Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/5 nk. 10-13
  • Mari​—Engumba monene ya kala na kati ya esobe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mari​—Engumba monene ya kala na kati ya esobe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini esengeli kobenda likebi?
  • Makambo nini bamoni na bitika ya Mari?
  • Mikanda oyo bamonaki na Mari elobi makambo nini?
  • Kosalela Nzambe eponi mbula te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mosala ya koyekola biloko ya kala emonisi nini mpo na Biblia?
    Lamuká!—2008
  • Ougarit​—Engumba ya bato oyo bamipesaki na losambo ya Baala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mbisi babengi poisson-perroquet—Masini oyo ebimisaka zɛlɔ?
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/5 nk. 10-13

Mari​—Engumba monene ya kala na kati ya esobe

ANDRÉ PARROT, moto moko ya France oyo asalaka mosala ya arkeoloji, alobaki boye: “Motó na ngai ezalaki naino kotambola ntango nakendaki kolala nsima ya kosepela ná baninga na ngai mpo na likambo monene oyo tokutanaki na yango.” Na sanza ya Yanuali 1934, na Tell Hariri, mosika te na engumba Abou Kemal, pembeni ya Ebale Efalata (Euphrate), na ekólo Syrie, Parrot ná baninga na ye bakundolaki ekeko moko oyo ezalaki na makomi oyo: “Lamgi-Mari, mokonzi ya Mari, nganga-nzambe monene ya Enlil.” Basepelaki mingi ntango bamonaki ekeko wana.

Nsukansuka, esika oyo engumba Mari ezalaki emonanaki! Nini ekoki kobenda likebi ya bayekoli ya Biblia na likambo yango?

Mpo na nini esengeli kobenda likebi?

Atako mikanda mingi ya kala ezalaki kolobela Mari, esika oyo engumba yango ezalaki eyebanaki te. Bakomeli ya Sumer bakomaki ete Mari ezalaki engumba-mokonzi ya bakonzi oyo bazalaki koyangela Mezopotamia mobimba. Engumba Mari etongamaki pembeni ya Ebale Efalata, na golfe Persique; banzela minene epai bakomelesa oyo bazalaki kouta na Asulia, na Mezopotamia, na Anatolie, mpe na bokula ya Meditelane bazalaki koleka, ekutanaki na engumba wana. Biloko ya kotɛka lokola mabaya, bibende, mpe mabanga​—oyo ezalaki te na Mezopotamia—​ezalaki koleka na engumba yango. Mpako oyo bakonzi ya engumba Mari bazalaki kofutisa mpo na biloko wana epesaki yango bozwi mingi mpe ekómaki mboka monene na etúká wana mobimba. Nzokande, lokumu na yango esukaki ntango Mokonzi Sargon ya Akkad abɔtɔlaki Sulia.

Na boumeli ya mbula soki 300 kobanda ntango Sargon abɔtɔlaki mokili wana, baguvɛrnɛrɛ ndenge na ndenge oyo bazalaki basoda bakómaki koyangela engumba Mari. Na boyangeli na bango, engumba yango ekómaki lisusu na mwa bozwi. Kasi, na ntango ya guvɛrnɛrɛ ya nsuka, Zimri-Lim, engumba Mari ebandaki lisusu kokita. Mpo bokonzi na ye ekóma lisusu makasi, Zimri-Lim amekaki mayele ndenge na ndenge lokola kobɔtɔla bikólo mosusu, koyokana na bikólo mosusu mpe kobala bana ya bakonzi ya bikólo mosusu. Atako bongo, soki na mobu 1760 liboso ya ntango na biso (L.T.B), Hammourabi, mokonzi ya Babilone, azwaki engumba yango mpe abebisaki yango; yango ezalaki nsuka ya engumba oyo Parrot abengaki “moko na bingumba ya kala oyo bato na yango bayebaki makambo mpe misala mingi ya mayele.”

Ntango basoda ya Hammourabi babebisaki engumba Mari, kozanga báyeba yango, basalaki likambo moko oyo esalisaka mpenza bato ya mayele ya arkeoloji mpe ya istware ya ntango na biso. Ntango bazalaki kokweisa bifelo na yango oyo ezalaki na babriki ya mabelé, bakundaki bandako mosusu na nse ya bamɛtrɛ 5 mpe mpo na yango, ebatelamaki bankóto ya bambula. Bato ya arkeoloji bamonaki bitika ya batempelo mpe bandako minene, ebele ya biloko oyo bato basalá, mpe makomi oyo ezali kosalisa biso tóyeba bomoi ya bato oyo bafandaki na engumba wana.

Mpo na nini bitika ya Mari esengeli kobenda likebi na biso? Tózonga naino na ntango oyo Abalayama azalaki na bomoi. Abalayama abotamaki na mobu 2018 L.T.B., mbula 352 nsima ya Mpela ya Noa. Azalaki na libota ya zomi kobanda na Noa. Nzambe ayebisaki Abalayama alongwa na engumba Ulu mpe akende na Alana, mpe Abalayama atosaki. Na mobu 1943 L.T.B., ntango Abalayama azalaki na mbula 75, alongwaki na Alana mpe akendaki na mokili ya Kanana. Paolo Matthiae, moto ya Italie oyo asalaka mosala ya arkeoloji, alobi boye: “Mibembo ya Abalayama ememaki ye kobanda na Ulu tii na Yelusaleme [na Kanana] na eleko oyo engumba Mari ezalaki.” Na bongo, ndenge bato ya mayele bamoni esika engumba Mari ezalaki, ezali likambo ya ntina mpamba te ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge makambo ezalaki ntango Abalayama, mosaleli moko ya sembo ya Nzambe, azalaki na bomoi.a​—Genese 11:10–12:4.

Makambo nini bamoni na bitika ya Mari?

Bafandi ya engumba Mari bamipesaki mpenza na losambo, lokola kaka bato ya bisika mosusu na mokili ya Mezopotamia. Moto nyonso azalaki na mokumba ya kosalela banzambe. Liboso ya kozwa ekateli ya monene, moto nyonso azalaki koluka koyeba mokano ya banzambe. Bato ya arkeoloji bamonaki bitika ya batempelo motoba na engumba yango. Moko na yango ezalaki Tempelo ya Bankɔsi (bato mosusu balobaka ete ezalaki tempelo ya Dagan, oyo abengami Dagona na Biblia) mpe bisika ya losambo ya Ishtar, nzambe-mwasi ya kobota, mpe bisika ya losambo ya Shamash, nzambe-moi. Na ntango ya kala, na mokomoko ya batempelo wana ezalaki na ekeko ya nzambe oyo bato bazalaki kopesa ye bambeka mpe kobondela ye. Bandimi bazalaki kofandisa na bakiti ya bandako-nzambe yango mwa bikeko oyo bilongi na yango ezali kosɛka; bazalaki kokanisa ete bikeko yango ezalaki kokoba kosambela na esika na bango. Parrot alobaki boye: “Ndenge Bakatolike bapelisaka babuji na losambo, ekeko ya mondimi mokomoko ezalaki mpenza kozwa esika na ye.”

Likambo eleki monene oyo bamonaki na bitika ya Tell Hariri ezalaki biloko ya ndako moko monene, babengaka yango na nkombo ya moto ya nsuka oyo afandaki na ndako yango, Mokonzi Zimri-Lim. Louis-Hugues Vincent, moto moko ya France oyo asalaka mpe misala ya arkeoloji, alobaki ete ndako yango ezali “ndako ya kitoko mingi oyo etongamá na modɛlɛ ya bato ya Azia.” Ndako yango ezalaki na bonene ya hectare koleka mibale na ndambo, ezalaki na bashambre 300 mpe ebele ya mabándá. Ata bato ya ntango ya kala bazalaki koloba ete ndako yango ezali moko na misala ya kokamwa oyo esalemá na mokili. Na buku na ye (Ancient Iraq) George Roux alobaki boye: “Ndako yango ekendaki mpenza nsango na boye ete Mokonzi ya Ugarit, mboka moko oyo ezalaki na bokula ya Sulia, akakatanaki te kotinda mwana na ye na mobembo ya kilomɛtrɛ 600 mpo kaka akende kotala ‘ndako ya Zimri-Lim.’”

Liboso ya kokóma na lopango moko monene, bapaya oyo bayei na ndako yango oyo ezalaki na bifelo ya makasi bazalaki koleka na ekɔtelo na yango moko oyo ezalaki na linɔ́ngi na ngámbo mokomoko. Zimri-Lim, mokonzi ya nsuka ya Mari, azalaki kofanda na kiti ya bokonzi oyo ezalaki na esika moko etombwani; azalaki kotambwisa misala ya basoda, makambo ya mombongo, boyokani na bikólo mosusu, azalaki kokata makambo ya bana-mboka, mpe azalaki koyamba bapaya mpe baambasadɛrɛ. Bashambre ezalaki ebele mpo na bapaya mpe mbala na mbala mokonzi azalaki kosala bilambo epai bapaya bazalaki kolya mpe komɛla. Bazalaki kolya ngɔmbɛ, mpate, mboloko, mbisi, mpe nsoso oyo bazalaki kotumba, kokalinga to mpe kotokisa; bazalaki kolya yango na supu oyo batyá ai, ná ndunda ndenge na ndenge mpe fromage. Na nsima, bazalaki kolya mbuma oyo babuki sika to mpe mbuma bakausá mpe bagato ya modɛlɛ ndenge na ndenge. Bapaya bazalaki mpe komɛla bière to vinyo.

Batwalɛti ezalaki na kati ya ndako. Bamonaki mpe bakikoso oyo ezalaki na batiyo ya mabelé mpe bazongo. Bapakolaki gudrɔ na mabelé mpe na bifelo kobanda na nse tii mwa moke na likoló. Mai ya salite ezalaki koleka na batelase batongá na babriki, mpe batiyo ya mabelé oyo bapakolá gudrɔ mpo ebeba te ezali malamu tii na moi ya lelo, nsima ya mbula soki 3 500. Ntango basi misato oyo bazalaki kofanda na ndako ya mokonzi babelaki maladi moko oyo bakokaki kobika na yango te, bapesaki bato nyonso malako ya sikisiki. Mwasi nyonso oyo amonani ete azali nzoto kolɔngɔnɔ te basengelaki kotya ye na esika oyo akozala kaka ye moko. “Moto moko te akoki komɛla na kɔpɔ na ye, kolya na mesa na ye, to kofanda na kiti na ye.”

Mikanda oyo bamonaki na Mari elobi makambo nini?

Parrot ná baninga na ye bamonaki bitanda soki 20000 oyo ezali na makomi ya cunéiforme na monɔkɔ ya Akkadien. Mwa bitanda yango ezalaki na mikanda mpe mibeko ya Leta mpe ya misala ya mombongo. Tii na moi ya lelo babimisá kaka ndambo ya bitanda oyo bazwaki. Atako bongo, ndambo wana ezali bavolimi 28. Yango ezali na motuya nini? Jean-Claude Margueron, mokambi ya etuluku ya bato ya arkeoloji oyo bakundolaki biloko ya kala na Mari, alobaki boye: “Liboso tómona mikanda na Mari, toyebaki eloko te mpo na lisolo ya Mezopotamia mpe ya Sulia, ebongiseli na yango, mpe bomoi ya bato liboso ya mbula 2000 L.T.B. Mikanda yango esalisi biso tóyeba ebele ya makambo oyo eyebanaki te.” Ndenge Parrot alobaki yango, “makambo ya bato oyo balobeli na” mikanda wana “ekokani mpenza na makambo ya bato ya eleko wana oyo balobeli na Testama ya Kala.”

Bitanda oyo bakundolaki na Mari ezali mpe kosalisa biso tókanga ntina ya makambo mosusu oyo Biblia elobi. Na ndakisa, bitanda yango emonisi ete “bakonzi ya ntango wana bazalaki na momeseno” ya kozwa basi mpe bamakango ya banguna na bango. Toli oyo Ahitofele apesaki Abesaloma, mwana ya Mokonzi Davidi, ete asangisa nzoto ná bamakango ya tata na ye ezalaki likambo oyo ezalaki kosalema na ntango wana.​—2 Samwele 16:21, 22.

Kobanda 1933, bituluku 41 ya bato ya arkeoloji bakendaki koluka biloko ya kala na Tell Hariri. Kasi, tii lelo oyo, batimoli kaka hectare 8 ya engumba Mari oyo, mobimba na yango ezalaki na hectare 110. Na ntembe te tokoyeba makambo mosusu mingi ya kokamwa mpo na Mari, engumba monene oyo ezalaki na kati ya esobe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki mpenza kozala ete Bayuda oyo bakendaki boombo na Babilone nsima ya kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. balekaki pembeni ya bitika ya engumba Mari.

[Karte na lokasa 10]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Golfe Persique

Ulu

MEZOPOTAMIA

Efalata

MARI

ASULIA

Alana

ANATOLIE

KANANA

Yelusaleme

Mbu ya Meditelane (Mbu Monene)

[Elilingi na lokasa 11]

Na etanda oyo, Iahdun-Lim, mokonzi ya Mari, amikumisaki mpo na misala na ye ya kotonga

[Elilingi na lokasa 11]

Bayebaki malamu engumba Mari ntango bakundolaki ekeko oyo ya Lamgi-Mari

[Elilingi na lokasa 12]

Ebih-Il, kalaki ya Mari, azali kobondela

[Elilingi na lokasa 12]

Ebaelo epai bazalaki kotɛlɛmisa ekeko ya nzambe-mwasi na kati ya ndako ya mokonzi

[Elilingi na lokasa 12]

Bitika ya Mari, tokoki komona bifelo ya babriki ya mabelé

[Elilingi na lokasa 12]

Kikoso na ndako ya mokonzi

[Elilingi na lokasa 13]

Libanga oyo elobeli bolongi ya Naram-Sin, mokonzi oyo abɔtɔlaki engumba Mari

[Elilingi na lokasa 13]

Bakundoli bitanda soki 20 000 oyo ezali na makomi ya “cunéiforme” na bitika ya ndako ya mokonzi

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

© Mission archéologique française de Tell Hariri - Mari (Syrie)

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]

Etanda: Musée du Louvre, Paris; ekeko: © Mission archéologique française de Tell Hariri - Mari (Syrie)

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]

Ekeko: Musée du Louvre, Paris; ebaelo ná kikoso: © Mission archéologique française de Tell Hariri - Mari (Syrie)

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Libanga oyo elobeli bolongi: Musée du Louvre, Paris; bitika ya ndako ya mokonzi: © Mission archéologique française de Tell Hariri - Mari (Syrie)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto