Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/7 nk. 26-29
  • Nzambe amoniseli ngai motema mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe amoniseli ngai motema mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eleko ya komekama makasi
  • Likambo oyo epesaka ngai mawa mingi
  • Nakómi makasi na elimo
  • Tokómi na mwa bonsomi
  • Mokumba mosusu
  • Mosala na biso na Autriche
  • Nazali kaka molende, atako maladi
  • Ndakisa ya baboti na ngai elendisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yehova azalaki na ngai elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/7 nk. 26-29

Nzambe amoniseli ngai motema mawa

Lisolo ya Bolfenk Moc̆nik

“Nasɛngi yo ozala na mpiko.” Mama ayambaki ngai mpe ayebisaki ngai maloba yango ya kolendisa. Basoda bakabolaki biso, mpe nabandaki kosamba. Nsukansuka, bakatelaki ngai etumbu: mbula mitano ya bolɔkɔ. Etumbu ya ndenge wana ekoki kolɛmbisa bato mosusu. Nzokande, ngai nayokaki kimya makasi na motema. Tiká nalimbwela bino.

MAKAMBO yango esalemaki na 1952, na ekólo Slovénie.a Kasi, nakobanda lisolo na ngai na makambo oyo esalemaki mbula koleka 20 liboso, elingi koloba na 1930. Na mbula yango, mpo na mbala ya liboso, Bayekoli ya Biblia (nkombo ya kala ya Batatoli ya Yehova), babatisaki bato ebele esika moko na ekólo na biso. Baboti na ngai, Berta ná Franz Moc̆nik, bazalaki na kati ya bato oyo bazwaki batisimo. Na ntango wana, nazalaki na mbula motoba, mpe Majda, leki na ngai ya mwasi, azalaki na mbula minei. Makambo mingi ya lisangá ezalaki kosalema na ndako na biso, na engumba Maribor.

Na 1933, Adolf Hitler azwaki bokonzi na Allemagne mpe akómaki konyokola Batatoli. Batatoli mingi ya Allemagne bayaki na Yougoslavie mpo na kosakola. Baboti na ngai bazalaki kosepela mingi koyamba bandeko yango ya sembo. Moko na bandeko yango oyo nabosanaka te ezali Martin Poetzinger, oyo na nsima alekisaki mbula 9 na bakaa ya bakangami ya Banazi. Na nsima, banda 1977 tii na liwa na ye na 1988, azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

Mbala nyonso oyo Ndeko Martin azalaki koya epai na biso, azalaki kolala na mbeto na ngai, mpe ngai ná leki na ngai tozalaki kolala elongo na baboti na biso. Ndeko Martin azalaki na buku moko oyo ezalaki na bililingi mpe nazalaki kosepela na yango mingi. Nazalaki kolinga mingi kotalatala buku yango.

Eleko ya komekama makasi

Na 1936, ntango bokonzi ya Hitler ekómaki makasi, baboti na ngai bakendaki na liyangani moko ya mikili mingi na Lucerne, na Suisse. Lokola Tata azalaki na mongongo ya malamu, na libaku yango baponaki ye atánga masolo ya Biblia mpo ekɔta na badiskɛ oyo na nsima, bandeko ya Slovénie bakómaki koyokisa bato na mosala ya kosakola. Mwa moke nsima ya liyangani yango, bakómaki konyokola Batatoli na mikili ya Mpoto. Batatoli mingi banyokwamaki mpe bamosusu bakufaki na bakaa ya bakangami ya Banazi.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe na Aprili 1941, basoda ya Allemagne bakɔtaki na bamboka mingi ya Yougoslavie. Biteyelo ya Slovénie ekangamaki. Bapekisaki biso tólobaka monɔkɔ ya mboka na biso na balabala. Lokola Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te, baboyaki kopesa mabɔkɔ na makambo oyo etalelaki bitumba.b Yango wana, bakangaki mingi kati na bango mpe babomaki bamosusu​—kati na bango Franc Drozg, elenge mobali moko oyo nayebaki malamu. Babomaki bango mosika te na ndako na biso, na ntaka ya mɛtrɛ soki 100. Nazali komona lisusu ndenge Mama atyaki elamba na matoi mpo ayoka te lokito ya masasi. Maloba ya nsuka oyo Franc akomelaki moninga na ye moko elobaki ete, “Tokomonana na Bokonzi ya Nzambe.”

Likambo oyo epesaka ngai mawa mingi

Na ntango wana, nazalaki na mbula 19. Atako nasepelaki na mpiko oyo Franc amonisaki, ngai moko nazalaki kobanga. Ngai mpe nakokufa? Kondima na ngai mpe boyokani na ngai na Yehova Nzambe ezalaki makasi te. Babengaki ngai na mosala ya soda. Lokola kobanga na ngai elekaki kondima na ngai na makasi, nakendaki.

Batindaki ngai na etumba na Russie. Kuna, namonaki ndenge baninga na ngai mingi bazalaki kokufa. Etumba ezalaki nsɔmɔ mpenza. Lisosoli na ngai ekómaki kotungisama mingi. Nabondelaki Yehova alimbisa ngai mpe apesa ngai makasi ya kozonga na nzela ya malamu. Ntango banguna bakɔtaki na esika oyo tozalaki, etuluku mobimba topalanganaki, mpe nazwaki libaku ya kokima.

Nayebaki ete soki basoda na biso bakangi ngai, bakoboma ngai. Yango wana, na boumeli ya sanza 7, nazalaki kobombama na bisika ndenge na ndenge. Kutu, natindelaki Majda mokanda oyo ezalaki na maloba oyo: “Nalongwe epai ya patrɔ na ngai ya kala mpe sikoyo nakómi kosala epai ya patrɔ mosusu.” Nalingaki koloba ete nazwaki mokano ya kosalela Nzambe; kasi, mwa ntango elekaki liboso nakokisa mpenza mokano yango.

Na 1945 banguna balongaki ekólo Allemagne; na Augusto ya mbula yango, nazongaki na Maribor. Likambo ya esengo, tata, mama, mpe leki na ngai ya mwasi, bakufaki te na etumba. Kasi, na ntango wana, Bakoministe bazalaki koyangela mboka, mpe bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova. Mosala ya kosakola epekisamaki; kasi, Batatoli bakobaki kosala makita mpe kosakola na kobombama.

Na sanza ya Febwali 1947, bakatelaki bandeko oyo misato etumbu ya liwa: Rudolf Kalle, Dus̆an Mikić, mpe Edmund Stropnik. Kasi na nsima, bazuzi balobaki ete na esika báboma bango, bakotikala na bolɔkɔ mbula 20. Bapanzi-nsango balobelaki mingi likambo yango, mpe na ndenge yango, bato bayebaki makambo mabe oyo bakonzi bazalaki kosala Batatoli. Ntango natángaki bazulunalo yango, nayokaki motema mpasi. Nayebaki oyo nasengelaki kosala.

Nakómi makasi na elimo

Nayebaki malamu ete nasengeli kotosa mateya ya Biblia, yango wana nasalaki makasi mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, atako ezalaki kosalema na nkuku. Lokola namipesaki na kotánga Biblia, nazwaki makasi ya kotika mimeseno ya mabe, na ndakisa komɛla likaya.

Na 1951, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe, mpe nazongelaki bomoi oyo natikaki mbula koleka zomi liboso. Nsukansuka, nakómaki komona ete Yehova azali mpenza Tata ya bolingo mpe ya sembo. Atako nalandaki nzela ya mabe ntango nazalaki elenge, nasepelaki mingi na elikya oyo Biblia epesi ete Nzambe alimbisaka. Lokola Tata ya bolingo, Nzambe akobaki kokamba ngai “na nkamba ya bolingo.”​—Hosea 11:4.

Na boumeli ya eleko yango ya mpasi, tozalaki kosala makita na bandako ya Batatoli ndenge na ndenge, mpe tokobaki kosakola na nkuku. Bakangaki ngai liboso kutu nakokisa mbula mobimba kobanda nazwaki batisimo. Mama akutanaki na ngai mwa ntango moke liboso básambisa ngai. Ndenge namonisaki yango na ebandeli, ayambaki ngai makasi mpe alobaki na ngai ete: “Nasɛngi yo ozala na mpiko.” Ntango bakatelaki ngai etumbu ya mbula mitano ya bolɔkɔ, nabangaki te.

Batyaki ngai na ndako moko moke elongo na bakangami mosusu misato; na ndenge yango nazalaki koteya bato oyo bazalaki na libaku mosusu te ya koyoka nsango ya Biblia. Atako nazalaki na Biblia te to mikanda oyo elimbolaka Biblia, ngai moko nakamwaki ndenge nazalaki koyeba bavɛrsɛ mpe bandimbola na yango, oyo nakangaki na boyekoli na ngai moko. Nazalaki koyebisa baninga na ngai ya bolɔkɔ ete soki nakosala mbula mitano na bolɔkɔ, Yehova akopesa ngai makasi mpo nalɛmba te. Kasi, akoki mpe kosala ete nabima. Nazalaki koloba ete, soki asali ete nabima, nani akoki kopekisa ye?

Tokómi na mwa bonsomi

Na sanza ya Novɛmbɛ 1953, guvernɛma elongolaki bitumbu oyo ekatelaki bato; Batatoli ya Yehova nyonso babimaki na babolɔkɔ. Ntango nabimaki na bolɔkɔ, nayokaki ete esilaki koleka sanza mibale uta tozwaki lisusu bonsomi ya kosakola. Mbala moko, tobandaki kobongisa masangá mpe mosala ya kosakola. Tozwaki esika ya kosala makita na eteni ya nse ya mabelé na ndako moko na Maribor. Totyaki libaya moko na ndako yango oyo ezalaki na maloba: “Batatoli ya Yehova​—Lisangá ya Maribor.” Tozalaki na esengo makasi ya kosalela Yehova na bonsomi.

Na 1961, nakómaki mobongisi-nzela, elingi koloba nakómaki kopesa ntango mingi na mosala ya kosakola. Sanza soki motoba na nsima, babengaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova na Yougoslavie. Ezalaki na Zagreb, na Croatie. Na ntango wana, biro yango ezalaki ndako moko moke mpe tozalaki kaka bato misato. Bandeko oyo bazalaki kofanda pembeni bazalaki koya kopesa biso mabɔkɔ na mosala ya kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na minɔkɔ ya mboka na biso.

Bandeko basi mpe bazalaki koya kopesa biso mabɔkɔ. Bazalaki na ndakisa, kokangisa nkasa ya bazulunalo. Nazalaki kosala misala ndenge na ndenge, na ndakisa kobongola, kotánga, kotinda mikanda, mpe kosangisa balapolo.

Mokumba mosusu

Na 1964, nakómaki mokɛngɛli-motamboli, elingi koloba nazalaki kokende kotala masangá ya Batatoli mpo na kolendisa bango. Nalingaki mosala yango mingi. Mbala mingi, nazalaki kosala mibembo na motuka to na engbunduka. Mpo na kokende na bamboka ya mike, mbala mingi nazalaki kosalela velo to mpe nazalaki kotambola na makolo, ntango mosusu na banzela ya pɔtɔpɔtɔ.

Nazalaki mpe kokutana na makambo ya kosɛkisa. Mokolo mosusu, ndeko moko amemaki ngai na sharete oyo mpunda azalaki kobenda. Wana tozalaki kotambola na nzela moko oyo etondi na putulu, pinɛ moko elongwaki mpe sharete ebalukaki. Biso mibale tokweaki na nse. Wana tofandaki na mabelé, mpe tozalaki kotala mpunda, mpunda mpe azalaki kotala biso lokola nde azali kokamwa. Ata nsima ya bambula mingi, soki tokanisi likambo yango, tozalaki kaka kosɛka. Bolingo ya solosolo oyo bandeko ya bamboka wana bazalaki komonisa ezalaki kopesa ngai esengo oyo nabosanaka te.

Na engumba Novi Sad, nayebanaki na Marika, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela. Bolingo na ye mpo na mateya ya Biblia mpe molende na ye na mosala ya kosakola esepelisaki ngai mingi, yango wana nalingaki kobala ye. Ntango tobalanaki, nazalaki kokende kotala masangá elongo na ye.

Libota na ngai ekutanaki na makambo ya mpasi mingi ntango mosala na biso epekisamaki. Bakoselaki tata makambo ete azalaki na boyokani na banguna, mpe mpo na yango, balongolaki ye mosala. Asalaki nyonso mpo azongela mosala na ye, kasi lokola alongaki te, alɛmbaki nzoto. Na boumeli ya mwa ntango, kondima na ye elɛmbaki, kasi azongelaki milende na ye mwa moke liboso akufa. Azalaki mosakoli ya molende na lisangá tii ntango akufaki na 1984. Mama na ngai, oyo azalaki mwasi ya sembo mpe ya komikitisa, akufaki na 1965. Majda azali tii lelo na lisangá ya Maribor.

Mosala na biso na Autriche

Na 1972, ngai ná Marika totindamaki na Autriche mpo na kosakola epai ya bato mingi ya Yougoslavie oyo bakendá koluka misala kuna. Ntango tokómaki na Vienne, engumba-mokonzi, toyebaki te ete tokotikala kuna libela. Mokemoke, tofungolaki masangá mpe bituluku ya minɔkɔ oyo elobamaka na Yougoslavie.

Na nsima, nakómaki mokɛngɛli-motamboli, nazalaki kokende kotala masangá mpe bituluku oyo ezalaki kosalema na Autriche mobimba. Na nsima, basɛngaki ngai natalaka mpe masangá ya minɔkɔ ya Yougoslavie oyo efungwamaki na Allemagne mpe na Suisse. Napesaki mpe mabɔkɔ mpo na kobongisa mayangani mingi na mikili yango.

Na bantango mosusu, bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazalaki koya na mayangani ya etúká mpe nazwaki libaku ya kokutana lisusu na Ndeko Martin Poetzinger. Tobɛtaki masolo ya makambo mosusu oyo eleká mbula soki 40 ntango azalaki koya kofanda epai na biso. Natunaki ye ete: “Ozali koyeba lisusu ndenge nazalaki kolinga kotala buku na yo oyo ezalaki na bililingi?”

Alobaki na ngai: “Zelá moke,” mpe alongwaki esika tozalaki. Ntango azongaki, ayaki na buku yango mpe apesaki ngai yango. Alobaki na ngai boye: “Nakabeli yo yango.” Nabatelaka buku yango malamu tii lelo oyo.

Nazali kaka molende, atako maladi

Na 1983, bakangaki ngai na maladi ya kanser. Mwa moke na nsima, minganga bayebisaki ngai ete nsukansuka maladi yango ekoboma ngai. Ezalaki eleko moko ya mpasi, mingimingi mpo na Marika, kasi lokola azalaki kokipe ngai malamu mpe bandeko ya lisangá bazalaki kosunga biso, tii lelo oyo nazali kaka na bomoi ya esengo.

Ngai ná Marika tozali kaka babongisi-nzela na Vienne. Mbala mingi, nakendaka na biro ya filiale na ntɔngɔ mpo na kosala mosala ya kobongola, mpe Marika abimaka na mosala ya kosakola. Nayokaka esengo mingi komona ete na kati ya bato ya Yougoslavie oyo bayaki na Autriche, baoyo bakómi Batatoli bazali sikoyo koleka 1 300. Ngai ná Marika tosalisaki mingi kati na bango báyekola mateya ya Biblia.

Na bambula oyo eleki, nazwaki libaku ya kozala na molulu ya bofungoli babiro ya filiale na mikili oyo ezalaki na ekólo Yougoslavie​—Croatie na 1999 mpe Slovénie na 2006. Nazalaki moko na bandeko ya kala oyo batunaki mituna mpo na koloba ndenge mosala ya kosakola ebandaki na bamboka yango mbula 70 liboso.

Ya solo, Yehova azali Tata ya bolingo oyo alimbisaka mpenza mabunga na biso. Nazali mpenza na botɔndi epai na ye mpamba te alandelaka mabunga na biso te! (Nzembo 130:3) Ya solo, amoniseli ngai mpenza boboto mpe motema mawa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ntango wana, ekólo Yougoslavie esangisaki mikili motoba, moko na yango Slovénie.

b Mpo na koyeba bantina oyo Batatoli ya Yehova baboyaka kokende etumba, talá lisolo “Mituna ya batángi” na lokasa 22.

[Elilingi na lokasa 27]

Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Baboti na ngai, Berta ná Franz Moc̆nik, Majda, mpe ngai, na Maribor, Slovénie, na bambula ya 1940

[Elilingi na lokasa 29]

Ná mwasi na ngai Marika

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto