Nzambe ‘asalaka makambo ya minene’—Ndenge oyo nayebaki yango
Lisolo ya Maurice Raj
Libota na ngai, elongo na ebele mosusu ya bato oyo bazalaki mpe kokima, tokimaki likama moko monene na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na boumeli ya mikolo mwa mingi tosalaki mobembo na kati ya bazamba ya Birman, na butu tozalaki kolala na nse ya banzete. Nazalaki na mbula libwa. Namemaki na mokɔngɔ mwa liboke oyo ezalaki na biloko na ngai nyonso. Kasi, wana ezalaki kaka ebandeli.
EZALAKI na 1942. Etumba ezalaki na mokili mobimba, mpe tozalaki kokima basoda ya Japon oyo bazalaki se kopusana. Basilaki kozwa Birmanie, lelo oyo Myanmar, mpe babɔtɔlaki bisika oyo bazalaki kozwa petrole na Yenangyaung. Liboso tókóma na bandelo ya Inde, basoda ya Japon bakangaki biso mpe bayebisaki biso tózonga epai na biso.
Ntango nazalaki mwana, tozalaki kofanda na Yenangyaung, epai tata azalaki kosala na kompanyi moko ya petrole (Compagnie pétrolière de Birmanie). Ntango basoda ya Japon babɔtɔlaki mboka, bisika oyo bazalaki kozwa petrole na Yenangyaung, ekómaki esika oyo bampɛpɔ ya Angleterre ezalaki kobwaka babɔmbi mingi. Mokolo moko, libota na biso tobombamaki na nse ya mabele mikolo misato ntango babɔmbi ezalaki kobwakama na esika yango. Nsukansuka, tokimaki na masuwa na Sale, mwa engumba moko na Ayeyarwady to na ebale Irrawaddy. Tosepelaki ndenge tozalaki na bomoi mpe totikalaki kuna tii ntango etumba esilaki.
Mpasi esalisi ngai nayeba solo
Leki na ngai ya mobali abotamaki na 1945, na mbula oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki. Tata asepelaki kokóma na mwana atako akómaki mobange. Kasi, esengo na ye ezalaki ya ntango mokuse. Sanza misato na nsima, leki na ngai akufaki. Mwa moke na nsima, Tata akufaki mpo na mpasi na motema oyo ayokaki mpo na likambo yango.
Baninga balukaki kobɔndisa ngai, balobaki na ngai ete Nzambe azwi tata mpe leki na ngai mpo bázala na ye kuna na likoló. Nazalaki mpenza na mposa ya kozala na bango! Libota na ngai ezalaki kokende na Lingomba ya Katolike, epai nazwaki malongi. Bateyaki ngai ete basango ná bamamɛlo bakendaka mbala moko na likoló soki bakufi, kasi bato mosusu basengeli naino kozela na epongelo, esika oyo banyokwamaka mwa moke, epai bapɛtolaka bango na masumu na bango. Lokola nazalaki na mposa ya kokutana na tata mpe leki na ngai, nazwaki ekateli ya kokendaka baseminɛrɛ na Lingomba ya Katolike na Maymyo, lelo oyo Pyin Oo Lwin, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 210, kolongwa na esika tozalaki kofanda.
Mpo na kokɔta na seminɛrɛ yango esɛngaki kotánga kelasi. Lokola tozalaki kokimakima etumba, nakɔtaki kelasi mbula mibale mpamba. Na nsima, biteyelo nyonso ekangamaki na boumeli ya ntango ya bitumba. Atako biteyelo efungwamaki lisusu, libota na ngai ezalaki na mbongo te. Longola ngai mpe bandeko na ngai mibale ya mibali, mama azalaki mpe kobɔkɔla bana misato ya ndeko na ye ya mwasi oyo akufaki. Azalaki lisusu na mbongo te ya kokɔtisa biso nyonso kelasi.
Yaya na ngai akendaki kosala, kasi ngai nazalaki kaka na mbula 13 mpe nakokaki kosala mingi te. Tata leki na biso, Manuel Nathan azalaki kofanda na Chauk, engumba moko oyo ezalaki pene ya Sale. Nakanisaki boye: ‘Soki nalongwe na ndako, ekolongola mama mwa mokumba.’ Yango wana nakendaki na Chauk epai ya tata leki.
Nayebaki te ete tata leki autaki kokutana na Batatoli ya Yehova mpe azalaki na mposa makasi ya koyebisa bato makambo oyo autaki koyekola na Biblia. Ayebisaki ngai yango mokemoke, abandaki naino kolimbolela ngai ntina ya libondeli ya Tata wa biso, ndenge Bakatolike babengaka yango. Ebandaka boye: “Tatá wa bísó ozalí o likoló, bato bákúmisa nkómbó ya yǒ.”—Matai 6:9, 10, Biblia Liloba lya Nzambe.
Tata leki ayebisaki ngai boye: “Na yango, Nzambe azali na nkombo, mpe nkombo yango ezali Yehova.” Na nsima, alakisaki ngai nkombo ya Nzambe na Biblia. Nazalaki na mposa ya koyekola makambo mingi. Kasi, nayebaki mpenza kotánga malamu te, ata monɔkɔ ya mboka na ngai Tamil, mpe Biblia ná mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo tata leki azalaki na yango ezalaki na Lingelesi, kasi nayebaki Lingelesi malamu te. Atako natángaki kelasi mingi te, malɛmbɛmalɛmbɛ nakómaki koyeba mateya ya Biblia. (Matai 11:25, 26) Miso na ngai efungwamaki mpe nayebaki ete mateya mingi oyo bateyá ngai ezalaki na Biblia te. Nsukansuka nalobaki ete: “Tata leki, oyo ezali solo!”
Ntango nazalaki na mbula 16, nakómaki koyebisa basusu makambo oyo nazalaki koyekola. Batatoli ya Yehova bazalaki kaka 77 na Myanmar na ntango wana. Mwa moke na nsima, Robert Kirk, misionɛrɛ moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova autaki na mboka-mokonzi Rangoon, lelo oyo Yangon, mpe ayaki kotala tata leki na Chauk. Nayebisaki Robert ete napesaki bomoi na ngai epai ya Yehova. Yango wana, na mokolo ya 24 Desɛmbɛ 1949, nazwaki batisimo na Ebale Ayeyarwady, mpo na komonisa ete namipesaki na Nzambe.
Kolonga mikakatano
Mwa moke na nsima, nakendaki na Mandalay koluka mosala ya malamu. Mokano na ngai ezalaki nakóma mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bato oyo basakolaka mingi. Mokolo moko, ntango nazalaki kotala lisano ya ndembo, nakangamaki mpe nakweaki. Nakómaki kobɛla maladi ya ndɛkɛ mpe nazongaki na libota na ngai mpo bábatela ngai.
Maladi yango etungisaki ngai na boumeli ya mbula mwambe. Ntango nakómaki nzoto kolɔngɔnɔ, nakómaki na likoki ya kosala mwa mosala. Atako mama azalaki kolɛmbisa ngai nzoto mpo nasala te mosala ya mobongisi-nzela mpo nazalaki kobɛlabɛla, mokolo moko nalobaki na ye boye: “Nakozela lisusu te. Nalingi nakóma mobongisi-nzela. Yehova akobatela ngai!”
Na 1957, nakendaki na Yangon mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Likambo ya kokamwa, maladi na ngai ya ndɛkɛ etungisaki ngai lisusu te tii mbula 50 na nsima, na 2007. Lelo namɛlaka nkisi mpo na yango. Na 1958, nakómaki mobongisi-nzela monene, nakómaki kosakola ngonga 150 sanza nyonso.
Mboka ya liboso oyo batindaki ngai ezalaki Kyonsha, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 110 na nɔrdi wɛsti ya Yangon. Mwa etuluku moko ya bato oyo bazalaki kuna bazalaki kotánga mikanda na biso mpe bazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi. Ntango ngai ná Robert tokómaki, bato ebele bayaki esika tozalaki. Toyanolaki na ebele ya mituna oyo bazalaki na yango mpe tolakisaki bango ndenge ya kotambwisa makita. Mosika te, bamosusu bakómaki kosakola elongo na biso. Basɛngaki ngai natikala na mboka yango. Na boumeli ya mwa basanza, mwa etuluku yango ekómaki lisangá monene. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na mboka yango bazali koleka 150.
Na nsima, basɛngaki ngai nakóma kotalaka masangá mpe bituluku mosusu oyo ezalaki na Myanmar mobimba mpo na kolendisa yango. Nazalaki kotambola bakilomɛtrɛ mingi na nzela oyo etondi na putulu, likoló ya mituka oyo etondi na biloko, kotambola na kati ya bazamba, kokatisa bibale, mpe komata bangomba. Atako nazalaki nzoto makasi te, namonaki ete Yehova azalaki kopesa ngai makasi ya kokoba mosala.—Bafilipi 4:13.
“Yehova akosunga yo”
Na nsima, na 1962 batindaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova na Yangon, epai Robert apesaki ngai formasyo. Eumelaki te, guvɛrnema ebimisaki mobeko ete bamisionɛrɛ nyonso ya bapaya bálongwa na Myanmar, mpe nsima ya mwa bapɔsɔ, bakendaki. Likambo ya kokamwa ngai nde nakómaki na mokumba ya kotambwisa makambo na biro.
Nazalaki komituna: ‘Ndenge nini nakosala mosala yango? Ngai moto natángá mingi te mpe nayebi makambo mingi te.’ Lokola bamonaki ete nazali komitungisa, bandeko mingi ya mikóló balobaki na ngai boye: “Maurice, komitungisa te. Yehova akosalisa yo. Mpe biso nyonso tozali nsima na yo.” Maloba na bango ekitisaki ngai mpenza motema! Mwa basanza na nsima, nasengelaki kobongisa lapolo ya mosala ya kosakola ya Myanmar mpo na Annuaire des Témoins de Jéhovah 1967. Na boumeli ya mbula 38 oyo elandaki, nazalaki kobongisa lapolo mpo na ekólo Myanmar. Makambo oyo ezalaki koleka mbala na mbala emonisaki ete Yehova azalaki mpenza kotambwisa mosala na biso.
Na ndakisa, mwa liboso ntango nasɛngaki nakóma moto ya ekólo Myanmar, nazangaki mbongo kyatsa 450 oyo esɛngamaki mpo na kosomba mokanda yango, na yango natikaki likambo yango. Na nsima, mokolo moko, ntango nazalaki koleka na biro moko esika nazalaki kosala kala, patrɔ na ngai amonaki ngai. Abelelaki: “Ee, Raj, yaká kozwa mbongo na yo. Obosanaki kozwa mbongo na yo ya nsuka ya mosala.” Ezalaki mbongo kyats 450.
Ntango nabimaki na biro yango, nazalaki kokanisa makambo nyonso oyo nakokaki kosala na mbongo wana kyats 450. Kasi, lokola ezalaki mpenza mbongo oyo nazalaki na yango mposa mpo nazwa mokanda ya kokóma mwana-mboka ya Myanmar, namonaki ete mokano ya Yehova ezalaki nasalela mbongo yango mpo na likambo yango. Mpe ekateli wana ezalaki mpenza malamu mingi. Lokola nakómaki mwana-mboka ya ekólo yango, nakokaki kotikala na ekólo yango, kotambola kozanga moto atungisa ngai, kokɔtisa mikanda na mboka yango, mpe kosala misala mosusu ya ntina mpo na mosala ya kosakola na Myanmar.
Liyangani moko na nɔrdi
Na 1969, mosala na biso ezalaki kokola noki na engumba Myitkyina oyo ezalaki na nɔrdi ya Myanmar, na yango, tozwaki ekateli ya kosala liyangani na engumba yango. Kasi, mokakatano monene oyo tozalaki na yango, ezalaki ndenge oyo Batatoli nyonso oyo bazalaki na sudi bakokaki koya na liyangani yango. Tobondelaki mpe na nsima tosɛngaki na kompanyi ya engbunduka ya Myanmar, bábombela biso bawagɔ motoba. Tokamwaki makasi ntango bandimaki.
Na nsima, makambo nyonso ebongisamaki mpo na liyangani. Mokolo oyo bayangani basengelaki koya, tokendaki kozela bango na midi na esika engbunduka etɛlɛmaka, na elikya ete engbunduka ekokóma na ngonga ya 14:30. Ntango tozalaki kozela, mokonzi ya esika yango apesaki biso mokanda moko oyo elobaki ete: “Tolongoli bawagɔ motoba ya Société Watch Tower.” Alobaki ete engbunduka ekokaki te kobenda bawagɔ mosusu na ngomba.
Tolingaki kosala nini? Likanisi ya liboso ezalaki ya kopusa dati ya liyangani. Kasi, yango elingaki kosɛnga tósɛnga ndingisa mosusu, oyo elingaki kozwa bapɔsɔ! Ntango kaka tozalaki kobondela Yehova, engbunduka ekómaki. Tokamwaki komona ete bawagɔ nyonso motoba eyaki—nyonso etondaki na Batatoli! Bazalaki na esengo mpe bazalaki kopepa mabɔkɔ. Ntango totunaki likambo nini elekaki, moko na bango alobaki ete “balongolaki bawagɔ motoba, kasi ezalaki bawagɔ na biso te!”
Na katikati ya mobu 1967 mpe 1971, motángo ya Batatoli ya Yehova ebakisamaki mbala mibale na Myanmar, ekómaki pene ya 600. Na nsima, na 1978, biro ya filiale ekendaki na ndako moko ya etajɛ moko. Mbula ntuku mibale na nsima, motángo ya Batatoli emataki tii koleka 2 500. Totongaki bandako mosusu ya biro ya filiale, mpe na mokolo ya 22 Yanuali 2000, ndeko John E. Barr, moko ya basangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, autaki na États-Unis mpe ayaki kosala diskur ya bofungoli biro ya etajɛ mibale mpe bandako ya kolala oyo tozali kosalela lelo oyo.
Soki nakanisi mapamboli oyo nazwi
Lelo oyo, bandeko 52 basalaka na biro ya filiale na Yangon mpe balalaka kuna, mpe ezali na Batatoli ya Yehova soki 3 500 na masangá 74 mpe bituluku na ekólo yango mobimba. Nazali na esengo ya koloba ete na 1969, mwa moke liboso akufa, mama na ngai mpe akómaki Motatoli ya Yehova.
Doris Ba Aye, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela, akómaki kobongola mikanda na biro ya filiale na katikati ya bambula ya 1960. Na ebandeli ya 1959, akɔtaki kelasi ya mbala ya 32 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, eteyelo oyo ebongisaka bamisionɛrɛ ya Batatoli ya Yehova. Kitoko na ye, bomoto na ye ya malamu, mpe bolingo ya Nzambe oyo azalaki na yango esimbaki motema na ngai. Tobalanaki na 1970. Banda mokolo wana, tomipesá na mosala ya Yehova mpe tolinganá makasi.
Na boumeli ya mbula koleka 60, namoni oyo lobɔkɔ ya Nzambe ezali kokokisa na mosala ya kosakola na ekólo oyo. Ya solo, azali monene mpe abongi mpenza kozwa masanzoli. ‘Asalaka mpenza makambo ya minene’ ndenge namoni yango na bomoi na ngai mobimba.—Nzembo 106:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango wana ekokanaki na mbongo soki dolare 95, yango ezalaki mbongo mingi.
[Elilingi na lokasa 27]
Na mosala ya kosakola, na Rangoon, Birmanie, na mobu soki 1957
[Elilingi na lokasa 28]
Mobembo mpo na kokende na liyangani moko na Kalemyo, na Birmanie, na nsuka ya 1970
[Elilingi na lokasa 29]
Bandako ya biro na biso oyo tosilisaki kotonga na 2000
[Elilingi na lokasa 29]
Ngai ná Doris lelo oyo
[Elilingi na lokasa 29]
Tozali kosakola ndako na ndako elongo