Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/11 nk. 4-7
  • Moto akoki mpenza kobongola mokili?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto akoki mpenza kobongola mokili?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Milende oyo bato bazali kosala
  • Makambo oyo ezali kopekisa mbongwana
  • Mpo na nini Nzambe apesi nzela?
  • Yesu Klisto akomema mbongwana ya libela
  • “Bóbosana te kosala malamu”
  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nsango malamu mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/11 nk. 4-7

Moto akoki mpenza kobongola mokili?

“Babola bayebisaka biso ete bango balingi kaka kimya mpe libateli, balingi bango mpe bázwa likoki ya kozala malamu na bomoi. Bazali na mposa ya bibongiseli ya malamu, ezala na bamboka na bango mpe na mokili mobimba, mpo bikólo ya nguya mpe bakompanyi ya bozwi mingi ebebisa te milende oyo bazali kosala.”

NA MALOBA wana nde mokonzi ya ebongiseli moko oyo esalisaka bato alobelaki bilikya mpe bamposa ya babola. Ya solo, maloba na ye ekoki mpenza komonisa mposa ya bato nyonso oyo bakutaná na makama mpe na kozanga bosembo. Bango nyonso bazali na mposa ya mokili oyo ekozala na kimya mpe libateli ya solosolo. Mokili ya ndenge wana ekozala mpenza. Moto moko azali mpenza na nguya mpe na likoki ya kobongola mokili oyo ezangi bosembo?

Milende oyo bato bazali kosala

Bato mingi bamekaki komema mbongwana. Na ndakisa, na bambula ya 1800, Florence Nightingale, mwasi moko ya Angletere, amipesaki bomoi na ye mobimba mpo na kobongisa mosala ya lifulume, mpo bato ya maladi bázwaka lisalisi ya malamu. Na ntango na ye, liboso antiseptique mpe antibiotique ebima, kosalisa bamaladi na lopitalo ezalaki te ndenge ezali lelo. Buku moko elobi boye: “Balifulume batángaki kelasi te, bazalaki pɛto te, mpe bayebanaki na bizaleli mabe lokola milangwa, pite mpe ekobo.” Florence Nightingale alongaki mpenza na milende oyo asalaki mpo na kobongola mosala ya lifulume? Ɛɛ, alongaki. Ndenge moko mpe, bato mingi ya boboto oyo bamibanzabanzaka mpo na basusu basalaki milende mingi mpo na kosalisa bato mosusu na makambo ya bomoi lokola kolakisa bato kotánga mpe kokoma, kobongisa biteyelo, mosala ya monganga, kotonga bandako, kopesa bato biloko ya kolya, mpe bongo na bongo. Yango esalaki ete bomoi ya bamilio ya bato oyo bazalaki na mikakatano ebongwana.

Atako bongo, tokoki kobosana te ete ebele ya bato bazali kaka konyokwama na bitumba, mobulu, maladi, nzala, mpe makambo mosusu ya mabe oyo ezali kosalema. Ebongiseli moko ya Irlande oyo esalisaka bato (Concern) elobi ete: “Bobola ezali koboma bato 30 000 mokolo na mokolo.” Ata boombo, likambo oyo bato mingi balukaka kosilisa banda kala, ezali kosila te. Buku moko (Disposable People​—New Slavery in the Global Economy) elobi ete: “Motángo ya bato oyo bazali baombo lelo oyo ezali mingi koleka bato nyonso oyo basombaki ntango bazalaki kozwa baombo na Afrika mpo na kotɛka bango na Amerika.”

Nini ezali kosala ete milende oyo bato bazali kosala mpo na kotya mbongwana ya libela elonga te? Ezali kaka mpo bazwi mpe bato ya nguya bazali kobebisa milende yango to ezali na makambo mosusu oyo ezali kopekisa yango?

Makambo oyo ezali kopekisa mbongwana

Liloba ya Nzambe emonisi ete Satana Zabolo nde azali mpenzampenza kopekisa milende oyo bato bazali kosala mpo na kotya mbongwana ya solosolo na mokili. Ntoma Yoane ayebisi biso ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Ya solo, Satana azali lelo oyo “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (Emoniseli 12:9) Kino ntango makambo mabe na ye ekolongwa, bato bakozala kaka konyokwama na mabe mpe kozanga bosembo. Nini ememá makambo ya mawa nyonso wana?

Yehova apesaki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, mabelé oyo esengelaki kozala paladiso, esika oyo bato nyonso basengelaki kofanda, elingi koloba mokili oyo ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Nini ebongolaki makambo? Satana. Abimisaki ntembe mpo na lotomo ya Nzambe ya kotya mibeko oyo bato basengeli kolanda. Amonisaki ete Nzambe ayangelaka na bosembo te. Andimisaki Adama ná Eva bálona elimo ya lipanda mpo bakóma kopona bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Genese 3:1-6) Yango ebimisaki lisumu mpe kozanga kokoka, likambo ya mibale oyo ezali kopekisa milende oyo bato bazali kosala mpo na kobimisa mokili moko ya kimya mpe ya bosembo.​—Baloma 5:12.

Mpo na nini Nzambe apesi nzela?

Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Kasi mpo na nini Nzambe atiki lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka ekola boye? Mpo na nini asalelaki te nguya na ye monene mpo na koboma batomboki wana mpe kosala bato mosusu?’ Mpo na bato, emonani lokola yango mpenza nde Nzambe asengelaki kosala. Nzokande, kosalela nguya ezali kobimisa mituna ya minene. Omoni te ete kosalela nguya na lolenge ya mabe nde ezali kobimisela babola mpe bato mosusu mpasi na mokili oyo? Ntango mokonzi moko ya mabe abomi moto kaka mpo moto yango azali kondima lolenge na ye ya koyangela te, yango ebimisaka te mituna na makanisi ya bato ya motema sembo?

Mpo na komonisa bato ya motema sembo ete azali mokonzi oyo asalelaka nguya na ye na lolenge ya mabe te, Nzambe amonaki malamu atika Satana ná batomboki wana bálanda te mibeko mpe mitinda na ye na boumeli ya mwa ntango moke. Ntango oyo atikeli bango nde ekomonisa ete kaka lolenge ya Nzambe ya koyangela nde eleki malamu. Ekomonisa ete makambo nyonso oyo apekisaka biso ezali kaka mpo na bolamu na biso. Makambo ya mabe oyo botomboki yango ebimisi esili komonisa bosolo ya likambo yango. Mpe emonisi ete Nzambe azali mpenza na lotomo ya kosalela nguya na ye monene mpo na kolongola mabe nyonso soki alingi kosala yango. Etikali moke asala yango.​—Genese 18:23-32; Deteronome 32:4; Nzembo 37:9, 10, 38.

Liboso Nzambe alongola mabe nyonso, tozali kaka na kati ya ebongiseli mabe oyo, tozali ‘komilelalela elongo mpe konyokwama elongo.’ (Baloma 8:22) Ezala tosali nini mpo na kokɔtisa mbongwana, tokoki te kolongola Satana, ata mpe kosilisa ezaleli ya kozanga kokoka oyo ezali komemela biso bampasi nyonso oyo tozali komona. Biso tozali na likoki te ya kolongola lisumu oyo Adama atikelá biso.​—Nzembo 49:7-9.

Yesu Klisto akomema mbongwana ya libela

Yango emonisi ete elikya ezali ata moke te? Te. Moto moko oyo aleki biso na nguya mosika azwi mokumba ya komema mbongwana ya libela. Moto yango ezali nani? Ezali Yesu Klisto. Biblia ebengi ye Kapita ya Nzambe mpo na lobiko ya bato nyonso.​—Misala 5:31.

Azali sikoyo kozela “ntango etyamá” na Nzambe mpo na kokɔtisa mbongwana. (Emoniseli 11:18) Akosala mpenza nini? Akokokisa elaka ya “kozongisama ya makambo nyonso oyo Nzambe alobaki na monɔkɔ ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala.” (Misala 3:21) Na ndakisa, Yesu “akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. . . . Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.” (Nzembo 72:12-16) Nzambe alaki ete na nzela ya Yesu “akosukisa bitumba kino na nsuka ya mokili.” (Nzembo 46:9) Alaki mpe ete: “Mofandi moko [ya mabelé na ye oyo ekopɛtolama] akoloba te ete: Ngai nazali na maladi.” Bato bakufá miso, bakufá matoi, batɛngumi, bato nyonso oyo bazali konyokwama na maladi bakozonga na nzoto kolɔngɔnɔ. (Yisaya 33:24; 35:5, 6; Emoniseli 21:3, 4) Ezala bato oyo bakufá na ntango ya kala bakozwa mpe mapamboli yango. Alaki ete akosekwisa bato oyo bakufaki mpo na mabe ya bato mosusu mpe mpo na monyoko.​—Yoane 5:28, 29.

Yesu Klisto akomema mbongwana ya mwa ntango moke te. Akolongola makambo nyonso oyo ezali kopekisa bato bázala malamu. Akolongola lisumu mpe kozanga kokoka mpe akoboma Satana Zabolo ná baoyo nyonso bazali kolanda ye na botomboki na ye. (Emoniseli 19:19, 20; 20:1-3, 10) Mpasi mpe minyoko nyonso oyo Nzambe atiki mpo na mwa ntango “ekobima mbala ya mibale te.” (Nahumu 1:9) Yango nde Yesu azalaki kokanisa ntango ateyaki biso tóbondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano na ye esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”​—Matai 6:10.

Okoki kotuna boye: ‘Kasi, Yesu ye moko alobaki te ete “tozali elongo na babola ntango nyonso”? Yango emonisi te ete kozanga bosembo mpe bobola ekozala ntango nyonso?’ (Matai 26:11) Ya solo, Yesu alobaki ete babola bakozala ntango nyonso. Kasi, soki totali maloba na ye mpe bilaka oyo Nzambe apesi, tokomona ete azalaki nde koloba ete babola bakozala ntango nyonso oyo ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekozala. Ayebaki ete moto moko te akokoka kosilisa bobola mpe kozanga bosembo na mokili. Ayebaki mpe ete ye akobongola makambo nyonso wana. Mosika te, akotya ebongiseli moko ya sika, elingi koloba “likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika” epai minyoko, maladi, bobola, mpe liwa ekozala lisusu te.​—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1.

“Bóbosana te kosala malamu”

Yango emonisi ete ezali na ntina te kosala oyo tokoki mpo na kosalisa basusu? Ezali bongo te. Biblia ezali kolendisa biso tósalisaka basusu ntango mpasi mpe minyoko ezali kotungisa bango. Salomo, mokonzi ya Yisalaele, akomaki boye: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo [eyoki] mposa ya kosala bongo.” (Masese 3:27) Ntoma Paulo alobaki ete: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko.”​—Baebele 13:16.

Yesu Klisto ye moko alendisaki biso tósalaka oyo tokoki mpo na kosalisa basusu. Apesaki ndakisa ya Mosamalia moko oyo azalaki koleka na nzela mpe amonaki mobali moko oyo babɛtaki ye mpe bayibaki biloko na ye. Yesu alobaki ete “mawa ekangaki” Mosamalia yango mpe asalelaki biloko mpe mbongo na ye moko mpo na kosalisa moto wana oyo babɛtaki, akóma lisusu nzoto makasi. (Luka 10:29-37) Mosamalia wana ya motema boboto abongolaki mokili te, kasi abikisaki mpenza bomoi ya moto yango. Biso mpe tokoki kosala bongo.

Nzokande, Yesu Klisto akoki kosala likambo oyo eleki lisusu. Akoki mpenza komema mbongwana, mpe akosala yango mosika te. Ntango akosala yango, baoyo bazali komona mpasi mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo bakobongisa bomoi na bango mpe bakozala na kimya ya solosolo.​—Nzembo 4:8; 37:10, 11.

Liboso makambo yango esalema, tókakatanaka soki moke te mpo na kosala oyo tokoki, ezala na elimo to na mosuni, mpe ‘tósalaka oyo ezali malamu’ epai ya bato nyonso oyo bazali konyokwama na mokili oyo ezangi bosembo.​—Bagalatia 6:10.

[Bililingi na lokasa 5]

Florence Nightingale amemaki mbongwana monene mpenza na mosala ya balifulume

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya National Library of Medicine

[Bililingi na lokasa 7]

Bayekoli ya Klisto basalelaka basusu malamu

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa4]

The Star, Johannesburg, S.A.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto