Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu
NTANGO basalaki masini ya kobimisa mikanda, eleki bankama ya bambula, lolenge oyo bato basololaka ebongwanaki. Ntango babimisaki Internet na mikolo na biso, ebongolaki makambo kaka ndenge wana. Lelo, tokoki koyeba makambo ndenge na ndenge na nzela ya Internet. Tokokamwa te ndenge Internet ezali eloko ya kosolola na bato ya mokili mobimba!
Likoki ya kosolola ezali likabo kitoko oyo Mozalisi na biso apesá biso. Esalisaka biso tópesana makanisi mpe bansango ná basusu. Yehova nde moto ya liboso oyo asololaki na bato. Ayebisaki bango polele ndenge ya kozala na bomoi ya malamu. (Eba. 1:28-30) Nzokande, ndenge likambo oyo esalemaki na ebandeli ya lisolo ya bato emonisi yango, likabo ya kosolola ekoki kosalelama na ndenge ya mabe. Satana ayebisaki Eva makambo ya lokuta. Eva andimaki makambo yango mpe ayebisaki yango Adama; Adama alandaki yango mpe misala na ye ememelá bato bampasi.—Eba. 3:1-6; Rom. 5:12.
Sikoyo, tokoloba boni na oyo etali kosalela Internet? Ya solo, Internet ekoki kosalisa biso tóyeba makambo ya ntina mpe tósala makambo mbangumbangu. Kasi ekoki mpe kopesa biso nsango ya lokuta, kolya biso ntango mingi, mpe kobebisa bizaleli na biso. Tótalela ndenge tokoki kosalela Internet na ndenge ya malamu.
Nsango yango: ezali ya solo to ya lokuta?
Kokanisa te ete nsango nyonso oyo ezali na Internet ezali malamu. Basite ya Internet oyo esalisaka biso tózwa bansango ezali lokola bato oyo bazali kolɛmba te kobuka mayebo ya ndenge nyonso—oyo elyamaka mpe oyo elyamaka te—mpe bazali kosopa yango nyonso na nzungu moko mpe kotyela biso yango na saani mpo tólya. Okobanda nde kolya mayebo yango kozanga kotala yango malamumalamu? Okosala bongo te! Basite yango ya Internet esalelaka baordinatɛrɛ ebele mpenza mpo na kolɔkɔta to kopona likambo nyonso—ya malamu mingi mpe ya mabe koleka—oyo ezali na bamiliare ya ba–page Web. Tosengeli kozala na bososoli mpo tókesenisa blé ná matiti mabe, soki te, tokobebisa makanisi na biso na bansango ya lokuta.
Na 1993, zulunalo moko oyo eyebani mingi ezalaki na bililingi ya mbwa mibale liboso ya ordinatɛrɛ. Mbwa moko elobaki na mosusu ete: “Na Internet, moto moko te akoyeba ete ozali mbwa.” Kala mpenza, Satana abombanaki nsima ya nyoka mpo na kosolola na Eva mpe ayebisaki ye ete akoki kokóma lokola Nzambe. Lelo oyo, na nzela ya Internet moto akoki komimonisa lokola molakisi moko ya mayele, komikumisa ete ayebi makambo, kozanga ayebisa ata nkombo na ye. Mpe ezali na mibeko te oyo elobi ete moto boye to boye nde akoki kobimisa makanisi na ye, kopesa bansango, kotya bililingi, mpe bongo na bongo.
Ntango ozali kosalela Internet, kozala bindimandima te lokola Eva. Zalá na bososoli mpe kondima nsango nyonso bindimela te. Liboso ondima yango, omituna boye: (1) Nani akomi makambo yango? Moto yango ayekolá makambo yango mpe ayebi yango malamu? (2) Mpo na nini akomi yango? Nini etindaki ye? Makambo yango ezali na koyina na kati te? (3) Moto yango azwaki makambo yango wapi? Apesi bisika oyo moto akoki koluka mpe komona makambo yango? (4) Makambo yango ezali ya mikolo oyo? Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo apesaki Timote toli oyo ebongi mpe mpo na biso lelo. Akomaki boye: “Batelá eloko oyo ebombami epai na yo, boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu mpe maloba ya ntembe ya ‘boyebi’ ya lokuta.”—1 Tim. 6:20.
Esalisaka moto abungisa ntango te to elyaka nde ntango?
Soki tosaleli Internet na ndenge ebongi, na ntembe te, ekoki kosalisa biso tóbungisa ntango te, makasi te mpe mbongo te. Tokoki kosomba eloko mbala moko kozanga tókende koluka yango. Kokokanisa bantalo na nzela ya Internet ekoki kosalisa biso tóbatela mbongo na biso. Na esika akende na banki, moto akoki kofuta bafaktire, kotinda mbongo mpe kosala makambo mosusu ya ndenge wana na nzela ya Internet ntango nyonso oyo alingi, wana afandi na ndako na ye. Ntango tolingi kosala mobembo, Internet ekoki kosalisa biso tópona nzela oyo tolingi kokende mpe oyo ekozwa biso mbongo mingi te, mpe ekoki kosalisa biso tósɛnga bábombela biso esika. Kozanga mpasi, tokoki kotala banimero ya telefone, baadrɛsi, mpe banzela ndenge na ndenge oyo tokoki kozwa mpo tókóma na esika oyo tokani kokende. Na mokili mobimba, babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova esalelaka Internet na makambo wana mosusu mpo na kobatela ntango, mbongo, mpe kosalela bato mingi te na mosala.
Nzokande, ezali mpe na makama. Na ndakisa, Internet ekoki kolya biso ntango. Mpo na bato mosusu, Internet ekómá nde eloko ya masano na esika ezala esaleli ya ntina. Balekisaka ntango mingi na kobɛta masano, kosomba biloko, kosolola na bato, kotinda bamesaje, kosala bolukiluki, mpe kokɔtakɔta na basite. Mokemoke, bakoki kobanda kobosana makambo oyo eleki ntina, na ndakisa libota, baninga mpe lisangá. Internet ekoki kokómisa moto moombo. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo basalaki na 2010 emonisaki ete bilenge mingi (18,4%) na Corée bazali baombo ya Internet. Bato oyo basalaka baankɛtɛ na Allemagne balobaki ete “motángo ya basi oyo bazali komilela mpo mibali na bango bakómi baombo [ya Internet] ezali se kobakisama.” Mwasi moko amilelaki ete mobali na ye akómá moto mosusu banda akómá moombo ya Internet mpe yango ebebisi libala na bango.
Betele moko ya Batatoli ya Yehova ezwaki mokanda oyo eutaki epai ya moto moko oyo alobaki ete akómá moombo ya Internet. Mikolo mosusu, alekisaka ata ngonga 10 na Internet. Nsima ya komonisa ete “na ebandeli, emonanaki lokola ezali likama te,” abakisaki boye: “Nsima ya mikolo, nakómaki kozangisa makita mpe natikaki kobondela.” Soki akei na makita, azalaki komibongisa te mpe azalaki kaka kokanisa kozonga na ndako mpo na “kokɔta lisusu na Internet.” Likambo ya esengo, amonaki ete azali na mokakatano monene mpe azwaki bibongiseli mpo na kobongisa makambo. Tóndima ata mokolo moko te kokóma baombo ya Internet.
Makambo yango ebongi to te?
Na 1 Batesaloniki 5:21, 22, Biblia elobi boye: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu. Bóboya mabe ya ndenge nyonso.” Soki tomoni likambo moko na Internet, tosengeli kobosana te oyo Yehova akanisaka mpo na yango, soki eyokani na mitinda na ye. Esengeli kozala likambo oyo eyokani na bizaleli ya pɛto mpe oyo ebongi mpo na mokristo. Pornografi epalangani mingi mpenza na Internet, mpe soki tokebi te, tokoki kokwea na motambo yango.
Ekozala malamu tómituna boye: ‘Eloko oyo nazali kotala na ordinatɛrɛ na ngai, nakobomba yango mbala moko soki molongani na ngai, baboti, to mpe bandeko ya lisangá bayei esika nazali?’ Soki eyano ezali “ɛɛ,” ekozala malamu tósalelaka Internet kaka ntango bato mosusu bazali elongo na biso. Internet ebongoli mpenza ndenge ya kosolola na bato mpe kosomba biloko. Kasi efungweli mpe bato nzela ya sika ya ‘kosala ekobo na motema.’—Mat. 5:27, 28.
Natindela yango bato mosusu to te?
Kosalela Internet esɛngaka mpe kozwa bansango mpe kotindela yango bato mosusu. Atako tozali na bonsomi ya kozwa bansango mpe kotindela yango bato mosusu, tozali mpe na mokumba ya koluka koyeba soki makambo yango ezali solo mpe ebongi. Tokokoka mpenza komonisa ete makambo oyo tokomi to oyo totindeli bato mosusu ezali ya solo? Tozali na ndingisa ya koyebisa bato mosusu nsango yango?a Makambo yango ekosalisa mpenza? Mpo na nini nalingi koyebisa yango basusu? Ezali kaka mpo na kokamwisa bango?
Ba e-mail ekoki kosalisa mingi soki tosaleli yango malamu. Kasi, ekoki mpe kopesa biso bansango ebele oyo ezangá ntina. Totindelaka basusu mbala moko nsango nyonso ya sika oyo tozwi, mbala mosusu ya makambo ya mpambampamba, mpe kolya bango ntango oyo bakokaki kosalela na makambo ya ntina? Esengeli te kotalela naino makanisi na biso liboso tófina na butɔ ya kotinda mesaje? Tolingi mpenza nini? Kala, bato bazalaki kokomela libota mpe baninga na bango mikanda mpo na koyebisa bango ndenge makambo ya bomoi na bango ezali kotambola. Ba e-mail na biso esengeli mpe kozala libosoliboso na mokano wana. Mpo na nini koyebisa basusu likambo oyo toyebi te soki ezali solo to lokuta?
Na yango, tosengeli kosala nini na oyo etali Internet? Koboya yango na motema moko? Ekoki kozala bongo mpo na bato mosusu. Moto oyo tolobelaki ete akómaki moombo ya Internet asalaki bongo mpo na kolongwa na boombo yango oyo eumelaki bambula mingi. Internet ekoki kosalisa biso mingi soki totiki ‘likoki ya kokanisa ekɛngɛla biso mpe bososoli ebatela biso.’—Mas. 2:10, 11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali mpe bongo mpo na bafɔtɔ. Atako tokoki kokanga bafɔtɔ mpo na biso moko, mbala mosusu tozali na ndingisa te ya kopesa yango bato mosusu, to mpe ya koyebisa bankombo ya bato oyo bazali na bafɔtɔ yango mpe koyebisa bisika oyo bafandi.
[Elilingi na lokasa 4]
Okoki kosala nini mpo okosama te na bansango ya lokuta?
[Elilingi na lokasa 5]
Osengeli kokanisa nini liboso ofina butɔ ya kotinda mesaje?