Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 15/11 lok. 20
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Bonzemba​—⁠libaku mpo na mosala mosalemi na likebi nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • ‘Pesá nzela na yango’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Yebá kosalela malamu bonzemba na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 15/11 lok. 20

Mituna ya batángi

Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 19:10-12 emonisi nde ete baoyo baponi kotikala minzemba bazwaka likabo yango na ndenge moko ya likamwisi?

Tótalela naino na libaku nini Yesu alobelaki likambo ya kotikala monzemba. Ntango Bafarisai bayaki epai na ye mpe babimisaki lisolo etali koboma libala, Yesu amonisaki polele malako oyo Yehova apesaki mpo na libala. Atako Mibeko epesaki nzela ete mobali akomela mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki “akuti likambo moko ya nsɔni” epai na ye, ezalaki bongo te na ebandeli. (Mib. 24:1, 2) Na nsima, Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”​—Mat. 19:3-9.

Ntango bayekoli bayokaki maloba wana, balobaki ete: “Soki likambo ya mobali ná mwasi na ye ezali bongo, ntina ya kobala ezali te.” Kasi Yesu ayanolaki ete: “Bato nyonso te nde bakokaka likambo yango, kasi kaka baoyo bazali na likabo yango. Mpo ezali na bato oyo babotamá mikube uta na libumu ya mama na bango, mpe ezali na bato oyo bakómisá bango mikube kokómisa, mpe ezali na bato oyo bamikómisá mikube mpo na bokonzi ya likoló. Oyo akoki kosala yango asala yango.”​—Mat. 19:10-12.

Mikube ya solosolo ezalaki baoyo babotamaki na mbeba moko boye to bakómaki bongo nsima ya likama moko boye to mpo balongolaki bango makoki ya kobota. Kasi, ezalaki mpe na baoyo bandimaki bango moko komikómisa mikube. Atako bazalaki na likoki ya kobala, bazalaki komipekisa mpe bandimaki kotikala minzemba “mpo na bokonzi ya likoló.” Lokola Yesu, baponaki kotikala minzemba mpo bákoka komipesa mobimba na mosala ya Bokonzi. Bato yango babotamaki te na likabo ya kotikala minzemba mpe bapesaki bango likabo yango kopesa te. Bango moko nde bandimá kozwa likabo yango, elingi koloba bandimá kotikala minzemba.

Na boyokani na maloba ya Yesu, ntoma Paulo alimbolaki ete atako bakristo nyonso, ezala minzemba to baoyo babalá, bakoki kosalela Nzambe na ndenge oyo alingaka, minzemba oyo ‘bazwi ekateli na mitema na bango’ mpo na kotikala ndenge bazali ‘basalaka malamu koleka.’ Na ndenge nini? Bato oyo babalá basengeli kokabola ntango mpe makasi na bango mpo na kosepelisa mpe kokokisa bamposa ya balongani na bango. Nzokande, bakristo oyo bazali minzemba bakoki komipesa mobimba na mosala ya Nkolo kozanga kotya makanisi na makambo mosusu. Batalelaka bonzemba na bango lokola “likabo” oyo euti epai ya Nzambe.​—1 Ko. 7:7, 32-38.

Batatoli ya Yehova mibale oyo bazali minzemba babimi na mosala ya kosakola

Na yango, Biblia emonisi te ete mokristo azwaka likabo ya kotikala monzemba na ndenge moko ya likamwisi. Moto ye moko nde andimaka kotikala monzemba mpo na komipesa na mosala ya Bokonzi kozanga kotya makanisi na makambo mosusu. Lelo oyo, bandeko mingi bazwá ekateli na mitema na bango ya kotikala minzemba mpo na ntina wana, mpe basusu basengeli kolendisa bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto