Lisolo ya bomoi
Koyeba ntina oyo Nzambe apesi nzela na bampasi ebongolaki bomoi na ngai
YA HARRY PELOYAN
Mpo na nini Nzambe apesi nzela na bampasi? Motuna wana ezalaki kotungisa ngai banda bomwana. Baboti na ngai bazalaki makasi na mosala, bato ya kolongobana, mpe bazalaki kosala nyonso mpo na bolamu na biso. Kasi, tata azalaki kosambela te, mama nde azalaki kosambela kaka mwa bongobongo. Yango wana, bango bakokaki te kopesa ngai eyano na motuna wana.
NAKOBAKI komituna motuna yango ata na boumeli ya mbula misato oyo nazalaki soda ya mai na mampinga ya États-Unis, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe na nsima. Ntango etumba esilaki, batindaki ngai na masuwa oyo ekendaki kotika biloko na ekólo Chine. Nasalaki kuna pene ya mbula mobimba mpe namonaki ndenge ebele ya bato banyokwamaki.
Bato ya Chine bazalaka makasi na mosala mpe mayele. Kasi, mingi kati na bango batungisamaki na mikakatano mpo na bobola mpe mpo na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Ezalaki kosala ngai mpasi komona bana ya kitokokitoko oyo mingi kati na bango bazalaki nzoto ekondá mpe balati bilamba epasukasuka, bazalaki kosɛngasɛnga biso biloko soki tosɛmi.
Mpo na nini bato bazalaki konyokwama bongo?
Nabotamaki na 1925 mpe nabɔkwamaki na etúká ya Californie, États-Unis. Namonaki naino te makambo oyo namonaki na Chine. Na yango, nazalaki kaka komituna, ‘Soki Mozalisi oyo azali na nguya nyonso azali mpenza, mpo na nini akoki kotika ete makambo motindo oyo enyokola bato ebele boye, mingimingi bana, oyo basali na bango likambo te?
Nazalaki mpe komituna ete, soki Nzambe mpenza azali, mpo na nini atiki kobomana, liwa mpe minyoko nyonso oyo emonisi bato bwale na boumeli ya bikeke, mingimingi na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo ebomisaki bato koleka milio 50. Lisusu, mpo na nini na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba bakonzi ya mangomba bazalaki kolendisa bandimi ya mangomba na bango bábomana bango na bango, mpo bazali bato ya ekólo moko te?
Masini ya kotala minzoto
Ntango etumba ya mibale ebandaki na 1939, mpe ekómaki kosilisa bato, nalobaki ete Nzambe akoki kozala te. Na nsima, na liteya moko ya siansi na eteyelo ya ntei, basɛngaki na mwana-kelasi mokomoko asala eloko moko ya siansi. Lokola nazalaki kosepela mingi koyekola minzoto, nasalaki ebakata ya masini ya kotala minzoto oyo talatala na yango ezalaki na bonene ya santimɛtrɛ 20.
Mpo na kosala masini yango, nasombaki talatala moko ya bonene ya santimɛtrɛ 20 mpe napesaki yango epai ya mokati ya batalatala mpo abongisa yango malamumalamu. Na nsima, nabandaki kopalola yango na mabɔkɔ mpo na kokómisa yango mwa libulu. Mosala yango elyaki ngai bangonga na ngai nyonso ya bopemi na boumeli ya sanza motoba mobimba. Ntango talatala yango esilaki, nakangisaki yango na tiyo moko ya molai ya ebende mpe natyaki batalatala ya mikemike mpo na kotala.
Nazwaki yango mokolo moko na butu oyo sanza ebimaki te mpe nabimaki na yango na libándá mpo na mbala ya liboso mpo na kotala minzoto. Nakamwaki komona ebele ya minzoto oyo ezali na likoló mpe ndenge yango nyonso ebongisamá na molɔ́ngɔ́. Nzokande, ntango nayaki koyeba ete “minzoto” mosusu oyo tomonaka ezali nde maboke ya ebele ya minzoto oyo mokomoko na yango ezali na bamiliare ya minzoto, nakamwaki lisusu makasi.
Nalobaki ete, ‘Nandimi te ete biloko oyo nyonso ebimá kaka yango moko boye. Eloko moko te ebimá kaka bongo. Ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ebongisamá ezali komonana ete moto moko ya mayele mingi asalá yango. Ezali nde na Nzambe oyo asalaki nyonso wana?’ Makambo oyo namonaki na masini yango esalisaki ngai nakitisa moke ntembe oyo nazalaki na yango liboso ete Nzambe azali te.
Na nsima, namitunaki ete: ‘Soki mpenza Nzambe ya Nguya mpe ya bwanya oyo akelá molɔ́ngɔ́ ya kokamwa boye azali, mpo na nini akoki te kosilisa makambo ya mawa oyo ezali kosalema awa na mabelé? Mpo na nini atiki nzela na makambo oyo ya mpasi esalemaka?’ Ntango nazalaki kotuna bato ya mangomba mituna yango, bazalaki kopesa ngai eyano ya malonga te.
Nsima ya kosilisa eteyelo ya ntei mpe kosala mwa bambula na iniversite, nakɔtaki na mosala ya soda. Kasi, bapastɛrɛ ya basoda bazalaki kokoka te koyanola na mituna na ngai. Mbala mingi, bato oyo bazalaki kosambela bazalaki koloba makambo lokola, “Misala ya Nkolo ezali mabombami.”
Nakobi koluka biyano
Ntango nalongwaki na Chine, mituna oyo nazalaki komituna mpo na ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi ezwaki kaka biyano te. Nakokaki kotika te komitungisa na mituna yango, mingimingi soki namoni malita ya basoda na bisanga ya pasifike oyo tozalaki kotɛlɛma ntango tozalaki kozonga na États-Unis. Malita yango mingi ezalaki ya bilenge oyo bakufaki kaka mobesu.
Ntango nakómaki na États-Unis mpe natikaki mosala ya soda, nasengelaki kotánga lisusu mbula moko na iniversite ya Harvard, mpo nasilisa kelasi. Nasilisaki kelasi mpe nazwaki diplome, kasi nazongaki na Californie te. Namonaki malamu natikala mwa moke na Ɛsti ya États-Unis mpo na koluka biyano na mituna wana. Nazwaki likanisi ya kokende na engumba New York, epai mangomba ezalaki mingi, nakɔta na mayangani ya mangomba mosusu mpo nayeba nini bateyaka kuna.
Na New York, mama nkulutu na ngai Isabel Kapigian, asɛngaki ngai nafanda epai na ye. Ye ná bana na ye mibale ya basi, Rose ná Ruth, bazalaki Batatoli ya Yehova. Lokola nazalaki kokanisa ete bindimeli na bango ekosepelisa ngai te, nabandaki kokɔta na mangomba mosusu, kosolola na bato ya mangomba yango mpe kotánga mikanda na bango. Nazalaki kotuna bango ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, kasi bazalaki mpe na biyano te. Nalobaki ete ntango mosusu Nzambe azali te.
Nazwi biyano
Nsukansuka, natunaki mama nkulutu ná bana na ye soki nakoki kotánga mikanda na bango mpo na koyeba mpe makanisi ya Batatoli ya Yehova. Ntango natángaki mikanda na bango, namonaki mbala moko ete Batatoli bakeseni mpenza na mangomba mosusu. Biyano ezalaki kouta na Biblia mpe ezalaki ya malamu mpenza. Nsima ya mwa ntango moke kaka, nazwaki biyano na mituna oyo nazalaki komituna mpo na ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi.
Longola yango, namonaki mpe ete Batatoli ya Yehova basalelaka makambo oyo bateyaka. Na ndakisa, natunaki mama nkulutu ayebisa ngai oyo bilenge Batatoli ya Yehova ya Allemagne basalaki na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bakómaki basoda, bazalaki koloba “Heil Hitler!,” mpe bazalaki kopesa bendele ya Banazi losako? Alobaki na ngai ete basalaki yango te. Mpe lokola baboyaki kosala mosala ya soda, batindaki bango na bakaa ya bakangami, epai mingi kati na bango babomamaki. Ayebisaki ngai ete na ntango ya bitumba, Batatoli ya Yehova basalaki kaka bongo: bakɔtaki na bitumba te. Ata na bikólo ya demokrasi, bilenge Batatoli ya Yehova bakɔtaka bolɔkɔ mpo baboyaka kokɔta na makambo ya politiki.
Mama nkulutu asɛngaki ngai natánga Yoane 13:35, oyo elobaka: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” Baklisto ya solo basengeli komonisa elembo wana ya bolingo epai ya bandeko na bango ya bisika nyonso. Bakoki soki moke te kokɔta na bitumba, kobomana kaka mpo bazali ekólo moko te. Atunaki ngai boye: “Okanisi mpenza ete Yesu ná bayekoli na ye bakokaki kokɔta na bitumba ya Baloma, mpe kobomana?”
Asɛngaki ngai mpe natánga 1 Yoane 3:10-12. Mokapo yango elobi boye: “Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo azalaka na momeseno ya kosala boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali te kolinga ndeko na ye. . . . Tólinganaka; ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.”
Biblia emonisi polele ete baklisto ya solo balinganaka, ezala bazali bato ya ekólo nini. Na yango, ekoki kosalema soki moke te ete báboma bandeko na bango ya elimo to bato mosusu mpo bakeseni bikólo. Yango wana, Yesu alobaki ete bayekoli na ye ‘bazali bato ya mokili te, ndenge ye mpe nazali moto ya mokili te.’—Yoane 17:16.
Ntina oyo Nzambe apesi nzela na bampasi
Mosika te, nayebaki ete Biblia eyebisi ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala. Biblia emonisi ete ntango Nzambe akelaki baboti na biso ya liboso, akelaki bango bato ya kokoka mpe atyaki bango na paladiso. (Genese 1:26; 2:15) Apesaki bango mpe likabo moko kitoko: bonsomi ya kopona. Kasi, esengelaki básalela bonsomi yango na lolenge ya malamu. Soki batosaki Nzambe mpe mibeko na ye, balingaki kokoba kozala na bomoi ya kokoka na paladiso. Balingaki kokómisa mabelé mobimba paladiso. Bana na bango balingaki kozala bato ya kokoka, mpe nsukansuka, mabelé elingaki kozala paladiso, epai bato ya kokoka mpe ya esengo balingaki kofanda.—Genese 1:28.
Nzokande, soki Adama ná Eva bátosaka Nzambe te, balingaki kozala bato ya kokoka lisusu te. (Genese 2:16, 17) Likambo ya mawa, baboti na biso ya liboso basalelaki bonsomi na bango na ndenge ya mabe mpe batombokelaki Nzambe. Satana Zabolo, ekelamu moko ya elimo oyo atombokelaki Nzambe nde akosaki bango. Akómaki koluka bonsɔmi mpe kolula losambo oyo ebongi kopesama kaka epai ya Nzambe ye moko.—Genese 3:1-19; Emoniseli 4:11.
Na yango, Satana akómaki “Nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Yesu abengaki Satana “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 14:30) Kozanga botosi ya Satana ná baboti na biso ya liboso ememeli bato nyonso kozanga kokoka, mobulu, liwa, mawa mpe bampasi.—Baloma 5:12.
“Ekoki na motamboli te”
Mpo na komonisa ete kopesa mibeko ya Nzambe mokɔngɔ ezali mabe mpo na bato, Nzambe atiki ete bato bámona mpasi na boumeli ya bankóto ya mbula. Ntango yango epesi na bato nyonso libaku ya komona bosolo ya maloba ya Biblia oyo: “Nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko. Ɛ [Yehova] pamelá ngai.”—Yilimia 10:23, 24.
Nsima ya bikeke nyonso oyo eleki, tokoki komona ete lipanda oyo bato balukaki ezali mabe mpenza. Na yango, Nzambe akani kosukisa lipanda oyo bato balukaki epai na ye mpe mibeko na ye.
Elikya moko kitoko
Biblia elobi ete mosika te, Nzambe akosukisa mokili mabe oyo. Elobi boye: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopolo bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:10, 11.
Esakweli ya Danyele 2:44 elobi ete: “Na mikolo ya mikonzi yango [lolenge nyonso ya boyangeli oyo ezali lelo oyo] Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Nzambe akotikela biyangeli ya bato nzela lisusu te. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé mobimba. Na boyangeli yango, mabelé mobimba ekokóma paladiso mpe bato bakokóma bato ya kokoka mpe bakofanda libela na libela na esengo. Biblia elaki ete: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Oyo nde elikya kitoko Nzambe apesi biso!
Bomoi na ngai ebongwani
Kozwa biyano oyo nazalaki koluka ebongolaki bomoi na ngai. Banda wana, nakómaki na mposa ya kosalela Nzambe mpe kosalisa basusu bázwa mpe biyano yango. Namonaki bosolo ya maloba ya 1 Yoane 2:17: “Mokili [ebongiseli ya makambo oyo ezali kotambwisama na Satana] ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” Nakómaki na mposa makasi ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. Namonaki malamu natikala na New York mpe nabandaki koyangana na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova kuna, epai nazwaki mabaku mingi ya kosalisa basusu báyeba makambo oyo ngai nayebi.
Na 1949, nakutanaki na Rose Marie Lewis. Ye ná mama na ye Sadie mpe bandeko na ye motoba ya basi, bazalaki bango nyonso Batatoli ya Yehova. Rose azalaki mobongisi-nzela. Azalaki na bizaleli mingi ya malamu, mpe yango ebendaki ngai mbala moko. Tobalanaki na Yuni 1950 mpe tofandaki na New York. Tozalaki kosepela na oyo tozalaki kosala mpe na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya Nzambe ya sika.
Na 1957, babengaki ngai ná Rose Marie na biro monene ya Batatoli ya Yehova na engumba Brooklyn, na New York mpo na kosala lokola basali ya ntango nyonso. Na Yuni 2004, tokokisaki mbula 54 ya libala, mpe 47 na biro monene. Ezalaki mpenza esengo kosalela Yehova mpe kosala elongo na bankóto ya bandeko ya sembo na boumeli ya bambula nyonso wana.
Mpasi oyo nayokaki naino te na bomoi na ngai
Likambo ya mawa, na ebandeli ya Desɛmbɛ 2004, bazwaki Rose Marie na kanser ya mipululu. Minganga balobaki ete kanser yango ezali kokola nokinoki mpe esengelaki bálongola yango. Lipaso yango esalemaki na nsuka ya sanza ya Desɛmbɛ, mpe soki nsima ya pɔsɔ moko, monganga ayaki esika Rose azalaki ntango nakendaki kotala ye mpe alobaki boye: “Rose Marie, zongá ndako! Obiki!”
Nzokande, nsima ya mwa mikolo kaka, Rose Marie abandaki koyoka mpasi makasi na libumu mpe na bisika mosusu ya nzoto. Lokola mpasi yango ezalaki kosila te, azongaki lisusu na lopitalo mpo bátala ye lisusu. Bamonaki ete mpo na ntina moko boye, makila na ye ezalaki kokangama na binama na ye mosusu mpe yango ezalaki kopekisa binama wana ezwa mopɛpɛ. Minganga basalaki nyonso mpo na kosilisa yango, kasi balongaki te. Nsima ya mwa bapɔsɔ, mwa 30 Yanuali 2005, nayokaki mpasi nayoká naino te na bomoi na ngai. Rose Marie na ngai akufaki.
Na ntango wana, nazalaki na mbula 80, bomoi na ngai mobimba namonaki ndenge bato bazalaki kotungisama, kasi oyo ya ngai ezalaki ndenge mosusu. Ngai ná Rose Marie, tozalaki mpenza “mosuni moko” ndenge Biblia elobi. (Genese 2:24) Namonaki ndenge bato mosusu bazalaki konyokwama mpe ngai moko nayokaki mpasi ntango baninga mpe bandeko bazalaki kokufa. Kasi, mpasi oyo nayokaki ntango mwasi na ngai akufaki elekaki makasi mpe eumelaki ntango molai. Nayebi sikoyo mpasi oyo bato bayokaka ntango bakufeli ndeko to moninga.
Atako bongo, koyeba ndenge bampasi ebandaki mpe ndenge ekosila esalisi ngai namitungisa mingi te. Nzembo 34:18 elobi ete: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyetami.” Koyeba ete Biblia ezali koteya ete lisekwa ekozala, baoyo bazali na malita bakobima mpe bakozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe ekosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko. Misala 24:15 elobi ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” Rose Marie azalaki kolinga Nzambe mingi. Nandimi mpenza ete Nzambe mpe azalaki kolinga ye mingi mpe akokanisa ye mpe nazali na elikya ete akosekwisa ye na ntango oyo ye moko abongisi, mpe akosala yango mosika te.—Luka 20:38; Yoane 11:25.
Atako kokufela moto oyo olingaka mingi ezalaka mpasi mingi, komonana na ye lisusu na lisekwa ekozala esengo monene koleka. (Malako 5:42) Liloba ya Nzambe elaki boye: “Bato na yo oyo bakufá bakosekwa . . . . Mpe mabelé ekobimisa bato oyo bakufá.” (Yisaya 26:19, Bible na lingala ya lelo oyo) Ekoki kozala ete mingi kati na “bayengebene” oyo balobeli na Misala 24:15 nde bakosekwa liboso. Ekozala mpenza esengo! Rose Marie mpe akozala na kati na bango. Bato nyonso oyo bazalaki kolinga ye mingi bakoyamba ye na esengo! Ekozala mpenza esengo kofanda na mokili oyo bampasi ekozala te!
[Bililingi na lokasa 9]
Ntango nazalaki kosala na ekólo Chine, namonaki ndenge ebele ya bato banyokwamaki
[Bililingi na lokasa 10]
Nazali kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na engumba Brooklyn, kobanda na mobu 1957
[Elilingi na lokasa 12]
Nabalaki Rose Marie na 1950
[Elilingi na lokasa 13]
Ntango tokokisaki mbula 50 ya libala, na 2000