Biblia ebongolaka bato
NINI etindaki moto moko oyo azalaki kala soda ya motomboki mpe moyibi abongola lolenge ya bomoi na ye? Mpo na nini elombe moko ya karate abongolaki mikano na ye? Ndenge nini kondima ya tata moko epai ya mwana na ye ebimisaki litomba? Tángá masolo oyo mpo na kozwa biyano.
“Atako nazalaki na bomoi ya mabe, nazali sikoyo na esengo.”—GARRY P. AMBROCIO
MBULA: 47
EKÓLO NA YE: PHILIPPINES
BOMOI NA YE YA KALA: SODA YA MOTOMBOKI
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na mwa engumba ya Vintar. Lobwaku monene ya patatalu, epai tozalaki kofanda ezalaki na bangomba etondi na matiti, bibale ya pɛto, mpe mopɛpɛ ya kitoko. Atako tozalaki kofanda na esika wana ya kimya, bomoi ezalaki pɛtɛɛ te. Bato bayibaki bibwɛlɛ na biso mpe bakɔtelaki biso na ndako.
Nazalaki komɛla masanga mingi ná baninga na ngai, komɛla makaya, mpe koyiba mpo na kokokisa bamposa na ngai, liboso kutu nakokisa mbula 20. Nazalaki ata koyiba babiju ya nkɔkɔ na ngai ya mwasi. Basoda bazalaki kokanisa ete nazali na etuluku moko ya batomboki (New People’s Army) mpe mbala mingi, bazalaki kobɛta ngai makasi. Mpo na yango, nazwaki ekateli ya kokɔta na etuluku ya batomboki. Na boumeli ya mbula mitano, nazalaki kofanda na bangomba ná basoda yango ya batomboki. Bomoi ezalaki mpasi. Tozalaki kofanda esika moko te, tozalaki ntango nyonso kokima basoda ya guvɛrnema. Nsukansuka, nalɛmbaki komibomba na bangomba, yango wana nakendaki komitika na mabɔkɔ ya guvɛrnɛrɛ ya Ilocos Norte. Amoniselaki ngai boboto, asalisaki ngai kutu nazwa mosala moko ya malamu. Kasi, nakangamaki kaka na bizaleli na ngai ya mabe, koyiba na bandako ya bato mpe kobangisa bato.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Mwasi moko na esika nazalaki kosala, nkombo na ye Loida, azalaki Motatoli ya Yehova. Na nzela na ye, nakutanaki na Jovencio, mpe abandaki koyekola Biblia na ngai. Kasi, ezalaki mpasi mpo natika bomoi na ngai ya kala. Nazalaki komɛla likaya liboso ete Jovencio aya koyekola na ngai Biblia, mpe nazalaki kaka kokoba kosala makambo oyo ezalaki kobuka mibeko ya Leta. Nsukansuka, bapolisi bakutaki ngai nazali kosala likambo moko ya mabe oyo ebukaki mibeko, bakangaki ngai mpe nalekisaki sanza 11 na bolɔkɔ. Na ntango yango, nabondelaki Yehova, nasɛngaki ye asalisa ngai. Nasɛngaki ye bolimbisi mpe elimo santu na ye mpo etambwisa ngai mpe epesa ngai makasi.
Na ntango yango, Motatoli ya Yehova moko ayaki kotala ngai na bolɔkɔ mpe amemelaki ngai Biblia. Natángaki yango mpe nayebaki ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa mpe ya bolingo mpe alimbisaka mabunga. Namonaki ete Yehova amoniselaki ngai motema mawa mpe apesaki ngai libaku ya koyekola banzela na ye. Nasɛngaki ye apesa ngai makasi ya kolonga makambo ya mabe oyo nazalaki kosala. Makambo oyo natángaki na Masese 27:11, esalisaki ngai. Namonaki lokola Yehova azalaki koloba na ngai mpenza na mokapo yango. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”
Nsima ya kobima na bolɔkɔ, nazongelaki koyekola Biblia ná Batatoli, nabandaki koyangana na makita na bango, mpe kosalela batoli ya Biblia na bomoi na ngai. Nsukansuka, na lisalisi ya Yehova, natikaki bizaleli ya mabe oyo nazalaki na yango. Na nsima, napesaki bomoi na ngai epai ya Yehova Nzambe.
MATOMBA OYO NAZWI: Atako bomoi na ngai ya kala ezalaki mabe, nazali lelo oyo na esengo. Atako nazalaki moombo ya bizaleli ya mabe, nabongoli bomoto na ngai. (Bakolose 3:9, 10) Lelo oyo, nazali na libaku ya kozala elongo na bato ya Yehova oyo bazali pɛto mpe kosalisa basusu báyekola makambo na ntina na Yehova, Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
“Nalingaki kokende komonisa Brésil.”—JULIANA APARECIDA SANTANA ESCUDEIRO
MBULA: 31
EKÓLO NA YE: BRÉSIL
BOMOI NA YE YA KALA: ELOMBE MOKO YA KARATE
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na engumba Londrina. Atako bato mingi ya esika yango bazalaki babola, esika yango ezalaki pɛto mpe kimya. Ntango nazalaki na mbula zomi, yaya na ngai ya mobali alendisaki ngai nasala karate, lisano oyo bazalaki kobenga (tae kwon do), oyo elimboli “kosala na mabɔkɔ mpe makolo.” Tata azalaki kosepela te na lisano yango, kasi eumelaki te atikaki ngai.
Nasalaki bangalasisi makasi mpe nalongaki mbala mingi na lisano yango na etúká ya Parana. Na nsima, nalongaki na masano oyo ebongisamaki mpo na ekólo na biso, mpe na 1993, nabimaki molongi ya lisano wana na Brésil. Nalingaki kokende na masano yango oyo ebongisamaki mpo na mikili mingi. Nzokande, libota na ngai ezalaki ya bobola mpe bazalaki na mbongo te ya kofutela ngai tike ya kosala mobembo yango.
Elikya na ngai ezalaki ete lisano ya karate (tae kwon do), ekokɔta na masano ya olympique, nsukansuka esalemaki mpe bongo. Nalingaki komonisa Brésil na masano ya olympique, yango wana nasalaki ngalasisi makasi mpe nazwaki bato oyo basungaki ngai nakende kosala momekano na France, Vietnam, Corée du Sud, mpe Japon, mpe na masano oyo esalemaki na Amérique du Sud. Mokano na ngai ya mibale ezalaki ya kokende na masano oyo ebongisamaki na bikólo ya Amerika, mpe nasalaki yango malamu, yango wana baponaki ngai nazala na kati ya bato misato oyo basengelaki kosala momekano yango na Santo Domingo, République Dominicaine, na 2003.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na 2001, ngai ná makango na ngai tokutanaki na Batatoli ya Yehova, mpe babandaki koyekola na biso Biblia. Liboso nazalaki kosepela mpenza te. Nazalaki ntango nyonso kolɛmba mpe kokoka kotya likebi ntango molai te mpe mbala mingi nazalaki kolala ntango tozali koyekola. Atako bongo, makambo oyo nazalaki koyekola esimbaki motema na ngai—likambo yango emonanaki na momekano monene oyo nasengelaki kokende kosala.
Lokola baponaki ngai na ekipi ya bikólo ya Amerika, baantrɛnɛrɛ ya lisano ya karate (tae kwon do) basalaki ete nakɔta na momekano ya ebandeli. Ntango ekómaki ngala na ngai ya kobunda, natɛlɛmaki lokola ekeko—nazalaki lisusu na mposa ya kobunda te. Na mbala moko, namonaki ete mokristo asengeli te kobunda—ata mpo na lisano! Nakanisaki toli ya Biblia oyo esɛngi “kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 19:19) Kozanga koumela, nalongwaki na esika yango. Bato batalaki ngai, bazalaki kondima te.
Ntango nazongaki na ndako, nafandaki mpe nakanisaki oyo nasengelaki kosala na bomoi na ngai. Nazwaki mwa buku ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kolobela oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Na buku yango, namonaki mokapo ya Nzembo 11:5, oyo elobi mpo na Yehova ete: “Molimo na Ye eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.” Maloba yango ya mokomi ya nzembo esimbaki motema na ngai, mpe nazwaki ekateli ya kotika lisano ya karate (tae kwon do).
Baantrenɛrɛ na ngai basepelaki te. Balukaki kobongola makanisi na ngai, balobaki ete nazalaki mosani oyo alekaki basani nyonso na ekólo na biso mpe nazalaki pene ya kokende na momekano ya masano ya olympique. Kasi, nabongolaki makanisi na ngai te.
Na ntango wana, ngai ná makango na ngai tobalanaki. Ye akómaki kosakola elongo na Batatoli ya Yehova. Azalaki kozonga ndako na esengo mpe koyebisa ngai makambo oyo asololaki na bato. Nayebaki ete soki nalingi kozwa mpe esengo yango, nasengeli kosala mbongwana na bomoi na ngai. Nalongwaki na lingomba na ngai ya kala mpe nsukansuka nakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli.
MATOMBA OYO NAZWI: Ngai ná mobali na ngai tozali mpenza na esengo mpe na bomoko mpo tosalaka nyonso mpo tósalela mitinda ya Biblia na libala na biso. Nasepelaka kosunga ye wana azali kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa lisangá oyo toyanganaka. Nakokaki kosala makasi mpo na kozwa medayi ya wolo mpe kokóma mosani monene. Kasi, namonaka ete eloko moko te oyo mokili oyo ezangi bosembo ekoki kopesa, ekoki kokokana na libaku malamu ya kosalela Yehova Nzambe.
“Tata na ngai alɛmbaki ngai te.”—INGO ZIMMERMANN
MBULA: 44
EKÓLO NA YE: ALLEMAGNE
BOMOI NA YE YA KALA: MOBATELI YA NGANDA MOKO
NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na engumba Gelsenkirchen, epai bazalaki kotimola charbon na libota moko oyo ekabwanaki na makambo ya losambo. Tata na ngai azalaki Motatoli ya Yehova. Kasi, mama azalaki kotɛmɛla ye mpo abɔkɔla biso te, ngai, ndeko na ngai ya mobali mpe bandeko na ngai mibale ya basi, na kolanda mateya ya lingomba na ye. Tata azalaki kosala bangonga zomi to koleka na mokolo mpo na kotambwisa motuka ya monene. Mbala mingi azalaki kobanda mosala na ngonga ya mibale to ya misato ya butu. Atako bongo, azalaki ntango nyonso kosalisa biso tókóma baninga ya Nzambe. Nzokande, nazalaki kosepela te na oyo azalaki kosala.
Ntango nakómaki na mbula 15, nakómaki kolɛmba kokende na makita ndenge azalaki komema biso, mpe nakómaki motomboki. Mbula moko na nsima, nakɔtaki na etuluku moko ya lisano ya bibɔtu. Na boumeli ya mbula koleka mibale oyo elandaki, nasalaki makambo oyo etungisaki mpenza tata na ngai. Ntango nakómaki na mbula 18, nalongwaki na ndako.
Nazalaki kolinga masano mingi mpe nazalaki kokende kosala ngalasisi mbala motoba na pɔsɔ—liboso nazalaki kosala lisano ya bibɔtu mpe na nsima kotombola bakilo. Na bawikende, ngai ná baninga na ngai tozalaki kokende na banganda ya mabina. Mokolo moko, nabundaki na kiliya moko oyo azalaki komonana lokola moto mabe, kasi nabɛtaki ye. Nkolo-nganda yango amonaki likambo yango mpe mbala moko atunaki ngai soki nakolinga kobatela nganda na ye. Alakaki kofutaka ngai malamu, yango wana nandimaki.
Wikende nyonso, nazalaki kotɛlɛma na porte ya nganda yango mpe nazalaki kopona nani akokɔta mpe nani akokɔta te. Bato ata 1 000 bazalaki koya na nganda yango, yango wana nazalaki ntango nyonso na mosala mingi. Bitumba ezalaki kozanga te. Bato bazalaki kobangisa ngai na mindoki mpe milangi. Bato mosusu oyo nazalaki koboya kokɔtisa bango to baoyo nazalaki kobimisa bango, bazalaki kozela ngai na libándá mpo na kobundisa ngai. Nazalaki na mbula 20, kasi nazalaki kokanisa ete moto moko te akoki kolonga ngai. Ya solo, ezalaki na moto te oyo azalaki kokoka ngai—nazalaki na nkanza, lolendo, koluka makambo minene, mpe motó makasi.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Tata na ngai alɛmbaki ngai te. Asalaki nyonso mpo zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!a ekómelaka ngai esika nazalaki kofanda. Etondanaki na ndako na ngai—nazalaki kotánga yango te. Na nsima, mokolo moko, nazwaki ekateli ya kofungola mwa ndambo ya bazulunalo yango. Masolo oyo natángaki ete ebongiseli ya politiki ya lelo, nkita, mpe mangomba ekosuka, etindaki ngai nabenga ndeko na ngai ya mwasi. Ye ná mobali na ye bazalaki Batatoli ya Yehova. Basɛngaki ngai báyekola na ngai Biblia, mpe nandimaki.
Toli oyo ezali na Bagalatia 6:7 etindaki ngai nabongola bomoi na ngai. Nayebaki ete likambo nyonso oyo nakosala, nakoloba, to nakokana kosala lelo ekoki kobimisa matomba to makama na bomoi na ngai na mikolo ezali koya. Libyangi oyo ezali na Yisaya 1:18, elendisaki mpe ngai; elobi boye: “Yehova alobi: ‘Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso. Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.’” Vɛrsɛ yango esalisaki ngai ntango nabandaki koyekola Biblia namimona te ete nazangi ntina to nakokoka lisusu kozongela Yehova te.
Na boumeli ya sanza motoba, nasalaki mbongwana monene na bomoi na ngai, kasi ezalaki pɛtɛɛ te. Nasengelaki kolongwa na esika ya mabe oyo nazalaki kosala mpe kotika baninga ya mabe oyo nazalaki na bango. Na yango, nabandaki koyebisa baninga na ngai ete nazalaki koyekola Biblia mpe nayebisaki bango makambo oyo nazalaki koyekola. Bakómaki kokima ngai mpe kobenga ngai sango. Na lisalisi ya ndeko na ngai ya mwasi, nazwaki mosala mosusu ya malamu koleka.
Nakómaki mpe kokende na makita na Ndako ya Bokonzi epai ndeko na ngai ya mwasi mpe mobali na ye bazalaki koyangana, atako ezalaki mosika na ntaka ya kilomɛtrɛ 30. Ndako ya Bokonzi moko ezalaki pene na esika nazalaki kofanda, kasi nazalaki kobanga kokutana na bato oyo bayebaki ngai banda bomwana. Nazalaki mpe kobanga kokende kosakola ndako na ndako, kosakola na kartye oyo nazalaki kofanda. Nazalaki kokanisa boye, ekozala boni soki nakutani na moto moko oyo nabenganaki ye na nganda, to moto mosusu oyo napesaki ye bangi? Kasi, nasalelaki liteya oyo nazwaki na ngalasisi oyo nazalaki kosala—ngalasisi oyo elekaka mpasi yango nde ezalaka na ntina mingi koleka. Na yango, ntango nakokisaki masɛngami, nakómaki kosakola mingi.
Nazalaki mpe na mokakatano mosusu oyo nasengelaki kolonga—Nazalaki kolinga kotánga te mpe koyekola te. Kasi, nayebaki ete soki nalingi ete kondima na ngai ekóma makasi, nasengelaki kosala makasi mpo na koyekola na mozindo, solo oyo ezali na kati ya Biblia. Namonaki ete ndenge moko na kotombola kilo, esengeli mpe kosala milende makasi soki olingi kokóma makasi na elimo.
MATOMBA OYO NAZWI: Litomba moko ezali ete nazali na bomoi! Nasengeli ntango nyonso kokebaka mpo nakwea lisusu te na makambo oyo nazalaki kosala kala. Kasi, lelo oyo nazali na libota moko ya esengo elongo na mwasi na ngai, oyo azali na bizaleli kitoko ya bokristo. Nazali na baninga ya malamu na lisangá ya Batatoli ya Yehova, oyo nakoki kotyela bango motema mpenza. Tata na ngai akufá eleki mbula mitano, kasi liboso akufa azalaki mpenza na esengo ya komona mwana na ye azongi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.