Biblia eteyaka endimeli oyo ete makambo ya bomoi ya moto na moto masilá kokanama?
LOKUTA! MATƆ́NGI! Soki mosangani moko oyo bapesaka limemya kati na ebongiseli moko ayoki ete nkombo na ye to lokumu na ye ebebisami na likambo moko ya lokuta, apusamaka ete asembola likambo yango. Akoki kútu kofunda na Letá baoyo babandisaki matɔ́ngi yango.
Likambo oyo libéngami makila mabe ezali mpenza matɔ́ngi oyo masalemi mpo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Liteya ya makila mabe lilobaka ete Nzambe azali mpenza mobandisi ya makámá mpe ya makambo mabe oyo mazali kokómela bato. Soki ondimaka likanisi oyo ete makambo ya bomoi na moto na moto masilá kokanama, okoki kokanisa ete Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asilá kosala manáka motindo oyo: ‘Lelo, Jean akozoka na likámá ya motuka, Fatou akobɛla malaria, ndako ya Mamadou ekobukana na mopɛpɛ makasi’! Okoki mpenza kopusama na kosalela Nzambe motindo wana?
Baoyo bandimelaka makambo masilá kokanama bakoki kotuna ete: ‘Kasi soki Nzambe azali te mobimisi ya makambo mabe oyo mazali kokómela biso, bongo nani azali mobimisi na yango?’ Ousmane, elenge mobali oyo tolobelaki na lisoló oyo lileki, amitungisaki mpo na yango. Kasi asengelaki te kokanisa to komeka koyeba bosolo ya likambo. Ayekolaki ete Nzambe ye moko asilá komipɛtola na matɔ́ngi wana na nzela ya mateya mazwami na Liloba na Ye lipemami, Biblia. (2 Timoté 3:16) Na bongo, tiká tótalela oyo Biblia ezali koloba na ntina na likambo yango.
Nani asengeli kopamelama?
Mpela, mipɛpɛ makasi, koningana ya mabelé—makámá motindo wana mbala mingi mabéngamaka ete misala ya Nzambe. Nzokande Biblia emonisi te ete Nzambe nde azali mobimisi ya makámá motindo wana. Tótalela likámá oyo libimaki esili koleka bikeke mingi na Moyen-Orient. Biblia ezali koyebisa biso ete moto bobele moko oyo abikaki na likámá wana apesaki nsango ete: “Mɔ́tɔ na Nzambe [liloba yango ya Liebele mingimingi elimbolaka nkake] ebimi na lola mpe ezikisi bampate mpe baombo mpe ebebisi bango nyɛ.”—Yobo 1:16.
Atako moto oyo azalaki na bobangi akokaki kokanisa ete Nzambe nde azalaki motindi na mɔ́tɔ wana, Biblia emonisi ete Nzambe asengelaki kopamelama te. Yo moko tángá Yobo 1:7-12, mpe okomona ete nkake wana eutaki na Nzambe te, kasi na monguna na ye—Satana Zábolo! Elingi koloba te ete makambo nyonso mabe eutaka na Satana. Kasi emonani polele ete, ntina ezali te ya kolakela Nzambe mabe mpo na yango.
Na bosembo mpenza, mbala mingi bato bapamelaka basusu soki makambo matamboli malamu te. Kozanga kolónga na kelasi, na mosala to kati na boyokani elongo na bato ekoki kouta na kozanga milende mpe kozanga kobongisama malamu to mbala mosusu kozanga limemya epai na basusu. Bobele bongo, bokɔnɔ, makámá mpe liwa ekoki kouta na kozanga bokɛngi. Nzokande, bobele kokanga nkamba wana ozali kotambwisa motuka ekoki kosala ete opɛngola liwa soki motuka esali likámá. Nkamba ya motuka ekoki kosala eloko moko te soki likanisi ya “makila mabe” ezalaki kotambwisa makambo. Lisalisi malamu ya monganga mpe bopɛto ekoki kosala ete motángo ya bato oyo bakokaki kokufa ekita. Kútu makámá mosusu oyo malobamaka ete ezali “misala ya Nzambe”, ezali nde misala ya bato—libula mabe ya kozanga kobatela mabelé.—Kokanisá na Emoniseli 11:18.
“Ntango mpe makambo makanami te”
Ya solo, ezali na makambo mingi ya mpasi oyo masalemaka kasi ntina na yango eyebanaka mpenza polele te. Nzokande, tóyeba oyo Biblia ezali koloba na Mosakoli 9:11: “Nabutwi mpe namoni ete na nsé na moi elónga kati na komekama ezali mpo na bato na mbango te, to etumba epai na bato makasi te, to kwanga epai na bato na mayele te, to mosolo epai na bato na boyebi te, to ngolu epai na bato bamesani na mosala te; nde ntango mpe [“makambo makanami te, ekokwelaka,” NW] bango nyonso.” Na bongo, ntina ezali te ya kokanisa ete Mozalisi azali mobimisi ya makámá to ete bato oyo bazali kokufa na makámá bazali na lolenge moko to mosusu kopesamela etumbu.
Yesu Klisto ye moko akebisaki bato na ntina na makanisi ya makila mabe. Kolobeláká likámá oyo liyebanaki malamu epai na bayoki na ye, Yesu atunaki ete: “Lisusu mpo na bango zomi na mwambe baoyo ndako molai na Siloama [“ekwelaki bango,” NW] mpe ebomaki bango, bokanisi ete bango balekaki bato nyonso bafandi na Yelusaleme na mabe? Nalobi na bino ete te.” (Luka 13:4, 5) Yesu amonisaki mpenza ete likámá wana liutaki na Nzambe te, kasi ezalaki bobele “ntango mpe makambo makanami te.”
Matomba mabe ya kozanga kokoka
Kasi, ezali boni mpo na ntina oyo ekoki kolimbolama te ya liwa mpe ya maladi? Biblia ezali kopesa ndimbola oyo ya sikisiki etali ezalela ya bato: “Zambi lokola na Adama, nyonso bakokufaka.” (1 Bakolinti 15:22) Liwa lizali konyokola bato uta nkɔ́kɔ na biso Adama atyaki litambe na nzela ya kozanga botosi. Bobele ndenge Nzambe akebisaki ye, Adama apesaki libula ya liwa epai na bakitani na ye. (Genese 2:17; Baloma 5:12) Na yango, nsukansuka, maladi nyonso ekoki kotyama na motó ya nkɔ́kɔ na biso Adama. Bolɛmbu na biso oyo tosilá kosangola ezali mpe na bopusi mingi likoló na mawa mpe kozanga kolónga oyo ezali kokómela biso kati na bomoi.—Nzembo 51:5.
Tótalela likambo litali bobóla. Kondima likanisi ya makila mabe mbala mingi esili kolendisa bato oyo bazali komona mpasi ete bándima bobele mokakatano na bango. Balobaka ete ‘yango ekanamá sé bongo mpo na biso.’ Nzokande, Biblia ezali komonisa ete kozanga kokoka ya bato, esengeli nde kopamelama, kasi makila mabe te. Basusu bakómaka babóla ntango ‘babukaka oyo bango balónaki’ na nzela ya ezaleli ya gɔigɔi to kosalela bozwi na bango na lolenge mabe. (Bagalatia 6:7; Masese 6:10, 11) Bamilió mingi ya bato bazali kati na bobóla mpo ete banyokolami na bato ya lokoso oyo bazali koyangela bango. (Kokanisá na Yakobo 2:6.) Biblia elobi ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Endimiseli moko ezali te mpo na koloba ete bobóla eutaka na Nzambe to na makila mabe.
Kondima kati na makambo makanamá—Matomba mabe na yango
Nzokande, likanisi mosusu oyo ekoki kokweisa kondima kati na makambo makanamá ezali bopusi oyo endimeli ya makila mabe ekoki kozala na yango likoló na bandimi na yango. Yesu Klisto alobaki ete: “Nzeté malamu na nzeté malamu ekobota mbuma malamu nde nzeté mabe na nzeté mabe ekobota mbuma mabe.” (Matai 7:17) Tiká tótalela “mbuma” moko oyo endimeli ya makila mabe ebimisi—lolenge yango ezali kopusa lisosoli ya bato na oyo etali koyeba ntina ya kokokisa malamu mikumba na bango.
Liyoki ya malamu oyo moto azali na yango ya koyeba ntina ya kokokisa mikumba na ye malamu ezali na ntina mingi. Ezali moko na makambo oyo mazali kopusa baboti ete bákokisa bamposa ya mabota na bango, basáli ete bákokisa misala na bango na lisosoli malamu mpenza, basáli-biloko ete bábimisa biloko ya kitoko. Kozala na kondima kati na makambo makanamá ekoki kopesa bopɔtu na liyoki wana. Na ndakisa, kanisá ete motuka ya moto moko ezwi kwɔkɔsɔ. Soki ayebi ntina ya kokokisa malamu mokumba na ye, akobongisa yango na komibanzabanzáká mpo na bomoi na ye mpe ya basáli-mobembo na ye. Lisusu, moto oyo andimaka likanisi ya makila mabe, akoki kotalela likámá te, kokanisáká ete kwɔkɔsɔ ekoki kobima bobele soki ezali ‘mokano ya Nzambe’!
Ɛɛ, kondima likanisi ya makila mabe ekoki kobimisa ezaleli ya bopɔtu, ya gɔigɔi, ya koboya kondima ngambo oyo etamboli na ye ya mabe ebimisi, mpe makambo mosusu mingi ya mabe.
Epekiseli liboso na boyokani na biso na Nzambe?
Likambo lileki mabe ezali oyo ete, kondimela likanisi ya makila mabe ekoki kolongola liyoki ya moto ya koyeba ntina ya kokokisa malamu mokumba na ye, to lisɛngami, oyo azali na yango epai na Nzambe. (Mosakoli 12:13) Mokomi na Nzembo alendisi bato nyonso ete “meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu.” (Nzembo 34:8) Nzambe atyaka masɛngami mpo na baoyo balingi kosepela na boboto na ye.—Nzembo 15:1-5.
Moko ya masɛngami yango ezali bongo kobongola motema. (Misala 3:19; 17:30) Kobongola motema esɛngaka kondima mabunga na biso mpe kosala mbongwana oyo esengeli. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso banso tosilá kosala mabunga mingi oyo mpo na yango tosengeli kobongola motema. Kasi soki moto moko akanisaka ete azali na makila mabe, ezali mpasi mpo na ye ete amona ntina ya kobongola motema to ya kondima ngambo oyo mabunga na ye ebimisi.
Mokomi na Nzembo alobaki boye mpo na Nzambe: “Boboto na yo ezali koleka bomoi.” (Nzembo 63:3) Nzokande, likanisi ya makila mabe esili kondimisa bamilió ya bato ete Nzambe nde azali mobimisi ya minyoko na bango. Ya solo, yango esili kopesa bato mingi nkanda mpo na ye, kokangáká ekuke ya kozala na boyokani malamu elongo na Mozalisi. Mpamba te, ndenge nini okoki kozala na bolingo epai na moto oyo otalelaka lokola mobimisi ya mikakatano mpe komekama na yo nyonso? Na yango, likanisi ya makila mabe etye epekiseli kati na Nzambe mpe moto.
Basikolami na likanisi oyo ete makambo ya bomoi ya moto na moto masilá kokanama
Elenge Ousmane, oyo tolobelaki na ebandeli, liboso azalaki moombo ya likanisi ya makambo makanamá. Nzokande, ntango Batatoli ya Yehova basungaki ye ete atalela lolenge na ye ya kokanisa na lisalisi ya Biblia, Ousmane apusamaki na kobwaka kondima na ye kati na makambo masilá kokanama. Matomba oyo mamonanaki ezalaki liyoki mozindo ya kobondisama mpe likanisi ya sika mpe ya malamu likoló na bomoi. Likambo lileki ntina, ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe na “mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.”—Exode 34:6.
Ousmane ayaki mpe koyeba ete Nzambe, atako asalaka manáka te ya makambo nyonso ya bomoi na biso, kasi azali na mokano mpo na mikolo mizali koya.a Na 2 Petelo 3:13 tozali kotánga boye: “Nde tozali kotalela likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” Batatoli ya Yehova basili kosalisa bamilió ya bato na kolóna elikya ya kozala na bomoi ya seko lokola eteni moko ya “nsé na sika” oyo elakami. Bakosepela mpe kosunga yo.
Wana ozali kokóla kati na boyebi ya sikisiki ya Biblia, okososola malamumalamu ete bomoi na yo na mikolo mizali koya etaleli te makambo makanamá oyo oyebi ata yango te. Maloba ya Mose epai na Bayisalaele ya kala mabongi mpenza: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye.” (Deteronome 30:19, 20) Ɛɛ, okoki kosala liponi mpo na bomoi na yo ya mikolo mizali koya. Yango ezali na mabɔkɔ ya makambo masilá kokanama te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makanisi mosusu likoló na boyebi ya Nzambe ya makambo makosalema, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1984, lokasa 3 kino 7, (ebimeli ya Lifalansé).
[Bililingi na lokasa 6, 7]
Makámá oyo ezalaki ‘misala ya Nzambe’ te
[Eutelo ya bafɔtɔs]
fɔtɔ́: U.S. Coast Guard
O.M.S.
FƆTƆ́ UN 186208 /M. Grafman