Mituna ya batángi
Lisangá esengeli kosala nini soki moklisto moko oyo azali kotambwisa motuka asali likama oyo ebomi bato?
Lisangá ekoluka koyeba soki moklisto yango azali na nyongo ya makila mpamba te esengeli te kosangana na nyongo ya makila. (Deteronome 21:1-9; 22:8) Ndeko oyo asali likama oyo ebomi bato akoki kokóma na nyongo ya makila soki azalaki kotambwisa motuka mbangumbangu to soki atosaki te mibeko ya Leta oyo etali ndenge ya kotambwisa motuka. (Malako 12:14) Kasi, esengeli kotalela mpe makambo mosusu.
Na Yisalaele, moto oyo abomi moto mpe akimi na mboka ya kobombama asengelaki kosambisama. Soki bazuzi bamoni ete abomaki moto yango na nko te, bazalaki kotika ye afanda na mboka wana mpo mofutisi makila aboma ye te. (Mituya 35:6-25) Ndenge moko mpe, soki moklisto oyo azali kotambwisa motuka asali likama oyo ebomi moto, bankulutu basengeli kolandela likambo yango mpo na koyeba soki amemi nyongo ya makila. Bankulutu bakolanda te makanisi ya bakonzi ya Leta to mpe ekateli ya tribinale mpo na koyeba oyo bango basengeli kosala.
Na ndakisa, tribinale ekoki koloba ete ndeko yango azali na foti mpo atosaki mibeko ya nzela te; kasi, bankulutu oyo bataleli likambo yango bakoki komona ete azali na nyongo ya makita te mpamba te akokaki mpenza kosala eloko te na likambo oyo esalemi. Epai mosusu, tribinale ekoki kozwa ekateli ya kotika ndeko yango, kasi bankulutu bakoki koloba ete azali na nyongo ya makila.
Mpo bankulutu bákata likambo, basengeli kolanda mitinda ya Biblia mpe kotalela makambo oyo emonisami polele—ekoki kozala ete sofɛlɛ ye moko andimi ete azali na foti to mpe bakoki koyoka litatoli ya bato mibale to misato oyo bakoki kotyelama motema, oyo bamonaki likambo yango. (Deteronome 17:6; Matai 18:15, 16) Soki emonani ete sofɛlɛ azali na nyongo ya makila, komite ya kosambisa ekotalela likambo na ye. Soki komite yango emoni ete ndeko oyo azali na nyongo ya makila abongoli motema, bakopesa ye mpamela oyo esengeli mpe soki azalaki na mikumba na lisangá, bakolongola ye yango. Soki azali nkulutu to mosaleli na misala, bakolongola ye mikumba yango. Bakopekisa ye mpe kosala mikumba mosusu. Mpe akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na kozanga bokɛngi mpe bopɔtu na ye oyo ememi na likama mpe na liwa ya moto.—Bagalatia 6:5, 7.
Tópesa ndakisa: Soki mbula ezalaki kobɛta na ntango likama esalemaki, esengelaki ete sofɛlɛ azala ekɛngɛ lisusu koleka. Soki azalaki na mpɔngi, asengelaki kotɛlɛmisa motuka mpe kolala mwa moke, to kotika ete moto mosusu atambwisa.
Bongo soki sofɛlɛ azalaki kotambwisa mbangu mingi? Soki moklisto azali kotambwisa motuka mbangumbangu, yango emonisi ete azali te kopesa “biloko ya Kaisala epai ya Kaisala.” Emonisi mpe ete azali na limemya te mpo na bomoi, oyo ezali eloko ya bosantu na miso ya Nzambe. (Matai 22:21) Mpo na yango, tótalela mpe likambo mosusu. Soki ndeko yango azali nkulutu, ndakisa nini akopesa bandeko mosusu soki akipaki te mibeko ya Leta na oyo etali kotambwisa motuka mpe abukaki yango na nko?—1 Petelo 5:3.
Moklisto asengeli te kosɛngisa basusu ete bákutana na esika moko na ngonga moko oyo ekosɛngisa bango bátambwisa mituka mbangu mpo bákóma na esika yango na ngonga oyo atyeli bango. Kasi, mbala mingi esɛngaka nde kolongwa na ngonga malamu to mpe kobongola programɛ mpo na kozala na ntango ya kotambwisa motuka ndenge esɛngami. Soki moklisto azali kosala bongo, akoluka te ete atambwisa motuka mbangu koleka, kasi akolanda mibeko ya “bakonzi oyo bazali liboso” na ndenge ya kotambwisa motuka. (Baloma 13:1, 5) Yango ekosalisa sofɛlɛ azala ekɛngɛ mpe asala te likama oyo ekoki komemisa ye nyongo ya makila. Yango mpe ekopesa ye libaku ya kopesa ndakisa malamu mpe kobatela lisosoli ya malamu.—1 Petelo 3:16.