‘Yehova azali nguya na ngai’
Lisolo ya Joan Coville
Nabotamá na sanza ya Yuli 1925 na engumba Huddersfield, na Angleterre. Baboti na ngai babotá kaka ngai moko mpe nazalaki kobɛlabɛla. Kutu, tata azalaki koloba ete, “Soki kaka mopɛpɛ ezwi yo, obɛli.” Mpe ezalaki komonana ete ezali solo!
NTANGO nazalaki mwana moke, bakonzi ya mangomba bazalaki kobondela mpo na kimya; kasi, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, bakómaki kobondela mpo ekólo na biso elonga. Likambo yango etungisaki ngai mingi mpe etindaki ngai namituna mituna mingi. Kaka na ntango yango, Annie Ratcliffe, Motatoli ya Yehova kaka moko oyo azalaki na kartye na biso, ayaki na ndako na biso.
Nayekoli solo
Annie atikelaki biso buku Salut mpe abengisaki mama na likita moko oyo esengelaki kosalema na ndako na ye mpo na koyekola Biblia.a Mama asɛngaki ngai nakende kotika ye. Nabosanaka te makambo oyo nayokaki na likita yango. Balobelaki lisiko, mpe likambo ya kokamwa, boyekoli yango elɛmbisaki ngai te. Nazwaki biyano na mituna mingi oyo nazalaki komituna. Na pɔsɔ oyo elandaki, toyanganaki lisusu na likita yango. Na mbala oyo, balimbolaki esakweli ya Yesu oyo elobeli elembo ya mikolo ya nsuka. Ntango ngai ná Mama tokanisaki ndenge makambo ezali kobeba na mokili, tomonaki mbala moko ete mateya yango ezali solo. Kaka na mokolo yango, babengisaki biso tókende na Ndako ya Bokonzi.
Kuna, nakutanaki na bilenge mosusu oyo bazalaki babongisi-nzela; moko na bango ezalaki Joyce Barber (lelo Ellis), oyo azali tii lelo na Betele ya Londres, elongo na mobali na ye Peter. Namonaki lokola nde moto nyonso azalaki mobongisi-nzela. Ngai mpe nakómaki kolekisa ngonga 60 na mosala ya kosakola sanza na sanza atako nazalaki naino mwana-kelasi.
Sanza mitano na nsima, na mokolo ya 11 Febwali 1940, ngai ná Mama tozwaki batisimo na liyangani ya zongazonga, na engumba Bradford. Tata azalaki kotɛmɛla biso te; kasi, ye moko akómaki Motatoli te. Na eleko oyo nazwaki batisimo, ebongiseli ya kosakola na balabala ebandaki. Ngai mpe nazalaki kosala yango; nazalaki komema sakosi ya bazulunalo mpe libaya oyo ezalaki na mitó ya makambo ya masolo ya Biblia. Mokolo moko ya pɔsɔ, nasengelaki kosakola na kartye moko ya mombongo epai ebele ya bato balekaka. Nazalaki naino kobanga bato, mpe nazalaki komona lokola nde baninga na ngai nyonso ya kelasi bazalaki koleka na esika natɛlɛmaki!
Na 1940, lisangá na biso esengelaki kokabolama. Ntango bakabolaki yango, baninga na ngai mingi bakendaki na lisangá wana mosusu. Nakendaki kosolola na mokɛngɛli-mokambi mpo na likambo yango. Alobaki na ngai ete, “Soki olingi kozwa baninga mosusu, luká bango na mosala ya kosakola.” Nasalaki mpe bongo! Eumelaki te, nakutanaki na Elsie Noble. Elenge mwasi yango andimaki solo mpe akómaki moninga na ngai ya motema.
Mosala ya mobongisi-nzela mpe mapamboli na yango
Ntango nasilisaki kelasi, nakómaki kosala epai ya comptable moko. Kasi, ntango nazalaki komona esengo oyo babongisi-nzela bazalaki na yango, mposa na ngai ya kosalela Yehova lokola mobongisi-nzela ekómaki makasi. Na sanza ya Mai 1945, nakómaki mobongisi-nzela monene. Mokolo ya liboso oyo nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, mbula ebɛtaki mokolo mobimba. Atako bongo, nazalaki na esengo makasi ya kosakola na boye ete nazalaki ata kokipe mbula yango te. Kutu, kobima na mosala ya kosakola mikolo nyonso mpe kotambola na velo ezalaki lokola ngalasisi oyo esalisaki ngai nazala nzoto kolɔngɔnɔ. Atako nazalaki ntango nyonso nzoto mike mpenza (nakómá naino na kilo koleka 42 te), natikaki mosala ya mobongisi-nzela te. Mbula na mbula, nazalaki komona mpenza ete “[Yehova] azali nguya na ngai.”—Nz. 28:7.
Mpo na kofungola masangá ya sika, natindamaki lokola mobongisi-nzela monene na bingumba oyo Batatoli bazalaki te. Nasalaki naino mbula misato na Angleterre mpe na nsima, mbula misato na Irlande. Na engumba Lisburn, na Irlande, nayekolaki Biblia na moto moko oyo azalaki pastɛrɛ molandi na Lingomba ya Protesta. Wana azalaki koyekola mateya ya Biblia, akómaki koyebisa yango epai ya bato ya lingomba na bango. Bandimi mosusu bafundaki ye epai ya bakonzi ya lingomba, mpe mpo na yango, babengaki ye mpe batunaki ye mpo na nini azalaki koteya mateya wana. Alobaki na bango ete lokola azali moklisto, amonaki ete azali na mokumba ya koyebisa bandimi ete makambo mingi oyo bateyaki bango ezalaki lokuta. Atako libota na ye etɛmɛlaki ye makasi, amipesaki epai ya Yehova mpe asalelaki ye na bosembo tii liwa na ye.
Na Larne, engumba ya mibale ya Irlande epai nasalaki lokola mobongisi-nzela, nasakolaki kaka ngai moko na boumeli ya pɔsɔ motoba, mpamba te moninga na ngai ya mosala akendaki na liyangani “Bokoli ya Teokrasi,” oyo esalemaki na New York na 1950. Ezalaki eleko ya pɛtɛɛ te mpo na ngai. Nazalaki na mposa makasi ya kozala na liyangani yango. Kasi, na boumeli ya bapɔsɔ yango, nakutanaki na makambo mingi ya kolendisa na mosala ya kosakola. Nakutanaki na mobange moko oyo azalaki na mokanda na biso banda mbula koleka 20. Atángaki mokanda yango mbala ebele na boye ete akangá makambo na yango mingi na motó. Ye ná mwana na ye ya mobali mpe mwana na ye ya mwasi bandimaki solo.
Formasyo na Eteyelo ya Gileadi
Na 1951, elongo na babongisi-nzela mosusu zomi oyo toutaki na Angleterre, tokɔtaki na kelasi ya mbala ya 17 ya Eteyelo ya Gileadi na South Lansing, na etúká ya New York. Nasepelaki mingi na mateya ya Biblia oyo tozwaki na boumeli ya basanza oyo tozalaki kuna! Na ntango wana, bandeko basi bazalaki kosala masolo te na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi; kasi, na Gileadi, tozwaki mikumba ya kosala masolo ya bana-kelasi mpe masolo mosusu. Tozalaki kobanga! Na lisolo na ngai ya liboso, lobɔkɔ oyo nasimbaki papye ezalaki kolɛnga. Mpo na kosɛkisa biso, molakisi na biso, Ndeko Maxwell Friend, alobaki ete: “Lokola molobi nyonso ya malamu, na ebandeli obangaki; kasi yo okobaki kobanga tii na nsuka.” Ntango tozalaki na kelasi, biso nyonso tokolisaki makoki na biso ya koloba liboso ya bana-kelasi. Mikolo elekaki mbangu mpe tokómaki na nsuka ya mateya; tozwaki badiplome mpe batindaki biso na mikili ndenge na ndenge. Ngai natindamaki na Thaïlande!
“Mokili ya kosɛka”
Namonaka ete kosala elongo na Astrid Anderson lokola bamisionɛrɛ na Thaïlande ezalaki likabo ya Yehova. Mobembo na biso na masuwa eumelaki pɔsɔ nsambo. Ntango tokómaki na Bangkok, engumba-mokonzi, tomonaki ete bazando na yango ezalaki na bato ebele mpe engumba yango ezali na mingala ebele oyo basalelaka lokola banzela minene. Na 1952, basakoli ya Bokonzi bazalaki kaka soki 150 na Thaïlande.
Ntango tomonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Thaï, tomitunaki ete, ‘Tokoyeba mpenza koloba monɔkɔ oyo mokolo mosusu?’ Ezalaki mpasi kobenga maloba na ndenge ebongi. Na ndakisa, liloba khaù, soki obandi koloba yango na mongongo ya likoló, elimbolaka “loso”; nzokande, soki olobi yango kaka na nse, elimbolaka “nsango.” Na yango, na ebandeli, na mosala ya kosakola tozalaki koyebisa bato ete “Namemeli yo loso ya malamu” na esika ya koloba “nsango malamu”! Atako na ebandeli bazalaki kosɛka biso, mokemoke tokómaki koloba malamu.
Bato ya Thaïlande bazali bato ya boboto mpenza. Yango wana, mboka yango ebengamaka Mokili ya kosɛka. Totindamaki liboso na engumba Khorat (lelo ebengamaka Nakhon Ratchasima); kuna, tosalaki mbula mibale. Na nsima, totindamaki na engumba Chiang Mai. Bato mingi ya Thaïlande bazali bandimi ya Lingomba ya Bouddha mpe bayebi mpenza Biblia te. Na engumba Khorat, nayekolaki Biblia na mosali moko ya poste. Mokolo moko, tozalaki kolobela lisolo ya Abraham (Abalayama). Ntango moto yango ayokaki nkombo Abraham, aningisaki motó mpo na komonisa ete ayebi ye. Kasi, mwa moke na nsima, namonaki ete azalaki kokanisa Abraham mosusu. Moto yango azalaki kokanisa Abraham Lincoln, prezida moko ya kala ya États-Unis!
Tozalaki koteya solo ya Biblia epai ya bato ya mitema sembo ya Thaïlande; kasi bango mpe bateyaki biso ndenge ya kozala na esengo ata soki tozali na biloko mingi te. Liteya yango ezalaki na ntina mingi mpamba te, na ndako ya liboso oyo tofandaki na Khorat, tozalaki na kura te, mai mpe te. Na bisika ya ndenge wana, ‘toyekolaki sɛkɛlɛ ya . . . kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.’ Lokola ntoma Paulo, tomonaki ndimbola ya ‘kozala na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka nguya.’—Filp. 4:12, 13.
Libala mpe teritware ya sika
Na 1945, nakendaki na Londres. Kuna, elongo na babongisi-nzela mosusu mpe bandeko ya Betele, tokendaki kotala British Museum. Moko ya bandeko yango ezalaki Allan Coville oyo, mwa moke na nsima, akɔtaki kelasi ya mbala ya 11 ya Gileadi. Atindamaki na France mpe na nsima na Belgique.b Bambula mingi na nsima, ntango nazalaki misionɛrɛ na Thaïlande, atunaki ngai libala mpe nandimaki.
Tobalanaki na Bruxelles, na Belgique, mokolo ya 9 Yuli 1955. Nazalaki na mposa ete soki nabali, nakende mobembo na Paris; yango wana, Allan abongisaki ete tókende kuna na liyangani moko na pɔsɔ oyo elandaki. Nzokande, ntango kaka tokómaki kuna, basɛngaki Allan abongola masukulu ya liyangani mobimba. Azalaki kobima ntɔngɔntɔngɔ, mpe tozalaki kozonga na esika oyo tozalaki kolala na butu mpenza. Ya solo, nasalaki mobembo na Paris, kasi mbala mingi nazalaki komona Allan kaka na mosika, na estrade! Atako bongo, nazalaki na esengo ya komona ndenge mobali na ngai azalaki kosala mpo na bandeko, mpe nandimaki mpenza ete soki Yehova azali na esika ya liboso na libala na biso, tokozala mpenza na esengo.
Nsima ya libala, nakendaki na teritware mosusu—Belgique. Liboso, nayebaki kaka ete Belgique ezalaki esika bitumba mingi esalemaki; kasi, nayaki komona ete bato mingi ya Belgique bazali bato ya kimya. Na teritware yango, nasengelaki mpe koyekola Lifalanse, monɔkɔ oyo elobamaka na sudi.
Na 1955, basakoli bazalaki soki 4 500 na Belgique. Na boumeli ya mbula pene na 50, ngai ná Allan tosalaki na Betele mpe na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Na ebandeli, na boumeli ya mbula mibale na ndambo, tozalaki kosala mibembo na velo, na banzela ya ngombangomba, ezala na nse ya mbula to ya moi makasi. Na boumeli ya bambula, tolalaki na bandako koleka 2 000 ya Batatoli ya Yehova! Mbala mingi, nazalaki kokutana na bandeko oyo bazalaki nzoto makasi te, kasi bazalaki kosalela Yehova na nguya na bango nyonso. Ndakisa na bango elendisaki ngai natika te mosala ya ntango nyonso. Soki touti kotala lisangá moko, tozalaki komiyoka ete tolendisami mpenza. (Lom. 1:11, 12) Allan azalaki mobali ya malamu mpenza. Namonaki bosolo ya maloba ya Mosakoli 4:9, 10 ete: “Mibale baleki moko na malamu, . . . mpo ete soki bakokwea, moko akotombola moninga na ye”!
Mapamboli ya kosala na ‘nguya ya Yehova’
Ngai ná Allan tozwaki mabaku mingi ya kolendisa bato mosusu básalela Yehova. Na ndakisa, na 1983, tokendaki kotala lisangá moko ya Lifalanse na Anvers; kuna, tofandaki na libota moko oyo eyambaki mpe Benjamin Bandiwila, elenge moko oyo autaki na Zaïre (lelo République Démocratique du Congo). Benjamin ayaki na Belgique mpo na kotánga na iniversite. Alobaki na biso boye: “Nasepelaka mingi na bomoi lokola oyo ya bino, bomipesi mobimba na mosala ya Yehova.” Allan alobaki na ye ete: “Olobi ete osepelaka na bomoi na biso; kasi ozali kolanda mikano ya mokili. Omoni te ete eyokani te na maloba na yo?” Maloba yango etindaki Benjamin atalela lisusu mikano na ye. Na nsima, ntango azongaki na Zaïre, akómaki mobongisi-nzela, mpe lelo oyo azali na Komite ya filiale.
Na 1999, basalaki ngai lipaso na estoma. Banda wana, natikalá kaka na kilo 30! Nazali mpenza ‘mbɛki ya mabelé.’ Atako bongo, nazali na botɔndi epai ya Yehova oyo apesaka ngai “nguya oyo eleki makasi.” Nsima ya lipaso, Yehova apesaki ngai lisusu makasi ya kotambola elongo na Allan na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. (2 Kol. 4:7) Na nsima, na sanza ya Marsi 2004, Allan akufaki na kati ya mpɔngi. Nayokaka mawa mingi, kasi nabɔndisamaka na koyeba ete azali na makanisi ya Yehova.
Lelo oyo, nakómi na mbula 83 mpe nasali mbula koleka 63 na mosala ya ntango nyonso. Nazali naino na makasi ya kosakola, nayekolaka na moto moko mpe mokolo na mokolo nasalelaka libaku nyonso mpo na kolobela mokano kitoko ya Yehova. Na bantango mosusu, namitunaka ete, ‘Bomoi na ngai elingaki kozala ndenge nini soki nakómaki mobongisi-nzela te na 1945?’ Na ntango wana, nakokaki koloba ete nakokoka yango te mpo nazali nzoto makasi te. Kasi, lelo oyo, nazali na esengo na ndenge nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na bolenge mpenza! Bomoi na ngai endimisi ngai ete soki moto atye Yehova na esika ya liboso, Yehova akozala nguya na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku Salut ebimisamaki na 1939. Lelo oyo ebimisamaka lisusu te.
b Lisolo ya bomoi ya Ndeko Coville ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1961 (ebimeli ya Lingelesi).
[Elilingi na lokasa 18]
Ná Astrid Anderson, moninga na ngai na mosala ya misionɛrɛ
[Elilingi na lokasa 18]
Ná mobali na ngai na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, na 1956
[Elilingi na lokasa 20]
Ná Allan na 2000