Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/1 lok. 3
  • Mwasi ná mobali basalamá moko mpo na mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwasi ná mobali basalamá moko mpo na mosusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Adama ná Eva
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bilikya kitoko mpo na bato: paradis ya bisengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mikumba ya mwasi kati na makomami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/1 lok. 3

Mwasi ná mobali basalamá moko mpo na mosusu

MOBALI azalaka na mposa ya kozala na mwasi mpe mwasi azalaka na mposa ya kozala na mobali. Nzambe nde akelaki bango na mposa wana. Yehova amonaki ete ezali malamu te ete mobali ya liboso, Adama, azala kaka ye moko. Yango wana, ‘asalelaki ye mosungi mobongi na ye.’

Yehova alalisaki Adama mpɔngi makasi mpe azwaki mokuwa moko na mopanzi na ye, mpe “azalisaki mwasi na mokuwa . . . mpe ayaki na ye epai ya moto.” Adama asepelaki mingi ntango amonaki ekelamu kitoko oyo Yehova asalaki mpe alobaki boye: “Oyo azali sasaipi mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai.” Eva azalaki na bizaleli nyonso oyo ebongi na mwasi; yango wana Adama alingaki ye mingi. Epai mosusu, lokola Adama azalaki na makoki nyonso ya mobali, abongaki na limemya. Basalamaki moko mpo na mosusu. Biblia elobi boye: “Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.”​—Genese 2:18-24.

Nzokande lelo oyo, mabala mingi ezali kopanzana, mpe mbala mingi, basi bazali kobunda mpe koswana na mibali na bango to mpe moto na moto azali koluka kaka matomba na ye moko. Lokola mibali balingi kozala liboso mpe basi balingi kotikala nsima te, yango mpe ebakisi matata kati na mwasi ná mobali. Nyonso wana eyokani te na mokano ya Nzambe mpo na mwasi ná mobali. Nzambe apesaki mobali mokumba ya ntina mingi. Mwasi asengelaki kozala na esika ya lokumu pembeni ya mobali na ye. Basengelaki kosala elongo mpe na bomoko. Banda ebandeli, mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe, basalaka makasi bátosa esika oyo Yehova apesaki mokomoko na bango, mpe yango ebakiselaka bango esengo. Esika nini Nzambe apesá mokomoko na bango, mpe ndenge nini tokoki kotosa yango?

[Elilingi na lokasa 3]

Nzambe apesaki mokomoko na bango esika ya lokumu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto