Babengisi bapaya na mokano moko ya ntina
“BASALAKA nini kuna?” Bato mingi batunaka motuna yango ntango bazali koleka na mituka liboso ya bandako minene ya Batatoli ya Yehova na Mogale City (Krugersdorp), pembeni ya engumba Johannesbourg, na Afrika ya Sudi. Yango wana, Batatoli bazwaki ekateli ya kobengisa bato báya kotala bandako ya filiale na bango na mokolo ya 12 mpe 13 Ɔkɔtɔbɛ 2007. Basalaki yango mpo na bantina mibale: kolongola na mitó ya bato makambo ya lokuta oyo ezalaki kolobama mpe komonisa bango makambo oyo biro ya filiale esalaka mpo na kokokisa mosala oyo Yesu Klisto atindaki.—Matai 28:19, 20.
Bandeko oyo basalaka na biro yango batyaki makomi ya minene na ekɔtelo, oyo ezalaki kotombela bapaya boyei malamu, mpe bakabolaki bapapye mpo na kobengisa bato oyo bazali zingazinga. Babengisaki mpe bato ya mombongo ná mabota na bango. Nini esalemaki? Bato koleka 500 oyo bazali Batatoli te bayaki kotala bandako ya filiale yango.
Bato mingi basepelaki na masini monene (MAN Roland Lithoman) oyo enyataka bazulunalo koleka 90 000 na ngonga moko. Bato bakamwaki ntango bamonaki esika monene oyo babongisaka tɔni koleka 14 ya mikanda mokolo na mokolo mpo na kotinda yango na masangá; bakamwaki mpe na komona ndenge oyo bakangisaka babuku. Na badepartema mingi, Batatoli babongisaki bafɔtɔ mpe biloko mosusu ya kolakisa bato; na ndakisa balakisaki ndenge mosala ya konyata mikanda ekolaki na boumeli ya bambula banda na masini ya kala, oyo babengi Gutenberg, tii na bamasini ya mikolo oyo, oyo babengi litho-offset. Na esika mosusu, balakisaki milende oyo biro ya filiale esalaka mpo na kobatela mai, mopɛpɛ, mpe mabelé. Na ndakisa, ezali na masini moko ebendaka bagaze mpe bansolo ya mabe oyo eutaka na bamasini ya konyata mikanda, mpe batiyo oyo ebendaka biteni mikemike ya papye, oyo ekoki kopalangana na mopɛpɛ.
Zulunalo moko ebimisaki lisolo oyo elobaki ete basali 700 oyo bafandaka na bandako yango bazali “baministre bandimami oyo bamipesi epai ya Yehova.” Elobelaki mpe “bopɛto makasi mpe ndenge makambo nyonso esalemaka na molɔngɔ” na esika banyataka mikanda. Moto moko oyo azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te ayaki mpe kotala bandako yango. Na nsima, akomelaki bango mokanda oyo elobaki boye: “Napesi bino longonya. Ezali na bisika mingi te oyo moto amonaka makambo ezali kosalema malamu mpenza.”
Bapaya balobaki ete basepelaki mingi na vizite yango mpe bakamwaki na komona ete biro yango ezali na mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 151 mpe enyataka mikanda mpo na mikili 18 ya Afrika ya sudi mpe ya ntei. Mikolo nyonso ya mosala, babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba eyambaka bapaya oyo balingi kotala misala oyo esalemaka kuna. Tolendisi yo obongisa ntango mpo okende kotala biro ya filiale ya mboka na bino!
[Elilingi na lokasa 14]
Bapaya oyo bayaki kotala biro ya filiale
[Elilingi na lokasa 14]
Lokasa ya kobengisa bato
[Bililingi na lokasa 15]
Babiro ya filiale ya Afrika ya Sudi na Mogale City, Afrika ya Sudi
[Elilingi na lokasa 15]
Masini ya konyata mikanda MAN Roland Lithoman web-offset
[Elilingi na lokasa 15]
Esika bakangisaka babuku
[Elilingi na lokasa 15]
Esika babongisaka mikanda ya kotinda na masangá