Nsango malamu na Internet
Na eleko oyo ya tɛknoloji, bato mosusu bazali kozwa to kolanda nsango na bisaleli oyo biuti na mwango ya elɛktroniki, lokola oyo ebéngami Internet. Na yango, mpo na kosunga bato oyo basalelaka Internet, la Société asili kokɔtisa na Internet mayebisi ya sikisiki na ntina na bindimeli mpe misala ya Batatoli ya Yehova.
Kode mpo na kozwa mayebisi na biso ezali bongo http://www.watchtower.org. Kuna ezali na batrakte ndenge na ndenge, mwa babúku mpe masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na lokótá ya Allemand, ya Chinois (ya pɛtɛɛ), ya Espagnol, ya Lifalansé, ya Lingelesi, ya Russe mpe nkótá mosusu. Mikanda oyo mityami na Internet ezali mikanda oyo masangá masalelaka yango uta kala mpe oyo mikabolamaka na mosala ya kosakola. Mokano ya kode na biso ya Internet ezali ya kobimisa makambo ya sika te, kasi ya kotya mikanda mpo na bato nyonso na mwango ya Internet. Ezali na ntina te ete biso moko tobongisa masoló na ntina na bindimeli mpe misala ya Batatoli ya Yehova mpo na kotya yango na Internet. Kode na biso ya Internet oyo la Société abongisi ezali kopesa mayebisi ya sikisiki oyo moto nyonso asalelaka Internet akoki kozwa yango.
Atako kode na biso esalemi te mpo na kozwa nsango na mwango ya elɛktroniki (E-mail), nzokande ezali kopesa liste ya baadresi ya bafiliale bipai nyonso na mokili. Bato bakoki kokoma mikanda na moko na baadresi yango mpo na kozwa mayebisi mingi koleka to mpo na kozwa bango moko lisalisi ya Batatoli ya Yehova oyo bazali na mboka na bango. Tókakatana te mpo na koyebisa kode na biso ya Internet, oyo touti koyebisa na ebandeli ya lisoló oyo, epai na moto nyonso oyo akozala na mposa ya koyeba mateya ya solo ya Biblia na mwango yango.