“Masuwa ya Kitimi” ezalaki kolekaleka na mbu
NA NTANGO ya kala, bitumba ndenge na ndenge esalemaki na Mbu ya Mediterane. Tólobela naino etumba moko oyo esalemaki mbula 500 liboso ya Klisto. Masuwa moko monene ezali kotambola mbangu mpenza. Balúki soki 170 oyo bafandi na milɔngɔ misato bazali kobimisa makasi nyonso mpo na kolúka nkai, nzoto na bango ezali kokende liboso mpe kozonga nsima likoló ya bakuse ya mposo ya nyama oyo bafandeli.
Masuwa monene yango ezali kokende epai masuwa ya banguna ezali. Masuwa ya banguna ebandi kokima. Ntango kaka ezali kobaluka, mopanzi na yango etalisi epai masuwa wana ezali kouta. Ebende monene oyo ezali liboso ya masuwa monene yango eyei kotuta masuwa ya banguna. Makɛlɛlɛ ya mabaya oyo ebukani mpe lokito ya mai oyo ezali kokɔta na lidusu oyo esalemi na masuwa ebangisi balúki. Etuluku ya basoda oyo bazali na bibundeli ya makasi balongwe na masuwa ya monene mpe bazali kokɔta na masuwa oyo ebebi. Mwa lisolo oyo emonisi ete bamasuwa mosusu ya ntango ya kala ezalaki makasi mpenza!
Bayekoli ya Biblia bazalaki komituna soki “Kitimi” mpe “masuwa ya Kitimi” oyo masolo mpe bisakweli mosusu ya Biblia elobeli, ezali mpenza nini. (Mituya 24:24; Danyele 11:30; Yisaya 23:1) Kitimi ezalaki wapi? Makambo nini toyebi mpo na bamasuwa ya Kitimi? Mpo na nini osengeli koyeba biyano na mituna yango?
Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki kokoma masolo ya kala, abengaki Kitimi “Chétima,” mpe amonisaki ete ezali nde Esanga Sipele (Chypre). Kition (to Citium), nkombo ya engumba moko oyo ezali na sudi-ɛsti ya Chypre esali lokola ekokana na nkombo Kitimi; yango mpe ezali komonisa ete Kitimi ezali Esanga Chypre. Lokola Chypre ezalaki na nzela oyo bamasuwa ya mombongo ezalaki koleka, esanga yango ezalaki na esika oyo ebongi mpenza mpo esala boyokani na bingumba mingi oyo ezalaki na mabongo na ɛsti ya Mbu ya Mediterane. Mpo na yango, Sipele ekómaki mboka ya ntina mingi oyo, ekólo nyonso oyo ezali na bitumba ezalaki koluka kosala boyokani na yango mpo elonga; mboka yango ezalaki mokakatano mpo na ekólo oyo ezali na yango na boyokani te.
Bato ya Sipele mpe Mbu ya Mediterane
Biloko oyo bato ya arkeoloji bamonaki na nse ya mbu mpe na malita, ata mpe makomi ya kala mpe mayemi na bambɛki ya kala ezali komonisa biso ndenge oyo bamasuwa ya Sipele ezalaki. Bato ya Sipele bayebaki mpenza kosala bamasuwa. Sipele ezalaki na bazamba ya banzete minene, mpe bisika oyo mai ekɔtá na mokili ekómaki bisika oyo bamasuwa ekokaki kosɛma. Bazalaki kokata banzete, kaka mpo na kosala bamasuwa te, kasi mpe mpo na konyangwisa kwivre, eloko oyo esalaki ete Sipele eyebana mingi na ntango ya kala.
Mombongo oyo Sipele ezalaki kosala ná bamboka mosusu ebendaki likebi ya Bafenisi oyo bafandaki na bamboka ndenge na ndenge oyo ezalaki na banzela epai bamasuwa na bango ezalaki kotambola mpo na kosala mombongo. Moko na bamboka yango ezalaki Kition, na Esanga Sipele.—Yisaya 23:10-12.
Emonani ete ntango Tulo ekweaki, bato na yango mosusu bakendaki kofanda na Kitimi. Ekoki kozala ete Bafenisi oyo bafandaki na esanga yango, lokola bamesanaki kosala mibembo na mai, basalisaki mingi mpo bato ya Sipele bákolisa mayele ya kosala masuwa. Lisusu, engumba Kition ezalaki na esika ya malamu mpenza mpo Bafenisi bábombaka bamasuwa na bango.
Mombongo na bikólo mosusu
Na ntango wana, mombongo ya biloko ndenge na ndenge ezalaki kosalema kati na bikólo oyo ezalaki na ɛsti ya Mbu ya Mediterane. Bamasuwa ezalaki kolongwa na biloko ya motuya na Sipele mpo na kokende na yango na Krɛti, na Sardaigne, na Sisili mpe na bisanga ya Mbu ya Égée. Bilokó mpe bambɛki ya Sipele emonanaki na bisika yango, mpe ebele ya bambɛki kitoko ya Mycènes (Grèce) emonanaki na Sipele. Nsima ya kotalela malamumalamu kwivre oyo bamonaki na Sardaigne, bato mosusu ya mayele balobi ete eutaki na Sipele.
Na 1982, na sudi ya bokula ya Turquie, bamonaki masuwa moko oyo ezindá na mai na siɛklɛ ya 14 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bato ya arkeoloji bamonaki biloko ndenge na ndenge na nse ya mai—kwivre oyo bakanisaka ete eutaki na Sipele, mpaka, bambɛki ya Kanana, mabaya ya moindo, mpɛmbɛ ya nzoku, ebele ya babiju ya wolo mpe ya palata ya Kanana, mpe biloko mosusu ya Ezipito. Ntango batalelaki malamu mabelé oyo basalelaki bambɛki oyo bamonaki na masuwa yango, bato mosusu ya mayele balobaki ete masuwa yango ezalaki ya Sipele.
Likambo oyo ezali kobenda likebi na biso ezali ete eleko oyo masuwa yango ezindaki ezali mpe eleko oyo Balama atángaki bamasuwa ya Kitimi na ‘liloba na ye.’ (Mituya 24:15, 24) Emonani ete bamasuwa ya Sipele eyebanaki mingi na Moyen-Orient. Bamasuwa yango ezalaki ndenge nini?
Bamasuwa ya mombongo
Na malita ya engumba ya kala ya Amathus, na Sipele, bamonaki mwa bamasuwa mikemike ya mabelé. Mwa bamasuwa yango emonisaka ndenge oyo bamasuwa ya Sipele ezalaki mpe lelo oyo, bamasuwa yango mosusu ezali na bandako oyo babombaka biloko ya kala.
Bamasuwa mikemike ya mabelé ezali komonisa ete bamasuwa ya kala ya Sipele ezalaki bamasuwa ya mombongo. Bamasuwa oyo eleki mike ezalaki kotambwisama na balúki 20. Bamasuwa yango ezalaki monene mpe ekɔtá na kati mpo na komema biloko mpe bato oyo bazalaki kosala mibembo na bamboka ndenge na ndenge ya bokula ya Sipele. Pline l’Ancien akomaki ete bato ya Sipele basalaki masuwa moko moke mpe pɛpɛlɛ oyo bazalaki kotambwisa na nkai mpe ekokaki komema tɔni 90 ya biloko.
Na nsima, bakómaki kosala bamasuwa minene ya mombongo lokola oyo ezindaki na bokula ya Turquie. Bamasuwa yango mosusu ekokaki komema tɔni 450 ya biloko na kati ya mbu. Bamasuwa ya minene ezalaki kotambwisama na balúki soki 50, bato 25 na ngámbo mokomoko, mpe ezalaki na molai ya mɛtrɛ 30 mpe likonzí ya kokangisa bilamba ya mopɛpɛ ezalaki na mɛtrɛ koleka 10.
Bamasuwa ya bitumba ya “Kitimi” na esakweli moko ya Biblia
Maloba oyo esakolamaki na lisalisi ya elimo ya Yehova: “Masuwa makouta na Kitimi mpe makozokisa Asulia.” (Mituya 24:2, 24) Maloba yango ekokisamaki? Ndenge nini bamasuwa oyo eutaki na Kitimi ekokisaki esakweli yango? “Masuwa makouta na Kitimi” oyo esakweli elobeli ezalaki te bamasuwa ya mombongo oyo ezalaki kolekaleka na Mbu ya Mediterane. Ezalaki bamasuwa ya bitumba oyo esengelaki kobebisa.
Lokola bato bakómaki kobunda tii na mai, bakómaki kosala bamasuwa oyo ezalaki mbangu mpe makasi koleka. Ekoki mpenza kozala ete bamasuwa ya liboso ya bitumba ya Sipele ezalaki lokola oyo emonisami na liyemi moko oyo bamonaki na engumba Amathus. Masuwa yango ezali moke mpe molai, nsuka na yango etombwaná likoló mpe ekɔtá, lokola kaka masuwa ya bitumba ya Bafenisi. Masuwa yango ezalaki na ebende moko ya nsɔngɛ na liboso na yango mpe na mopanzi mokomoko, ezalaki na banguba ezolonganá, elandani banda na nsima tii na liboso.
Na siɛklɛ ya 8 L.T.B., Bagrɛki basalaki bamasuwa ya liboso oyo ezalaki na milɔngɔ mibale ya balúki. Bamasuwa yango ezalaki na molai ya mɛtrɛ 24 mpe monene ya mɛtrɛ 3. Na ebandeli, bamasuwa yango ezalaki kaka komema basoda, mpamba te bitumba ezalaki kosalema na mokili. Na nsima, babakisaki molɔngɔ ya misato ya balúki mpe, na motó ya masuwa yango, batyaki ebende. Ezali lolenge ya masuwa yango nde tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Masuwa yango esalelamaki mingi na etumba ya Salamine (480 L.T.B.), ntango Bagrɛki balongaki basoda ya Perse oyo bazalaki kobunda na mai.
Na nsima, mpo na kokokisa mokano na ye ya koyangela mokili, Alesandala Monene atindaki ebele ya bamasuwa ya lolenge yango na ɛsti. Bamasuwa yango ezalaki mpo na bitumba, kasi te mpo na mibembo milai na kati ya mbu, mpamba te bisika na yango ya kobomba biloko ezalaki minene te. Yango wana bazalaki kotɛlɛma na bisanga ya Mbu ya Égée mpo na kobongisa bamasuwa yango mpe kozwa biloko mosusu. Alesandala azalaki na mokano ya kobebisa bamasuwa ya Baperse. Nzokande, mpo na kokokisa mokano yango, asengelaki naino kozwa esanga ya Tulo. Na mobembo yango, atɛlɛmaki na Sipele.
Bato ya Sipele batindaki bamasuwa 120 mpo na kopesa Alesandala Monene mabɔkɔ ntango basoda na ye bazingaki Tulo (332 L.T.B.). Bakonzi misato ya Sipele batambwisaki ebele ya masuwa mpo na kopesa Alesandala mabɔkɔ. Bango mpe bazalaki ntango basoda ya Alesandala bazingaki Tulo na boumeli ya sanza nsambo. Nsukansuka, Tulo ekweaki mpe yango ekokisaki esakweli ya Biblia. (Ezekiele 26:3, 4; Zekalia 9:3, 4) Alesandala abakiselaki bakonzi ya Sipele bokonzi mpo na kopesa bango matɔndi na ndenge basungaki ye.
Esakweli moko ekokisami na ndenge ya kokamwa
Strabon, mokomi ya makambo ya kala na siɛklɛ ya liboso, akomaki ete Alesandala asɛngaki bamasuwa na Sipele mpe Fenisia mpo na bitumba oyo asengelaki kobunda na Alabia. Bamasuwa yango ezalaki pɛpɛlɛ mpe ezalaki mpasi te mpo na kopanza yango; yango wana ekómaki na engumba Thapsacus (Tifisa), na nɔrdi ya Sulia, nsima ya mikolo nsambo mpamba. (1 Mikonzi 4:24) Ntango bamasuwa yango elongwaki na engumba wana, ekitaki tii na Babilone.
Na ndenge yango, esakweli moko ya Biblia oyo ezalaki polele te ekokisamaki na ndenge ya kokamwa nsima ya mbula soki 1 000! Ndenge Mituya 24:24 esakolaki, bamasuwa ya Alesandala Monene eutaki na Masedonia mpe ekendaki na ngámbo ya ɛsti mpe elongaki mokili ya Asulia; nsukansuka ekweisaki ekólo makasi ya Bamede ná Baperse.
Tomoni ete mwa makambo oyo toyekoli mpo na “masuwa ya Kitimi” esalisi biso tómona ndenge oyo esakweli moko ya Biblia ekokisamaki. Likambo yango elendisi kondima na biso ete bisakweli ya Biblia ezangaka kokokisama te. Bisakweli mingi ya Biblia etaleli mikolo ekoya; yango wana, tosengeli kotyela yango mpenza likebi.
[Karte na lokasa 16, 17]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ITALI
Sardaigne
Sisili
Mbu ya Égée
GRƐSI
Krɛti
LIBIA
TURQUIE
SIPELE
Kition
Tulo
EZIPITO
[Elilingi na lokasa 16]
Masuwa ya bitumba ya Bagrɛki
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 17]
Masuwa ya bitumba ya Fenisia
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 17]
Mbɛki ná liyemi ya masuwa ya Sipele
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ebimisami na ndingisa ya mokambi ya Antiquities and the Cyprus Museum
[Elilingi na lokasa 18]
Masuwa oyo ezalaki komema biloko, lokola oyo elobelami na Yisaya 60:9