Ozali komona polele ndenge Nzambe azali kokamba biso?
EZALA Bayisraele ezala Baezipito naino bamoná likambo ya ndenge wana te. Ntango Bayisraele basalaki mobembo ya kobima na Ezipito, likonzí moko ya lipata ezalaki likoló na bango mpe ezalaki kotɛlɛma pene na bango mokolo na mokolo. Na butu ezalaki kokóma likonzí ya mɔtɔ. Ezalaki mpenza nsɔmɔ! Kasi eutaki wapi? Ntina na yango ezalaki nini? Bongo biso lelo, nsima ya mbula soki 3 500, liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Bayisraele bazalaki kotalela “likonzí ya mɔtɔ mpe lipata”?—Kob. 14:24.
Liloba ya Nzambe emonisi epai likonzí yango eutaki mpe ntina na yango; elobi boye: “Yehova azalaki kotambola liboso na bango na moi na kati ya likonzí ya lipata mpo na kokamba bango na nzela, mpe na butu na kati ya likonzí ya mɔtɔ mpo na kopesa bango pole mpo na kotambola na moi mpe na butu.” (Kob. 13:21, 22) Yehova asalelaki likonzí ya mɔtɔ mpe ya lipata mpo na kokamba basaleli na ye ntango bazalaki kobima na Ezipito mpe kotambola na esobe. Basengelaki kondima kolanda yango ntango ebandi kotambola. Ntango basoda ya Ezipito oyo bazalaki kolanda basaleli ya Nzambe bakómaki pene na kobundisa bango, likonzí yango eyaki kotɛlɛma katikati ya bituluku yango mibale, mpo na kobatela Bayisraele. (Kob. 14:19, 20) Atako likonzí elakisaki nzela ya mokuse te, mpo Bayisraele bákóma na Mokili ya Ndaka, basengelaki kolanda kaka yango.
Likonzí wana ezalaki komonisa basaleli ya Nzambe ete Yehova azali na bango. Ezalaki komonisa Yehova, mpe na bantango mosusu, alobaki na bango na kati ya likonzí yango. (Mit. 14:14; Nz. 99:7) Longola yango, lipata emonisaki ete Moize azali moto oyo Yehova aponaki mpo na kokamba ekólo. (Kob. 33:9) Ndenge moko mpe, mbala ya nsuka oyo Biblia elobi ete lipata yango ebimaki, ezalaki mpo endimisa ete Yehova aponi Yosua mpo azwa esika ya Moize. (Mib. 31:14, 15) Kutu, mpo mobembo na bango ya Kobima esuka malamu, Bayisraele basengelaki komona polele ndenge Nzambe azali kokamba bango mpe bongo kolanda litambwisi yango.
Bazalaki komona yango lisusu te
Ntango Bayisraele bamonaki likonzí yango mpo na mbala ya liboso, na ntembe te, bayokaki nsɔmɔ. Kasi likambo ya mawa, likamwisi wana oyo bazalaki komona ntango nyonso esimbaki mpenza mitema na bango te mpo etinda bango bákoba kotyela Yehova motema. Mbala mingi, batyaki ntembe na litambwisi ya Nzambe. Ntango limpinga ya Baezipito elandaki bango, bamonisaki te ete bazalaki kotya motema ete Yehova azali na nguya ya kobikisa bango. Kasi, bafundaki Moize, mosaleli ya Yehova, ete azali komema bango na liwa. (Kob. 14:10-12) Nsima ya kobikisa bango na Mbu Motane, baimaimaki mpo na Moize, Arona, mpe Yehova kaka mpo bamonaki ete bazangi bilei mpe mai. (Kob. 15:22-24; 16:1-3; 17:1-3, 7) Mpe mwa bapɔsɔ na nsima, batyaki Arona mbamba mpo asalela bango mwana-ngɔmbɛ ya wolo. Kanisá naino! Bayisraele bazalaki komona likonzí ya mɔtɔ mpe ya lipata na ngámbo moko ya kaa na bango; elembo yango monene ezalaki komonisa polele Moto oyo abimisaki bango na Ezipito. Mpe mosika te na likonzí yango, babandaki kosambela ekeko mpe balobaki boye: “Talá Nzambe na yo, Ee Yisraele, oyo akambaki yo mpe abimisaki yo na mokili ya Ezipito.” Basalaki “makambo na limemya ata moke te”!—Kob. 32:4; Neh. 9:18.
Makambo oyo Bayisraele basalaki emonisaki polele ete batyolaki mpenza litambwisi ya Yehova. Miso na bango ekufaki te, bazalaki nde na mokakatano na miso na bango ya elimo. Bazalaki komona likonzí, kasi babosanaki ete likonzí yango ezalaki komonisa litambwisi ya Yehova. Atako misala na bango ‘eyokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi,’ Yehova akobaki, na motema mawa nyonso, kotambwisa Bayisraele na nzela ya likonzí yango tii ntango bakómaki na Mokili ya Ndaka.—Nz. 78:40-42, 52-54; Neh. 9:19.
Moná polele ndenge Nzambe azali kokamba biso lelo
Ndenge moko mpe na mikolo na biso, Yehova atiká ata mokolo moko te kopesa basaleli na ye litambwisi ya polele. Ndenge kaka asɛngaki te ete Bayisraele báluka nzela bango moko, asɛngi biso te ete biso moko tóluka nzela ya kokóma na mokili ya sika oyo alaki. Yesu Kristo nde Mokambi oyo aponami mpo na kokamba lisangá. (Mat. 23:10; Ef. 5:23) Yesu apesá ndambo ya bokonzi na ye na moombo ya sembo, etuluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na ngala na ye, moombo yango atyaka bakɛngɛli na lisangá ya bokristo.—Mat. 24:45-47; Tito 1:5-9.
Ndenge nini tokoki koyeba soki moombo to kapita yango nde nani? Tótala ndenge Yesu ye moko alobelaki yango: “Nani azali mpenza kapita ya sembo, ya mayele, oyo nkolo na ye akotya ye abatela basaleli na ye nyonso mpo apesaka bango bilei oyo basengeli na yango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango, soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo!”—Luka 12:42, 43.
Boye, kapita yango azali “sembo”; awanganaka soki moke te Yehova, Yesu, solo ya Biblia, to basaleli ya Nzambe. Lokola azali mpe “mayele,” kapita yango amonisaka bososoli mpo na ndenge ya kotambwisa mosala oyo eleki ntina: kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ mpe kokómisa “bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14; 28:19, 20) “Na ntango oyo ebongi,” kapita yango azali na botosi nyonso kokabola bilei ya elimo oyo ezali malamu mpe oyo etongaka. Ezali komonana polele ete Yehova andimi bato na ye na ndenge azali kokolisa motángo ya basambeli ya solo, kokamba bango na ntango ya kozwa bikateli minene, kosalisa bango báyeba malamu mateya ya Biblia, kobatela bango mpo banguna na bango básilisa bango te, mpe azali kopesa bango kimya ya makanisi mpe ya motema.—Yis. 54:17; Flp. 4:7.
Landá litambwisi ya Nzambe
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na ndenge oyo Nzambe azali kokamba biso? Ntoma Paulo alobaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.” (Ebr. 13:17) Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Tózwa ndakisa: omitya na esika ya Moyisraele moko na ntango ya Moize. Kanisá ete nsima ya kotambola mwa ntango, likonzí etɛlɛmi. Ekoumela ntango boni? Mokolo moko? Pɔsɔ moko? Basanza mingi? Okómi komituna: ‘Nafungola biloko na ngai nyonso?’ Ya liboso, ofungoli naino kaka biloko oyo ozali na yango mposa mingi. Kasi, nsima ya mwa mikolo, lokola obaye kolukaluka na kati ya biloko na yo, obandi kofungola biloko nyonso. Kasi na nsima, kaka ntango oyo olingi kosilisa kofungola biloko, omoni likonzí yango emati ekómi kokende—mpe osengeli kobanda lisusu kokanga biloko! Elingaki kozala likambo ya pɛtɛɛ to ya pɛpɛlɛ te. Atako bongo, Bayisraele basengelaki “kolongwa mpe kolanda na nsima.”—Mit. 9:17-22.
Tosalaka ndenge nini soki tozwi malako oyo euti na Nzambe? Tosalelaka yango “nsima” kaka ya kozwa yango? To tokobaka kosala makambo kaka ndenge tomesaná kosala? Tomesani na malako ya sika, na ndakisa malako etali ndenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya, kosangana na losambo ya libota pɔsɔ nyonso, kosala elongo na Komite mpo na boyokani na minganga, mpe ndenge ya komitambwisa malamu na mayangani? Tokomonisa mpe botɔndi mpo na litambwisi ya Nzambe soki tozali kondima toli. Soki esɛngi tózwa bikateli ya minene mingi, totyelaka mayele na biso moko motema te kasi tolukaka nde litambwisi ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Mpe kaka ndenge mwana alukaka libateli epai ya baboti na ye na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi, tolukaka libateli na kati ya ebongiseli ya Yehova ntango mikakatano ekweli biso lokola mbula ya nkake.
Ya solo, bato oyo bazali kokamba eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele bazali bato ya kokoka te—kaka ndenge Moize azalaki. Atako bongo, likonzí emonisaki ntango nyonso polele ete Nzambe nde atyaki ye mpe ete azalaki kondima ye. Simbá mpe ete Moyisraele nyonso te nde akokaki kopona ntango ya kolongwa. Kasi, bato bazalaki kolanda “etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.” (Mit. 9:23) Na yango, emonani ete Moize, oyo na nzela na ye Nzambe azalaki kopesa malako, nde azalaki koyebisa ntango ya kolongwa.
Lelo oyo, etuluku ya kapita bayebisaka polele soki ntango ya kolongwa ekoki. Ndenge nini kapita yango asalaka yango? Na nzela ya masolo oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Mosala na biso ya Bokonzi, mikanda ya sika, mpe badiskur oyo epesamaka na mayangani. Malako epesamaka mpe na masangá na nzela ya bakɛngɛli-batamboli to na nzela ya mikanda to ya baformasyo oyo bandeko oyo bazali na mikumba na masangá balandaka.
Yo mpe ozali mpenza komona ete Nzambe azali kokamba basaleli na ye? Na mikolo oyo ya nsuka, Yehova azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kotambwisa biso bato na ye, na kati ya mokili mabe oyo ya Satana, oyo ezali lokola esobe moko ya nsɔmɔ. Yango wana, tozali na bomoko, bolingo, mpe na likambo ya kobanga te.
Ntango Bayisraele bakómaki na Mokili ya Ndaka, Yosua alobaki boye: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino.” (Yos. 23:14) Ndenge moko mpe, basaleli ya Nzambe lelo bakokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Nzokande, mpo moto akɔta kuna, etali mingimingi ndenge oyo azali kondima na komikitisa nyonso litambwisi ya Nzambe. Na yango, tiká mokomoko na biso amona polele ndenge Nzambe azali kokamba biso!
[Bililingi na lokasa 5]
Totambwisami lelo na ebongiseli ya Yehova
Mikanda ya sika ebimaka na liyangani
Biteyelo ya Teokrasi
Formasyo na makita mpo na mosala ya kosakola