Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 lok. 9
  • Mbongo epesaka nde esengo ya solosolo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongo epesaka nde esengo ya solosolo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Tolukaki liboso bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Banyokwami bakosungama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bakisá molende na mosala ya kokebisa bato!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mobeko ya bolingo na mitema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 lok. 9

Mbongo epesaka nde esengo ya solosolo?

SONIA abotamá na Espagne. Ntango azalaki mwana moke, azalaki kokende na makita ya Batatoli ya Yehova elongo na mama na ye. Kasi, ntango akolaki, akendaki kofanda na Londres, na Angleterre, mpe nsukansuka azwaki mosala ya kosalisa bato básalaka bakɔntra ya mbongo mingi.

Sonia alingaki mosala yango. Akómaki na mbongo mpe azalaki kosala bakɔntra ya mbongo mingi mpo na bakiliya na ye. Mosala yango ezalaki kosepelisa ye mpe ezalaki kotambola malamu. Mbala mingi, Sonia azalaki kosala ngonga 18 na mokolo, mpe na babutu mosusu azalaki kolala kaka ngonga mibale to misato. Amipesaki mobimba na mosala na ye. Na nsima, makambo ebebaki na mbalakaka. Maladi moko makasi ebɛtaki Sonia na motó, mbala mosusu mpo azalaki kosala mingi. Azalaki kaka na mbula 30.

Sonia akómaki paralize ngámbo moko, mpe minganga bazalaki kokanisa ete akozongela lisusu koloba te. Ntango mama na ye ayokaki yango, mbala moko akendaki na Angleterre mpo na kosalisa ye. Ntango Sonia abandaki kotambola lisusu, mama na ye ayebisaki ye boye: “Nalingi kokende na makita, mpe osengeli koya elongo na ngai mpo okoki kotikala yo moko te.” Sonia andimaki kokende na mama na ye. Nini esalemaki na nsima?

Sonia alobi boye: “Makambo nyonso oyo nayokaki ezalaki solo. Ezalaki malamu mpenza. Nandimaki na esengo koyekola Biblia na ndeko moko kati na ebele ya bandeko oyo bayaki kopesa ngai mbote mbala ya liboso oyo nakendaki na Ndako ya Bokonzi. Baninga na ngai ya kala bazalaki koya kotala ngai lisusu te, kasi baninga na ngai ya sika bazalaki kolinga ngai mpe kosalisa ngai.”

Mokemoke, Sonia azongelaki koloba mpe akendaki liboso na boyekoli na ye ya Biblia. Mbula moko ekokaki te, azwaki batisimo. Baninga na ye mingi ya sika bazalaki basakoli ya ntango nyonso, mpe azalaki komona ete bazali na esengo. Sonia azalaki kokanisa boye: ‘Nalingi kozala lokola bango. Nalingi kopesa Yehova Nzambe nyonso oyo nakoki!’ Lelo oyo, Sonia azali mosakoli ya ntango nyonso.

Liteya nini Sonia azwi na makambo oyo ekómelaki ye? Alobi boye: “Atako nazalaki kozwa mbongo mingi, mitungisi mpe kozanga kimya na mosala ezalaki kokómisa ngai motema likolólikoló mpe nazalaki na esengo te. Namoni ete kozala na boyokani malamu na Tata na ngai ya likoló, Yehova, nde likambo eleki ntina na bomoi. Lelo oyo, nazali na esengo ya solosolo.”

Ntoma Paulo akomaki boye: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:10) Likambo oyo Sonia akutanaki na yango esalisi ye ayeba ete maloba yango ezali solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto