Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/07 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Kosalela Internet​—Kebá na makama!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsango malamu na Internet
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Koluka baninga na Internet ezali mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 7/07 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Kosolola na bato oyo toyebi te na nzela ya Internet ezali na makama nini?

Lelo oyo, Internet ekómi na bisika (site) mingi oyo ezali kopesa nzela na bato oyo bazali na baordinatɛrɛ báyebana mpe bákomelanaka. Mingi ya bato yango bazali na likoki ya kofungola esika moko na Internet, oyo bakotya bafɔtɔ na bango mpe makambo na bango mosusu. Bato mosusu, oyo bazali na baordinatɛrɛ, bakoki mpe komona makambo yango mpe koluka koyebana na bakóló na yango. Bilenge mingi basepelaka na ba site wana ya Internet. Bilenge mosusu Batatoli ya Yehova mpe bakómi kosalela yango mpo na kosolola na bato mosusu oyo bazali komimonisa ete bazali Batatoli ya Yehova.

Ezali mpasi te mpo moto oyo tozali kosolola na ye na nzela ya Internet akosa biso na makambo mosusu lokola nkombo mpe bomoto na ye, elimo na ye, to mikano na ye. (Nz. 26:4) Ekoki kozala ete moto oyo azali komimonisa ete azali Motatoli ya Yehova, azali ata mondimi te, to abimisamá na lisangá, to azali mopɛngwi oyo azali koluka kobenda baklisto na nzela na ye. (Gal. 2:4) Emonani ete bato mingi oyo babebisaka bana mike basalelaka ba site wana ya Internet mpo na kozwa bana oyo bakobebisa.

Ata soki tozali na bilembeteli ete moto oyo tozali kosolola na ye azali moklisto oyo azali na etamboli ya malamu, kosolola na ye ndenge wana ekoki komema biso na kolobela makambo oyo ebongi te. Ezali bongo mpamba te mbala mingi moto amipekisaka mpenza te ntango azali kosolola na moto oyo amonaná na ye naino te. Lisusu, ntango bato mibale bazali kosolola na nzela ya Internet, bakanisaka ete makambo yango ekoyebana na bato mosusu te, na ndakisa baboti na bango to bankulutu. Likambo ya mawa, bilenge mosusu oyo baboti na bango bazali Batatoli bakweaki na motambo mpe bakómaki kosolola masolo ya mbindo. (Ef. 5:3, 4; Kols. 3:8) Basusu, na makambo na bango oyo batye na bisika wana ya Internet oyo moto nyonso akoki komona, bakɔtisi mpe bafɔtɔ na bango oyo ekoki kolamusa mposa ya nzoto, bamipesi bankombo mosusu oyo ebombi makambo ya nsɔni, to mpe bakɔtisi miziki oyo ezali na bililingi ya nsɔni.

Na kotalela makambo nyonso wana, baboti basengeli koyebaka makambo nini bana na bango basalaka ntango bazali kosalela ordinatɛrɛ. (Mas. 29:15) Toyebi ete kobengisa moto oyo toyebi te na ndako na biso to kotika ye elongo na bana na biso ezali likama. Ndenge moko mpe, ezali likama mpo na biso moko mpe mpo na bana na biso soki tozali koluka kokóma baninga ya bato oyo toyebi te na nzela ya Internet, ata soki bato yango balobi ete bazali Batatoli ya Yehova.​—Mas. 22:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto