soki mpe tobimisi mwa nyama lokola yo, tokomilongola nde na ngambo.”

Alekisaki ndelo te na maloba na ye. Nzoto na ngai ebebaki makasi. Nsili esilisaki ngai lomposo nyonso, kobɛta oyo bazalaki kobɛta ngai ebomaki ngai litoi moko mpe nzoto na ngai mobimba etondaki na bampota oyo ezalaki kobimisa maina. Nsima ya sanza 46 ya nzala, ya kokelela mpe ya misala makasi, natikalaki kaka na kilo 28. Mpo na nyonso wana, babimisaki ngai na kaa ya Ravensbrück na mokolo ya 15 Yuli 1943.

Batindaki ngai na mboka na biso na engbunduka kozanga ete basoda bákɛngela ngai, mpe nakendaki komimonisa na biro monene ya bapolisi ya Gestapo na Linz. Mokonzi ya bapolisi ya Gestapo apesaki ngai mokanda na ngai ya kobima na bolɔkɔ mpe alobaki na ngai boye: “Soki okanisi ete tozali kotika yo mpo okoba na mosala na bino ya kosakola na nkuku, ozali komikosa mpenza! Soki tokangi yo lisusu ozali kosakola, Nzambe kaka asunga yo.”

Nsukansuka, nakómaki na ndako na biso! Banda bakangaki ngai na mokolo ya 4 Aprili 1939, mama asimbaki ata eloko moko te na shambre na ngai. Ata Biblia na ngai, nakutaki yango polele likoló ya mesa, na pembeni ya mbeto na ngai! Nafukamaki mpe nabɔndelaki na motema mobimba mpo na kotɔnda Nzambe.

Mwa moke na nsima, batindaki ngai nakende kosala na ferme moko likoló ya ngomba. Nkolo ferme yango, oyo azalaki moninga na ngai ya bomwana, azalaki kutu kofuta ngai mwa mbongo, atako asengelaki te kofuta ngai. Liboso etumba ebanda, moninga yango andimaki nabomba mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia na ndako na ye. Nazalaki mpenza na esengo ya kosalela mwa mikanda yango mpo na kozwa makasi na elimo. Nazalaki kokokisa bamposa na ngai nyonso, mpe nazwaki ekateli ya kozela na ferme yango tii ntango etumba ekosila.

Namibombi na kati ya bangomba

Kasi, bonsomi oyo nazwaki eumelaki te. Na katikati ya sanza ya Augusto 1943, basɛngaki ngai nakende komona monganga moko ya basoda mpo asala ngai ekzamɛ. Liboso, monganga yango alobaki ete nabongi te na mosala ya soda, mpo mokɔngɔ na ngai ezali malamu te. Kasi pɔsɔ moko na nsima, kaka monganga yango abongolaki lisusu maloba mpe akomaki na mokanda na ngai ya lopitalo boye: “Azali mpenza soda ya etumba.” Na boumeli ya mwa ntango, basoda bazalaki koluka ngai, kasi bazalaki kozwa ngai te; kasi na mokolo ya 17 Aprili 1945, mwa moke liboso etumba esila, bakangaki ngai. Basɛngaki ngai nakende na etumba.

Nazwaki mwa biloko ya kolya mpe mwa bilamba oyo nazalaki na yango ná Biblia na ngai, mpe nakendaki komibomba na kati ya bangomba, pene na mboka na biso. Na ebandeli, nazalaki kolala libanda, kasi na nsima malili ekómaki makasi mpe mbula mpɛmbɛ ekitaki mpe ezipaki mpenza mabelé. Napɔlaki nzoto mobimba. Nasalaki makasi nakendaki tii na mwa ndako moko oyo ezalaki likoló mpenza, soki mɛtrɛ 1200 banda na nivo ya mai. Lokola nazalaki kolɛnga na malili, napelisaki mɔtɔ mpo na koyɔta mpe nakaukisaki bilamba na ngai. Lokola nalɛmbaki makasi, nalalaki likoló ya baa moko na pembeni ya mɔtɔ. Mwa moke na nsima, nayokaki mpasi makasi mpe nalamukaki. Mɔtɔ ezwaki ngai na bilamba! Nakweaki na mabelé mpe nabandaki kobalukabaluka mpo na koboma mɔtɔ yango. Mokɔngɔ mobimba ekómaki mbumambuma.

Atako nayebaki ete bakoki kokanga ngai, nazongaki na ngomba ya ferme na ntɔngɔntɔngɔ, kasi mwasi ya nkolo ferme abangaki makasi mpe asɛngaki ngai nakende; ayebisaki ngai ete basoda bazali kolukaluka ngai. Nakendaki epai ya baboti na ngai. Na ebandeli, ata baboti na ngai bakakatanaki mpo na koyamba ngai, kasi nsukansuka batikaki ngai nalala na ndako oyo babombaka biloko oyo babuki na bilanga, mpe mama abandaki kosukola ngai bampota mpe kotya yango nkisi. Kasi, nsima ya mikolo mibale, baboti na ngai bakómaki kobangabanga, yango wana namonaki malamu nazonga lisusu komibomba na bangomba.

Mokolo ya 5 na sanza ya Mai 1945, nayokaki lokito moko makasi mpe nalamukaki. Namonaki bampɛpɔ ya basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na Allemagne ezalaki koleka na nse mpenza. Nayebaki mbala moko ete boyangeli ya Hitler ekwei! Elimo ya Yehova epesaki ngai makasi ya koyikela minyoko ya nsɔmɔnsɔmɔ mpiko. Namonaki mpenza bosolo ya maloba ya Nzembo 55:22, oyo ebɔndisaki ngai mingi na ebandeli ya minyoko na ngai. ‘Nakitisaki mokumba na ngai epai ya Yehova,’ mpe atako nazalaki lisusu makasi te, asungaki ngai ntango nazalaki kotambola “na libulu ya molili ya kufa.”​—Nzembo 23:4.

Nguya ya Yehova ‘ekómisami ya kokoka na kati ya bolɛmbu’

Ntango etumba esilaki, bomoi ekómaki kobonga malɛmbɛmalɛmbɛ. Na ebandeli, nazalaki kosala na ferme ya moninga na ngai oyo ezalaki na ngomba. Etumbu oyo bapesaki ngai ya kosala lokola moombo na bilanga bomoi na ngai mobimba esilaki kaka ntango basoda ya États-Unis bazwaki mboka na sanza ya Aprili 1946.

Ntango etumba esilaki, bandeko ya Bad Ischl mpe ya bitúká ya zingazinga babandaki kosala makita pɔsɔ na pɔsɔ. Babandaki lisusu kosakola na molende. Nazwaki mosala ya sinzili ya butu na kompanyi moko mpe yango esalisaki ngai nakoba na mosala ya mobongisi-nzela. Na nsima, nakómaki kofanda na engumba St. Wolfgang, mpe na 1949, nabalaki Theresia Kurz, oyo abalaki liboso mpe abotaki mwana moko ya mwasi. Tofandaki na ye mbula 32 tii ntango akufaki na 1981. Nasalisaki ye na boumeli ya mbula koleka nsambo.

Nsima ya liwa ya Theresia, nazongelaki mosala ya mobongisi-nzela, oyo esalisaki ngai nabosana mpasi ya liwa na ye. Nazali sikoyo mobongisi-nzela mpe nkulutu ya lisangá na engumba Bad Ischl. Lokola nakómá kotambola na velo ya bibɔsɔnɔ, nakabolaka mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe nayebisaka bato elikya ya Bokonzi ya Nzambe na parke ya Bad Ischl to liboso ya ndako na ngai. Masolo kitoko ya Biblia oyo nasololaka na bato epesaka ngai esengo mingi.

Ntango nakanisaka makambo oyo eleká, namonaka ete makambo ya nsɔmɔnsɔmɔ oyo nakutanaki na yango mpe oyo nayikelaki mpiko ebebisá motema na ngai te. Ya solo, ezalaki na bantango mosusu oyo minyoko ezalaki kolɛmbisa ngai mpenza. Kasi, kozala mpenza moninga ya Yehova Nzambe esalisaki ngai nalonga mikakatano yango. Namonaki mpenza bosolo ya maloba oyo Nkolo alobaki na Paulo: “Nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” Sikoyo, atako nakómi na mbula pene na 100, nakoki koloba elongo na ntoma Paulo ete: “Nazali kosepela na kati ya bolɛmbu, na kati ya mafinga, na kati ya makambo ya kokelela, na kati ya minyoko mpe mikakatano, mpo na Klisto. Mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.”​—2 Bakolinti 12:9, 10.

[Elilingi na lokasa 25]

Bapolisi ya Gestapo bakangi biso, Aprili 1939

Mokanda ya Gestapo oyo bakomaki makambo oyo bafundaki ngai na yango, Mai 1939

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bafɔtɔ nyonso mibale: Privatarchiv; B. Rammerstorfer

[Elilingi na lokasa 26]

Namibombaki na bangomba pene na mboka na biso

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]

Foto Hofer, Bad Ischl, Autriche

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto