Likambo na likambo ezali na ntango na yango
Biblia elobi ete: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe saa mpo na likambo na likambo na nse ya moi.” Mokonzi Salomo, oyo akomaki maloba yango, abakisaki ete ezali na ntango ya kobotama mpe ya kokufa, ya kotonga mpe ya kobuka, ya kolinga mpe ya koyina. Na nsuka, alobaki ete: “Litomba nini ekozwaka mosali na kati na yango ekosalaka ye?”—Mosakoli 3:1-9.
NSIMA ya kotánga maloba yango, bato mosusu balobaka ete Biblia eteyaka ete makambo nyonso etángamá. Ezali mpenza bongo? Biblia eteyaka mpenza ete makambo nyonso ya bomoi etángamá? Lokola “Makomami nyonso epemami na Nzambe,” yango emonisi ete likambo oyo totángi na eteni moko ya Biblia esengeli koyokana na makambo oyo ezali na biteni mosusu ya Biblia. Na yango, tótala oyo mikanda mosusu ya Liloba ya Nzambe, Biblia, elobi na likambo yango.—2 Timote 3:16.
Ntango mpe likambo ekanami te
Na mokanda ya Mosakoli, Salomo akomaki lisusu ete: “Natalaki na nse ya moi mpe namonaki ete momekano ezali ya bato ya mbangu te, etumba ezali kaka ya bato ya makasi te, mpe bilei na bato ya bwanya te, ata mpe bozwi na bato ya mayele, ata mpe lokumu na bato bayebi makambo mingi.” Mpo na nini? Alobaki ete: “Mpamba te ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.”—Mosakoli 9:11, NW.
Salomo alobaki te ete makambo nyonso ekanamá; alobaki nde ete bato bakoki te koyeba na bosikisiki nsuka ya makambo nyonso oyo bazali kosala “mpamba te ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” Mbala mingi, likambo moko, ya malamu to ya mabe, ekómelaka moto mpo azalaki na esika mpe ntango oyo likambo yango esalemaki.
Tózwa ndakisa ya maloba oyo: “Momekano ezali ya bato ya mbangu te.” Ntango mosusu okoki komikundola to osilá kotánga lisolo moko oyo ekendá nsango, oyo elobeli momekano moko ya mbangu ya mɛtrɛ 3 000 oyo basi basalaki na masano ya olympique oyo ebongisamaki na 1984 na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie, na États-Unis. Basi mibale, moko ya Angleterre mpe mosusu ya États-Unis, bazalaki na elikya ete bakozwa mbano ya monene. Nzokande, na katikati ya momekano yango, batutanaki. Moko akweaki mpe akatanaki na nzela, oyo mosusu alɛmbaki nzoto mpe abimaki moto ya nsambo.
Etángamaki ete ekosalema bongo? Bato mosusu bakoki koloba bongo. Kasi, emonani polele ete kotutana—likama oyo moto ata moko te akokaki komona liboso—nde esalaki ete basi wana mibale bázwa mbano te. Tokoki nde koloba ete etángamaki ete bakotutana? Awa mpe, bato mosusu bakoki koloba bongo. Nzokande, bapanzi-nsango balobaki ete likama wana esalemaki mpo basi yango bazalaki kowelana makasi mpe mokomoko na bango azalaki koluka kaka aleka moninga mpe alonga. Ndenge Biblia elobi yango, “ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” Ata soki moto amibongisi malamu ndenge nini, makambo oyo akanaki te ekoki kokómela ye mpe yango ekoki kosala ete likambo oyo azali kosala esuka malamu te, mpe tokoki koloba te ete etángamaki bongo.
Na yango, Biblia elingaki koloba nini ntango elobi ete: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko”? Ezali nde na likambo oyo tokoki kosala mpo na kokima makambo oyo ekoki kokómela biso lobi?
Likambo nyonso ezali na ntango oyo ebongi na yango
Mokonzi Salomo alobelaki te makambo oyo ekokómela moto mokomoko to ndenge bomoi na ye ekosuka; kasi alobelaki nde mokano ya Nzambe mpe ndenge oyo mokano yango etaleli bato. Ndenge nini toyebi yango? Ezali yango nde bavɛrsɛ oyo elandi emonisi. Nsima ya kolobela makambo mingi oyo emonanaka ete ezali “na ntango” na yango, Salomo akomaki ete: “Namoni mosala oyo Nzambe apesi epai na bana ya bato ete básala yango. Asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango.”—Mosakoli 3:10, 11.
Nzambe apesá bato makambo mingi ya kosala—Salomo atángaki mwa ndambo ya makambo yango. Nzambe apesá biso mpe bonsomi ya kopona oyo tolingi kosala. Nzokande, likambo nyonso ezali na ntango oyo ebongi kosala yango mpo ebimisa mbuma ya malamu. Na ndakisa, Salomo alobaki na Mosakoli 3:2 ete ezali na ‘ntango ya kolona mpe ntango ya kobuka oyo elonamaki.’ Basali-bilanga bayebi ete ezali na ntango oyo ebongi mpo na kolona molona boye to boye. Nini ekosalema soki mosali-bilanga aloni molona moko boye na ntango to eleko na yango te? Asengeli nde koloba ete etángamaki ete milona na ye ekobota malamu te, atako asalaki mosala makasi? Te! Milona na ye ebotaki malamu te mpo alonaki yango na ntango oyo ebongi na yango te. Milona ya mosali-bilanga yango elingaki kobota malamu soki alandaki bileko ndenge Mozalisi abongisá yango.
Na yango, Nzambe abongisá te ndenge bomoi ya moto mokomoko to ndenge makambo nyonso ekosuka, kasi atyá nde mibeko oyo ezali kotambwisa misala ya bato na boyokani ya mokano na ye. Mpo bato bázwa mpenza matomba na misala na bango, basengeli kososola mpe kosala na boyokani na mokano ya Nzambe mpe kolanda ntango oyo atyá. Bato bakoki kobongola makambo ya bomoi na bango, kasi bakoki te kobongola mokano ya Nzambe. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki ete: “Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai, [ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:11.
“Liloba” ya Nzambe to mokano na ye mpo na mabelé mpe avenire ya bato oyo “ekolonga” ezali nini?
Tóyeba ntango oyo Nzambe atyá
Mpo na kosalisa biso, Salomo alobaki ete “[Nzambe] asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango,” na nsima abakisaki ete, “Atye mpe lobiko kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.” Biblia mosusu (The NIV Study Bible) ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Atyaki mpe likanisi ya seko na mitema ya bato; atako bongo bakoki koyeba te nyonso oyo Nzambe asalá banda na ebandeli tii na nsuka.”—Mosakoli 3:11.
Bato bakomá makambo ndenge na ndenge na ntina na vɛrsɛ yango. Kasi, likambo ya solo ezali ete na kati ya motema, ekómelaka biso nyonso tómituna soki bomoi na biso ezali na ntina nini mpe ndenge nini ekosuka. Banda kala, ezalaka mpasi bato bándima ete bomoi esuki kaka na kosala mosala makasi mpe nsukansuka kokufa. Biso bato tokeseni na bikelamu mosusu nyonso mpo tomitunaka mpo na bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ezali koya. Tozalaka kutu na mposa ya kozala na bomoi libela na libela. Mpo na nini? Ndenge Biblia elobi yango, Nzambe “atyaki mpe likanisi ya seko na mitema ya bato.”
Mpo na kokokisa mposa yango, bato bamitunaka soki bomoi ezalaka nsima ya liwa. Bato mosusu balobaka ete ezali na eloko moko oyo ekobaka kozala na bomoi soki tokufi. Basusu balobaka ete soki tokufi tobotamaka mbala na mbala. Nzokande, bamosusu bakanisaka ete Nzambe abongisá ndenge makambo nyonso ya bomoi ekosuka mpe biso tokoki kobongola yango te. Likambo ya mawa, ndimbola ata moko te oyo bato bapesi ezali ya solo. Ezali bongo mpo Biblia elobi ete na milende na bango moko, ‘bato bakoyeba te kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.’
Mposa makasi ya koyeba avenire mpe kozanga kozwa biyano etungisaka bato ya filozofi banda kala. Nzokande, lokola Nzambe nde atyá mposa wana na mitema na biso, omoni te ete ebongi tótalela ye mpo tózwa biyano oyo ebongi? Biblia elobi mpo na Yehova ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.” (Nzembo 145:16) Soki toyekoli Liloba ya Nzambe Biblia, tokoki kozwa bandimbola ya solosolo na ntina na bomoi, liwa mpe na ntina na mokano ya seko ya Nzambe mpo na mabelé mpe bato.—Baefese 3:11.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Momekano ezali ya bato ya mbangu te.”—Mosakoli 9:11, NW
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Soki mosali-bilanga aloni milona na ntango oyo ebongi te, asengeli nde koloba ete etángamaki ete milona na ye ekobota malamu te?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Tomitunaka na ntina na bomoi mpe liwa mpo Nzambe ‘atyá likanisi ya seko na mitema ya bato’