Nazali na botɔndi atako nakutani na bampasi—Ndenge Biblia esalisi ngai nayika mpiko
Lisolo ya Enrique Caravaca Acosta
Ezalaki mokolo ya 15 Aprili 1971. Nazalaki kokende kotala libota na ngai na ferme na biso. Lokola natikaki ndako mikolo mingi, nazalaki na mposa makasi ya komona libota na ngai mobimba. Nazalaki komituna soki nakokuta bango nyonso na ndako mpe soki nakomona nani liboso. Ntango nakómaki, nayokaki nsɔmɔ mpenza komona bibembe minei, ná mama na ngai na kati; babomaki bango!
NAYOKAKI mpasi makasi mpenza. Likambo nini esalemaki? Nasengelaki kosala nini? Moto moko azalaki wana te; nabulunganaki mpe nasilaki mayele. Liboso nakoba lisolo yango, tiká nayebisa bino mwa moke ndenge nakolá. Yango ekosalisa bino bóyeba ndenge nayokaki mpo na likambo wana mpe makambo mosusu ya mpasi oyo nakutanaki na yango na bomoi.
Tomoni nzela ya solo
Nabotamaki na engumba Quirimán, pene na Nicoya, na ekólo Costa Rica. Na 1953, ntango nazalaki na mbula 37, nazalaki kofanda na baboti na ngai na ferme na biso. Atako tokolaki na Lingomba ya Katolike, tozalaki kosepela te na mateya na yango mosusu, mpe tozalaki na mituna mingi oyo tozalaki kozwa biyano na yango te.
Mokolo moko na ntɔngɔ, mobali moko nkombo na ye Anatolio Alfaro ayaki na ndako na biso mpe alendisaki biso tóyekola Biblia. Alimbwelaki biso mikapo mpe mateya mingi ya Biblia. Ngai, Tata, Mama, yaya na ngai ya mobali, leki na ngai ya mwasi mpe moninga na ye moko oyo azalaki kofanda epai na biso tofandaki mpe tozalaki koyoka ye. Tosololaki mokolo mobimba tii na butu makasi. Totunaki ye mituna mingi.
Anatolio alalaki epai na biso mpe alekisaki mokolo oyo elandaki epai na biso. Tosepelaki mingi na makambo oyo toyokaki, mingimingi ntango azalaki kopesa biso biyano oyo euti na Biblia. Makambo oyo ayebisaki biso esimbaki mpenza mitema na biso. Tozalaki kokanisa makambo oyo toyekolaki, mpe tondimaki ete tomoni nzela ya solo. Anatolio atikelaki biso bazulunalo mpe babuku mosusu oyo elimbolaka Biblia. Mpokwa nyonso, tozalaki kotánga mpe koyekola mikanda yango na libota. Ezalaki pɛtɛɛ te, mpo tozalaki na kura te. Liboso ya kobanda koyekola, mokomoko azalaki kozwa saki ya monene mpe kozipa makolo mpo na komibatela na bangungi.
Sanza motoba na nsima, bato mitano ya libota na biso, elingi koloba ngai ná baboti na ngai mpe bandeko na ngai mosusu, tozwaki batisimo. Na esengo nyonso, tobandaki kokende ndako na ndako mpo na koyebisa bato makambo oyo toyekolaki. Tozalaki kotambola ngonga mibale na makolo, ntango mosusu na mpunda, mpo na kokende na engumba Carrillo, koyangana na etuluku ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kuna. Anatolio akobaki koya koyekola Biblia elongo na biso na ndako. Na nsima, makita ekómaki kosalema na ndako na biso, epai bato soki mwambe bazalaki koyangana. Nsukansuka, bango nyonso bazwaki batisimo. Mwa etuluku yango ekolaki, mpe mosika te ekómaki lisangá ya bato soki 20.
Mosala ya ntango nyonso
Na nsima, biro ya Batatoli ya Yehova na Costa Rica esɛngaki baoyo bakokoka bábanda mosala ya ntango nyonso. Na 1957, nandimaki kobanda mosala yango. Mosala yango ezalaki mpenza esengo. Mbala mingi, nazalaki kotambola ebele ya bangonga ngai moko mpo na kokende kosakola nsango malamu na bamboka. Ntango mosusu, bato bazalaki koyamba ngai te. Nazali koyeba lisusu mbala soki misato oyo mibali basimbelaki ngai bambeli, batunaki ngai soki nazali nani mpe nazali kosala nini.
Na bambula ya 1950, banzela mingi ezalaki kaka ya mikemike na kati ya zamba, mpe ezalaki mpasi mpo na kokóma esika bato bazali. Mpo na kokóma na bisika mosusu, ezalaki kosɛnga komata na mpunda. Tozalaki kokatisa bibale na makolo, ntango mosusu mpe tozalaki kolala libándá. Bangungi ezalaki konyokola biso. Tosengelaki mpe kokeba na banyoka mpe bangando. Atako bongo, nazalaki na esengo makasi ya kosalisa bato báyeba Yehova Nzambe. Nazalaki kozonga ndako na esengo na motema mpo nasakoli solo ya Biblia epai ya bato mosusu. Wana nazalaki kosakola mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo, bolingo na ngai mpo na Yehova Nzambe ezalaki se kokóma makasi, mpe nakómaki komimona penepene mpenza ya Yehova.
Na nsima, nazwaki mikumba mosusu. Na boumeli ya mbula koleka zomi, nasalaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga, nazalaki kokende kotala masangá mpe kolendisa bandeko; nazalaki kosala pɔsɔ moko na lisangá moko. Atako maladi esalaki ete natika mosala ya zongazonga, nakobaki kaka na mosala ya ntango nyonso.
Mpasi ekómeli biso
Na 1971, ntango nazalaki na Nicoya, nazongaki kotala bandeko mpe baboti na ngai. Ntango nakɔtaki na ndako, namonaki mama na ngai, oyo azalaki na mbula 80, alali na nse. Babɛtaki ye masasi mpe batyaki ye mbeli. Ntango nasimbaki ye, namonaki ete azali naino kopema. Mwa moke na nsima, akufaki na mabɔkɔ na ngai. Natalaki epai na epai, mpe ntango nakɔtaki na kuku, namonaki mwasi oyo azalaki kolambela bango, oyo azalaki na zemi ya sanza mwambe, alali na nse. Ye mpe akufaki. Longola yango, na kulware namonaki ebembe ya ndeko mwasi moko ya lisangá; mpe na esika tosukolaka, namonaki ebembe ya mwana ya mwasi oyo azalaki kolambela bango. Bango nyonso babɛtaki bango masasi mpe batyaki bango mbeli. Nani akokaki kosala likambo ya nsɔmɔ ndenge wana, mpe mpo na nini?
Ntango nabimaki libándá, namonaki tata. Ye mpe azwaki masasi na motó, kasi akufaki te! Nakendaki mbangu na ndako ya leki na ngai ya mobali, oyo ezalaki mosika mpenza te mpe kuna nayokaki ete babomi mpe mwasi mosusu ná mwana na ye. Esalaki ngai mpasi mingi ntango nayokaki ete moto oyo asalaki likambo yango ezalaki elenge moko ya mbula 17, mwana ya leki na ngai ya mwasi, azalaki Motatoli ya Yehova te mpe azalaki na maladi ya motó! Na nsima akimaki. Ezalaki mbala ya liboso moto moko aboma bato ebele ndenge wana na Costa Rica.
Nsango yango epanzanaki na Costa Rica mobimba. Nsima ya mikolo nsambo, bapolisi bamonaki ye; azalaki na mbeli moko ya monene mpe mondoki, oyo moto moko atɛkɛlaki ye atako ayebaki ete azalaki na maladi ya motó. Ntango bazalaki koluka kokanga ye, babɛtaki ye masasi mpe babomaki ye.
Ntango bazalaki kolukaluka ye, bato mingi bayebisaki ngai nakima, noki te akozonga mpo na kosala ngai mabe. Nabondelaki mpo na likambo yango, mpo namonaki ete nasengeli kozala elongo na bato ya libota na ngai oyo babikaki mpe bandeko ya lisangá. Yango wana nakimaki te.
Bampasi ezali kolandana
Likambo ya mawa, tata aumelaki lisusu na bomoi kaka mbula moko. Na mbula oyo elandaki, babomaki leki na ngai ya mwasi, oyo azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova Nzambe. Toyokaki lisusu mpasi makasi ya kobungisa moto mosusu na kati ya libota. Maloba ezali te mpo na kolobela mpasi mpe mawa oyo biso ná baninga na biso toyokaki. Na komekama yango, napesaki nyonso na mabɔkɔ ya Yehova mpe nazalaki kobondela ye ntango nyonso ete apesa ngai makasi.
Na 1985, nalandaki mateya mikolo misato, oyo ebongisamaki mpo na bankulutu na San José, engumba-mokonzi ya Costa Rica. Na nsuka ya mateya yango, nalendisamaki mpenza na elimo. Na mokolo ya yambo na ntɔngɔntɔngɔ, nakendaki kozwa bisi mpo na kozonga na ndako. Ntango nakitaki na bisi, babandi babɛtaki ngai mpe bayibaki biloko na ngai. Basalaki yango noki mpenza mpe nazwaki ntango ya komona bilongi na bango te. Banda wana, nakokaka lisusu te koloba ndenge bato ya Costa Rica bamesaná. Na etúká ya Guanacaste, mibali bamesaná koganga ntango bakutani mpe bazali kopesana mbote, to kaka mpo na koyebisa ete bazali wana. Liboso, ngai mpe nazalaki kosala bongo, kasi nsima ya likambo wana, nakokaka lisusu kosala bongo te.
Na 1979, nabalaki Celia, ndeko mwasi moko oyo azalaki na lisangá mosusu ya zingazinga. Celia azalaki kolinga Biblia mingi. Tozalaki kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo. Likambo ya mawa, akufaki na maladi ya kanser na sanza ya Yuli 2001. Ntango mosusu, nayokaka mposa na ye makasi, kasi elikya ya lisekwa elendisaka ngai.—Yoane 5:28, 29.
Bampasi esilisi esengo na ngai te
Atako nakutani na bampasi oyo bato mingi bakutaná na yango te, natalelaka yango lokola libaku ya komonisa kondima mpe bosembo na ngai epai ya Yehova. (Yakobo 1:13) Mpo námilelalelaka te, namikundwelaka ntango nyonso ete “ntango ná makambo oyo ekanami te,” ekwelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Nabosanaka mpe te ete tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” mpo bato bazali na kongala, na mobulu mpe bazangi komipekisa. (2 Timote 3:1-5) Nabosanaka mpe te lisolo ya Yobo. Atako akutanaki na mikakatano ya nsɔmɔ—bana na ye bakufaki, maladi ya mabe ezwaki ye mpe abungisaki biloko na ye nyonso, na mpiko nyonso, alobaki boye: “Nkombo ya [Yehova] esanzolama.” Mpe Yehova apambolaki Yobo mingi mpo na bosembo na ye. (Yobo 1:13-22; 42:12-15) Makanisi nyonso wana ya Biblia esalisaka ngai nabungisa esengo na ngai te atako nakutani na bampasi mingi.
Yehova asalisi ngai nákoba kotya ye na esika ya liboso na bomoi na ngai. Kotánga Biblia mokolo na mokolo ebɔndisaka ngai mingi mpe epesaka ngai makasi ya koyika mpiko. Kobondela Yehova esalisaka ngai nazala na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Yango epesaka ngai kimya na motema. Koyangana mpe kopesa biyano na makita elendisaka mpe kondima na ngai.—Baebele 10:24, 25.
Atako nakómi mobange, nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova ndenge nazali kaka na makasi ya kosala elongo na bandeko na ngai baklisto, koyekola na bato Biblia mpe kobima na mosala ya kosakola. Kosalela basusu ndenge wana esalisaka ngai nabungisa elikya te. Natɔndaka Yehova na motema na ngai mobimba atako nakutani na bampasi mingi na bomoi na ngai.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbula mibale nsima ya kokoma lisolo oyo, ndeko Enrique Caravaca Acosta, akufaki na mbula 90.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Kotánga Biblia mokolo na mokolo ebɔndisaka ngai mingi mpe epesaka ngai makasi ya koyika mpiko
[Elilingi na lokasa 19]
Mbala ya liboso oyo nasalaki lisukulu ya mateya ya Biblia
[Elilingi na lokasa 20]
Na mosala ya kosakola ntango nazalaki naino elenge