Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/8 nk. 3-4
  • Otambwisami na endimeli oyo ete bomoi esila kotangama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otambwisami na endimeli oyo ete bomoi esila kotangama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Biblia eteyaka endimeli oyo ete makambo ya bomoi ya moto na moto masilá kokanama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Osengeli kondima ete bomoi na yo esila kotangama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Makama esilá kotángama to mpe makambo makanelami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bomoi na biso na mikolo mizali koya esilá kokomama liboso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/8 nk. 3-4

Otambwisami na endimeli oyo ete bomoi esila kotangama?

NA 1988, na sanza ya Septembre, likama ekweaki na Bangladesh. Kati na esanga monene ya Gange mpe Brahmapoutre, nivo ya mai ekómaki kino na 9 métres. Eteni monene ya mboka ezindaki na mai. Bato mingi bakufaki kati na mai mpe bato 37 milió bazangaki esika ya kolala Nzela ebebaki na molai ya bakilometele koleka 60 000.

Lokola mbala mingi Bangladesh ezindaka kati na mai na motindo yango, zulunalo moko epesaki yango nkombo oyo ete “esanga esila kotangama”. Nkombo yango emonisi likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete ezali ntina ya makama minene: esila kobongisama bongo to esila kobengama

Atako bato mosusu bakanisaka te ete bomoi esila kotangama, kasi makanisi ya endimeli yango ezali koyokama mingi kati na mokili mobimba. Mpo na nini bato mingi bazali kondima ete bomoi esila kotangama? Endimeli yango ezali mpenza nini?

Mokumba ya lingomba

Likanisi oyo ete nyonso esila kotongama bongo, ebongolami na Lifalansé na liloba “fatalité” oyo euti na latin fatum, elimboli “oyo esila kolobama.”a Bandimi na likanisi yango bakanisaka ete makambo manso masila kobongisama liboso mpenza mpe bato bakoki kobongola yango ata soko moke te. Mangomba mingi basili kopalanganisa likanisi yango mpe yango ezali na bopusi likoló na makanisi na bandimi ebele. Soko totali mangomba misato oyo eleki minene kati na mokili, tokomona ete likanisi oyo ete esila kotangama bongo ezali na bandenge mingi ekeseni kati na yango bobele lokola bokeseni ezali kati na ba temples ya hindous; ba mosquées ya ba musulmans mpe bandako—nzambe ya boklisto ya lokuta.

Na ndakisa, ba musulmans, baoyo bazali pene na 900 milió kati na mokili, bakanisaka ete likambo oyo ekomeli moto (babengi yango Kismet) ezali engebene mokano ya Nzambe’.b Buku ya ba musulmans babengi Coran elobi ete: “Mpasi moko te ekokoma na mabelé soko ekomami na Mokanda te, liboso ete Biso tosala yango.” “Moto moko te .  . . akoki kokufa soko Allah apesi nzela te. Esili kokomama bongo!” sourate 57:22; 3:145.

Karma, mobeko oyo elobi ete likambo nyonso ezali na ntina lolenge mosusu ya fatalité (likanisi oyo ete esila kotangama)—, ezali na bopusi likoló na bomoi na ba hindous pene na milio 700 kati na mokili. Engebene mobeko yango, makambo mazali kosalema lelo na bomoi ya hindou ezali kosalema engebene bomoi oyo azalaki na yango liboso ya kobotama lisusu. Na ntina yango, tala oyo tozali kotanga kati na Garuda Purana mokanda moko ya kala ya ba hindou: “Misala oyo tosalaki na bomoi oyo tozalaki na yango liboso ete mbotama lisusu ekozala na bopusi mpo na nzoto oyo tokozala na yango na bomoi oyo ekolanda, mpe lolenge ya maladi, ya nzoto to ya makanisi oyo esengeli kozwa biso . . . Makambo oyo makoyelaka moto esila kobongisama bongo.”

Tokoloba boni mpo na basangani 1 700 milio ya boklisto na lokuta? Solo mpenza, mingi kati na bango bandimi ete basili kokitanya Nzambe na esika ya likanisi oyo ete nyonso esila kotangama mpe likanisi oyo ete nyonso esila kobongisama (prédestination) na esika ya likanisi oyo ete nyonso esila kotangama (fatalisme). Nzokande, mokanda Encyclopédie de la religion et de l’éthique elobi likambo oyo ete: “Tokoki koloba te ete lingomba ya boklisto . . . epusami te na likanisi oyo ete “nyonso esila kotangama”. Mangomba mosusu ezali ntango nyonso kondima likanisi ya Martin Luther, mabongoli ya makambo na lingomba na ekeke ya 16, ye oyo alobaki ete moto azali “na bonsomi mingi te. Azali bongo lokola nzete, lokola libanga, lokola eboka ya zelo to eboke ya mungwa”.

Mbese (Pile ou face), mpe kotala bilembo na myoto (astrologie)

Atako makanisi oyo makasi ekomi sikawa ya kala mpo na bopusi makasi na boklisto ya lokuta, lokola elobaki moto moko ya teoloji, kasi basangani na yango mingi bazali kino sikawa kondima “lolenge na yango oyo endimami na lingomba”. Lolenge na likanisi yango ekoki mbala mosusu kosekisa biso; bazali kobenga yango “mbese”. Boyebi mbala mosusu ete bato mingi babetaka lisano oyo babengi pile ou face (kolonga to kokwea) na elikya ete bango bazwa nkonzo. Atako mbala mosusu bazali komona yango lokola momeseno moko ya mpamba, bazali kolanda kosala yango mpe ntango mosusu bazali komona ete ezali kotambola malamu. Na ndakisa eleki mwa mikolo, zulunalo New York Times elobelaki lisolo ya Moameriké moko oyo, nsima na kosomba batike ya tombola amonaki mbongo ya ebende elali na mopanzi moko. Na nsima alobaki boye: “Mbala nyonso oyo namonaka mbongo na ebende elali na mopanzi oyo, likambo moko ya esengo eyelaka ngai.” Mokolo yango, azwaki 25,7 milió ya badolare. Ya solo likambo yango ebakisi nde kondima na ye mpo na nkonzo (chance), to na likanisi oyo ete nyonso esila kotangama liboso.

Bamosusu basepelaka mpenza te kobwaka mbongo ya ebende likoló mpo na koyeba nkonzo na bango; kasi bazali kokanisa ete bomoi na bango ya mikolo mikoya esila kobongisa na ndenge myoto mizali kotambola wana mpe ezali lolenge mosusu ya likanisi yango. Bobele na Amérique du Nord, bazulunalo koleka 1 200 ezali na lisolo moko ezali kolobela se bilembo ya myoto (astrologie). Ankete moko emonisi ete na Etats-Unis, bilenge 55 kati na mokama bazali kondima astrologie.

Ee, ata soko ezali na boyokani na Kismet, na Karma, na Nzambe, na nkonzo to na myoto. endimeli oyo ete nyonso esila kotangama esili kopalangana kati na mokili mobimba, mpe uta kala ezalaki bobele bongo. Kasi oyebi ete na bato nyonso oyo batangami nkombo na esika ezingami na mokoloto, bobele moko nde azalaki kondima liteya yango te? Nani wana? Mpe bopusi nini likanisi na ye na ntina na endimeli oyo ete nyonso esila kotangama liboso ekoki kozala na yango likoló na likanisi na yo?

[Maloba na nse ya lokasa]

a L’Encyclopedie des religions (Angl.), volume 5, lokasa 290, epesi ndimbola oyo ete: “Esila kobengama bongo” na Lifalansé “FATALITÉ euti na liloba ya latin fatum (likambo oyo lisili kolobama, liloba na esakweli, kosakola avenir, ekateli ya Nzambe).”

b “Likambo bobele moko etye bokeseni kati un Kismet mpe Fatalité (likanisi oyo ete esila kotángama bongo) ezali boye ete Kismet ezali Mokano na Ye oyo aleki-na-nguya; moto akoki kopengola yango soko moke te.” Encyclopédie de la religion et de l’ethique (Angl.), de Hastings, volume V, page 774.

[Etanda na lokasa 4]

KATI NA BATO OYO, NANI ANDIMAKI LIKANISI OYO ETE NYONSO ESILA KOTANGAMA?

Maskarīputra Gośāla Jesus Christ

asc̀ete indien, mobandisi na lisanga boklisto

VIe/​Ve siecle av. n. e. I siecle

Zenon de Citium Jahm, mwana ya Safwān

filozofe mogreke, IVe-IIIe siècle moto na teoloji ya musulman

liboso na ntango ya biso VIIIe siecle

Virgile Jean Calvin

mokomi na nzembo (poete) morome, moto na teoloji mpe mobongo na

Ie siecle av.n.e lingomba, ye mofalanse, XVIe siecle

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto