Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/11 nk. 30-31
  • Babikisami na libulu ya mɔtɔ makasi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babikisami na libulu ya mɔtɔ makasi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mwango mabe ezongeli baoyo basalaki yango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge Paradiso ebungaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/11 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Babikisami na libulu ya mɔtɔ makasi!

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

Bato oyo balobeli: Shadrake, Meshake, Abedenego, mpe Nebukadenezare

Na mokuse: Kondima ya bilenge Baebre misato emekami.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ DANYELE 3:1-30.

Lobelá makɛlɛlɛ oyo ozali “koyoka” ntango ozali kotánga bavɛrsɛ 3-7.

․․․․․

Lobelá ndenge oyo, na makanisi na yo, libulu yango ya mɔtɔ ezalaki.

․․․․․

Mongongo ya Nebukadenezare ezali koyokana ndenge nini ntango azali kopesa mitindo ete bábakisa mɔtɔ yango mbala nsambo? (Tángá lisusu vɛrsɛ 19 mpe 20.)

․․․․․

Ndenge ozali komona na makanisi, mobali ya minei oyo azali na libulu ya mɔtɔ, azali ndenge nini? (Tángá lisusu vɛrsɛ 24 mpe 25.)

․․․․․

Bizaleli nini ozali komona epai ya Shadrake, Meshake, mpe Abedenego ntango bazali koloba na Nebukadenezare makambo oyo ezali na vɛrsɛ 16 tii 18?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Na lisalisi ya mikanda oyo ozali na yango, luká molai ya lipeko moko, mpe salá kalkile mpo na koyeba soki ekeko oyo Nebukadenezare asalaki ezalaki molai ndenge nini. (Tángá lisusu vɛrsɛ 1.)

․․․․․

Soki otángi vɛrsɛ 19 ná 20, na nsima otángi vɛrsɛ 28 ná 29, omoni ete Nebukadenezare azalaki moto ya ndenge nini?

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Kotosa bakonzi.

․․․․․

Ntina ya kobanga te kotosa mibeko ya Nzambe oyo bateyá yo.

․․․․․

Ndenge oyo Yehova asalisaka na ntango ya minyoko.

․․․․․

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Na makambo nini kondima na yo ekoki komekama?

․․․․․

Ndenge nini lisolo ya Shadrake, Meshake, ná Abedenego ekosalisa yo otikala sembo?

․․․․․

4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na Biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia, na Internet na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto