Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/10 nk. 6-7
  • 3 Ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 3 Ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/10 nk. 6-7

3 Ndenge nini?

NA LIKAMBO etali libondeli, mangomba mingi etyaka likebi na makambo lokola ndenge oyo moto azali ntango azali kobondela, maloba oyo azali kobimisa, mpe milulu mosusu. Nzokande, Biblia esalisaka biso tótya likebi te na makambo wana kasi nde na makambo ya ntina mingi na ndakisa, “ndenge nini tosengeli kobondela?”

Biblia elobeli basaleli ya Nzambe ya sembo ete bazalaki kobondela na bisika ndenge na ndenge mpe na bandenge mingi. Bazalaki kobondela na mongongo ya nse to na mongongo makasi na kotalela ntango mpe esika oyo bazalaki. Ntango bazalaki kobondela, bazalaki kotala likoló to mpe kogumbama. Na esika ya kosalela bililingi, basapɛlɛ, to babuku ya mabondeli, libondeli na bango ezalaki kouta nde na motema, ezalaki maloba na bango moko. Mpo na nini Nzambe azalaki koyoka mabondeli na bango?

Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, bazalaki kotinda mabondeli na bango kaka epai ya Nzambe moko​—Yehova. Ezali na likambo mosusu ya ntina mingi. Na 1 Yoane 5:14, Biblia elobi boye: “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” Mabondeli na biso esengeli koyokana na mokano ya Nzambe. Yango elimboli nini?

Mpo na kobondela na kolanda mokano ya Nzambe, tosengeli koyeba soki mokano na ye ezali nini. Koyekola Biblia ezali likambo ya ntina mingi mpo na libondeli. Yango elingi nde koloba ete Nzambe akoyoka biso te soki totángi te bakelasi ya teoloji? Te, Nzambe azali kosɛnga biso tóyekola mokano na ye, tóluka koyeba yango mpe tósala na boyokani na mokano yango. (Matai 7:21-23) Tosengeli kobondela na kolanda makambo oyo tozali koyekola.

Mpo mabondeli endimama, esengeli koyokana na mokano ya Nzambe, kosalema na kondima, mpe kosalema na nkombo ya Yesu

Ntango tozali koyekola makambo ya Yehova mpe mokano na ye, kondima na biso ekokóma makasi​—yango mpe ezali na ntina mpo na libondeli. Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso oyo bozali kosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.” (Matai 21:22) Kozala na kondima elimboli te kozala bindimandima. Elimboli nde kondima eloko moko oyo atako emonanaka te, ezali na bilembeteli oyo emonisi ete eloko yango ezali mpenza. (Baebre 11:1) Biblia etondi na makambo oyo emonisi ete Yehova, oyo tokoki te komona ye, azalaka mpenza, abongi kotyelama motema, mpe alingaka koyanola mabondeli ya baoyo bazali na kondima epai na ye. Lisusu, tokoki ntango nyonso kosɛnga ye apesa biso kondima makasi, mpe Yehova asepelaka kopesa biso oyo tosengeli na yango.​—Luka 17:5; Yakobo 1:17.

Kasi, ezali mpe na likambo mosusu ya ntina mingi mpo na koyeba ndenge ya kobondela. Yesu alobaki boye: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Na yango, Yesu azali nzela oyo tokoki kopusana penepene na Yehova, Tata. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka na nkombo na ye. (Yoane 14:13; 15:16) Yango elimboli te ete tosengeli kobondela Yesu. Tobondelaka na nkombo ya Yesu, toyebaka ete mpo na Yesu nde tozali na likoki ya kopusana penepene na Tata na biso ya kokoka oyo azali mosantu.

Bayekoli ya Yesu batunaki ye mokolo moko boye: “Nkolo, teyá biso kobondela.” (Luka 11:1) Emonani ete bazalaki te kosɛnga makambo lokola oyo touti kolobela. Balingaki nde koyeba makambo nini bakoloba​—na maloba mosusu, ‘tosengeli kobondela mpo na makambo nini?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto