Kondima ya mama moko elendisaki ye
“Soki botángi mokanda oyo, elingi koloba nabiki na lipaso te mpe nazali na bino lisusu te.”
WANA ezali maloba ya ebandeli ya mokanda moko oyo Carmen, mama moko moklisto akomelaki bana na ye ya basi misato ya mbula 25, 19 mpe 16. Lipaso ya Carmen esimbaki te mpe akufaki.
Kotika bana misato mobimba ndenge wana ezali mpenza likambo ya mpasi. Nzokande, kondima makasi ya mama wana epai ya Yehova mpe bilaka na ye esalisaki ye alonga mokakatano yango, azala na kimya, oyo emonanaki polele na mokanda oyo akomaki. Yoká makambo akomelaki bana na ye.
“Liboso ya nyonso, bóyeba ete nalingaka bino na motema na ngai mobimba. . . . Bozali bana malamu oyo mama nyonso akosepela kozala na bango mpe nabɛtɛlaka bino ntolo.
“Mposa na ngai ezalaki ya kozala na bino kino na mokili ya sika oyo Nzambe alaki . . . , kasi lokola esimbi te, nasɛngi ye asalisa bino mpo bótikala kaka sembo ndenge bozali. Toyiki mpiko elongo na mikakatano ebele mpe Yehova atikaki biso te. . . . Na yango, bókoba kolanda litambwisi oyo azali kopesa na ebongiseli na ye mpe bókoba kopesa lisangá mpe bankulutu mabɔkɔ. Bókoba kosakola ndenge makoki ekopesa bino nzela mpe bólinga bandeko nyonso.
“Tokabwani kaka mpo na mwa ntango mokuse. . . . Nabondeli bino bólimbisa ngai mpo na mabunga nyonso nasalaki mpe mpo na mabaku mosusu oyo nazalaki koyokela bino te to soki nayebisaki bino te ete nalingaka bino mingi. . . . Nayebi ete mokomoko na bino azali na bamposa na ye. Yehova ayebi bamposa na bino koleka bino moko, mpe akopesa bino nyonso oyo bosengeli na yango mpe akofuta bino mpo na mikakatano nyonso oyo bozali kokutana na yango.
“Bóbosana te mokano na bino ya kokɔta na mokili ya sika. Bósala makasi mpo bókɔta. Tiká ete Yehova apambola bino mpe alendisa bino mpo bótikala sembo kino na nsuka. . . . Bómitungisa te, bana na ngai. Nalingi bino mingi!”
Likama ekoki kokwela moto nyonso mpe na ntango nyonso. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11, NW) Nzokande, baoyo bazali na kondima makasi epai na Nzambe bakoki kozala na elikya ndenge moko na ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Nandimi solo ete ezala liwa to bomoi . . . to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso ná bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.”—Baloma 8:38, 39; Baebele 6:10.