Lisolo ya bomoi
Tozalaki na ekateli makasi ya kokokisa mosala na biso ya kosakola
Ya Lena Davison
Pilote ya mpɛpɔ na biso alobaki na mongongo lokola ya moto alangwe boye: “Miso na ngai ekómi kokufa. Nazali komona lisusu te.” Mwa moke na nsima, mabɔkɔ na ye elongwaki na yenda ya mpɛpɔ, akangamaki na kiti mpe atikalaki lokola ebembe. Mobali na ngai, oyo ayebaki komema mpɛpɔ te, azalaki kobunda ndenge nyonso mpo na kolamusa ye. Liboso nayebisa bino ndenge tobikaki, tiká nayebisa bino nini esalaki ete tózala na kati ya mpɛpɔ wana, na likoló ya Papouasie-Nouvelle-Guinée, mokili moko ya mosika mpenza.
NABOTAMAKI na Australie na 1929 mpe nakolaki na Sydney, mboka-mokonzi ya etúká ya Nouvelle-Galles du Sud. Tata na ngai, Bill Muscat, azalaki Koministe. Kasi likambo ya kokamwa, azalaki kondima Nzambe. Na 1938, andimaki kutu kotya lobɔkɔ na mokanda moko oyo bato ya ekólo na biso bakomaki mpo na kosɛnga guvɛrnema epesa nzela na Joseph F. Rutherford, oyo azalaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova, aya koteya na ndako monene ya bafɛti ya engumba Sydney.
Na ntango wana, Papa alobaki na biso boye: “Namoni lokola akoloba makambo ya ntina mingi.” Nsima ya mbula mwambe, toyebaki makambo yango. Tata abengaki Norman Bellotti na ndako na biso mpo tósolola na ye masolo ya Biblia. Norman azalaki mobongisi-nzela to mosakoli ya ntango nyonso. Libota na biso eumelaki te kondima solo ya Biblia, mpe mosika te tomipesaki mpenza na mosala ya kosakola.
Na katikati ya bambula ya 1940, nakataki kelasi mpo na kosalisa mama na ngai, oyo azalaki kobɛla maladi moko oyo ezalaki kosila te. Nazalaki mpe kotonga bilamba mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela. Mokolo ya pɔsɔ na butu, ngai ná yaya na ngai Rose tozalaki kokende kosakola na balabala elongo na babongisi-nzela, liboso ya ndako monene ya bafɛti ya Sydney. Na 1952, yaya na ngai John asilisaki na Gileadi, eteyelo ya bamisionɛrɛ na États-Unis mpe batindaki ye na ekólo Pakistan. Ngai mpe nazalaki kolinga mosala ya kosakola mingi, mpe nazalaki na mposa ya kolanda ndakisa na ye. Yango wana, na mbula oyo elandaki, nakómaki mobongisi-nzela.
Libala mpe mosala ya misionɛrɛ
Mwa moke na nsima, nakutanaki na John Davison, oyo azalaki kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Australie. Nasepelaki mpenza na komikitisa, mpiko mpe bizaleli malamu na ye. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakangaki ye mbala misato mpo aboyaki kokɔta na kowelana yango. Tozwaki ekateli ya komipesa bomoi na biso mobimba na mosala ya kosakola.
Ngai ná John tobalanaki na sanza ya Yuni 1955. Tosombaki bisi moko na mokano ya kosalelaka yango mpe lokola ndako. Mposa na biso ezalaki ete tókendaka kosakola na bisi yango na bamboka ya mosika mpenza ya Australie. Na mbula oyo elandaki, basɛngaki na Batatoli oyo bakolinga bákende na Nouvelle-Guinée, na nɔrdi-ɛsti ya esanga moko ya monene na nɔrdi ya Australie.a Nsango ya Bokonzi ekómaki naino kuna te. Tondimaki mbala moko kokende kuna.
Na ntango yango, mpo na kokɔta na Nouvelle-Guinée, esengelaki kaka ozwa mosala kuna. Yango wana, John abandaki koluka mosala kuna. Mosika te, azwaki mosala na izini moko ya kopasola mabaya na Nouvelle-Bretagne, mwa esanga moko ya moke na Nouvelle-Guinée. Bapɔsɔ mingi na nsima, tokendaki na teritware na biso ya sika, mpe tokómaki na engumba Rabaul, na Nouvelle-Bretagne, na sanza ya Yuli 1956. Kuna, tozelaki masuwa mikolo motoba mpo na kokende na engumba Waterfall Bay.
Mosala ya kosakola na Waterfall Bay
Nsima ya mobembo ya mikolo ebele mpe ya mpasi, tokómaki na Waterfall Bay, engumba moko monene na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 240 na sudi ya engumba Rabaul. Izini moko monene ya kopasola mabaya ezalaki wana, na esika moko ya polele na kati ya zamba. Na mpokwa ya mokolo oyo tokómaki, ntango basali nyonso bafandaki na mesa mpo na kolya, mokonzi ya izini yango alobaki boye: “Davison, yo ná mwasi na yo, awa na kompanyi na biso tolingaka moto nyonso ya mosala ayebisa lingomba na ye.”
Tondimaki mpenza te ete basalaka bongo. Kasi, lokola toboyaki komɛla makaya, bakómaki komitunatuna soki tozali na lingomba nini. Ezala bongo to te, John ayanolaki ete: “Tozali Batatoli ya Yehova.” Bato nyonso batikalaki nyɛɛ. Mibali yango bazalaki basoda ya kala oyo babundaki Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe bazalaki kolinga Batatoli te mpamba te bazalaki koboya kokɔta na etumba. Banda wana, bakómaki kosala nyonso mpo na komonisa biso mpasi.
Libosoliboso, mokonzi ya izini aboyaki kopesa biso frigo mpe lituka, atako tozalaki na lotomo ya kozwa yango. Bilei na biso ezalaki kopɔla, mpe tozalaki kolamba na lituka moko ya mabemabe, oyo tolokɔtaki na zamba. Na nsima, bapekisaki bato ya mboka wana kotɛkɛla biso biloko, mpe tokómaki kobikela kaka na ndunda nyonso oyo tokokaki kozwa. Bayebisaki mpe bato ete tozali banɔngi, mpe bazalaki kokɛngɛla biso mpo na komona soki tozali koteya moto Biblia. Nsukansuka, nabɛlaki malaria.
Atako bongo, tozalaki na ekateli makasi ya kosakola nsango malamu. Yango wana, tosɛngaki bilenge mibali mibale ya izini yango oyo bayebaki Lingelesi bálakisa biso monɔkɔ oyo elobamaka mingi na Mélanésie. Biso mpe tozalaki koteya bango Biblia. Na bawikende, tozalaki kokende kotambola mpo na kotala mboka. Na nzela, tozalaki kopesa litatoli na mayele mpenza epai ya bato ya mboka oyo tozalaki kokutana na bango, mpe bayekoli na biso ya Biblia bazalaki kobongola mpo na biso. Tozalaki kokatisa bamai ya makasi, oyo etondá na bangando oyo babimaka na pembenipembeni ya ebale mpo na koyɔta moi. Longolá kaka mbala moko oyo balandaki biso, bangando yango ezalaki kosala biso eloko te.
Tozali kobongisa mikanda ya koteya na yango
Ntango mosala na biso ya kosakola ekómaki kokende liboso, tozwaki ekateli ya kobɛtaka na masini mwa mateya ya Biblia mpo na kokabolelaka bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. Na ebandeli, bayekoli na biso wana ya Biblia bazalaki kosalisa biso na kobongola yango. Tozalaki kolekisa ebele ya babutu mpo na kobɛta bankama ya batrakte mpe tozalaki kokabola yango epai ya bato ya mboka mpe epai ya bato ya masuwa oyo ezalaki koleka wana.
Na 1957, John Cutforth, mokɛngɛli-motamboli moko oyo akɔmelá mpenza ayaki kotala biso mpe alendisaki biso mingi.b Ayebisaki biso ete kosalela bililingi ekosalisa biso mingi mpo na koteya solo ya Biblia epai ya bato oyo bayebi kotánga te. Ye ná mobali na ngai basalaki mwa mayemi oyo tokokaki kosalela mpo na kolimbola mateya ya ebandeli ya Biblia. Na nsima, tolekisaki ebele ya mikolo mpo na kotya mayemi yango na bakaye. Topesaki moyekoli mokomoko ya Biblia oyo ya ye kaye, oyo akokaki kosalela mpo na kopesa basusu litatoli. Na nsima, mayele wana ya koteya ekómaki kosalelama na ekólo mobimba.
Nsima ya kolekisa mbula mibale na ndambo na Waterfall Bay, mosala na biso na izini ya mabaya esilaki, mpe Leta andimaki biso tótikala na Nouvelle-Guinée. Na yango, tondimaki kokóma babongisi-nzela minene.
Tozongi na Rabaul
Na nzela, ntango tozalaki kokende na Rabaul, masuwa oyo ememaki biso etɛlɛmaki butu mobimba na elanga moko ya kokoti ná kaukau, na engumba Wide Bay. Bankolo elanga yango, mobange moko ná mwasi na ye oyo basepelaki kotika mosala na bango mpo na kozonga na Austalie, basɛngaki John akóma kotambwisa misala na elanga yango. Ezalaki mosala moko malamu mingi, kasi ntango totalelaki likambo yango ngai ná John na butu wana, tosukisaki ete toyaki na Nouvelle-Guinée mpo na koluka bozwi te. Tozalaki na ekateli makasi ya kotikala kaka babongisi-nzela. Yango wana, na mokolo oyo elandaki toyebisaki bango ekateli na biso mpe tokɔtaki na masuwa.
Ntango tokómaki na Rabaul, tokendaki kofanda esika moko na Batatoli mosusu oyo bautaki na bikólo mosusu mpe bayaki na teritware wana. Bato ya mboka yango bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi mingi, mpe tokómaki koyekola Biblia na bato ebele. Na ntango yango, tozalaki mpe koyangana na makita na ndako moko oyo tozalaki kofutela, mpe tozalaki kokóma bato soki 150. Mingi kati na bato yango bandimaki solo mpe basalisaki na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bisika mosusu ya ekólo yango.—Matai 24:14.
Tozalaki mpe kokende na Vunabal, mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 50 na Rabaul, epai mwa ndambo ya bato basepelaki mpenza na solo ya Biblia. Mosika te, likambo yango eyebanaki epai ya mokonzi moko ya Lingomba ya Katolike na mboka yango. Ye ná baninga na ye bayaki kokata boyekoli na biso ya Biblia oyo tozalaki kosala pɔsɔ na pɔsɔ mpe babenganaki biso na mboka na bango. Ntango toyokaki ete bakotya mobulu ya makasi lisusu na pɔsɔ oyo ekolanda, tosɛngaki bapolisi bákende kotika biso.
Na mokolo wana, nzela mobimba etondaki na bato ya Katolike oyo bazalaki kofingafinga biso. Mingi kutu balingaki kobamba biso mabanga. Na ntango yango, kuna na Vunabal sango moko ayanganisaki bankama ya bato. Bapolisi bayebisaki biso ete tozali na lotomo ya kosala makita na biso; yango wana bafungolaki nzela na kati ya bato yango mpe tolekaki. Kasi, ntango kaka tobandaki makita, sango asopaki bato na ye lokola nzoi. Bapolisi bakokaki lisusu kopekisa bango te; yango wana mokonzi na bango asɛngaki biso tólongwa wana mpe amemaki biso nokinoki tii na motuka na biso.
Ebele ya bato bayaki kozinga biso; bazalaki kofinga biso, kobwakela biso nsɔi mpe kolakisa biso makofi, mpe sango atɛlɛmaki wana, azingi mabɔkɔ mpe azali kosɛka. Ntango tokimaki, mokonzi ya bapolisi alobaki ete naino amoná mobulu ya ndenge wana te. Atako bato mingi ya Vunabal babangaki mobulu wana, moyekoli moko ya Biblia akobaki na mpiko mpenza koyekola solo ya Bokonzi. Banda wana tii lelo, bankama ya bato mosusu na Nouvelle-Bretagne bazali kondima solo.
Bato ya Nouvelle-Guinée bafungwami
Na Novɛmbɛ 1960, batindaki biso lisusu na Madang, engumba moko ya monene na bokula ya nɔrdi ya esanga monene ya Nouvelle-Guinée. Kuna, ngai ná John tokutanaki na mabaku mingi ya misala. Kompanyi moko ezalaki kosɛnga ngai nakóma kosala na magazini na bango ya bilamba. Kompanyi mosusu elingaki kopesa ngai mosala ya kobongisa bilamba. Basi mosusu oyo bazalaki bapaya na ekólo wana bazalaki kutu koloba ete bápesa ngai mbongo mpo nafungola magazini na ngai moko ya bilamba. Lokola tobosanaki mikano na biso te, tozalaki koyebisa bango na boboto nyonso ete tokosala te.—2 Timote 2:4.
Teritware ya Madang ebotaki mbuma mingi, mpe mosika te lisangá moko ya monene ebimaki. Tozalaki kokende na makolo mpe na tukutuku na bamboka ya mosika, epai tozalaki kolekisa mwa mikolo na mosala ya kosakola. Na nzela, tozalaki kolala na mwa bandako oyo bato basundolá, likoló ya matiti oyo tozalaki kokata na zamba. Tozalaki komema biloko mingi te, kaka mwa manzanza ya sardini, bisikiti mpe misikitele.
Mbala mosusu oyo tokendeki kosakola na bamboka, totalaki mpe bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu na Talidig, mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 50 na nɔrdi ya Madang. Ntango bato yango babandaki kokola na elimo, mokambi ya eteyelo ya mboka yango apekisaki bango koyekolaka Biblia na mboka wana. Na nsima, atindaki bapolisi bábuka bandako na bango mpe bábengana bango bákende kofanda na zamba. Kasi, mokonzi ya mboka moko ya pembeni wana ayambaki bango na mboka na ye. Nsukansuka, mokonzi yango ya boboto andimaki solo ya Biblia, mpe Ndako ya Bokonzi moko ya kitoko etongamaki na mboka yango.
Mosala ya kobongola mikanda mpe ya kotala masangá
Tokómaki na Nouvelle-Bretagne na 1956. Kaka mbula mibale nsima, basɛngaki ngai ná John tóbongola mikanda ndenge na ndenge oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ oyo elobamaka mingi na Mélanésie. Tosalaki mosala yango na boumeli ya ebele ya bambula. Na 1970, babengaki biso na biro ya filiale ya Port Moresby, mboka-mokonzi ya Papouasie-Nouvelle-Guinée, epai tokómaki babongoli. Kuna, tozalaki mpe koteya bandeko minɔkɔ mosusu.
Na 1975, tozongaki na Nouvelle-Bretagne, epai tokómaki kotala masangá. Na boumeli ya mbula 13 oyo elandaki, totambolaki pene na ekólo mobimba na mpɛpɔ, na masuwa, na mituka mpe na makolo. Tobikaki na makama mingi na mibembo yango, lokola oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Na mbala wana, maladi ya estoma ebwakaki pilote ya mpɛpɔ oyo ememaki biso ntango tokómaki pene na libándá ya mpɛpɔ ya engumba Kandrian, na Nouvelle-Bretagne. Mpɛpɔ ekómaki kobalukabaluka yango moko na likoló ya zamba; na ntango wana John azalaki kobunda mpo na kolamusa pilote wana oyo atikalaki lokola ebembe. Nsukansuka, mayele na ye ezongaki, miso na ye efungwamaki mpe akitisaki mpɛpɔ na makasi. Na nsima, maladi ebwakaki ye lisusu.
Ekuke mosusu ya mosala efungwami
Na 1988, batindaki biso lisusu na Port Moresby mpo tópesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda, oyo ekómaki mingi na filiale yango. Tozalaki bato soki 50 na biro ya filiale. Kuna, tolakisaki mpe babongoli ya sika mosala. Biso nyonso tozalaki kofanda na mwa bandako ya shambre mokomoko. Ngai ná John tozwaki ekateli ya kotikaka ndako na biso polele mpo na kolendisa bandeko ya Betele mpe bapaya oyo bazali koleka bátɛlɛmaka wana mpo tósolola mpe tóyebana. Yango wana, toyebanaki mingi na bandeko mpe tokómaki kolingana makasi mpe kosalisana.
Nsukansuka, na 1993, John akufaki na maladi ya motema. Nayokaki lokola eteni ya nzoto na ngai ekufi. Toumelaki na libala na biso mbula 38 mpe tolekisaki bambula yango nyonso na mosala ya Bokonzi. Atako bongo, nazalaki na ekateli makasi ya kokoba na mosala yango, na nguya oyo Yehova azali kopesa ngai. (2 Bakolinti 4:7) Nakobaki kotika ndako na ngai polele, mpe bilenge bakobaki koya kotala ngai. Kozala na baninga wana ya malamu esalisaki ngai nalɛmba te.
Na 2003, lokola nazalaki lisusu nzoto makasi te, batindaki ngai na biro ya filiale ya Sydney, na Australie. Lelo oyo, atako nakómi na mbula 77, natiki mosala ya ntango nyonso te; nazali na Departema ya babongoli, mpe nalɛmbaka te na mosala ya kosakola. Baninga, bana mpe bankɔkɔ na ngai ya elimo bapesaka ngai esengo ntango nyonso.
Ndako na ngai na Betele ezalaka kaka polele, mpe mikolo mingi nayambaka bato. Kutu, soki nakangi ndako, bandeko bayaka kobɛta mpo na koyeba soki likambo ezali. Na ntango nyonso oyo nazali naino na bomoi, nakotika te kosakola mpe kosalela Nzambe na ngai, Yehova.—2 Timote 4:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango wana, ɛsti ya esanga yango ekabwanaki na mibale: Papouasie na sudi mpe Nouvelle-Guinée na nɔrdi. Lelo oyo, ngámbo ya wɛsti ya esanga yango, oyo ezali na kati ya ekólo Indonésie, ezali kobengama Papouasie, mpe ngámbo ya ɛsti ezali kobengama Papouasie-Nouvelle-Guinée.
b Mpo na komona lisolo ya bomoi ya John Cutforth, talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1959, nkasa 26-27 (na Lifalanse).
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
NOUVELLE- GUINÉE
AUSTRALIE
Sydney
INDONÉSIE
PAPOUASIE- NOUVELLE-GUINÉE
Talidig
Madang
PORT MORESBY
NOUVELLE-BRETAGNE
Rabaul
Vunabal
Wide Bay
Waterfall Bay
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Map and globe: Based on NASA/Visible Earth imagery
[Elilingi na lokasa 17]
Ngai ná John na liyangani ya etúká, na engumba Lae, na Nouvelle-Guinée, na 1973
[Elilingi na lokasa 20]
Na biro ya filiale ya Papouasie-Nouvelle-Guinée, na 2002