Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi mpenza banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna oyo elandi:
• Olivétan azalaki nani, mpe mpo na nini tosengeli kotya likebi na mosala na ye?
Pierre Robert, moto ya ekólo France nde ayebanaki na nkombo wana. Na eleko ya Mbongwana oyo esalemaki na ekeke ya 16, abongolaki Biblia na Lifalanse. Asepelaki kosalela liloba “mokɛngɛli” na esika ya “episkɔpɔ,” mpe “lisangá” na esika ya “lingomba.” Na bisika mosusu atyaki nkombo ya Nzambe “Yehova.”—1/9, nkasa 18-20.
• Nzambe alingaki koloba nini ntango alobaki na libota ya Levi ete: “Ngai nazali likabo na yo”?
Libota mokomoko ya Yisraele ezwaki eteni na yango ya mabele, kasi “likabo” ya Balevi ezalaki nde Yehova. (Mit. 18:20) Basengelaki te kozwa libula ya mabele, kasi bazwaki mosala moko ya ntina mingi. Atako bongo, Yehova akokisaki bamposa na bango ya mosuni. Lelo oyo, baoyo bazali kosala mpo na kotombola matomba ya Bokonzi bakoki kotya motema ete bakozwa biloko ya mosuni oyo basengeli na yango.—15/9, nkasa 7-8, 13.
• Ndenge nini toyebi mbula oyo bato ya Babilone bakweisaki Yerusaleme?
Mikanda ya istware elobeli makambo oyo ezali bongolabongola mpo na bakonzi ya Babilone mpe biyangeli na bango. Kasi bato ya mayele bandimaka ete Siruse II alongaki Babilone na mobu 539 L.T.B., oyo ezali dati ya ntina mingi. Bayuda balongwaki na boombo mpe bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Biblia elobi ete baumelaki na boombo mbula 70. Na yango, emonani ete Yerusaleme ekweaki na mobu 607 L.T.B. (2 Nt. 36:21, 22; Yir. 29:10; Dan. 9:1, 2)—1/10, nkasa 26-31.
• Nini ekoki kosalisa mokristo ayeba soki kominanola moko boye ebongi to te?
Mpo na koyeba soki lolenge moko ya kominanola endimami na miso ya Nzambe, ebongi komituna boye: Ezali ya ndenge nini? Ntango nini nakosala yango? Nakozala elongo na banani?—15/10, nkasa 9-12.
• Mpo na nini kolongola zemi ezali mabe?
Bomoi ezali eloko ya bosantu na miso ya Nzambe, mpe atalelaka mwana oyo abandi kosalema na libumu ya mama ete azali ekelamu ya bomoi. (Nz. 139:16) Kokata bomoi ya mwana oyo azali na libumu ezali mpe koboma moto, mpamba te Mibeko ya Moize elobaki ete moto akosambisama soki asali mabe na mwana oyo azali naino na kati ya libumu. (Kob. 21:22, 23)—1/11, lokasa 6.
• Ndenge nini lisolo oyo ezali na Masese 7:6-23 ekoki kosalisa biso tóboya kotala pornografi?
Mokapo yango elobeli elenge mobali moko oyo azalaki kotambola na esika oyo ayebaki ete mwasi moko ya ndumba afandaka wana. Mwasi yango akosaki ye. Lelo oyo, ezali malamu tókima basite ya Internet oyo ezalaka na bafoto to bililingi oyo elamwisaka mposa ya nzoto; mpe ezali na ntina tósɛnga Yehova asalisa biso liboso kutu bililingi ya ndenge wana ebimela biso na Internet.—15/11, nkasa 9-10.
• Ndenge nini toyebi ete mabele ekozala kaka nsima ya 2012?
Na kotalela bileko oyo ezali na manaka to kalandriye ya kala ya Ba-Maya, bato mingi bazali kokanisa ete mokili ekokufa na 2012. Kasi ekoki kosalema bongo te, mpamba te Yehova akelaki mabele mpo bato báfanda wana. Biblia elobi ete mabele ekoumela seko. (Mos. 1:4; Yis. 45:18)—1/12, lokasa 10.
• Banani kati na bato oyo bakomaki Biblia bazalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
Emonani ete bato motoba kati na bakomi ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo bazalaki wana. Bantoma misato: Matai, Yoane mpe Petro. Bandeko mibale ya Yesu mpe bazalaki wana: Yakobo ná Yuda. Mpe ekoki kozala ete elenge mobali Marko mpe azalaki wana.—1/12, lokasa 22.