Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/1 nk. 5-6
  • Abrahama—Moto ya kondima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Abrahama—Moto ya kondima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Abrahama ná Sara batosaki Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/1 nk. 5-6

Abrahama​—Moto ya kondima

Abrahama atɛlɛmi libándá na butu, makɛlɛlɛ ezali te. Ntango azali kotala ebele ya minzoto na likoló, na ntembe te, azali kokanisa elaka oyo Nzambe apesaki ye ete bana na ye bakokóma mingi lokola minzoto wana. (Ebandeli 15:5) Minzoto yango esalisi Abrahama amona polele elaka oyo Yehova apesaki ye. Endimisi ye ete Yehova akokokisa elaka yango. Kutu, soki Yehova azali na nguya ya kokela molɔ́ngɔ́ mpe biloko nyonso oyo ezali na kati, nini ekoki kopekisa ye asala ete Abrahama ná Sara bábota mwana? Kondima ya Abrahama eutaki nde na likambo wana.

KONDIMA EZALI NINI? Na Biblia, liloba “kondima” elimbolaka kozala na elikya makasi na likambo oyo omoni te. Elikya yango euti na makambo ya solo oyo endimisi yo ete ekosalema. Moto oyo azali na kondima atyaka makanisi na ye na kokokisama ya bilaka ya Yehova, amonaka lokola nde ete bilaka yango ekokisami.

NDENGE NINI ABRAHAMA AMONISAKI KONDIMA? Abrahama amonisaki ete azalaki kondima bilaka ya Nzambe. Na kondima, Abrahama atikaki ekólo oyo abotamaki, atyaki motema ete Yehova akokokisa elaka na ye ya kolakisa ye mokili mosusu. Na kondima, Abrahama atambolaki na mokili mobimba ya Kanana, azalaki na elikya ete nsukansuka bana na ye bakozwa mokili yango. Na kondima, Abrahama amonisaki botosi ndenge alingaki kopesa Yisaka mbeka, azalaki na elikya ete soki esengeli, Yehova akosekwisa Yisaka.​—Baebre 11:8, 9, 17-19.

Abrahama atyaki miso na ye na makambo oyo ezalaki liboso, kasi te na oyo eleká. Atako Abrahama ná Sara bazalaki na bomoi moko malamu na Ure koleka oyo ya Kanana, ‘bazalaki te kokanisa esika oyo bautaki.’ (Baebre 11:15) Batyaki nde miso na mapamboli oyo Nzambe akopesa bango mpe bana na bango na mikolo ezali koya.​—Baebre 11:16.

Abrahama azalaki mpenza na bantina ya kozala na kondima ya ndenge wana? Ɛɛ. Yehova akokisaki bilaka nyonso oyo apesaki ye. Nsukansuka, bana ya Abrahama bakómaki ebele, mpe bakómaki ekólo moko oyo ebengamaki Yisraele. Na nsima, Bayisraele bakómaki kofanda na Kanana, mokili oyo Yehova alakaki Abrahama.​—Yosua 11:23.

MATEYA NINI TOZWI? Tokoki mpenza kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye. Ata soki na makanisi na biso bato, ekoki komonana ete bilaka yango ekokokisama te, tosengeli kotya motema ete “mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”​—Matai 19:26.

Ndakisa ya Abrahama eteyi biso mpe ete tótyaka miso nde na bomoi kitoko oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, kasi te na makambo oyo eleká. Yango nde liteya oyo mobali moko na nkombo Jason azwaki. Jason abɛlaki maladi moko oyo ekómisaki ye paralize nzoto mobimba. Alobi boye: “Ekómaka ntango mosusu nakanisa makambo oyo eleká. Ezali na mwa makambo ya mikemike oyo nakokaka lisusu kosala te, na ndakisa koyamba mwasi na ngai, Amanda.”

Atako bongo, Jason azali na kondima makasi ete Yehova akokokisa bilaka na ye, ata mpe elaka oyo elobi ete mosika te mabele na biso ekokóma paradiso mpe bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko mpe bakozala na nzoto ya kokoka.a (Nzembo 37:10, 11, 29; Yisaya 35:5, 6; Emoniseli 21:3, 4) Jason alobi ete: “Nazongelaka ntango nyonso koloba ete makambo ya malamu ezali liboso. Mosika te, mitungisi, mpasi, mawa mpe komiyoka lokola omemi ngambo, ekosila mpo na libela.” Jason azali mpenza ndakisa malamu ya kondima lokola Abrahama!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi oyo emonisi ndenge paradiso ekozala awa na mabele, talá mokapo 3, 7 mpe 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto