Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/7 nk. 7-10
  • “Bolingo esangisaki biso atako tokeseni minɔkɔ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bolingo esangisaki biso atako tokeseni minɔkɔ”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge bandeko bamilɛngɛlaki
  • Ndenge bandeko bakabolaki nkasa ya libyangi
  • Bilei ya malamu mpenza ya elimo
  • Libota oyo esangisi bandeko ya mokili mobimba
  • Maloba ya botɔndi
  • Maloba ya bato mosusu
  • Mingi basikolamá!
  • Mayangani ya bato oyo basalelaka Yehova na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mayangani ezalaka ntango ya esengo oyo tomonisaka mpenza bondeko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/7 nk. 7-10

“Bolingo esangisaki biso atako tokeseni minɔkɔ”

Lobiko. Lisiko. Banda kala, bato bazalaka na mposa ya kosikolama na bampasi. Tokosala nini mpo na kolonga mikakatano ya bomoi? Tokosikolama mokolo mosusu? Soki tokosikolama, ndenge nini?

YANGO nde elobelamaki na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ebandaki na Mai 2006. Motó ya likambo na yango ezalaki “Lobiko ekómi pene!”

Mayangani libwa na kati na yango eyanganisaki bato ebele oyo bautaki na bikólo ekeseni. Mayangani yango esalemaki na Yuli mpe na Augusto 2006 na Prague, mboka-mokonzi ya République tchèque; na Bratislava, mboka-mokonzi ya ekólo Slovaquie; na Chorzów mpe Poznań, bingumba ya Pologne;a mpe na bingumba mitano ya ekólo Allemagne: Dortmund, Francfort, Hambourg, Leipzig, mpe Munich. Mayangani yango nyonso eyanganisaki bato koleka 313 000.

Elimo nini emonanaki na mayangani yango? Bapanzi nsango balobaki nini na ntina na mayangani yango? Mpe bayangani bamiyokaki ndenge nini?

Ndenge bandeko bamilɛngɛlaki

Bandeko oyo bautaki na mikili mosusu mpe baoyo bafandi na bisika oyo mayangani yango esalemaki bazalaki kozela na esengo nyonso mpamba te bayebaki ete mayangani yango ekomemela bango mapamboli ya elimo oyo bakobosana te bomoi na bango mobimba. Kobongisa bisika ya malamu ya kolala mpo na bandeko oyo bautaki bipai mosusu ezalaki mosala monene mpenza. Na ndakisa, mpo na liyangani oyo esalemaki na engumba Chorzów, Batatoli ya Pologne bayambaki bandeko koleka 13 000 oyo bautaki na Mpoto ya Ɛsti na bandako na bango. Bautaki na bisika oyo: Arménie, Bélarus, Estonie, États-Unis, Géorgie, Kazakhstan, Kirghizistan, Lettonie, Lituanie, Moldavie, Ouzbékistan, Russie, Tadjikistan, Turkménistan mpe Ukraine.

Bandeko mingi oyo bayaki na mayangani yango babandaki komibongisa basanza mingi liboso. Tatiana, oyo azali mobongisi-nzela na engumba Kamchatka, na bokula moko ya Russie oyo ezwami na nɔrdi-ɛsti ya Japon, abandaki komibongisa mbula moko liboso. Asengelaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 10 500. Mpo na kokóma na Chorzów, asalaki ngonga mitano na mpɛpɔ, pene na mikolo misato na engbunduka mpe ngonga 30 na bisi.

Liboso mayangani yango ebanda, bankóto ya bandeko bamipesaki na misala ya kopɛtola bisika oyo mayangani yango esengelaki kosalema mpe zingazinga na yango mpo na kokómisa yango bisika oyo ebongi mpo na losambo ya Yehova. (Deteronome 23:14) Na ndakisa, Batatoli ya Leipzig basukolaki stade malamu mpenza mpe balakaki ete bakosukola yango lisusu na nsima ya liyangani. Mpo na yango, bakonzi ya stade bazongiselaki bango mbongo ebele oyo bafutaki mpo na misala ya kopɛtola stade nsima ya liyangani.

Ndenge bandeko bakabolaki nkasa ya libyangi

Masangá ya mokili mobimba esalaki kampanye monene ya kobenga bato na mayangani “Lobiko ekómi pene!” Bandeko oyo basengelaki koyangana na mayangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi, basalaki mpe kampanye yango na esengo mpenza. Basalaki kampanye yango tii na mpokwa mpenza ya mokolo ya nsuka liboso ya mokolo oyo liyangani ebandaki. Molende na bango ebotaki mbuma nini?

Motatoli moko ya Pologne na nkombo Bogdan akutanaki na mobali moko mobange oyo asepelaki kokende na liyangani yango, kasi alobaki ete azangi mbongo ya kofuta tike ya kokende na Chorzów oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 120. Emonanaki ete kiti moko ekotikala mpamba na kati ya bisi oyo bandeko ya lisangá bafutelaki mpo na kokende na liyangani. Bogdan alobi boye: “Toyebisaki mobali yango ete akoki kokende elongo na biso kozanga kofuta soki akómi na esika tokozwa bisi na ntɔngɔntɔngɔ (5:30).” Mobali yango andimaki mpe ayanganaki na liyangani. Na nsima, akomelaki bandeko boye: “Nsima ya koyangana na liyangani oyo, nazwi ekateli ya kokóma moto malamu.”

Na Prague, mobali moko oyo azalaki kofanda na moko ya baotɛlɛ epai bandeko oyo bautaki Grande-Bretagne mpo na liyangani bazalaki kofanda, ayebisaki bandeko na mpokwa moko ete ye mpe ayanganaki na liyangani mokolo wana. Nini etindaki ye ayangana? Mobali yango alobaki ete lokola basakoli zomi bakeseni bapesaki ye lokasa ya libyangi mpo na liyangani yango, esengelaki kaka akende! Makambo amonaki mpe ayokaki kuna esimbaki mpenza motema na ye mpe azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi lisusu.​—1 Timote 2:3, 4. 

Bilei ya malamu mpenza ya elimo

Liyangani yango elobelaki ndenge tokoki kosala liboso ya mikakatano ndenge na ndenge. Batoli ya polele mpenza oyo euti na Biblia emonisaki ndenge ya kosilisa mikakatano yango to koyikela yango mpiko.

Bato oyo bazali kotungisama na bobange, na maladi, mpe baoyo bakufeli balingami na bango to bazali kotungisama na mikakatano mosusu, bazwaki batoli ya Biblia ya kolendisa mpo esalisa bango bákóma kotalela bomoi ndenge mosusu. (Nzembo 72:12-14) Balongani mpe baboti bazwaki toli mpo báyeba nini basengeli kosala mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo mpe mpo na kobɔkɔla bana na bango na ndenge oyo ebongi. (Mosakoli 4:12; Baefese 5:22, 25; Bakolose 3:21) Bilenge baklisto oyo bazali kokutana na baninga ya mabe na kelasi, kasi bazali kozwa toli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe na ndako mpe na lisangá, bazwaki toli ya malamu mpenza mpo báyeba ndenge ya kolonga bopusi mabe ya baninga na bango mpe ndenge ya ‘kokima bamposa oyo ekangani na bolenge.’​—2 Timote 2:22.

Libota oyo esangisi bandeko ya mokili mobimba

Batatoli ya Yehova bazwaka ntango nyonso mateya ya malamu na makita na bango. (2 Timote 3:16) Likambo esalaki ete mayangani wana ekesana na mayangani mosusu ezali ete esangisaki bandeko ya bikólo ndenge na ndenge. Bandeko nyonso oyo bayanganaki na mayangani oyo eyanganisaki bato ya mikili mingi balandaki mateya ndenge moko na minɔkɔ ekeseni. Masolo oyo bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazalaki kosala mokolo na mokolo mpe balapolo ya mosala na bikólo mosusu ekómisaki mayangani yango kitoko lisusu. Bazalaki kobongola masukulu mpe balapolo wana mpo na bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge oyo bazalaki wana.

Bandeko bazalaki mpenza na esengo ya kokutana na bandeko mibali mpe basi ya mikili mosusu. Ndeko moko alobaki ete: “Bokeseni ya minɔkɔ ebimisaki ata mokakatano moko te. Kutu, ebakisaki nde esengo ya liyangani yango. Bayangani bautaki na bikólo ekeseni, kasi bango nyonso bazalaki na kondima kaka moko.” Baoyo bayanganaki na Munich balobaki boye: “Bolingo esangisi biso atako tokeseni minɔkɔ.” Ezala bautaki wapi to balobaka monɔkɔ nini, bayangani bamiyokaki ete bazalaki na kati ya baninga ya solosolo, elingi koloba bandeko na bango mibali mpe basi ya elimo.​—Zekalia 8:23.

Maloba ya botɔndi

Malili oyo ezalaki na Pologne na ntango ya liyangani etyaki esengo mpe mpiko ya bayangani na komekama. Mbula enɔkaki mingi, malili mpe ezalaki makasi (14°C). Ndeko moko oyo autaki na États-Unis alobaki boye: “Naino nayoká malili ya boye te na liyangani, nalandaki mateya malamu te. Nzokande, kokutana na bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge, esengo oyo bamonisaki mpe ndenge oyo bayambaki biso malamu esalaki ete tóbosana mikakatano oyo ekómelaki biso. Nakoki kobosana liyangani wana ata moke te!”

Eloko oyo bayangani oyo balobaka monɔkɔ ya Polonais bakobosana te ezali kobima ya buku Étude perspicace des Écritures na monɔkɔ ya Polonais. Bazwaki mpenza mbano mpo na mpasi oyo bamonaki na malili mpe na mbula. Buku ya sika Vivez en gardant à l’esprit le jour de Jéhovah oyo ebimaki na liyangani yango esepelisaki mpe bayangani nyonso ya mayangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!”

Bato mingi oyo bazalaki na liyangani bakobosana yango te mpo na bantina mosusu. Kristina, ndeko mwasi moko ya République tchèque, oyo andimaki kosalisa bandeko oyo bautaki na mikili mosusu alobi boye: “Ntango tolingaki kokabwana, ndeko mwasi moko abendaki ngai pembeni, ayambaki ngai mpe alobaki boye: ‘Boyambaki biso malamu mpenza! Bozalaki koyela biso bilei tii na esika oyo tofandi, boyelaki biso ata mpe mai ya komɛla. Matɔndi mingi mpo na bolingo na bino ya komikaba.’” Bilei oyo alobelaki ezali bilei oyo bazalaki kokabolela bandeko oyo bautaki na mikili mosusu na midi. Ndeko moko alobaki ete: “Naino tosalá mosala wana liboso te. Tosengelaki kokabolela bato soki 6 500 bilei na midi nyonso. Ezalaki esengo mingi komona bandeko mingi ata mpe bana mike bamipesi mpo na kokabola bilei.”

Ndeko mwasi moko ya Ukraine oyo akendeki na liyangani na Chorzów alobaki boye: “Bolingo, komibanzabanza mpe kokaba oyo bandeko bamonisaki esimbaki mitema na biso mpenza. Tozangi maloba mpo na kotɔnda bango.” Annika, mwana moko ya mbula mwambe oyo autaki na Finlande akomelaki biro ya Batatoli ya Yehova ya Pologne boye: “Liyangani yango ezalaki kitoko mpenza koleka kutu ndenge nakokaki kokanisa. Kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova ezali malamu mingi mpamba te okozala na baninga na mokili mobimba!”​—Nzembo 133:1.

Maloba ya bato mosusu

Liboso mayangani ebanda, bandeko oyo bautaki na mikili mosusu batambolaki mpo na kotala mboka. Na mwa bamboka ya etúká ya Bavière, bandeko bazalaki kotɛlɛma na bisika oyo Bandako ya Bokonzi ezalaki mpe Batatoli ya bisika yango bazalaki koyamba bango. Moto moko oyo azalaki kotambwisa bandeko azalaki Motatoli te. Kasi, akamwaki ndenge bandeko bazalaki komonisa bolingo na kati na bango. Ndeko moko alobaki boye: “Ntango tozalaki kozonga na otɛlɛ, mwasi oyo atambwisaki biso alobaki ete tokeseni mpenza na bato mosusu. Tolataki malamu mpe biso nyonso tozalaki kotosa mpenza oyo batambwisi na biso bazalaki koloba. Maloba ya mabe to mobulu ezalaki te. Akamwaki komona ndenge bato oyo bayebanaki liboso te bakómi mbala moko lokola baninga ya kala.”

Ndeko moko oyo azalaki kosala na departema ya mayebisi na liyangani oyo esalemaki na Prague alobi boye: “Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, mokonzi ya bapolisi oyo batyaki mpo na kokɛngɛla esika ya liyangani ayaki kotala biso. Amonaki ete kimya ezalaki mpe alobaki ete azali na mosala ya kosala te. Alobaki mpe ete bato oyo bafandi zingazinga na stade bazalaki koluka koyeba soki likambo nini ezali kosalema na stade. Ntango nyonso oyo mokonzi ya bapolisi azalaki koyebisa bango ete ezali Batatoli ya Yehova, bato yango bazalaki kobanga. Kasi, ye azalaki koyebisa bango ete: ‘Soki bato babandi kosala makambo ata ndambo ndenge Batatoli ya Yehova basalaka, ntina ya bapolisi ekozala te.’”

Mingi basikolamá!

Liloba ya Nzambe, Biblia, esangisaka bato ya bikólo nyonso. Etyaka kimya mpe bomoko na kati ya baklisto. (Baloma 14:19; Baefese 4:22-24; Bafilipi 4:7) Mayangani “Lobiko ekómi pene!” oyo esangisaki bandeko oyo bautaki na mikili mingi emonisaki bosolo ya likambo yango. Batatoli ya Yehova basili kosikwama na makambo mingi ya mabe oyo ezali konyokola mokili oyo. Makambo lokola koyinana, konyokolana mpe kolinga moto kaka mpo bozali na ye mposo moko esilá epai ya Batatoli ya Yehova mpe bazali kozela eleko oyo mokili mobimba ekosikolama na makambo wana.

Baoyo bayanganaki na mayangani yango bamonaki mpenza na miso bomoko oyo ezali na kati ya Batatoli ya Yehova ya mikili ekeseni mpe ya mimeseno ndenge na ndenge. Yango emonanaki mpenza na nsuka ya mayangani. Basangani nyonso bazalaki kobɛta mabɔkɔ, koyamba baninga ya sika mpe kokanga bafɔtɔ ya nsuka. (1 Bakolinti 1:10; 1 Petelo 2:17) Na esengo mpe na elikya ete kosikolama na mitungisi nyonso ekómi pene, bayangani bazongaki na bikólo mpe na masangá na bango na ekateli makasi ya kokangama na “liloba ya bomoi” ya Nzambe.​—Bafilipi 2:15, 16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bandeko oyo bayanganaki na bisika mosusu motoba na ekólo Pologne mpe na esika moko na Slovaquie balandaki biteni mosusu ya mayangani yango na nzela ya televizyo.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 10]

Minɔkɔ ntuku mibale na motoba eyokanaki lokola monɔkɔ moko

Na mayangani wana nyonso libwa, masolo esalemaki na monɔkɔ oyo elobamaka na bisika oyo mayangani yango esalemaki. Na mayangani oyo esalemaki na Allemagne, masukulu nyonso esalemaki na minɔkɔ mosusu 18. Na Dortmund, masukulu esalemaki mpe na minɔkɔ oyo: Arabe, Persan, Portugais, Espagnol mpe Russe; na Francfort esalemaki na Lingelesi, na Lifalanse mpe na monɔkɔ ya Baserbe ná Bakroate; na Hambourg esalemaki na Danois, na Néerlandais, na Suédois mpe na Tamoul; na Leipzig esalemaki na Chinois, na Polonais mpe na Turc; mpe na Munich esalemaki na Grɛki, na Italien mpe na Elobeli ya bikela ya Allemand. Na liyangani oyo esalemaki na Prague, masukulu nyonso esalemaki na monɔkɔ ya Tchèque, na Lingelesi mpe na Russe. Na Bratislava, esalemaki na Lingelesi, na Hongrois, na Slovaquie mpe na elobeli ya bikela ya Slovaquie. Na Chorzów, esalemaki na Polonais, na Russe, na Ukranien mpe na Elobeli ya bikela ya Polonais. Mpe na Poznań, esalemaki na monɔkɔ ya Polonais mpe na Finnois.

Minɔkɔ ntuku mibale na motoba! Ya solo, bayangani bakesenaki na minɔkɔ, kasi bolingo esangisaki bango.

[Elilingi na lokasa 9]

Bandeko ya Croatie oyo bakendaki na liyangani ya Francfort basepelaki ntango bazwaki “Libongoli ya Mokili ya Sika” na monɔkɔ na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto